Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/9 lok. 3
  • Bato bakómi kosepela mingi na “basantu”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato bakómi kosepela mingi na “basantu”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Masolo mosusu
  • Basantu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Ndenge nini basantu ya solo bakoki kosalisa yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Nzambe andimaka losambo lopesami na mikuwa ya basantu to na biloko oyo bango batika?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tosengeli kobondelaka basantu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/9 lok. 3

Bato bakómi kosepela mingi na “basantu”

“Bozali koyeba lisusu ntango oyo tokanisaki ete tolɛmbi koyoka masolo ya bato oyo basalaki makambo mineneminene mpo na bolamu ya basusu? Kasi, emonanaki ete ezalaki bongo te mpo na bato milio 4,2 ya États-Unis oyo balandaki na televizyo molulu ya bokundi Mama Teresa, mokolo ya 13 Sɛtɛmbɛ. Banda akufaki na mokolo ya 5 Sɛtɛmbɛ, ebele ya bato bazalaki se kosɛnga Pápa ete akómisa ye mosantu. Bato moke kaka nde bazali kokakatana ete Pápa akosala yango.” ​—⁠ZULUNALO SUN-SENTINEL YA 3 ƆKƆTƆBƐ 1997, NA ÉTATS-UNIS.

MPO na bato mingi, Mama Teresa, mamelo moko ya Lingomba ya Katolike oyo amipesaki mingi na kosalisa bato oyo bazali kokelela, azali mpenza komonisa ndenge oyo mosantu ya solosolo asengeli kozala. Mangomba mosusu mpe ezali na bato oyo bakumisaka ete basalaki makambo mineneminene. Kasi, ntango mosusu bayebani mingi te lokola bato oyo Lingomba ya Katolike ebengaka bango basantu.

Banda Jean-Paul II akómá pápa asili kokómisa bato soki 300 basantu; motángo yango eleki motángo ya bato nyonso oyo bapápa mosusu nyonso ya ekeke ya 20 bakómisá basantu.a Mpo na nini, tii na moi ya lelo, bato balingi komipesa na “basantu” atako mingi kati na basantu yango bayebani mpenzampenza te na bandimi mingi ya Lingomba ya Katolike?

Lawrence Cunningham, profesɛrɛ ya teoloji na Iniversite ya Notre Dame na États-Unis, alobaki boye: “Bato mingi basepelaka na koyeba ete basantu bakoki mpe kozala na mokili oyo. Basantu bamonisaka ete moto akoki kosala makambo mineneminene mpo na bolamu ya basusu, ata na moi ya lelo.” Lisusu, bato bakanisaka ete “basantu” bazalaka na mokakatano te mpo na kosolola na Nzambe; na bongo, bakoki kolobela biso epai na ye. Soki biloko oyo “mosantu” moko atiká to mpe biteni mosusu ya nzoto na ye emonani, bato bamemyaka yango mingi; bakanisaka ete nguya moko boye ezalaka na kati ya biloko wana.

Nsima ya likita monene ya baepiskɔpɔ (Concile de Trente), oyo esalemaki na ekeke ya 16, babimisaki buku ya malongi mpo na kondimisa malamumalamu mateya ya Lingomba ya Katolike; yango elobaki boye: “Tokoki mpenza koloba ete kokumisa basantu ‘oyo balali kati na Nkolo,’ kobelela bango mpo bálobela biso mpe komemya biloko mosantu oyo batiká mpe mputulu ya bibembe na bango, ezali kokitisa ata moke te nkembo ya Nzambe. Kutu, ezali nde kobakisa nkembo yango mingi mpenza na ndenge oyo elikya ya moklisto oyo azali kosala makambo yango ezali kozonga mpe kokóma makasi. Lisusu, ezali kolendisa moklisto yango alanda bizaleli malamu oyo basantu bazalaki na yango.” (The Catechism of the Council of Trent, 1905) Baklisto ya solo balingaka mpenza kozala na bizaleli malamu na bomoi na bango, kosolola na Nzambe na ndenge oyo ebongi, mpe kozwa lisalisi na ye. (Yakobo 4:​7, 8) Yango wana, ebongi tómituna mituna oyo: ‘Soki totaleli Liloba ya Nzambe, banani mpenza babongi kobengama basantu ya solo? Mpe makambo nini basalaka?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na Lingomba ya Katolike, kokómisa moto mosantu elakisi kondima mondimi moko, nsima ya liwa na ye, ete abongi mpenza ete bato nyonso ya Lingomba bákumisa ye ete azali mosantu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto