Mokumba mopesami na mobali
“Ropa, zapato, casa, y comida!” Maloba oyo mauti na loyembo moko ya kala na monoko na Espagnole, oyo ezali kotanga biloko minei ya ntina mingi oyo mobali asengeli kopesa epai na libota na ye: bilamba, sapato, ndako mpe bilei. Ebele na mibali oyo bateli bazali komeka kokokisa mokumba na bango na lolenge ekoki.
Kasi, soki ozali tata ya libota, ozali nde komibanzabanza na eloko mosusu ya ntina, oyo ete bamposa ya elimo ya libota na yo? To mpe okanisaka lokola mibali mingi mosusu ete mokumba ya kokamba libota na makambo etali losambo, epesami na mobali te? Na bisika mosusu, bato bamonaka ata ntina moko te ete mibali balekisa ntango mpo na kolakisa bana na bango na ntina na Nzambe mpe Biblia.
Ezali mpenzampenza epai na mobali nde Liloba na Nzambe lipesi mokumba ya kokɔtisa na etingya kati na libota, bolingo mpo na Nzambe mpe botɔndi mpo na mitinda na Nzambe. Na ndakisa, na Baefese 6:4, Makomami mapesi toli oyo elandi epai na mibali kati na lisangá, ete: “Bino batata, bookisaka bana na bino nkanda te, kasi bobɔkɔlo bango na mateya mpe na mpamela ya Jéhovah.”
Ekoki mbala mosusu kozala ete bamosusu bayebi mokapo oyo, nde bazali mpenza kokanga ntina te ete yango etaleli tata, mokonzi ya libota. Na ndakisa, bato oyo balobaka monoko ya espagnole to portugais, bakoki kokanisa ete Baefese 6:4 etaleli tata mpe mama. Mpamba te na minoko wana, liloba “batata” mpe “baboti” ezali lolenge moko. Nzokande, na verset 1 ya mokapo 6 na mokanda ya Paulo epai na Baefese, ntoma alobeli tata mpe mama na mbala moko, na kosaleláká liloba go.neu‘sin, euti na liloba go-neus‘ oyo elimboli “baboti.” Kasi na verset 4, liloba na greke oyo lisalelami ezali pa.té res, oyo elimboli “batata.” Na ntembe te, na Baefese 6:4 Paulo alobi mpenza epai na tata ya libota.
Ya solo, soki mobali azali te kati na libota, boye mwasi asengeli komema mokumba yango. Na lisalisi na Nzambe, bamama mingi basili kolonga kobɔkɔlo bana na bango kati na mateya mpe na mpamela na Jéhovah. Kasi, soki mobali azali kati na libota mpe azali moklisto, ezali ye nde akokokisa mokumba yango. Soki te, ekozala mpasi mingi epai na basangani mosusu ya libota ete bazwa ebongiseli malamu ya koteyama na elimo. Mpe mobali motindo wana azali na likambo epai na Jéhovah mpo na ezaleli na ye ya kotalela makambo na bopotu.
Masengami ya bakengeli mpe basaleli na misala kati na lisangá na boklisto, ezali kolakisa polele likanisi na Nzambe likoló na likambo yango. Biblia elobi na sikisiki ete, ye oyo aponami mpo na mokumba motindo wana asengeli kozala moto oyo ayebi “kobongisa ndako na ye moko malamu, kotosisa bana na ye na sembo nyonso; mpamba te soko moto ayebi kobongisa ndako na ye moko te, akobatela lisangá na Nzambe boni?”—1 Timoté 3:4, 5, 12; Tito 1:6.
Tata ya libota asengeli kozala pene na koboya bisengo na ye mpo na koluka matomba ya elimo ya bana na ye. Mbala mosusu, ekosengela na ye ete apesa ntango moke na misala mosusu ete azwa ntango mingi mpo na kozala mbala na mbala elongo na bana na ye. (Deteronome 6:6, 7) Akosundola mokumba oyo Nzambe apesi ye epai na bato mosusu te. Bolingo mpe komibanzabanza azali na yango epai na bana na ye, ekopusa ye na kopesa bango biloko malamu koleka bilamba, sapato, ndako mpe bilei.
Kobɔkɔlo bana “kati na mateya mpe na mpamela na Jéhovah” ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Yango wana ezali mokumba mopesami yambo mpenza epai na mobali. Na ntango tata ya libota na boklisto akokisi mokumba na ye malamu, mpe ete bana na ye balandi nzela na kobanga Nzambe, akoki kotalela bango lokola lipamboli na Jéhovah mpe koloba lokola mokomi na nzembo ete: “Bana mibali babotami na moto kati na makasi na ye bazali lokola mbanzi na lobɔkɔ na elombe. Esengo ezali na moto oyo azali na ebuluki etondi na bango.”—Nzembo 127:4, 5.