Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w90 15/7 nk. 21-23
  • ‘Kotemela yango ebiangami na lokuta ete boyebi’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Kotemela yango ebiangami na lokuta ete boyebi’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bomwana na ye mpe mosala na ye mpo na Nzambe
  • Kotemela mateya na lokuta
  • ‘Batyoli na nzambe babomama’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Evanzile ya Yudasi” ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Tatien azalaki kolongisa boklisto to azalaki mopɛngwi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Bakomi oyo bamonaki bantoma mosusu—Balandaki mpenza mateya ya bantoma?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
w90 15/7 nk. 21-23

‘Kotemela yango ebiangami na lokuta ete boyebi’

SOLO ezali na motuya nini na miso na yo?Ozali koyoka mawa mpo ete lokuta ezali kobebisa, mpe kino kolimwisa, solo mpo na Mozalisi ya likoló mpe mabelé? lrénée, moto ya ekeke na mibale oyo azalaki koloba ete azali moklisto, azalaki kolela mpenza mpo na likambo yango. Asalaki molende mpo na kotondola mateya mabe ya bapengwi oyo na boyebi na mabombami. Liboso mpenza, ntoma Paulo apesaki toli na Timoté ete apengwa na ‘yango ebiangami na lokuta ete boyebi’.​—1 Timote 6:20, 21.

lrénée atemelaki makasi mateya nyonso ya lokuta. Totalela na ndakisa oyo azali koloba kati na ebandeli ya mokanda na ye monene ebengami “Mise en lumiére et réfutation de la prétendue Gnose”. Akomi: “Kobwakaka solo, bamosusu bazali kokotisa masolo ya lokuta mpe ‘bikanganeli na mabota bizangi nsuka, bazali mpenza kobimisa ntembe’; lokola elobi yango. Ntoma (1 Timote 1:3, 4), ‘na esika ya kotonga ndako na Nzambe oyo etongami likoló na kondima’. Na nzela na mateya na lokuta oyo mabongisami malamu, bazali kozimbisa elimo na bato oyo bazangi boyebi mpe bazali kokomisa bango baombo, kobebisa maloba na Nkolo mpe kopesaka ndimbola mabe na makambo oyo malimbolamaki malamu.”

Ba gnostigues (na greke gnosis, “boyebi”) bazalaki komikumisa ete bazalaki na boyebi oyo eleki mpo ete bazalaki kozwa boyebi na nzela na bimonaneli, mpe bazalaki komikumisa ete bazali “kosembola bantoma”. Liteya ya Gnosticisme ezalaki kosangisa filozofi, mayele ezangi ntina mpe makamwisi na bapakano elongo na boklisto ya lipengwi. lrénée alingaki komikotisa na liteya moko te kati na mateya wana ya kala. Nzokande, na bomoi na ye mobimba abundisaki mateya ya lipengwi. Na ntembe te, akangaki ntina malamu ya likebisi na toli oyo ya Paulo: “Bokeba ete moto te apunza bino na maloba na ye na mayele, na bibanzabanza na ye na motindo na Klisto te kasi na motindo na bizaleli na bato mpe na makambo mikemike na mokili.”​—Bakolose 2:8; 1 Timote 4:7.

Bomwana na ye mpe mosala na ye mpo na Nzambe

Toyebi makambo mingi te na ntina etali bomwana mpe bomoi ya lrénée. Ezali mpenzampenza kokanisama ete abotamaki na Asie Mineure, kati na mibu 120 kino 140 ya ntango na biso, na Sumuluna to na zongazonga na yango. lrénée amonisi ye moko ete na ebandeli ya bolenge na ye azalaki kozala mingimingi na Polycarpe, mokengeli kati na lisangá ya Sumuluna.

Wana ezalaki ye koyekola na nse na litambwisi na Polycarpe, emonani lokola ete lreneé aponaki lokola moninga, moto moko na nkombo Florinus. Polycarpe ayebaki bantoma. Azalaki kopesa ndimbola mingi na ntina na Makomami mpe azalaki kolendisa makasi ete bato batikala sembo epai na mateya na Yesu Klisto mpe ya bantoma na Ye. Kasi atako formation malamu wana ya Biblia, na nsima Florinus ayaki kondima mateya ya Valentin, mobandisi monene ya lingomba na bapengwi.

lrénée azalaki na mposa ete moninga na ye ya motema mpe moninga ya kala ya mosala Florinus azongela mateya na Biblia mpe amilongola na mateya ya Valentin. Mpo na yango akomelaki ye mokanda, oyo toyebisi ndambo na maloba na yango: “Florinus, makanisi wana, . . . matongami likoló na mateya ya peto te; makanisi wana mazali koyokana te elongo (na oyo) ya Lingomba mpe ezali kobwaka baoyo bandimi yango kati na bizaleli mabe, . . . makanisi yango, mikolo oyo bazáláká na bomoi liboso na biso mpe baoyo bazáláká na bomoi esika moko na bantoma, bateyaki yo yango te.”

Kosalaka molende mpo na kokundola na Florinus formation kitoko oyo azwaki epai ya moto na lokumu Polycarpe, lrénée akobi na maloba oyo: “Nazali koyeba lisusu malamu makambo ya ntango wana, . . . na motindo boye ete nakoki koloba esika oyo moto na esengo Polycarpe azalaki kofanda mpo na koloba, . . . ndenge nini azalaki koyebisa boyokani na ye elongo na Yoane mpe elongo na misusu oyo bamonaki Nkolo, ntango azalaki kozongela maloba na bango.”

lrénée azali kokundwela epai na Florinus ete makambo oyo Polycarpe azalaki koteya, azwaki yango “na batemwe ya solo ya bomoi na Liloba, (mpe) bazalaki koyebisa yango ndenge Makomami mazali koloba”. Alobi na ye lisusu: “Makambo yango, mpe lisusu, na mawa na Nzambe oyo ekomeli ngai, nayokaki yango na likebi nyonso mpe nakomaki yango likoló na papier te, kasi kati na motema; mpe ntango nyonso, na nzela na ngolu na Nzambe, nasanzi yango lisusu na bosembo nyonso, mpe (mpo na oyo etali mateya na Valentin) nakoki koloba liboso na Nzambe ete soki mokólo wana ya boboto mpe ntoma (Polycarpe) ayokaki mwa likambo ya motindo moko (na oyo ozali koloba, Florinus), asengelaki kongenga mpe mbele akangaki matoyi, . . . Mpe mbele asengelaki kokima na esika oyo, afandaki to atelemaki, mpo akokaki koyoka maloba motindo wana te.”

Mokanda moko te epesi nzela mpo na koyeba soki Florinus atyaki likebi na mokanda na bolingo mpe na nguya ya lrénée. Kasi maloba na lrénée mamonisi bolingo nini ya solo azalaki na yango epai na moninga na ye ya motema oyo atikaki nzela ya solo mpe akweaki kati na lipengwi​—Tala 2 Batesalonike 2:3, 7-12.

Tozali koyeba te ntango nini lrénée akendaki kofanda na Gaule (France). Na 177, azalaki mokengeli kati na lisangá ya Lyon. Soki yango ezali ndenge ekomami, mosala na ye ebotaki mbuma mingi. Na yango, Grégoire de Tours mokomi na lisolo na bato azali koyebisa ete bobele na mikolo moke lrénée alongaki na kobongola engumba mobimba ya Lyon na losambo ya boklisto. Ezali solo ete maloba wana malekisi ndelo.

Kotemela mateya na lokuta

Mokanda monene ya lrénée, “Mise en lumiére et réfutation de la prétendue Gnose” (Komonisa polele mpe kotemela oyo bazalaki kokumisa ete Boyebi), etangami mingi na titre ya “Contre les hérésies” (Kotemela mateya na lokuta). Ezali kobimisama na mikanda mitano. Mibale oyo ya liboso mizali komonisa mpe kokweisa bindimeli ndenge na ndenge ya mangomba mikemike na lipengwi, mingimingi mateya na kopengwa ya Valentin. Kati na mikanda misato mosusu, lrénée ameki komonisa “bilembo biuti na Makomami”.

Na ebandeli ya mokanda na ye ya misato “Contre les hérésies”, lrénée akomi: “Na bongo kanisa lisusu na oyo tolobaki kati na mikanda mibale ya liboso; na kosangisaka mokanda oyo, okozala na makambo ya kokoka mpo na kolonga batemeli nyonso, mpe okobunda na bango kozanga kobanga mpe na molende mpo na kondima ya solo bobele moko mpe oyo ezali kopesa bomoi, oyo Lingomba ezwaki epai na bantoma mpe ezali kopesa epai na bana na ye. Nkolo ya biloko nyonso apesaki bongo epai na bantoma na ye nguya ya kosakola Evanzile, mpe ezali na nzela na bango nde toyebaki solo, elingi koloba mateya ya Mwana na Nzambe. Ezali mpe epai na bango nde Nkolo alobaki: ‘Ye oyo akoyoka bino ayoki ngai, mpe oyo atyoli bino atyoli ngai mpe atyoli Ye oyo atindaki ngai.’”

Atako lrénée ayebani ete azali mokomi malamu te, azalaki nde na ekateli ya kotondola mpenzampenza “mateya mabe” ya gnosticisme to lipengwi. Atangi mpe alimboli ebele na mikapo ya Biblia, mpe azali kokweisa na nguya nyonso “bateyi na lokuta” ya “mikabwano na libebi”. (2 Petelo 2:1-3.) Ezali komonana lokola ete lrénée azalaki na mokakatano mpo ete asangisa mikanda na ye nyonso esika moko mpo na kokomisa yango mokanda moko ya malamu. Mpo na ntina nini? Ezali mpo ete asangisaki makambo mingi.

Lisolo ya lrénée ezali mpenza mbuma ya bolukiluki milai mpe ya molende. Bilembo na ye oyo bilukami malamu bizali ebele na makambo matali ebandeli ya gnosticisme to lipengwi mpe makambo oyo mazalaki koleka na kati. Mikanda na lrénée mizali mpe eboke ya ntina ya makanisi mosusu ya Biblia ya baoyo bazalaki komiloba ete bazali sembo na Liloba na Nzambe na nsuka ya ekeke na mibale.

Mbala mingi lrénée azongeli kondima endimeli “kati na Nzambe bobele moko, Tata Mozwi-na-nguya-nyonso, ‘oyo asalaki likolo mpe mabelé mpe mai mpe nyonso oyo ezali kati na yango’, mpe kati na Klisto Yesu se moko. Mwana na Nzambe, oyo amikomisaki moto mpo na lobiko na biso”. Ba gnostiques to bapengwi bazalaki kondima makambo yango te!

Kotemelaka liteya eyebani na nkombo le docétisme gnostique (liteya oyo engebene yango ete Klisto amimonisa na lolenge ya moto mpenza te), lrénée akomaki: “Esengelaki ete Klisto azala moto, lokola biso, mpo na kosikola biso na masumu mpe kokomisa biso bato na kokoka. Lokola lisumu mpe liwa ekotaki na mokili na nzela na moto, yango esengelaki kobomama engebene mibeko mpe mpo na litomba na biso bobele epai na moto; ya solo, kasi te, epai na moto moko ya mpamba oyo asengelaki kozala mokitani ya Adam mpe ye moko asengelaki bongo kozala na mposa ya lisiko, kasi nde epai na Adam ya mibale, oyo abotamaki na motindo ya kokamwisa, tata ya sika ya libota na biso.” (1 Bakolinti 15:45) Lisusu, ba gnostigues bazalaki kondima bindimeli mibale: bazalaki kondima ete biloko na elimo bizali malamu, kasi nyonso oyo ezali komonana mpe ezali na nzoto ezalaki mabe. Na yango, bazalaki kosundola moto Yesu Klisto.

Kotalelaka likanisi oyo ete nzoto nyonso ezali mabe, ba gnostigues bazalaki mpe kotyola libala mpe kobota, kolobaka ete ezali Satana nde moto azali mobandisi na yango. Bakomaki kino kopesa mayele na Nzambe epai na nyoka na Edene! Likanisi wana ezalaki yango nde ebimisaki bizaleli mibale ya mabe oyo na kolekisa ndelo: kokila biloko to kosepelisa nzoto. Komikumisaka ete lobiko ekozwama bobele na lisalisi ya gnosticisme mystique, to boyebi ya moto ye moko, babombaki solo ya Liloba na Nzambe.

Nzokande, lrénée, alongisaki kati na makambo mosusu endimeli na Millénium to boyangeli ya mibu nkoto mpe amonisaki ete azalaki na mwa mayele ya elikya etali bomoi ezali koya awa na mabelé. Asalaki molende mpo ete ayanganisa bituluku na bapengwi oyo bizalaki kokola na eleko na ye na kosalelaka malamu Liloba na Nzambe oyo ezali na nguya. Mingimingi tozali komona kati na ye elimo na peto, ya mayele mpe boboto.

Atako bamosusu bazali kotalela lrénée (oyo akufaki pene na mobu 200) lokola mokoteli na bindimeli ya solo ya kondima na boklisto, esengeli mpe koyeba lisusu ete azalaki na bomoi na eleko moko ya mobulu to ya yikiyiki mpe oyo emonisamaki na lipengwi oyo esakolamaki. Bindimiseli na ye mbala mingi bizali ya bongo na bongo, to ezangi boyokani Kasi, tozali kokumisa litatoli ya bato oyo balongisaki Liloba likomami mpe lipemami na Nzambe na esika ya kondima makanisi na bato.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto