Lokoso—Lolenge nini ezali kobebisa biso?
LOKOSO ezali kobebisa bomoi ya bamilió ya bato. Ezali kolongola ezalela ya bomoto epai na bato ya lokoso mpe kopesa mpasi mpe mawa epai na baoyo bazali konyokwama mpo na lokoso ya bamosusu. Na bomoi na yo ozali mbala mosusu koyoka bopusi ya lokoso. Ata momeseno ya koyiba oyo ezali kosalema na biloko ya kotɛka ezali kopusa batɛki ete bámatisaka ntalo ya biloko oyo ozali kosomba. Soki mosolo oyo ozwaka na nsuka ya sanza ezali moke wana ntalo ya biloko oyo osengeli na yango ezali komata mokolo na mokolo, mbala mosusu ozali konyokwama na ntina na lokoso ya moto mosusu.
Baoyo bazali konyokwama na nzala mpe baoyo bazali pene na liwa
Lokoso ya banamboka ezali kolɛmbisa milende ya biyangeli oyo mitali kosunga malamumalamu babóla. Na 1952, Sir John Boyd Orr, moto na siansi mpe nganga-mayele na makambo matali bilei, alobaki ete: “Biyangeli bibongisami mpo na kosangisa bato mpe nkita mpo na etumba ya mokili mobimba kasi mikili ya bozwi mingi mibongisami te mpo na kosala na bomoko mpo na kolongola nzala mpe bobóla na mokili.”—Búku Food Poverty & Power, ekomami na Anne Buchanan.
Ya solo, mwa lisungi moke lipesamaka. Kasi ezali mpenza boni mpo na bomoi ya babóla, bato mingi oyo batalelami na bopɔtu kati na mokili? Lapólo moko esalemaki kala mingi te emonisaki ete atako bilei bizali mingi na bisika mosusu, “nzala mpe kolya ya malamu te ezali ntango nyonso konyokola bato mingi kati na mikili ya bobóla . . . Moto moko kati na bato mitano [koleka miliare moko] na mokili azali kolala nzala mokolo na mokolo.” Lapólo yango elobaki lisusu ete: “Bakisa na yango bato miliare mibale bazali ‘kolya malamu te’ na ntina na . . . [bilei] mabe oyo ekoki kobimisela kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mikakatano minene.” (Developed to Death—Rethinking Third World Development) Mitángo yango misengeli mpenza kolobelama polele epai na bato!
Bakómi baombo
Banganga-mobulu bazali kokóma na bozwi wana bazali kosalela baoyo banyokwami na bango mabe mpe bato mosusu nyonso. Bilangwiseli, mobulu, bondumba, mpe koyiba mosolo ekómisi bamilió ya bato baombo. Gordon Thomas, kati na búku na ye Enslaved, alobaki mpe ete: “Engebene ebongiseli moko oyo ebéngami Anti-Slavery Society, ekanisami ete bato milió 200 na mokili mobimba bakómi baombo. Soko milio 100 kati na bango bazali bana.” Ntina na yango mpenza ezali nini? Lapólo elimboli ete: “Mposa ya kokómisa bato baombo ezali ntango nyonso likambo moko mabe mpo na bato . . . [Boombo ezali] mbuma ya bilulela, lokoso mpe mposa ya bokonzi.”
Bato ya nguya bazali kobɔtɔla bato bazangi nguya mpe baoyo bazali na makoki ya komibatela te mpe bazali koboma bango mingi. “Kati na milió mibale ya ba Indiens oyo bazalaki kofanda na Brésil ntango mindɛlɛ bakómaki liboso, mbala mosusu nkóto nkama mibale nde batikali sikawa na bomoi.” (The Naked Savage) Mpo na nini? Ntina mpenza ezali bongo lokoso.
Bokeseni monene kati na bazwi mpe babóla
Zulunalo The New York Times elobi ete James Gustave Speth, moko mokambi ya ebongiseli ebéngami Programme des Nations-Unies pour le développement, alobaki ete: “Etuluku moko ya bato minene . . . bazali kokamata bozwi mpe bokonzi, nzokande koleka katikati ya bato na mokili bazali kati na bobóla mpenza.” Bokeseni yango monene kati na bazwi mpe babóla emonisami lisusu polele na maloba na ye oyo: “Tozali naino na bato koleka katikati ya bato ya mokili oyo mosolo na bango ya mokolo na mokolo ezali na nsé ya dolare 2—bato koleka miliare 3.” Abakisaki ete: “Lokola mpe mokili esili kokabwana na bituluku yango mibale, babóla bazali komiyoka kati na ezalela ya kozanga elikya, bazali na nkanda mpe na mobulungano.”
Mayoki yango ya kozanga elikya mazali kokóla mpamba te bato mingi ya bozwi bazali komonana lokola bazali ata na lisosoli te ata mpe mawa te mpo na baoyo bazali konyokwama na bobóla mpe na nzala.
Baoyo bazali konyokwama mpo na lokoso bazali bipai binso. Na ndakisa, talá makambo ya mawa mpenza oyo ezali komonana na miso epai na bato bakimá mboka, oyo bazali konyokwama na ntina na kowelana ya bokonzi na Bosnie, na Rwanda, mpe na Liberia. Talá bilembo ya kozanga nguya na bilongi ya baoyo bazali kokufa na nzala kati na mokili motondi na bilei. Nini ezali ntina ya makambo oyo nyonso? Lokoso—lokoso ya mitindo nyonso!
Lolenge nini okoki kolónga wana ozwami kati na bato mabe, ya lokoso, na ezingelo mabe motindo oyo? Masoló mibale oyo malandi makotalela motuna yango.