Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/5 nk. 27-29
  • Tatien azalaki kolongisa boklisto to azalaki mopɛngwi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tatien azalaki kolongisa boklisto to azalaki mopɛngwi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Atángi “makomi ya bapaya”
  • Mikanda na ye ezali komonisa nini?
  • Moklisto to mopɛngwi?
  • Liteya mpo na biso
  • Ntina oyo okoki kondimela Baevanzile ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Baapolojiste—Bazalaki kokɔtela mateya ya bokristo to bazalaki nde bato ya filozofi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • ‘Kotemela yango ebiangami na lokuta ete boyebi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tóbwaka liso na biloko ya motuya ya bibliotɛkɛ Chester Beatty
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/5 nk. 27-29

Tatien azalaki kolongisa boklisto to azalaki mopɛngwi?

NTANGO ntoma Paulo akómaki na nsuka ya mobembo na ye ya misato na mosala ya misionɛrɛ, asalaki likita moko elongo na bankulutu ya lisangá ya Efese. Alobaki na bango boye: “Nayebi ete nsima ya kokende na ngai, bambwa mabe ya zamba bakokɔta na kati na bino mpe bakosalela etonga makambo na boboto te, mpe uta na kati na bino mpenza mibali bakobima mpe bakoloba makambo oyo etɛngamá mpo na kobenda bayekoli bálanda bango.”​—Misala 20:29, 30.

Ndenge kaka Paulo alobaki yango, na ekeke ya mibale ya ntango na biso (T.B.), mbongwana ekɔtaki mpe lipɛngwi oyo esakolamaki emonanaki. Bato mingi bakómaki kondima mateya ya filozofi oyo babengi gnosticisme mpe mateya yango ebebisaki kondima ya baklisto mosusu. Bato oyo bazalaki kondima mateya yango bazalaki koloba ete biloko ya elimo nde ezali malamu mpe eloko nyonso ya mosuni ezali mabe. Lokola bazalaki koloba ete makambo nyonso ya mosuni ezali mabe, baboyaki kobala mpe kobota; bazalaki koloba ete euti na Satana. Bamosusu kati na bango bazalaki kondima ete lokola biloko ya elimo kaka nde ezali malamu, ezali na ntina te komitungisa mpo na makambo oyo moto akoki kosala na nzoto na ye. Makanisi yango etindaki bato mosusu na koboya bisengo nyonso ya nzoto; nzokande, etindaki bato mosusu na komipesa mpenza na bisengo ya nzoto. Bato oyo bazalaki kondima mateya yango bazalaki koloba ete lobiko ekoki kouta kaka na boyebi ya makambo ya elimo, to na komiyeba malamu; yango wana, babwakaki mpenza solo ya Liloba ya Nzambe.

Ndenge nini bato oyo bazalaki komibenga baklisto batalelaki likama oyo mateya ya gnosticisme ezalaki kotyela bango? Bato mosusu ya mayele bazalaki kokweisa liteya yango ya lokuta, nzokande bamosusu balandaki yango. Na ndakisa, na bomoi na ye mobimba, Irénée azalaki kokweisa mateya ya lipɛngwi. Irénée azalaki moyekoli ya Polycarpe, moto oyo azalaki na eleko ya bantoma. Polycarpe ateyaki bato ete bákangama makasi na mateya ya Yesu Klisto mpe bantoma na ye. Kasi, Florinus, moninga moko ya Irénée, azalaki mpe moyekoli ya Polycarpe, akómaki mokemoke kolanda mateya ya Valentin, molakisi monene ya mateya ya gnosticisme. Eleko yango ezalaki mpenza na yikiyiki.

Mikanda ya Tatien, mokomi moko monene na ekeke ya mibale, ezali komonisa biso ndenge oyo makambo ezalaki na ntango wana. Tatien azalaki moto ya ndenge nini? Ndenge nini akómaki moklisto? Asalaki nini liboso ya mateya ya lipɛngwi ya Ba-Gnostique? Bato oyo bazali koluka solo lelo oyo bakoki kozwa mateya ya ntina mingi na biyano oyo ye moko apesi mpe na ndakisa na ye.

Atángi “makomi ya bapaya”

Tatien abotamaki na Sulia. Ayebaki mpenza makambo ya Bagrɛki ná ya Baloma ya ntango na ye mpo azalaki kosala mibembo mingi mpe azalaki kotánga mingi. Tatien akómaki tii na Loma mpo azalaki kotambola na bamboka ndenge na ndenge mpo na kosala masukulu. Kasi, ntango azalaki na Loma, mateya ya boklisto ebendaki likebi na ye. Akómaki moninga ya Justin le Martyr mpe, ekoki kozala ete akómaki moyekoli na ye.

Na lisolo oyo alobeli ndenge oyo akómaki moklisto, Tatien alobi boye: “Nazalaki koluka koyeba solo.” Alobi makambo oyo amonaki ntango atángaki Makomami: “Namonaki makomi ya bapaya oyo nakoki te kokokanisa yango na mikanda ya Bagrɛki mpo eumeli mingi koleka, nakoki mpe te kokokanisa yango na mabunga na bango mpo makomi yango ezali na bwanya oyo eleki; mpe nandimelaki yango mpo ezali na elobeli oyo ezangi mindɔndɔ, mpo na bosembo ya bakomi na yango, mpo na ndenge oyo elobelaki makambo oyo ekoya, mpo na mitinda na yango ya malamu mingi, mpe mpo elobi ete molɔ́ngɔ́ mobimba ekoyangelama na Moto moko.”

Tatien akakatanaki te koyebisa bato ya ntango na ye ete báyekola mateya ya boklisto mpo bámona bango moko ete ezali mindɔndɔ te mpe ezali polele, ekesani mpenza na mateya ya molili oyo bapakano bazalaki koteya. Mikanda na ye ekoki komonisa biso nini?

Mikanda na ye ezali komonisa nini?

Mikanda ya Tatien ezali komonisa ete azalaki kokɔtela mateya ya boklisto, azalaki mokomi oyo azalaki kolongisa kondima na ye. Azalaki mpenza koyina mpe kotɛmɛla filozofi ya bapakano. Na buku na ye moko (Address to the Greeks), Tatien amonisaki polele ete mateya ya bapakano ezali na ntina te mpe mateya ya boklisto ezali na bwanya. Asalelaki maloba ya makasi mpo na kotyola makambo ya Bagrɛki. Na ndakisa, mpo na Héraclite, moto moko ya filozofi, alobaki boye: “Nzokande, liwa emonisi ete moto yango azalaki zoba; mpamba te, abɛlaki hydropisie mpe, lokola ayekolaki mosala ya monganga mpe filozofi, amipakolaki nyei ya ngɔmbɛ, ntango nyei yango ekaukaki, efinaki ye mosuni ya nzoto mobimba, yango wana apasukakipasukaki, mpe akufaki.”

Tatien azalaki kondima makasi liteya oyo elobaka ete Nzambe azali se moko, Mozalisi ya biloko nyonso. (Baebele 3:4) Na buku wana kaka, abengi Nzambe “Elimo” mpe alobi ete: “Kaka Ye nde azali na ebandeli te, mpe Ye nde ebandeli ya biloko nyonso.” (Yoane 4:24; 1 Timote 1:17) Lokola aboyaki kosambela bikeko, akomaki boye: “Ebandi boni nabenga nzete mpe mabanga banzambe?” (1 Bakolinti 10:14) Azalaki kondima ete Liloba, to Logos, azali ekelamu ya liboso na misala nyonso ya Tata ya likoló mpe Nzambe asalelaki ye mpo na kokela biloko oyo ezali na kati ya molɔ́ngɔ́. (Yoane 1:1-3; Bakolose 1:13-17) Mpo na ntango oyo lisekwa ekosalema, Tatien alobaki boye: “Tondimaka ete nsima ya nsuka ya makambo nyonso lisekwa ekosalema.” Mpo na ntina oyo tokufaka, Tatien akomaki ete: “Bakelaki biso mpo tókufaka te, kasi soki tokufaka ezali foti na biso moko. Bonsomi ya kopona oyo tozali na yango ememelá biso liwa; biso oyo tozalaki na bonsomi tokómi baombo; totɛkisami na nzela ya lisumu.”

Ndimbola oyo Tatien apesaki mpo na molimo ezali polele te. Alobaki boye: “Ee Bagrɛki, ezali te ete molimo ekufaka te, kasi ekufaka. Nzokande ekoki mpe kosalema ete ekufa te. Soki eyebi solo te, ekokufa, mpe ekolimwa nzela moko na nzoto, kasi ekozonga lisusu na nsuka ya mokili elongo na nzoto, mpe ekokufa na kati ya etumbu ya libela.” Maloba yango ya Tatien ezali polele te. Ekoki kozala ete atako azalaki kondima makasi mateya mosusu ya Biblia, alukaki mpe kosepelisa bato ya ntango na ye mpe na ndenge yango, asangisaki solo ya Makomami ná filozofi ya bapakano.

Mokanda mosusu ya ntina oyo Tatien akomaki ezali Diatessaron, to Boyokani ya Baevanzile minei. Tatien azali moto ya liboso oyo apesaki masangá ya Sulia Baevanzile na monɔkɔ ya mboka na bango. Bato bazalaki kosepela mingi na mokanda yango, esangisaki makambo ya Baevanzile nyonso minei na kati ya lisolo moko. Bazalaki kosalela yango na Lingomba ya Sulia.

Moklisto to mopɛngwi?

Soki totángi malamumalamu mikanda oyo Tatien akomaki, tokomona ete ayebaki Makomami mpe azalaki komemya yango mingi. Mpo na komonisa ndenge oyo Makomami ebongolaki ye, akomaki boye: “Nazali na mposa ya kokóma mozwi te; naboyi bokonzi ya basoda; nayini pite; nazali na mposa ya kokóma moto ya masuwa te mpo nazali na lokoso ya bozwi te; . . . nazali koluka lokumu te . . . Moi ebimaka mpo na moto nyonso, mpe moto nyonso​—mozwi to mobola​—nsuka se lilita.” Tatien apesaki toli oyo: “Bosaná mokili, boyá loyenge na yango. Zalá na bomoi oyo ezali kokumisa Nzambe, luká koyeba Ye mpe bwaká bomoto na yo ya kala.”​—Matai 5:45; 1 Bakolinti 6:18; 1 Timote 6:10.

Kasi, talelá mokanda mosusu ya Tatien (On Perfection According to the Doctrine of the Savior). Na mokanda yango, alobi ete libala ezali ebongiseli ya Zabolo. Tatien akweisi mpenza libala mpe alobi ete bato bazali komikómisa baombo ya mokili oyo ekokufa na nzela ya libala.

Ekoki kozala ete nsima ya liwa ya Justin le Martyr, soki na mobu 166 T.B., Tatien asalaki mwa lingomba na ye moko oyo babengaki Encratites to mpe akómaki mondimi na yango. Bandimi ya lingomba yango bazalaki kolobela mingi ntina ya kokangela bamposa nyonso motema mpe kozala na bokonzi likoló ya nzoto. Bazalaki koboya bisengo nyonso ya nzoto, komɛla vinyo, kobala, mpe kozala na biloko ya mokili.

Liteya mpo na biso

Mpo na nini Tatien atikaki kolanda Makomami? Ekoki nde kozala ete akómaki “moyoki oyo abosanaka”? (Yakobo 1:23-25) Ekoki nde kozala ete Tatien abwakaki te masolo ya lokuta mpe na ndenge yango akweaki na motambo ya filozofi? (Bakolose 2:8; 1 Timote 4:7) Lokola mabunga oyo akómaki kondima ezalaki minene, ekoki nde kozala ete na mwa ntango moko motó na ye ezalaki lisusu kosala malamu te?

Ezala bongo to te, mikanda ya Tatien mpe ndakisa na ye ezali komonisa biso mwa moke ndenge oyo losambo ezalaki na ntango na ye. Mikanda na ye ezali komonisa ndenge oyo moto akoki kobunga nzela soki alandi filozofi ya mokili. Biso tólanda nde likebisi ya Paulo oyo ezali kosɛnga biso ete tópesa mokɔngɔ na “bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka makambo ya bosantu mpe bongolabongola ya oyo ebengami na lokuta mpenza ete ‘boyebi.’ ”​—1 Timote 6:20.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto