Mpo na nini bazali kosambela mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo bango batika?
NAPLES. Kanisa ete ozali kati na engumba wana ya ltalia na ebandeli na ekeke ya zemi na mwambe. Kati na ndakonzambe,George Berkeley, filozofe Moilandé atɛlɛmi liboso na mikuwa ya mosantu na lokumu. Azali kotalela na ntembe nyonso makila manangwaki, makila ya “San Gennaro,” “santu” Janvier, ye “mosantu” ya katolike.
Engumba Naples ebongwani mpenza te kati na likambo oyo. Na ndakisa, eleki mwa bambula, na libaku moko, lingomba ya katolike baningisaki lisusu bato atako mbula ezalaki konɔka: emonanaki lokola nde likamwisi moko lisengelaki kosalema Bato babɛtaki mabɔkɔ mingi mpo na mikuwa na mosantu mpe nkémbi (lififi ya lingomba) oyo ekambamaki na episkopo wa lokumu.Mbala oyo lisusu, makila ya“San Gennaro” mamonanaki lokola ete manangwaki. Bayebisi ete likamwisi oyo babengi yango ete ezali “ya santu Janvier,” ezali kosalema uta ekeke ya zomi na minei
Engebene bonkɔkɔ ya katolike, oyo babengi na Lifalansé ete relique (oyo euti na liloba na Latin relinquere, mpe elimboli “kotika na nsima”) ezali eloko etikami na moto oyo atalelami lokola mosantu. Lokola yango elimbolami na mokanda Dizionario Ecclesiastico, ete “na ndimbola na sikisiki ya liloba yango ezali bongo nzoto, eteni ya nzoto to mputulu na nzoto ya mosantu, mpe na ndimbola na yango mosusu, ezali eloko oyo esalelamaki to esimbamaki na mosantu mpe, na bongo, ebongi na losambo.”
Ndingisa na bapápa
Soki bato mingi bazali kosambela mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo bango batiká, na ntembe te ezali mpo na makambo oyo makosalemaka na nzela na yango, oyo emonanaka lokola ete ezali makamwisi. Likambo oyo ete bapápa bazali kopesa ndingisa na motindo na losambo wana, elimboli ntina oyo losambo na mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo bango batiká endimami epai na bato mingi.
Na boumeli ya bambula 70 oyo euti koleka, soko bapápa minei basili kotya likebi monene mpenza na losambo na mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo bango batiká Zulunalo moko ya katolike emonisaki ete Pie XII “azalaki komema mikuwa ya santu Lisieux lolenge moko na Pie XI oyo azalaki liboso na ye.” Paulo VI ’’abombaki mosapi ya ntomá (Toma) likoló na biro na ye,” mpe Jean paul II, “kati na biteni na ndako na ye, abombi ndambo na mikuwa” na “santu Benoît” mpe ya “santu André.”—30 giorni, Mars 1990, page 50.
Lokola bapápa bapesaki ndingisa, ezali likambo ya kokamwa te na komona masɛngi na mikuwa ya basantu mpo na kosambela yango na ndako to liboso na bato banso. Kasi, Nzambe andimaka losambo oyo lopesami na mikuwa ya basantu to na biloko batiká?
[Elilingi na lokasa 3]
Reliquaire, sanduku kati na yango bakobómbaka mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo bango batiká
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na lotòmo na bolingo na British Museum