Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 1/6 nk. 30-31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Masolo mosusu
  • Nzambe asɛngaka bato báyambola masumu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ndimáká disipilini ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Motema mawa ya Jéhovah ezali kobikisa biso na kozanga elikya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Ntango “motema oyo ebukani mpe etutami” eluki bolimbisi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 1/6 nk. 30-31

Mituna ya batángi

Lokola Yehova alimbisaka masumu na nzela ya mbeka oyo epesamaki mpo na kosikola bato, mpo na nini baklisto basengeli koyambola masumu na bango epai ya bankulutu ya lisangá?

Lokola tokoki komona yango na likambo ya Davidi na Bata-seba, soki Yehova alimbisaki lisumu ya Davidi, atako ezalaki lisumu monene, ezali mpo ete Davidi abongolaki solo motema. Ntango mosakoli Natana asungaki ye, Davidi andimaki polele ete: “Nasaleli [Yehova] lisumu.”​—2 Samwele 12:13.

Kasi, Yehova asukaka kaka te na kondima eyambweli oyo euti mpenza na motema ya moto oyo asali lisumu mpe na kolimbisa ye, azwaka mpe bibongiseli mpo na kosunga moto yango azonga lisusu makasi na elimo. Mpo na oyo etali Davidi, ye azwaki lisungi yango na nzela ya mosakoli Natana. Lelo oyo, lisangá ya boklisto ezali mpe na mibali oyo bakɔmeli na elimo to bankulutu. Moyekoli Yakobo alimboli boye: “Moko na bino abɛli maladi [ya elimo]? Tiká ete abenga mikóló ya lingomba, babɔndela mpo na ye, esili bango kopakwela ye mafuta na nkombo ya Nkolo. Zambi libɔndeli na kondima ekobikisa mobɛli, Nkolo [akotombola] ye. Ata asili kosala masumu, makolimbisama epai na ye.”​—Yakobo 5:14, 15.

Bankulutu ya makoki basalaka nyonso mpo na kolɛmbisa mpasi ya motema ya moto oyo asali lisumu. Basalaka makasi mpo na kolanda ndakisa ya Yehova ntango bazali kosalisa moto oyo asali lisumu. Balingaka soki moke te kozala na makambo makasi, ata soki esengeli kopesa disipilini ya makasi. Kasi, na motema mawa mpenza, batalelaka bamposa oyo moto yango azali na yango na ntango wana. Na motema molai mpenza, basalaka makasi mpo na kosembola na nzela ya Liloba ya Nzambe makanisi ya moto oyo asalaki libunga. (Bagalatia 6:1) Ata soki moto ye moko azalaki na mposa ya koyambola lisumu na ye te, soki bankulutu basungi ye, akoki kobongola motema, ndenge Davidi asalaki ntango Natana asungaki ye. Lisungi oyo bankulutu bapesaka esalisaka moto oyo asali mabe aboya kozongela lisumu mpe kopɛngola makama ya kokangama na masumu.​—Baebele 10:26-31.

Ezalaka pɛtɛɛ te koyebisa bato mosusu makambo oyo yo moko ozali koyokela yango nsɔni mpe kosɛnga bolimbisi. Esɛngaka kozala na mpiko. Kasi, kanisá naino mwa moke, nini ekokómela yo soki oyamboli lisumu na yo te. Moto moko oyo abombelaki bankulutu ya lisangá lisumu monene oyo asalaki alobaki boye: “Na motema na ngai, nazalaki koyoka mpasi oyo ezalaki kosila te. Nabakisaki milende na ngai na mosala ya kosakola, kasi mpasi yango ezalaki kaka kosila te.” Akanisaki ete lokola ayambolaki lisumu na ye epai ya Nzambe na nzela ya libɔndeli, makambo esukaki wana; nzokande azalaki nde komikosa, mpamba te akómaki komiyoka ndenge moko na mokonzi Davidi. (Nzembo 51:8, 11) Ezali mpenza malamu mingi tóndimaka lisungi ya bolingo oyo Yehova azali kopesa na nzela ya bankulutu!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto