Jéhovah, Elikya na ngai uta bolenge
LISOLÓ YA BASIL TSATOS
Ezalaki na mobu 1920; na bankeka ya Arcadie na etúka kitoko ya Péloponnèse, na mokili ya Grèce. Nazalaki na mbeto, nazalaki na mpasi makasi ya bokono ya nsomo ebengami grippe espagnole oyo ekombolaki mokili.
NTANGO nyonso oyo ngonga ya ndakonzambe ezalaki kobɛta, nayebaki ete ezalaki koyebisa liwa ya mobeli moko. Ngai nde nakolanda nsima? Na esengo nyonso nabikaki, nzokande ezalaki bongo te mpo na bamilió ya bato mosusu. Atako na ntango wana nazalaki bobele na mibu mwambe, makambo yango ya nsomo mazali naino makasi kati na makanisi na ngai.
Mposa ya elimo na eleko ya bomwana
Nsima na mwa ntango, nkoko na biso ya mobali akufaki. Nazali komikundola ete nsima ya bokundi, mama ayaki kokutana na ngai mpe leki na ngai ya mwasi na likeke ya ndako na biso. Na ntembe te mpo na komeka kokitisa mawa na biso, alobaki na mongongo na nse ete: “Bana, biso nyonso tosengeli konuna mpe kokufa.”
Atako alobelaki yango na boboto nyonso, maloba na ye mabulunganisaki ngai. Nazalaki kokanisa ete: ‘Oyo nde mawa! Oyo nde kozanga sembo!’ Biso nyonso mibale tosepelaki ntango mama abakisaki ete: “Ntango Nkolo akoya lisusu, akosekwisa bakufi, mpe tokokufa lisusu te!” Ezalaki solo libondisi!
Kobanda ntango yango nakómaki na mposa makasi ya koyeba ntango nini eleko wana ya esengo ekoya. Natunaki bato mingi, kasi moto moko te azalaki na makoki ya koyebisa likambo yango, ata moto moko te azalaki kosepela kosolola likambo yango.
Mokolo moko, ntango nazalaki na mibu soko 12, tata na ngai azwaki mokanda moko mouti na ndeko na ye ya mobali oyo azalaki kofanda na Etats-Unis. Ezalaki na motó ya likambo La Harpe de Dieu, ebimisamaki na Watch Tower Bible and Tract Society. Natalaki makambo mazali na kati, mpe miso na ngai mangengaki na esengo wana namonaki mokapo oyo elobi ete “Kozonga na Nkolo na biso.” Natangaki yango na mposa mingi, kasi nazalaki na mawa mpamba te mbula ya bozongi yango epesamaki te. Nzokande, mokanda yango emonisaki ete ezali lisusu mosika te.
Mwa moke na nsima, nakotaki na eteyelo ya secondaire mpe namipesaki mingi na kelasi na ngai. Nzokande, mbala na mbala tata nkulutu na ngai na Amerika azalaki kotinda banimero ya Mosenzeli ya Lingelesi, oyo nazalaki kosepela mingi kotanga yango. Lisusu, mokolo ya Dimanche nyonso nazalaki kokota na malongi, epai episkopo azalaki koya kosolola na biso.
Mokolo moko ya Dimanche, episkopo atungisamaki mingi mpe alobaki ete: “Bapaya bazali kotondisa engumba na biso na mikanda ya bapengwi.” Bongo asimbaki nimero moko ya Mosenzeli mpe angangaki ete: “Soki moko na bino azwi mikanda lokola oyo na ndako, amema yango na ndakonzambe, mpe nakotumba yango.”
Elobeli na ye etungisaki ngai, kasi elimo na ye ya kozongisa mabe etungisaki ngai mingi koleka. Na yango, natosaki etinda na ye te. Nzokande nakomelaki tata nkulutu mpe nasengaki ye ete atinda lisusu mikanda ya la Société Watch Tower te. Kasi, nalandaki kokanisa likoló na bozongi ya Klisto.
Mposa na ngai ya elimo ekoli
Ntango bopemi ya eleko ya moi eyaki, nabimisaki valisi na ngai mpo na kokanga bilamba na ngai. Na nse na yango ezalaki na ba brochures misato enyatami na la Société Watch Tower. Na lolenge moko to mosusu, namonaki yango liboso te. Moko na yango ezalaki na motó ya likambo Bakufi bazali wapi?
