Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/1 nk. 20-23
  • Bamisionere bakokaki kokóma tii wapi na Esti?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bamisionere bakokaki kokóma tii wapi na Esti?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libula ya Alexandre
  • Banzela ya mai oyo ekendá na Alexandrie mpe Rome
  • Bato ya wɛsti bakei na Inde
  • Bakendaki mosika koleka Inde?
  • Bisengo ya babuku mbuma na lnde
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • ‘Na Makama na Mai Monene’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Koyeba oyo ezali malamu mpe kosala yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bakonzi yango mibale babongwani
    Tyá likebi na esakweli ya Danyele!
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/1 nk. 20-23

Bamisionɛrɛ bakokaki kokóma tii wapi na Ɛsti?

MBULA soki 30 nsima ya liwa ya Yesu, ntoma Paulo akomaki ete nsango malamu esakolamaki “na kati ya bozalisi nyonso” awa na mabelé. (Bakolose 1:23) Tosengeli te kozwa maloba yango kaka ndenge ekomami, lokola nde moto nyonso oyo azalaki na ntango wana ayokaki nsango malamu. Atako bongo, Paulo amonisaki polele ete bamisionɛrɛ oyo bazalaki baklisto bapalanganisaki nsango malamu na bisika oyo eyebanaki na ntango wana.

Kasi, bakokaki kokóma tii wapi? Makomami emonisi ete bamasuwa ya mimbongo esalisaki Paulo akende kosakola na Italie, oyo ezalaki mosika na wɛsti. Misionɛrɛ yango ya molende azalaki mpe na mposa ya kokende kosakola na Espagne.​—Misala 27:1; 28:30, 31; Baloma 15:28.

Kasi, tokoki koloba nini mpo na ngámbo mosusu? Baklisto ya liboso bakómaki tii wapi ntango bakendaki kosakola na ɛsti? Toyebi mpenza te, mpo Biblia elobeli yango te. Kasi, okoki kokamwa ntango okoyeba ntaka ya bakilomɛtrɛ oyo ekabolaki banzela ya mimbongo longwa na Mbu ya Méditerranée tii mosika mpenza na Azia na ekeke ya liboso. Atako toyebi te soki bamisionɛrɛ ya liboso bakómaki tii wapi, banzela oyo ezalaki na ntango wana emonisi ete likoki ya kokende na ɛsti ezalaki.

Libula ya Alexandre

Alexandre le Grand akendaki kobunda na ɛsti, akómaki na Babylone mpe Perse, akendaki tii mosika na Punja, na nɔrdi ya Inde. Bitumba wana esalisaki Bagrɛki báyeba banzela oyo ezali banda esika Ebale Euphrate ekutaná na golfe persique, tii esika Ebale Indus ekutaná na Mbu ya Arabie.

Mosika te, biloko mikemike oyo ekómisaka bilei elɛngi mpe mpaka-ya-malasi ekɔtaki na mokili ya Bagrɛki; ekatisaki Mbu ya Indien, na lisalisi ya bato oyo bazalaki kosala mibembo na Mbu Motane. Bato oyo bazalaki kosala mimbongo yango liboso ezalaki bato ya Inde mpe ya Arabie. Kasi, ntango bato ya libota ya Ptolémée, na ekólo Égypte bayebaki eleko oyo bazwaka biloko wana, bango mpe bakómaki kosala mimbongo na Mbu ya Indien.

Na mbu yango, kobanda sanza ya mitano tii na sanza ya libwa, mipɛpɛ ebɛtaka na ngámbo ya sudi-wɛsti mpe yango ezalaki kosalisa bamasuwa etiyola na Mbu Motane mpe ekende na sudi ya Arabie to mbala moko na sudi ya Inde. Na katikati ya sanza ya zomi na moko mpe sanza ya misato, mipɛpɛ ebɛtaka na ngámbo mosusu, mpe ezalaki kosalisa bamasuwa ezonga kozanga mokakatano. Bato ya masuwa ya Arabie mpe ya Inde basalelaki boyebi na bango ya mipɛpɛ wana na boumeli ya bankama ya bambula; bazalaki kosala mibembo na Inde mpe na Mbu Motane na bamasuwa oyo ezalaki komema biloko lokola nzete ya nsolo kitoko, kinamomo, nalada, mpe pilipili.

Banzela ya mai oyo ekendá na Alexandrie mpe Rome

Ntango Baloma balongaki mikili oyo bakitani ya Alexandre bazwaki, Rome ekómaki esika ya libosoliboso ya kotɛka biloko oyo ezalaki kouta na Ɛsti: ivoire ya Afrika, mpaka-ya-malasi mpe mila ya Arabie, biloko mikemike oyo ekómisaka bilei elɛngi mpe mabanga ya ntalo ya Inde, ata mpe soie oyo ezalaki kouta na Chine. Bamasuwa oyo ezalaki komema biloko yango ezalaki kokutana na mabongo minene mibale ya Mbu Motane, na ngámbo ya Ezipito: Bérénice mpe Myos Hormos. Na nsima, bazalaki komema biloko yango na engumba Coptos, na Ebale Nil.

Longwa na Coptos, biloko yango ezalaki kokóma na Ebale Nil, ebale monene ya Égypte, mpo na kokende na Alexandrie, esika bazalaki kotya yango na bamasuwa mpo na kokende na Italie mpe bisika mosusu. Mpo na kokende na Alexandrie, bazalaki mpe koleka na nzela mosusu; bazalaki koleka esika Ebale Nil ekutaná na Mbu Motane na ngámbo na yango ya likoló, pene na esika oyo babengaka lelo canal de Suez. Na ntembe te, Égypte ná mabongo na yango ezalaki mpenza mosika te na mikili oyo Yesu azalaki kosakola mpe ezalaki mpasi te mpo na kokóma kuna.

Strabo, moto ya Grèce mpe moto ya mayele na géographie na ekeke ya liboso, alobi ete na ntango wana, bamasuwa 120 ya Alexandrie ezalaki kolongwa Myos Hormos mpo na kokende kosala mimbongo na Inde mbula na mbula. Tii lelo oyo, ezali na buku moko ya ekeke ya liboso, oyo bato ya masuwa bazalaki kosalela ntango bazalaki kosala mibembo wana. Ekoki kozala ete moto moko ya mombongo ya Ezipito, oyo azalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki nde akomaki mokanda yango mpo na kosalisa baninga na ye ya mombongo. Makambo nini ezali na buku yango?

Buku yango, oyo ebengamaka mingi na nkombo na yango ya Latin, Periplus Maris Erythraei (mibembo na Mbu ya Indien) elobeli banzela ya mai oyo ezali na ntaka ya bankóto ya kilomɛtrɛ longwa na sudi ya Égypte tii mosika mpenza na Zanzibar. Na ngámbo ya ɛsti, mokomi ya buku yango atángaki bakilomɛtrɛ ya bamboka, bisika bamasuwa ezalaki kosɛma, bisika oyo bazalaki kobomba biloko, biloko oyo bazalaki kotɛka, mpe bato oyo bazalaki kofanda pembenipembeni ya sudi ya Mbu ya Arabie, na wɛsti ya Inde tii na Sri Lanka, mpe na ɛsti ya Inde, tii mosika mpenza na Ebale Gange. Ndenge buku yango elobeli makambo na bosikisiki etindi biso tóloba ete mokomi na yango atambolaki mpenza na bisika oyo alobeli.

Bato ya wɛsti bakei na Inde

Na Inde, bato ya mombongo oyo bazalaki kouta na wɛsti bazalaki kobengama Ba-Yavana. Buku wana oyo touti kolobela emonisi ete moko ya bisika oyo bato yango bazalaki kokende mbala na mbala na ekeke ya liboso ezalaki Muziris, oyo ezalaki pene ya esika oyo Inde esuká na sudi.a Bapoemi ya monɔkɔ ya Tamoul, oyo ekomamaki na bikeke ya ebandeli ya ntango na biso ezalaki kolobela bato yango ya mombongo ntango nyonso. Poemi moko elobi boye: “Bamasuwa ya Ba-Yavana oyo etongamá malamu mpenza eyaki na wolo mpe ezongaki na pilipili, mpe yango eningisaki bato ya Muziris mobimba.” Na poemi mosusu, bazali kosɛnga mokonzi ya sudi ya Inde amɛla vinyo kitoko oyo Ba-Yavana bayaki na yango. Kati na biloko mosusu oyo ezalaki kouta na wɛsti, oyo ezalaki kotɛkama malamu na Inde, tokoki kotánga basaani mpe bakɔpɔ ya mbɛlɛ, biloko ya bibende, mayaka, mpe bilamba.

Bato ya arkeoloji bamoni makambo mingi oyo emonisi ete biloko ezalaki kouta na wɛsti mpe ezalaki kokende na Inde. Na ndakisa, na engumba Arikamedu, oyo ezali na sudi ya Inde, bamonaki mpe biteni ya bambɛki ya vinyo ya Baloma mpe basaani oyo ezalaki na bilembo ya bato oyo basalaki yango na Arezzo, engumba oyo ezali na ntei ya Italie. Mokomi moko alobi boye: “Lelo oyo, bato mosusu ya mayele bayebaka lisusu makambo mingi soki balɔkɔti na golfe du Bengale, biteni ya bambɛki oyo ezali na bankombo ya bato oyo basalaki yango, oyo four na bango oyo bazalaki kokaukisa biloko yango etikalá na engumba Arezzo.” Longola yango, mbongo mingi ya bibende ya Baloma, ezala ya wolo to ya palata oyo bamonaki na sudi ya Inde emonisaka mpe ete mimbongo ezalaki kosalema na Mbu ya Méditerranée mpe na Inde. Mbongo yango mingi esalemaki na ekeke ya liboso mpe ezali na bililingi ya Baampɛrɛrɛ ya Loma lokola, Augusto, Tibɛli, mpe Nero.

Tii lelo, ezali na karte moko ya kala, oyo bakomá makambo oyo ezalaki na eleko ya Moyen Âge, oyo emonisi ete mbala mosusu bato ya Loma bakómaki kofanda na sudi ya Inde mpo na kosala mombongo. Karte yango, oyo eyebani na nkombo ya Peutinger Table, oyo bato balobaka ete elakisaka ndenge mokili ya Baloma ezalaki na ekeke ya liboso ya ntango na biso, elobeli tempelo ya Augusto oyo ezalaki na Muziris. Buku moko (Rome’s Eastern Trade: International Commerce and Imperial Policy, 31 BC–AD 305) elobi boye: “Kaka bato oyo Loma ezalaki koyangela nde bakokaki kotonga tempelo ya ndenge wana, mpe mbala mosusu kaka bango nde bazalaki kofanda na Muziris to balekisaki mikolo mingi kuna.”

Mikanda ya Baloma elobeli baambasadɛrɛ soki misato ya Inde oyo bayaki na Loma ntango Augusto azalaki koyangela, kobanda na mobu 27 liboso ya ntango na biso tii na 14 ya ntango na biso. Lapolo moko elobi boye: “Baambasadɛrɛ yango bazalaki na mokano ya kopona bisika oyo bato ya mikili ekeseni basengelaki kokutana mpo na kosala mombongo, kofuta bampako, epai bapaya bakokaki kofanda, mpe bongo na bongo.”

Na ekeke ya liboso, mibembo kolongwa Mbu ya Méditerranée tii na Inde ezalaki kosalema mingi. Yango wana ekokaki kozala mpasi te mpo bamisionɛrɛ oyo bazali na nɔrdi ya Mbu Motane bázwa masuwa mpo na kokende na Inde.

Bakendaki mosika koleka Inde?

Ntango bato ya mombongo mpe bato mosusu oyo bazalaki kosala mibembo na Mbu ya Méditerranée bazalaki kokende na ɛsti bazalaki kokóma tii wapi mpe ntango nini babandaki kosala mibembo yango? Ezali mpasi koyeba yango. Kasi, bato mosusu balobaka ete na ekeke ya liboso T.B., bato mosusu oyo bazalaki kouta na wɛsti bazalaki kokende tii na Thaïlande, Cambodge, Sumatra, mpe Java.

Buku moko (Hou Han-Shou) oyo elobeli makambo oyo esalemaki banda mobu 23 T.B. tii na mobu 220 T.B., elobeli moko ya mibembo yango. Na 166 T.B., An-tun, ambasadɛrɛ moko oyo mokonzi ya Daqin atindaki, akómaki na ndako ya mokonzi ya Chine mpe amemaki mokanda ya longonya epai ya Amperɛrɛ Huan-ti. Daqin ezali ndenge bato ya Chine bazalaki kobenga Ampire ya Loma, mpe mbala mosusu An-tun ezalaki ndenge bazalaki kobenga Antonin, nkombo mosusu ya Marc Aurèle, oyo azalaki amperɛrɛ ya Loma na ntango wana. Bato ya mayele na masolo ya kala balobaki ete ezalaki ambasadɛrɛ ya solo te, ezalaki kaka mayele oyo bato ya mombongo oyo bazalaki kouta na wɛsti basalaki mpo na kosomba mbala moko soie na Chine na esika ya kosomba yango na nzela ya bato mosusu.

