Bililingi ya Mokili na ndaka Yordani
Oyo mbala mosusu oyebi yango te
NKOMBO mpamba ya Yordani ezali mbala mosusu kokundola yo makambo minene oyo mayebani mingi: na kotambwisama na Yosua, Bayisraele bakatisaki ebale yango wana mai makaokaki, pene na Yeliko; Namane asukolaki mbala nsambo na ebale yango mpo abika na maladi ya maba; ebele na Bayuda, mpe na nsima Yesu, bayaki wana mpo na kozwa libatisi epai na Yoane.—Yosua 3:5-17; 2 Mikonzi 5:10-14; Matai 3:3-5, 13.
Ya solo, makambo nyonso wana ya minene masalamaki na eteni eleki molai mpe eyebani mingi ya Yordani, oyo ebandi longwa na sud ya la mer na Galilée kino na la mer Morte. Kasi bato oyo bazali koyekola Liloba na Nzambe na likebi nyonso, mbala mosusu bayebi mpenza malamu te eteni mosusu ya Yordani: eteni na yango ezali na nord mpe régió nyonso ya zongazonga na yango. Tala na karte.a Lobwaku oyo ezali na katikati ezali mwa ndambo na lobwaku oyo babengi ete Rifi Valley, libulu monene oyo ebandi na Syrie mpe ekoti na Afrike.
Mingala misato ya minene oyo eyei kosangana esika moko mpo na kosala ebale Yordani, ezali kozwa mai na yango uta ngomba monene ya Hermone oyo ezipami na mbula mpembe wana ezali yango kosopana longwa na ngomba Mongala oyo ezali mpenza epai na ebimelo na moi to est (tala lokasa 17, foto ezali na likoló) ekoutaka na lidusu ezali kati na mabanga, oyo ezali na mwa nse ya ngomba. Ezali na esika yango nde césarée de Philippe etongamaka na kala; tomikundola ete Yesu alekanaki na regió yango liboso ete abongwana likoló na “ngomba molai”. (Matai 16:13 kino 17:2.) Mongala mosusu ekoutaka na ngomba likoló na yango engumba Dan etongamaki, esika Bayisraele na bokonzi na likoló to nord batelemisaki ekeko ya mwana ngombe na wolo.(Basambisi 18:27-31; 1 Mikonzi 12:25-30). Mongala na misato eyei kokutana na mingala mibale ya liboso mpe esali ebale Yordani, oyo na bolai pene na 11 kilométele ezali na mai mazali na nivó moko te oyo mbala mosusu ekoki koleka 300 métele.
Lobwaku eyei lisusu kopanzana na etando na Houla, na boye ete mai na Yordani mapanzani mpe masalaki mokili monene na mai-mai. Na kala, ndambo monene na mai ezalaki kosangana wana mpe ezalaki kosala etima na mai oyo ezalaki mozindo te: ebengamaki etima na Houla. Kasi yango ezali lisusu te, mpamba te, babongisaki kala mingi te eteni na likoló ya mai na Yordani, batimolaki mabulu mosusu mpo na komema mai mazalaki kokangama na etando oyo etondaki na bitima, mpe batimolaki lisusu ebimeli na mai na elima monene. Mpo na yango, soko karte moko ya régió wana emonisi etima (Houla) na nord ya la mer de Galilée, wana ezali komonisa eteni yango ndenge ezalaki na kala, kasi ndenge ezali sikawa te.
Ata bongo. tozali kokuta kati na régió yango banzete ndenge na ndenge mpe biloko mosusu oyo ezali kopesa mwa likanisi na ndenge régió yango ezalaki na ntango na kala, ntango banzete lokola papyrus mpe mikekele etondaki na esika yango.—Yobo 8:11.
Ndeke ndenge na ndenge ezalaki koya na etando yango. Ndeke babengi hérons ezalaki mingi, na nkongi, libeke, ebenga ya zamba mpe bandeke mosusu, mingimingi mpamba te mobela (marais) mpe etima monene ezalaki esika ya kopema ebongi na ntango oyo bazali kosala mobembo na bango longwa na Mpoto kino na Afrike (Deteronome 14:18; Nzembo 102:6; Yilimia 8:7). Banyama mosusu bamesanaki na régió yango bazalaki mpenza komonana mingi te, kasi lokola bazalaki na etando yango, ezalaki mpasi’mpo ete bato baleka na eteni wana na Houla mpo na kopengola makama. Nkosi, ngubu, mbwa ya zamba mpe lingongo bazalaki mpe na esika yango. (Yobo 40:15-24; Yilimia 49:19; 50:44; Habakuku 1:8). Na bileko mosusu, etando yango etondaki na ngungi oyo epanzaka malaria, oyo ekoki kozala moko na fiévre oyo Biblia elobeli.
Yango wana batamboli mokomoko to oyo bazalaki kotambola ebele esika moko bazalaki kokenda kobaluka mosika na etando oyo na mokili ya mai-mai. Bazalaki kokenda kokatisa Yordani na esika nini kati na lobwaku oyo ezali na nord ya la mer de Galilée?
Pene na la mer de Galilée, ezalaki na mabanga mazalaki nyonso na nivo moko; ezali nzéká (barrage) yango nde ezalaki kokanga mai mpe ezalaki kobimisa etima na Houla. Tozali komona nivo ya mabanga yango na lokasa 16. Na kokatisaka yango mpo na kokenda komibwaka na la mer de Galilée (oyo ezali komonana na mosika), mai na Yordani ekomaka makasi na boye ete esalaka fulu na esika yango. Batamboli na ntango na kala bazalaki komona ete ezali likama mpo na kokita na libulu yango mozindo mpe kokatisa mai na Yordani na esika oyo ezali makasi.
Katikati na régió na mokili ya maimai na etando na Houla mpe katikati na bangomba, ezalaki na mabelé moke ezanga mabulu esika mai ezalaki koleka na malembe nyonso. Na ntango na kala, batamboli bazalaki kokatisa ebale na esika yango kozanga likama, mpe ekomaki bongo nzela monene oyo ezalaki kokatisa na mokili ya ndaka. Sikawa motáláká(pont) moko esili kosalema na esika yango, mpe ezali moko na banzela minene mpo na koleka na Yordani.
Etando na Houla ezali lelo oyo mabelé makobotaka mbuma mingi; okokuta kuna ata bitima bisalami mpo na kobokola mbisi. Nyonso wana ezali kosalema mpo na mai mingi oyo ezali kotyola na eteni wana ya Yordani.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala karte mpe lota ya monene mpenza oyo ebimisamaki na Manaka ya ba Témoins de Jéhovah 1990.
[Karte na lokasa 17]
Houla Mer de Galilée