Nzambe andimaka losambo lopesami na mikuwa ya basantu to na biloko oyo bango batika?
MAKILA ya “San Gennaro,” oyo balobi ete ekonangwaka mbala misato na mobu, ezali bobele moko na biloko mingi oyo basantu batiká Molikani ya Turin, oyo balobi ete, na yango nde bazingelaki nzoto na Yesu, ezali mpe eloko mosusu. Kati na biloko oyo bizali na boyokani elongo na Yesu, ezali mpe na oyo bakobengaka ete mbeto na ye ya bomwana (oyo ezali kati na ndakonzambe ya Rome), buku na ye ya makomi mpe koleka nsɛtɛ nkɔto oyo balobaka ete yango nde basalelaki mpo na koboma ye! Kati na mikuwa na basantu, ezali mpe na mitó mingi ya Yoane Mobatisi mpe mikuwa ya nzoto minei oyo balobi ete ezali ya “Santa Lucia,” oyo ezali na bisika bikeseni kati mikili ya Mpótó.
Moko na bingumba oyo biyebani mpenza mpo na biloko oyo basantu batiká, ezali bongo Treves, na Alemanye, epai kuna babombi moko kati na ebele na “basutani mosantu,” elamba ya kati etongamaki na biteni te, oyo balobi ete Yesu Klisto azalaki kolata yango. Bitiká ya basantu koleka nkɔto bibombami kati na bisika ya lokumu oyo bityami biloko na kala na kati na cité ya Vatican. Ndakonzambe ya “santu Ursule,” na engumba cologne (Alemanye), ezali kati na yango na nkɔto mingi na bitiká yango. Motango na yango ezali mingi mpenza, eyebani ndelo te. Bobele na ltalia, ezali na bisika 2 468 oyo babéngi yango ete ezali ya bosantu, oyo etondi na biloko basantu batiká!
Ekanisami ete losambo na mikuwa ya basantu to na biloko batiká, lolenge moko na losambo ya “basantu,” nyonso ebandaki uta ekeke ya minei ya ntango na biso. Mpo na bantina etali losambo, nkita, ata mpe bantina etali politike, motuya ya mikuwa na basantu to mpe biloko oyo batiká ebakisamaki mokemoke na boumeli ya bikeke, kino ekómi bankoto mingi lelo oyo. Likita ya Vatican li lindimisaki ete “engebene bonkoko, basantu babongi na losambo kati na Lingomba, mpe ebongi kosambela mikuwa na bango to biloko oyo batiká mpe bikeko na bango.” (constitution de Sacra Liturgia (“Sacrosanctum concilium”, kati na Vatican II, Les seize documents conciliaires, ebimeli ya mibale, mobimisi Fides.) “Biloko na lokumu oyo basantu batiká, mpe oyo eyebani mingi na losambo ya bato mingi,” ekomami kati na mokanda codex luris canonici (Code de droit canon) oyo ebimisamaki na Jean—Paul II na 1983 (canon 1190). Bato ya lingomba ya Anglikane mpe basangani ya mangomba ya Ortodokse, bango mpe basambelaka mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo batiká.
Soki okanisi ebele na nsɛtɛ oyo balobaka ete yango nde basalelaki mpo na kobakisa Klisto likoló na nzeté, mpe soki okanisi ebele na mitó na Yoane Mobatisi, emonani polele ete bokosi ezali mingi kati na likambo litali mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo bango batiká. Na ndakisa, na mwango ya kosalela carbone 14 mpo na kotya date, emonanaki ete molikani ya Turin (oyo balobaka ete ezali elamba oyo Yesu alataki) ezali lokutá. Na boumeli na ntembe monene esalemaki na 1988 na ntina na yango, Marco Tosatti, moto na mayele oyo andimami na Vatican, abimisaki motuna moko kitoko, ye ete: “Nini ekomonana soko tokosalela bobele myango ya sianse oyo misalelami na ntina na molikani (ya Turin) epai na biloko mosusu ya losambo?”
Emonani ete moto na mayele akolinga te kosambela biloko oyo babéngi na lokutá ete ezali yango basantu batikaki Kasi, bobele yango nde ezali likambo oyo lisengeli kotalelama?
Biblia elobi nini?
Biblia elobi te ete Yisraele ya kala, libota liponami na Nzambe, lizalaki kosambela mikuwa na bakufi to mpe biloko oyo batiká wana bazalaki na nsé na boyangeli ya Baezipito. Ezali solo ete tata na mabota Yakobo akufaki na Ezipito mpe nzoto na ye ememamaki na mokili ya Kanana mpo na kokundama ‘kati na mobenga oyo mozalaki na elanga ya Makapela.’ Yozefe, mwana na ye akufaki mpe na Ezipito, mpe na nsima, mikuwa na ye mimemamaki na Kanana mpo ete ekundama. (Genese 49:29-33; 50:1-14, 22-26; Exode 13:19) Atako bongo, Makomami malakisi esika moko te ete Bayisraele batalelaki nzoto na Yakobo mpe na Yozefe lokola biloko bibongi na losambo.
Totala oyo elekaki na ntina na mosakoli Moize. Na litambwisi na Nzambe, akambaki Bayisraele na boumeli ya mibu 40. Na nsima, ekokisaki ye mibu 120, amataki na ngomba Nebo, atalaki Mabelɛ́ na ndaká, mpe akufaki Mikaele, mokóló na baanzelu awelanaki na Diable na ntina na nzoto na Moize; Satana mbɛlɛ asalelaki yango mpo na kopɛngwisa Bayisraele kino na losambo na mikuwa ya bakufi, kasi myango na ye mikweisamaki. (Yuda 9) Tokangi ntina ete, atako Bayisraele balelaki Moize, kasi basambelaki nzoto na ye te. Ya solo, Nzambe apekisaki ete likambo yango lisalema te na kokundáká Moize kati na liyita na esika oyo bato bakoki koyeba yango te.—Deteronome 34:1-8.
Bamosusu kati na basambeli na mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo batiká, bazali kosalela 2 Mikonzi 13:21 (MN) epai tozali kotanga ete: “Na ntango bato bazalaki kokunda moto moko, bamonaki ebele na miyibi. Nokinoki babwakaki moto kati na nkunda ya (mosakoli) Elizé mpe bakendaki. Wana moto yango atutaki mikuwa ya Elizé, mosika te, azongaki na bomoi, mpe atɛlɛmaki na makolo na ye.” Ezalaki mpenza likamwisi kati na yango mikuwa mizangi bomoi ya mosakoli na Nzambe misalaki mosala monene Nzokande Elizé akufaki mpe ‘ayebaki likambo te’ na likamwisi wana lisalemaki. (Mosakoli 9:5, 10) Lisekwa yango lisengeli bongo kopesama na Jéhovah Nzambe, oyo akokisaka makamwisi na nzela na nguya na ye; asekwisaki moto yango na nzela na elimo santu na ye, to bokasi na ye bokosalaka mosala. Ezali mpe ntina na koyeba ete Makomami mayebisi te ete bato basambelaki mikuwa ya Elizé.
Basangani mosusu na boklisto ya lokutá bazali kotanga Misala 19:11, 12 mpo na kolongisa losambo na mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo batiká. Totangi ete: “Na mabɔkɔ na (ntóma) Paulo, Nzambe asalaki misala minene na nguya, kino bato bamemelaki babɛli—basumé na bitambála elongolamaki na nzoto na Paulo, mpe maladi etikaki bango mpe bilimu mabe bibimaki longwa na bango.” Atako bongo, tosimba ete ezalaki Nzambe nde akokisaki misala yango minene na kosaleláká ntóma Paulo. Paulo asalaki misala yango ya nguya na mokano na ye moko te, mpe andimaki te ete bato basambela ye.—Misala 14:8-18.
Ezali kotɛmɛla mateya na Biblia
Ya solo, kosambela mikuwa na basantu to mpe ‘ biloko oyo batiká ezali kotɛmɛla mateya mingi ya Biblia. Na ndakisa, losambo yango lotongami mpenza likoló na endimeli oyo ete molimo ekufaka te. Bamilió na bandimi bakanisaka ete milimo ya baoyo nyonso bakomisamaki basantu mpe basambelami, ezali na likoló. Bato yango ya molende bazali kosambela “basantu” mpo na koluka libateli na bango mpe kosɛnga ete balobela bango epai na Nzambe. Bongo, engebene mokanda moko ya lingomba, bakatolike bazali koloba ete mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo batiká ezali na “nguya ete mosantu alobela bato epai na Nzambe.”
Nzokande, engebene Biblia, molimo ya moto ekufaka Bato bazali na molimo te kati na bango moko oyo ekoki kobika libela na libela na libandá ‘ya nzoto na bango, na nsima na kufa na bango. Kasi, Makomami malobi ete: “Jehovah Nzambe asalaki moto na mputulu na mokili, mpe apemaki kati na zolo na ye mpema na bomoi, mpe moto akómaki molimo na bomoi.” (Genese 2:7) Na esika na koteya ete bato bazali na molimo ekufaka te, Biblia elobi boye: “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.” (Ezekiele 18:4) Yango ezali likambo ya solo mpo na bato nyonso, kati na bango mpe baoyo bakómisamaki basantu na nsima, mpamba te biso banso tosili kosangola masumu mpe liwa oyo euti na moto na liboso, Adama.—Baloma 5:12.
Esengeli kosambela “basantu” te, mpamba te bango bazwi lotómo te ya kolobela moto epai na Nzambe. Jéhovah Nzambe asili kozwa ekateli ete Mwana na ye, Yesu Klisto, akoki kosala yango. Ntomá Paulo alobaki ete Yesu “akufaki, mpe asekwaki na kufa, ye azali na lobɔkɔ na mobali na Nzambe mpe azali kolobela biso.”—Baloma 8:34; Yoane 14:6, 14.
Kati na makambo oyo Biblia ezali koloba na ntina na losambo ya bikeko, tozali kokuta ntina mosusu mpo na yango esengeli te kosambela “basantu” soko mpe mikuwa to biloko oyo batiká mpe te. Moko na Mibeko Zomi oyo epesamaki epai na Bayisraele ezali boye: “Okosala ekeko mpo na yo te, soko elilingi na eloko na likoló te, na mabelé te, soko na mai mpe te. Okokumbamela yango te soko kosalela yango te, mpo ete ngai Jéhovah Nzambe na yo, nazali Nzambe na zuwa.” (Exode 20:4, 5) Nsima na bikeke mingi, ntóma Paulo alobaki epai na baninga na ye baklisto ete: “Balingami na ngai, bokima losambo na bikeko.” (1 Bakolinti 10:14) Lolenge moko, ntóma Yoane akomaki ete: “Bana, bobɛlɛma na bikeko te.”—1 Yoane 5:21.
Na yango, losambo ya “basantu” mpe biloko oyo batiká, etongami soko moke te likoló na Biblia. Atako bongo, bato mosusu balingaka kozala na eloko moko oyo bakoki kotalela lokola mosantu, oyo bakoki komona yango mpe kosimba yango, mpe oyo bakokanisaka ete ekoki kobikisa bango. Ya solo, bato mingi bakotalelaka mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo bango batiká lokola eteni moko kati na monyolɔ́lɔ oyo mbɛlɛ ekokangisa mabelé mpe likoló. Tótalela mwa moke likanisi oyo.
Koluka komona biloko oyo basantu batiká, soko mpe kosimba yango, ekozala na boyokani te na maloba na Yesu na ntina etali losambo oyo Nzambe alingi kozwa. Yesu alobaki ete: “Ntango ekoya, ɛɛ esili koya, oyo basambeli na solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo ete Tata akolukaka motindo na basambeli oyo. Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bakosambela ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23, 24, MN) Jéhovah Nzambe azali “Elimo,” akomonanaka na bato te. Mpo na kosambela ye “na elimo,” esengeli ete motema na biso motondi na bolingo mpe na kondima epusa biso na kosalela ye mosala ya bulɛɛ. (Matai 22:37-40; Bagalatia 2:16) Mpo na kosambela Nzambe ‘na solo,’ esengeli te kosambela mikuwa ya basantu to mpe biloko oyo batiká, kasi esengeli nde kobwaka lokuta ya mangomba mpe koluka koyeba mokano na ye molakisami kati na Biblia, mpo na koyokanisa bomoi na biso na yango.
Ezali bongo likambo na kokamwa te na koyoka moto na mayele James Bentley koloba ete, ‘Baebele ya Kala bazalaki kosalela losambo na mikuwa ya basantu te to ya biloko oyo bango batiká.’ Alobaki lisusu ete na boumeli na bikeke minei bikaboli liwa ya Etienne mpe bokundoli bwa nzoto na ye na Lucien, ezaleli ya baklisto liboso na mikuwa ya basantu to na biloko oyo batiká esili mpenza kobongwana Nzokande, uta liboso na ekeke ya mitano ya ntango na biso, boklisto ya lokutá epɛngwaki longwa na mateya ya Biblia oyo elobeli polele likoló na losambo na bikeko, likoló na ezalela ya bakufi mpe likoló na mokumba na Yesu Klisto, ye oyo azali kolobela biso epai na Nzambe.’—Baloma 8:34; Mosakoli 9:5; Yoane 11:11-14.
Soki tolingi ete losambo na biso esepelisa Nzambe, tosengeli kondimisama ete esangani ata na motindo moko te na losambo ya bikeko. Mpo na kondimama, tosengeli kopesa losambo epai na Jéhovah Nzambe, Mozalisi, kasi epai na mikuwa ya basantu te soko na biloko batiká te, soko mpe na bikelamu te. (Baloma 1:24, 25; Emoniseli 19:10) Tosengeli lisusu kozwa boyebi ya solo ya Biblia mpe kokolisa kondima moko makasi. (Baloma 10:17; Baebele 11:6) Mpe soki tokotambola na nzela na losambo ya solo, tokomiyokanisa na solo oyo ezwami kati na Makomami, ete: Nzambe andimi te losambo oyo lopesami na mikuwa ya basantu to na biloko batiká.
[Elilingi na lokasa 5]
Alako mikuwa ya Elizé misalemeki kati na likamwisi moko, nzokande ba to basambelakiyango te