Nakanisaki ete ‘oyo ekosepelisa ngai.’ Atako namikundolaki likebisi ya episkopo, nazwaki ekateli ya kotanga ba brochures wana na likebi nyonso mpo na komona mabunga mazali kati na yango. Nazwaki ekomeli mpe nabandaki na likebi nyonso bolukiluki na ngai. Na kokamwa monene, makambo nyonso kati na ba brochures mamonanaki ete mazali sembo, mpe liloba moko na moko lilandanaki na mikapo ya Makomami mpo ete motangi akoka koluka kati na Biblia.
Lokola nazalaki na Biblia te, namitunaki soki mikapo oyo mityami misalelamaki na lolenge mabe te mpo na kokokisa mokano na bakomi na yango. Mpo na yango nakomelaki tata nkulutu mpe nasengaki ye atindela ngai Biblia ya mobimba. Asalaki yango nokinoki. Natangaki yango na mobimba mbala mibale, mpe atako ezalaki na makambo mingi oyo nasosolaki te, natungisamaki na mokanda ya Danyele mpe na mokanda ya Emoniseli. Nalingaki kokanga ntina na makambo oyo ezalaki kosakola, kasi moto moko te ya zingazinga akokaki kosalisa ngai.
Nasilisaki kelasi na 1929, mpe mwa moke nsima tata nkulutu ya Amerika atindelaki ngai banimero ya Mosenzeli. Nabandaki kosepela na yango mingi mpenza mpe nasengaki na ye ete atindela ngai yango mbala na mbala. Nabandaki mpe kolobela bato mosusu na ntina na elikya mpo na mikolo mizali koya, oyo nazalaki koyekola kati na bazulunalo wana. Kobanda wana bomoi na ngai ebongwanaki mpenza.
Bokóli na ngai ya elimo na Birmanie
Banɔ́kɔ́ na ngai bakendeki kofanda na Birmanie (sikawa Myanmar), mpe libota na ngai ezwaki ekateli ete soki nakolanda bango kuna, ekokolisa mayele na ngai mpe mbala mosusu ekoki kopesa ngai mabaku ya kosala mombongo. Mikili ya Orient mizalaki kosepelisa ngai kobanda kala, yango wana nasepelaki mingi na likanisi ya kokende kuna. Na Birmanie, nalandaki kozwa Mosenzeli uta na tata nkulutu, kasi nakutanaki naino na Bayekoli ya Biblia te, nkombo oyo bazalaki kobenga ba Témoins de Jéhovah na ntango wana.
Mokolo moko, nasepelaki komona kati na Mosenzeli liyebisi mpo na kobima ya mokanda Lumière, na biteni mibale oyo bizalaki kolimbola mokanda ya Emoniseli. Lisusu, nayaki koyeba ete mosala ya Bayekoli ya Biblia na Birmanie mozalaki kokambama na filiale ya la Société Watch Tower na Inde, oyo ezalaki na engumba Bombay. Nakomaki nokinoki mpo na kosenga mokanda Lumière, mpe lisusu mpo na kosenga ete Bayekoli ya Biblia ya Inde batindama mpo na kosakola na Birmanie.
Mikanda yango mikómelaki ngai nokinoki, mpe soko nsima na poso moko, Bayekoli ya Biblia ya Birmanie bayaki kotala ngai. Nazalaki na esengo ya koyoka ete etuluku moke na bango ezalaki epai nazalaki kofanda na Rangoun (lelo Yangon), mbokamokonzi ya Birmanie. Babyangaki ngai na kosangana na makita na bango ya koyekola Biblia mpe lisusu na kosangana na mosala ya kosakola ndako na ndako. Na ebandeli nazalaki mwa moke kokakatana, kasi nokinoki nabandaki kosepela koyebisa boyebi ya Biblia epai na ba Bouddhistes, ba Hindous, mpe Bamizilimá, lokola mpe epai na baklisto ya nkombo mpamba.
Filiale ya Inde etindaki na Rangoun basaleli mibale ya ntango nyonso (to ba pionniers), Ewart Francis mpe Randall Hopley. Bango nyonso mibale bautaki na Angleterre, kasi basalaki na Inde uta mibu mingi. Balendisaki ngai mingi, mpe na 1934, nazwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na ngai epai na Jéhovah.
Temwe ya mpiko
Na nsima, filiale ya Inde etindaki ba pionniers mingi na Birmanie. Mibale kati na bango, Claude Goodman mpe Ron Tippin, bakendeki kosakola na gare ya engbunduka mpe basololaki na Sydney Coote, mokambi ya gare. Azwaki mikanda, atangaki yango, mpe abandaki kokomela ndeko na ye ya mwasi Daisy D’Souza oyo asilaki kobala na engumba ya Mandalay. Ye mpe asepelaki na mikanda yango mpe asengaki misusu.
Daisy, oyo azalaki Mokatolike amipesi, azalaki na mpiko ya kokamwa. Abandaki kokende kotala baninga na ye ya pembeni mpe kolobela bango makambo azalaki koyekola. Mpe ntango sángo ya paroisse ayaki kotala ye, atunaki ye mpo na nini atikaki kokende na ndakonzambe, amonisaki ye ete Biblia endimi te makambo oyo azalaki koteya, lokola lifelo ya mɔ́tɔ.
Na nsuka, sángo atunaki ye ete: “Nsima ya mibu nyonso wana ya kolobela bango na ntina na lifelo ya mɔ́tɔ, lolenge nini nakoki sikawa kolobela bango ete esika yango ezali te? Moto moko te akoya lisusu na ndakonzambe.”
Daisy ayanolaki ete: “Soki ozali moklisto ya kolongobana okoteya solo, atako ekopesa mbano nini.” Bongo abakisaki ete: “Soki okosala yango te, ngai nakosala yango!” Mpe asalaki yango.
Dick mpe Daisy elongo na bana na bango mibale ya basi babatisamaki na libaku moko elongo na ngai na Rangoun. Mibu misato na nsima, na 1937 nabalaki mwana na bango ya mibale ya mwasi, Phyllis.
Tokimi na Inde
Mampinga ya Japon makamataki mboka Birmanie na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe Rangoun ekweaki na maboko na bango na le 8 Mars 1942. Bapaya oyo bazalaki basodá te bapusamaki na kokima nokinoki na Inde. Ebele balukaki kokima na nzela ya zamba, kasi mingi kati na bango bakufaki na nzela. Nayaki koyebana na mokonzi ya basodá oyo azalaki kotalela kobimisama ya bato, mpo na yango nazalaki na makoki ya kozwa ba tickets ya moko ya masuwa minene oyo ezalaki kosala mobembo ya nsuka, longwa na Rangoun mpe kokende na Calcutta. Ezalaki mpo na biso nyonso likambo ya mawa kotika na mbangumbangu ndako na biso mpe biloko na biso mosusu mingi. Birmanie etikalaki na maboko na ba Japonais uta 1942 kino 1945.
Ntango tokómaki na Inde mosolo na biso motikalaki bobele moke, mpe ezalaki mpasi mpo na kozwa mosala. Likambo yango ebimisaki komekama mpo na kondima na biso. Nakutanaki na mokonzi moko ya basodá, moto ya Angleterre, oyo alakaki ngai mosala moko ya mosolo mingi oyo ezalaki kosenga kobunda te, kasi ezalaki kosenga kosala na bibongiseli ya basodá. Na lisalisi ya Jéhovah, nazalaki na makoki ya koboya lipesi yango mpe bongo kobatela lisosoli peto ya boklisto. (Yisaya 2:2-4) Na mabaku mingi lisusu tookaki boboto ya loboko ya Jéhovah.
Tofandaki na New Delhi, mbokamokonzi ya Inde, epai ezalaki mpasi mpo na kozwa ndako ya kolala. Atako bongo, tozwaki ndako moko monene na katikati ya engumba. Ezalaki na salon moko monene oyo ezalaki na ekuke na yango moko, mpe eteni yango esalelamaki lokola Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah mpo na lisangá ya Delhi na boumeli ya mwa bambula oyo elandaki. Nzokande, na ntina na bipekiseli oyo etyamaki na 1941 likoló na mikanda ya la Société Watch Tower na Inde, tozalaki na makoki te ya kozwa mikanda na yango
Lolenge bipekiseli bilongolamaki
Mokolo ya Dimanche moko na 1943, baoyo bakendeki bandakonzambe ya New Delhi bazwaki lokasa moko etyami maboko na bankonzi 13 ya mangomba makeseni. Ezalaki na likebisi oyo: “BANAMBOKA YA DELHI, BOKEBA NA BA TÉMOINS DE JÉHOVAH.” Efundeli ezalaki ete topekisamaki na Inde mpo na bantina ya politike.
Na ndingisa ya filiale ya Bombay, tonyataki mpe tokabolaki nokinoki lokasa moko oyo ezalaki kobimisa mabunga ya bakonzi ya mangomba. Lokola nazalaki mokɛngɛli mokambi, nkombo mpe adresse na ngai etyamaki na nse ya lokasa wana ya maloba makasi. Nokinoki na nsima, ntango bapolisi bakutaki ngai mpe Margrit Hoffman tozali kokabola nkasa yango, bakangaki biso mpe batyaki biso na boloko. Nzokande, baumelaki te kotika biso nsima na kofuta mwa mosolo.
Na nsima, na boumeli ya mosala na ye ya kosakola, Margrit akómaki na ndako ya Sir Srivastava, ministre oyo ayebani mingi, azalaki kosala na biro ya vice-Roi na Inde. Sir Srivastava ayambaki ye malamu, mpe na boumeli ya masoló, Margrit ayebisaki ye ete mikanda na biso mipekisamaki na Inde kozanga ntina. Bobele mokolo wana, Margrit akutanaki lisusu na député oyo autaki na etúka ya Madras. Azalaki kati na engumba mpo na kosangana na likita ya parlement. Amonisaki ye bokesene ya bipekiseli oyo batyeli mikanda na biso, mpe moto yango alakaki ete akotuna likambo yango na likita oyo likolanda.
Na eleko wana, nazalaki kosala lokola monganga oyo babengi physiothérapeute na lopitalo moko ya engumba wana. Sir Srivastava azokaki mpota, mpe lopitalo etindaki ngai namona soki nakoki kosalisa ye. Nasosolaki ete Sir Srivastava azalaki moto moko ya boboto mingi, mpe ntango tozalaki kosolola, nazwaki nzela ya komonisa ye ete Madame Hoffman mpe ngai toutaki kobimisama na boloko nsima ya kofuta mwa mosolo. Nalimbwelaki ye ete ezalaki mpo na bopusi ya bakonzi na mangomba nde bapekisaki mikanda na biso mikolimbolaka Biblia mpo na bantina ya politike, kasi tokotaka na makambo ya politike te. Nalandaki koloba ete momonisi na biso ya filiale, Edwin Skinner, asengaki bokutani elongo na bakonzi mpo na kolimbola etelemelo na biso, kasi baboyaki yango.
Nsima na mikolo mibale, Sir Srivastava ayebisaki ngai ete: “M. Jenkins [mosali ya boyangeli] oyo azalaki koboya mosala na biso akotika mosala nsima na mwa mikolo, mpe Sir Francis Mudie nde akozwa esika na ye. Yebisa M. Skinner aya, mpe nakomema ye epai na Sir Francis.”
Sir Srivastava abongisaki bokutani yango lokola alakaki. Na boumeli na yango, Sir Francis Mudie ayebisaki ndeko Skinner ete: “Nakoki kolaka yo eloko moko te, kasi nakotala likambo yango.” Lokola likita ya parlement elingaki kosalema nsima na mikolo mingi te, ndeko Skinner azelaki mpo na komona bosukisi ya likambo. Sembo na elaka na ye, député ya etúka ya Madras atelemaki mpe atunaki: “Ezali solo ete mikanda ya Watch Tower Bible and Tract Society mipekisamaki mpo na bantina ya politike?”
Sir Francis Mudie ayanolaki ete: “Te, bipekiseli bityamaki mpo na kokebisa, kasi boyangeli esili kozwa sikawa ekateli ya kolongola bipekiseli yango.”
Ezalaki mpo na biso ntango ya esengo monene wana toyokaki nsango yango! Poso moko na nsima, filiale ya Bombay ezwaki mokanda mpo na kondimisa kolongolama ya bipekiseli.
Tozongi na Birmanie oyo ebebisamaki na bitumba
Boyangeli ya Angleterre ezongaki na Birmanie nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mpe kati na biso Batemwe zomi tozongaki na Rangoun nsima na mwa bansanza. Tozalaki na esengo ya komona lisusu mwa Batemwe ya mboka wana oyo batikalaki. Mboka ezalaki kati na ezalela moko ya mawa. Misala mpo na matomba ya bato nyonso, lokola lotiliki mpe mituka ya komema bato, mizalaki te. Yango wana tosombaki Jeep moko epai na basodá mpe tosalelaki yango malamu mpo na komema bato na makita oyo tobongisaki yango nokinoki nsima ya bozongi na biso.
Moto moko oyo azalaki kosepela na solo apesaki biso mabelé, mpe na lisalisi ya bolingo ya bato ya esika yango, totongaki Salle du Royaume moko ya mwa monene. Etongamaki na bambou ya minene, bifelo bitongami na bambou ekangisami, mpe nsamba ezalaki na matiti. Ezalaki esika yango nde, Nathan H. Knorr, oyo azalaki na ntango wana président ya la Société Watch Tower, mpe secrétaire na ye, Milton G. Henschel, basalaki masoló na boyei na bango na Rangoun, na Avril 1947. Na eleko yango tozalaki Batemwe 19 kati na Birmanie mobimba. Kasi na diskur ya bato nyonso oyo ndeko Knorr asalaki kati na ndako ya masano New Excelsior, bato 287 bayanganaki!
Tokei kofanda na Australie
Mokolo ya le 4 Janvier 1948, Birmanie ezwaki lipanda na yango na maboko ya Angleterre, mpe mindɛle mingi ya Mpótó bamonaki malamu kolongwa na mokili yango. Nsima ya kotalela likambo yango kati na libondeli, Phyllis mpe ngai tozwaki ekateli ya kokamata mwana na biso ya mwasi mpe kokende kofanda na Australie. Tofandaki na Perth, mbokamokonzi ya Autralie ya ouest.
Kotika lisusu Birmanie, mpe na mbala oyo mpo na libela ezalaki eleko ya mawa mingi mpo na biso. Mbala na mbala, toyokaka nsango ya balingami na biso, mpe tozalaki na esengo ya koyeba ete mosala ya kosakola Bokonzi mozali kokende se liboso kati na mokili wana.
Kobanda na 1978, na boumeli ya mibu minei tozalaki na esengo ya kosalisa masangá nyonso ya lokóta ya Greke kati na bingumba mingi ya Australie. Ezalaki kosenga mibembo milai, mpamba te ezalaki na ntáka ya bakilomɛtɛlɛ 4 200 longwa na mai monene ya ouest kino mai monene ya est ya mokili wana monene. Nsima na mwa ntango, climat, oyo ekeseni mingi na etúka moko mpe mosusu, esalaki bopusi na kolongono na biso ya nzoto. Yango wana tozongaki lisusu kofanda na Perth, epai nazali kosala ntango nyonso lokola nkulutu kati na moko ya masangá 44 ya engumba yango.
Wana mibu mizali koleka, miso na ngai ezali kolemba, mpe kotanga esili kokóma mpasi. Kasi, atako mikakatano ya kolongono mabe ya nzoto, mitema na biso mizali naino ya bilenge. Biso nyonso mibale tozali kozela na elikya nyonso mokolo baoyo nyonso bazali kobanga Jéhovah bakomona moi ya ngolu na ye “kobima, na kobikisa kati na mapapu na yango; mpe [biso]tokobima wana mpe tokopombwapombwa lokola bana na ngombe kati na lopango.”—Malaki 4:2.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mokolo ya le 13 Décembre 1992, ntango bokomi ya lisoló oyo ekómaki na nsuka na yango, ndeko Tsatos alalaki kati na kufa.
[Elilingi na lokasa 24]
Libota na ngai elongo na bandeko Henschel mpe Knorr na Birmanie (Myanmar), na 1947
[Elilingi na lokasa 25]
Basil Tsatos mpe mwasi na ye, Phyllis, na Australie