Tózonga na motuna na biso ya ebandeli: bamasuwa ya kala oyo ezalaki komema bamisionɛrɛ na ekeke ya liboso ekokaki kokóma tii wapi na ɛsti? Na Inde to koleka? Ntango mosusu ekoki kozala bongo. Na ntembe te, nsango malamu ekendaki mosika mpenza, yango wana ntoma Paulo alobaki ete ezalaki “kobota mbuma mpe ezali kokola na kati ya mokili mobimba,” elingi koloba na mikili ya mosika mpenza oyo eyebanaki na ntango wana.​—Bakolose 1:6.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Atako esika mpenza oyo Muziris ezalaki eyebani te, bato ya mayele balobaka ete ezalaki pembeni ya esika oyo Ebale periyar ebandá, na etúká ya Kerala.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 22]

Amperɛrɛ moko amitungisaki

Na mobu 22 T.B., Tibɛli, amperɛrɛ ya Loma amilelaki ndenge bato ya mboka na ye bazalaki kolekisa ndelo na kosomba biloko. Lokoso na bango ya biloko ya motuya mpe mposa makasi ya babiju oyo bato ya Loma bazalaki na yango ekómaki kosilisa bomɛngo ya ampire na ye mpo na komatisa nkita ya “bapaya to bikolo mosusu ya mabe.” Pline l’Ancien, moto moko ya mayele na Loma (23-79 T.B.) mpe amilelaki mpo na makambo ya ndenge wana. Akomaki boye: “Soki mbongo oyo ezali kokende mbula na mbula na Inde, na Seres, mpe na péninsule d’Arabie ezali moke, ezali ya milio nkama ya sesterces (mbongo oyo Baloma bazalaki kosalela), oyo tozali kobimisa mpo na kosomba biloko ya motuya mpe mpo na basi na biso.”b

[Maloba na nse ya lokasa]

b Bato oyo batalelaka makambo ya mbongo balobi ete mbongo milio 100 ya sesterces ezali mbongo mingi, soki (2%) ya mbongo nyonso oyo Ampire ya Loma mobimba esalelaka.

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Museo della Civiltà Romana, Roma; Todd Bolen/Bible Places.com

[Etanda/​Elilingi na lokasa 23]

Bisika oyo bato ya mombongo bazalaki koluka biloko

Yesu alobelaki “komelesa-motamboli oyo azali koluka mayaka ya kitoko.” (Matai 13:45) Mokanda ya Emoniseli mpe elobeli “bakomelesa-batamboli” oyo bazalaki kosomba biloko lokola mabanga ya ntalo, soie, mabaya ya nsolo kitoko, mpɛmbɛ ya nzoku, kinamomo, mpaka-ya-malasi, mpe amomo. (Emoniseli 18:11-13) Biloko yango ezalaki kouta na banzela oyo ezalaki kokende na ɛsti ya Palestine. Mabaya ya nsolo kitoko, na ndakisa santals, ezalaki kouta na Inde. Mayaka ya motuya makasi ezalaki kouta na golfe persique, Mbu Motane, mpe ndenge mokomi ya Periplus amonisi yango, ezalaki mpe kouta na bamboka oyo ezalaki pembenipembeni ya Muziris mpe na Sri Lanka. Mbala mosusu mayaka oyo ezalaki kouta na Mbu ya Indien elekaki kitoko mpe ezalaki kotɛkama na mbongo mingi.

[Karte na lokasa 20, 21]

(Mpo na komona yango, talá mokanda)

Banzela mosusu ya ekeke ya liboso mpo na kolongwa Loma mpe kokende na Azia

Arezzo

Rome

MBU YA MÉDITERRANÉE

AFRIKA

Alexandrie

ÉGYPTE

Coptos

Ebale Nil

Myos Hormos

Bérénice

Zanzibar

Mbu Motane

Jérusalem

ARABIE

Ebale Euphrate

BABYLONE

Golfe persique

PERSE

↓ Mipɛpɛ ya nɔrdi-ɛsti

↑ Mipɛpɛ ya sudi-wɛsti

Ebale Indus

PUNJAB

Ebale Gange

Golfe du Bengale

INDE

Arikamedu

Muziris

SRI LANKA

OCÉAN INDIEN

CHINE

EMPIRE HAN

THAÏLANDE

CAMBODGE

VIETNAM

Sumatra

Java

[Elilingi na lokasa 21]

Masuwa moko ya Loma oyo ezalaki komema biloko

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Masuwa: Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto