Mpo na nini komipekisa—ezali na ntina mingi?
“Bosala na makasi nyonso ete bobakisa bizaleli malamu wana ezali bino na kondima; mpe bobakisa boyebi wana ezali bino na bizaleli malamu; mpe bobakisa komipekisa wana ezali bino na boyebi.”—2 PETELO 1:5, 6, MN.
1. Ndakisa nini ya komipekisa na nzoto emonisamaki na ekeke ya zomi na libwa?
NA ETENI ya mibale na ekeke ya zomi na libwa, charles Blondin apesaki moko na bandakisa minene ya komipekisa. Eyebisami ete, mbala mingi akatisaki boétá (chutes) ya Niagara; libosoliboso ezalaki na 1859, na nzela na nsinga moko ezalaki na molai ya bametele 340 longwa na nsuka moko kino nsuka mosusu, mpe ekangisamaki na bolai ya bametele 50 likoló na mai; mpe, mbala nyonso amonisaki makoki oyo azalaki na yango: azelaki kotambola miso mazipami, na kati na saki, na kotindikáká bruwete, na kotambola na banzeté mibale ya milai, to mpe na komemáká moto moko na mokɔngɔ. Na esika mosusu, na lisalisi ya banzeté na ye oyo azalaki kotambola na yango, alóngaki kopumbwapumbwa likoló na nsinga moko ekangisamaki na bolai ya bametele 52 longwa na mabelé. Mpo na kobatela bokatikati wana, amonisaki mpenza ezaleli ya komipekisa. Na mpasi oyo amonaki charles Blondin azwaki lokumu mpe misolo.
2. Misala nini mosusu misengi komipekisa?
2 Atako baoyo bazali na makoki lolenge moko na bato wana bazali bobele moke kati na biso, kasi toyebi ntina ya komipekisa kati na misala misusu to mpe na masano. Na yango, na ntina na makoki ya Vladimir Horowitz, ye mobɛti piano oyo asili kokufa, mobɛti miziki moko alobaki ete: “Oyo ebendaki ngai ezalaki bongo komipekisa monene oyo azalaki komonisa . . . , nguya monene oyo ye azalaki kopekisa yango.” Moto mosusu alobelaki “mbula ntuku mwambé oyo misapi na ye mizalaki kopumbwapumbwa likoló na etánda ya piano na makoki nyonso na komipekisa.”
3. (a) Motindo nini na komipekisa esɛngisami mpenza, mpe lolenge nini yango elimbolami? (b) Liloba na greke libongolami na “komipekisa” kati na Biblia, elimboli nini?
3 Esengeli milende mingi mpo na kozwa makoki motindo wana. Nzokande, komipekisa ezali na ntina mingi koleka mpe ezali lisɛngami. Elimbolami lokola “bokonzi oyo bosalelami likoló na bopusi, na mayoki to na mposa na yo moko.” Kati na Makomami na greke na boklisto, liloba libongolami na “komipekisa” na 2 Petelo 1:6 mpe kati na mikapo misusu, elimbolami lokola “ezaleli malamu ya moto oyo ayebi kopekisa bamposa na ye mpe bilulela, mingimingi bamposa mabe ya nzoto na ye.” Komipekisa to komikanga motema ebengami ete “nsuka na makoki na moto.”
Mpo na nini komipekisa eleki ntina mingi
4. Mbuma mabe nini ebotami na kozanga komipekisa.
4 Kozanga komipekisa akobimisaka makama minene. Ezali ntina ya mikakatano mingi mizali lelo na mokili. Na “mikolo oyo ya nsuka,” tozali mpenza kobika na “ntango ya mpasi.” Bato bazangi “komipekisa”; mbala mingi ezali mpo na lokoso oyo emonisami kati na makambo mosusu na boye ete, “bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe.” (2 Timoté 3:1-5) Likambo oyo lileki mawa mingi soko tokanisi mpo na bato 40 000 baoyo babimisamaki na lisangá na boumeli ya mbula ya mosala oyo euti koleka, mpo ete basalaki mpenza mabe monene. Likoló na bato yango, bakisa mpe baklisto mingi oyo bazwaki mpamela, mingi kati na bango mpo na pité, kasi bango nyonso bazangaki komipekisa. Likambo mosusu ya mawa mpenza ezali oyo ete, ata bankulutu oyo baumeli mingi kati na mosala wana basili kokitisama mikumba na bango bobele mpo na ntina oyo moko.
5. Tokoki kosalela ndakisa nini mpo na kolobela ntina ya komipekisa?
5 Tokosalela ndakisa ya motuka mpo na kolobela ntina ya komipekisa. Motuka ezali na bapine minei ekosalisaka yango ete etambola, ezali na motere na nguya mokoki kobalusa bapine na mbango nyonso, mpe ezali na bikangeli to freins ekoki kokangisa bapiné yango. Nzokande, likámá likosalema soko mokumbi motuka azali te mpo na kozwa ekateli na nzela nini bapiné ekokende, na vitese nini esengeli kobaluka mpe ntango nini esengeli kotelema. Mpo na kokokisa makambo wana nyonso, esengeli kosalela malamu yenda, accélérateur, mpe bikangeli.
6. (a) Likambo nini lilobami mpo na bolingo kasi yango etali mpe komipekisa? (b) Toli nini mosusu tosengeli kobosana yango te?
6 Tolekisi ndelo te awa ezali biso komonisa ntina ya komipekisa Oyo ntóma Paulo alobi na 1 Bakolinti 13:1-3 na ntina na bolingo ezali lolenge moko mpo na ezaleli oyo. Tokoki kozala molobi moko malamu, tokoki kozala na boyebi mingi mpe kondima oyo tosili kozwa yango na nzela na mimeseno malamu ya boyekoli na Biblia, mbala mosusu tozali kokokisa misala mingi mpo na bolamu ya bato mosusu, kasi soki tozangi komipekisa, nyonso wana ezali bobele mpamba. Tokanga ntina ya maloba oyo na Paulo ete: “Boyebi te ete baoyo bakomekana na mbango, bakopotaka bango nyonso, kasi bobele moko nde akozwa libonza? Bopota na motindo ete bozwa yango. Nzokande moto na moto oyo akosala emekaneli, akomipekisa na makambo nyonso.” (1 Bakolinti 9:24, 25) Toli oyo Paulo apesi na 1 Bakolinti 10:12 ekoki mpenza kosalisa biso mpo tómipekisa na makambo nyonso, ete: “Ye oyo okanisi ete atɛlɛmi. akeba ete akwea te.”
Bandakisa ezali kokebisa biso
7. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete kozanga komipekisa nde ezali ntina na kobeba ya libota ya bato? (b) Bandakisa nini mosusu ya ozanga komipekisa ezwami kati na Makomami?
7 Adama azangaki komipekisa mpamba te atikaki ete misala na ye mitambwisama na mayoki na ye, na esika ete asosola. Mpo na yango, “lisumu likɔtaki na mokili, mpe liwa liyei mpo na lisumu.” (Baloma 5:12) Koboma ya liboso esalemaki mpe mpo na kozanga komipekisa. Na yango, Jéhovah Nzambe alobaki na Kaina ete: ‘Mpo na nini ozali kosilika mpe elongi na yo ezali na nkanda? Mpe soko osali malamu te boye lisumu ezali kolala na ekuke na yo. Mposa na yango elingi kosimba yo, kasi yo okokoka kopekisa yango te?’ Lokola akokaki kopekisa lisumu te, Kaina abomaki ndeko na ye Abele. (Genese 4:6-12) Mwasi na Lota mpe azangaki komipekisa Akokaki te kotɛmɛla mposa ya kotala na nsima. Kozanga komipekisa ebungiselaki ye eloko nini? Bomoi!—Genese 19:17, 26.
8. Na nini likambo likómelaki mibali misato ya ntango na kala ezali komonisa ntina ya komipekisa?
8 Lubene, mwana na liboso na Yakobo, abungisaki lotómo na ye ya mwana na liboso mpo ete azangaki komipekisa. Abebisaki mbeto ya tata na ye na kosangisáká nzoto elongo na mwasi mosusu na Yakobo. (Genese 35:22; 49:3, 4; 1 Ntango 5:1) Wana atyamaki na komekama mpo na komilelalela mpe koimaima ya Bayisraele batomboki, Moize asilikaki mpe, na yango, abungisaki elikya malamu oyo azalaki na yango: kokɔta na Mabelé na ndaka (Mituya 20:1-13; Deteronome 32:50-52) Ata mosembwi mokonzi Davidi, ‘moto oyo asepelisaki motema na Nzambe,’ azwaki mikakatano makasi mpo ete, mokolo moko, azangaki komipekisa. (1 Samwele 13:14; 2 Samwele 12:7-14) Oyo nyonso ezali makebisi mpo na biso, mpo na komonisa biso ntina ya komipekisa.
Oyo tosengeli kopekisa
9. Tánga mikapo ya Biblia oyo milobeli ntina ya komipekisa.
9 Yambo mpenza, esengeli na biso kopekisa makanisi na biso mpe mayoki na biso. Kati na Makomami, mbɛki mingi biloko oyo mibale bimonisami na elilingi na maloba lokola “motema” mpe “ngei.” Makambo oyo likoló na yango tozali kotya makanisi na biso ekoki kokolisa milende oyo tozali kosala mpo na kosepelisa Jéhovah, to mpe kokangisa yango. Tozali na mposa ya komipekisa mpo na kolanda toli na Biblia oyo ezwami na Bafilipi 4:8. Kati na mokapo oyo, tosengisami na kokanisa ntango nyonso makambo na solo, oyo na peto mpe yango ezali malamu. Davidi, mokomi na nzembo amonisi bobele likanisi yango moko wana alobi kati na libondeli na ye ete: “Tika ete makanisi na motema na ngai mazala malamu liboso na yo, ɛ Jéhovah, Mobateli na ngai mpe Mosikoli na ngai.” (Nzembo 19:14, MN) Mobeko ya zomi oyo mopekisi kolula eloko ya mozalani na yo, esɛngisaki Bayisraele ete bapekisa makanisi na bango. (Exode 20:17) Yesu amonisaki ntina oyo tosengeli mpenza kopekisa makanisi na biso mpe mayoki na biso wana alobaki ete: “Moto oyo akotalaka mwasi kino kolula ye, asili kosala ekobo elongo mwasi yango kati na motema na ye.”—Matai 5:28 MN.
10. Mikapo nini ya Biblia mimonisi ntina ya kopekisa maloba na biso?
10 Tosengeli mpe kopekisa maloba na biso. Mikapo mingi ya Biblia mizali kopesa biso toli ya kozala na bokonzi likoló na lolemo na biso. Ndakisa oyo ete: “Nzambe ya solo azali na makoló, kasi yo ozali na mabelé Boye tika ete maloba na yo mazala mingi te.” (Mosakoli 5:2) “Na maloba mingi, masumu makozangaka te, kasi ye oyo akangi mbebu na ye azali na mayele ” (Masese 10:19, MN) “Tika te ete maloba na bosoto mabima na minoko na bino, kasi bobele yango ezali malamu mpo na kolendisa na esika yango esengeli. . . . Tika ete . . . kongánga nyonso, maloba nyonso na kotuka malongwa na bino, mpe makambo manso na mayele mabe.” Lisusu, Paulo apesi biso toli ete tobimisa maloba na nsɔni te soko mpe maloba na mbindo te.—Baefese 4:29, 31; 5:3, 4.
11. Yakobo alobi nini likoló na kopekisa lolemo na biso?
11 Yakobo, ndeko na Yesu, azali kokweisa ezaleli ya koloba mingi mpe amoni mpo na nini ezali mpasi na kopekisa lolemo. “Lolemo ezali eteni moke na nzoto, nde ekomikumisaka mpo na makambo minene. Tala mɔ́tɔ moke oyo ekozikisaka zamba monene. Na yango, lolemo ezali mɔ́tɔ. Lolemo ezali lokola mokili na bokɛsɛnɛ kati na biteni na nzoto na biso, mpamba te akobebisaka nzoto na biso mobimba mpe ekozikisa yika na bomoi awa na mabelé, kasi yango ekozika na Gehena. Moto asengeli kotosisa mpe asili kotosisa mitindo na nyama nyonso na zamba mpe bandɛkɛ, nyama ekolandaka mpe nyama na mai. Nde moto te akoki kotosisa lolemo na ye kati na makambo manso. Yango ezali eloko mabe mpe ezangi ekungeli; etindi na ngɛngɛ na koboma. Na yango tozali kopambola Jéhovah Tata, mpe na yango tozali koleka mabe epai na bato oyo basalami ‘na lolenge na Nzambe.’ Bobele na monoko yango moko, tozali kobimisa mapamboli mpe bilakeli mabe lokola Bandeko na ngai, yango esengeli kozala bongo te.”—Yakobo 3:5-10, MN.
12, 13. Tánga mwa mikapo ya Makomami oyo mimonisi ntina ya kopekisa misala na biso mpe etamboli na biso.
12 Ya solo, tosengeli komipekisa kati na misala na biso. Moko na makambo kati na yango tosengeli mpenzampenza komipekisa, ezali bongo boyokani na biso elongo na basi to elongo na mibali. Baklisto basili kozwa lilako oyo ete: “Bokima pité.” (1 Bakolinti 6:18) Mobali asengeli te koluka ete alingama na basi mosusu longola bobele na mwasi na ye. Elobami na ntina na ye ete: “Mela mai na ebombelo na mai na yo mpenza, mpe yango ezali kobima na maziba na yo ya mai.” (Masese 5:15-20, MN) Tosili kokebisama ete “Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.” (Baebele 13:4) Baoyo bazali kolona likabo ya kotikala monzemba basengeli mpenzampenza komonisa ete bayebi komipekisa.—Matai 19:11, 12; 1 Bakolinti 7:37.
13 Yesu alobaki na bokuse likoló na makambo nyonso makoki kolobama na ntina na lolenge ya kosala epai na bazalani na biso, kati na oyo babéngi yango ete “lilako lileki malamu,” oyo ete: “Makambo manso malingi bino ete Bato basalela bino yango, bino mpe bosalela bango bobele bongo. Mpamba te, Mibeko mpe basakoli elimboli bongo.” (Matai 7:12, MN) Na ntina na makanisi na biso ya moimi mpe mimekamo to masɛnginya mingi oyo tozali kokutana na yango, tosengeli mpenza komipekisa mpo na kosalela bato mosusu makambo oyo tolingi ete bango basalela biso yango.
14. Liloba na Nzambe lipesi biso toli nini na ntina na kolya mpe komela?
14 Komipekisa ekomonanaka mpe kati na kolya mpe komela Liloba na Nzambe lipesi toli oyo na mayele ete: “Zalá elongo na bameli na masanga te, to na baoyo bakotondisa mabumu na lokoso te.” (Masese 23:20); Na ntina na eleko na biso mpenza, Yesu alobaki ete: “Bokeba bino mpenza ete mitema na bino mikóma makasi ee mpo na kolya mingi mpe, na komela mingi mpe, na mitungisi ye bomoi, ete mokolo yango moyela bino pwasa te lokola motambo.” (Luka 21:34, 35, MN) Ɛɛ, tosengeli kopekisa makanisi na biso, mayoki na biso, maloba na biso mpe misala na biso.
Mpo na nini komipekisa ezali mpasi
15. Biblia elobi nini likoló na mosala oyo Satana azali kosala ete biso tozanga komipekisa?
15 Ezalaka na biso pɛtɛɛ te mpo na komipekisa mpo ete, lokola baklisto banso bayebi yango, makambo misato na nguya mazali kotɛmɛla milende na biso. Ya liboso ezali Satana mpe bilimu mabe. Biblia elobi polele likoló na nguya na bango. Mpo na yango totangi ete “Satana akɔtaki” kati na Yuda liboso ete atɛka Yesu. (Yoane 13:27) Ntóma Petelo atunaki Anania ete: “Mpo na nini Satana alendisi yo ete okosa elimo santu?” (Misala 5:3, MN) Tala mpo na nini Petelo apesaki likebisi oyo malamu ete: “Bomisɛnzela, bolala mpɔngi te. Monguna na bino, Diable, azali kotambola lokola nkɔsi konguluma, mpo na koluka soko okolya nani.”—1 Petelo 5:8.
16. Mpo na nini baklisto basengeli komipekisa na kotalela makambo ya mokili?
16 Kati na milende oyo bazali kosala mpo na komipekisa, baklisto basengeli mpe kobundisa mokili oyo “mozali kolula na nsé na nguya na oyo mabe,” Satana le Diable. Mpo na yango, ntóma Yoane akomaki ete: “Bolinga mokili te soko biloko bizali kati na yango te. Moto nani alingi mokili, bolingo na Tata ezali na ye te; mpamba te makambo manso mazali kati na mokili,mposa-na nzoto, mposa-na miso mpe kotalisa bozwi,-euti na Tata te, kasi na mokili. Mokili mozali koleka mpe mposa na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano na Nzambe ekoumela seko.” Soko tokomipekisa te mpe soko tokotya milende nyonso te mpo na kotɛmɛla makanisi nyonso makopusa na kolinga mokili, tokoki kolongwa na bopusi na yango, lokola yango ekómelaki Demasi, oyo na eleko moko azalaki moninga ya mosala na Paulo.—1 Yoane 2:15-17; 5:19, MN; 2 Timoté 4:10.
17. Eloko nini ezali kotɛmɛla uta kobotama na biso ete tosalela ezaleli ya komipekisa te?
17 Baklisto basengeli mpe komipekisa ete bakoka kobundisa mpenza bolɛmbu na bango ya nzoto mpe mbébá oyo basangolaki Tosengeli koyeba ete, “motema na moto mozali mabe uta bolenge na ye.” (Genese 8:21) Lokola Davidi,biso tobotami kati na mabe, mpe uta libumu na mama na biso tozali na lisumu.’ (Nzembo 51:5) Mwana abotami sika ayebi komipekisa te. soko alingi eloko moko, akongánga kino akozwa yango. Kati na mokanda moko molobeli lolenge ya kobɔkɔlo bana, tokoki kotanga ete: ‘Bana bazali na makanisi makeseni mpenza na oyo na mikóló. Bana bazali na moimi mpe mbala mingi bakotyaka likebi te na maloba malamu mpo ete bayebi “komitya na esika ne moto mosusu” te.’ Tokoki mpenza koloba ete “bozoba ezwami ne motema na mwana.” Nzokande, “mpimbo na etumbu” ekolakisa ye mokemoke ete ezali na malako oyo asengeli kotósa, mpe ete asengeli kopekisa moimi na ye.—Masese 22:15.
18. (a) Engebene maloba na Yesu, makanisi nini mazali kati na motema na elilingi? (b) Maloba nini na Paulo mamonisi ete ayebaki mikakatano oyo moto alingi komipekisa akokutanaka na yango?
18 Ɛɛ, makanisi na moimi oyo tobotami na yango ezali mpenza kotya nkaka mpo na milende oyo tozali kosala ete tomipekisa. Makanisi yango mazali kati na motema ya elilingi, oyo Yesu alobaki mpo na yango ete: “Longwa na motema nde makanisi mabe makobimaka, koboma’ ekobo, pite, koyiba, matatoli na lokutá, maloba na kotuka.’‘ (Matai 15:19) Yango wana Paulo akomaki ete: “Malamu malingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo malingi ngai te, nakosalaka bobele yango. Na bongo, soko nakosala yango elingi ngai te, ezali ngai moto nakosalaka bongo te, kasi masumu mazali kofanda kati na ngai.” (Baloma 7:19, 20)Kasi, tokoki kolemba nzoto te, mpamba te ntoma Paulo alobaki lisusu ete:“nazali kobeta nzoto na ngai mpe nakómisi yango lokola moombo ete naboyama te na motindo moko to mosusu.” Kobeta nzoto elimboli kosalela ezaleli ya komipekisa.—1 Bakolinti 9:27.
19. Mpo na nini Paulo azalaki na bantina ya koloba ete azalaki kobɛta nzoto na ye?
19 Paulo azalaki na bantina ya koloba ete azalaki kobɛta nzoto na ye, mpamba te ye oyo azali komipekisa asengeli mbala mosusu kobundisa naino bamaladi mingi, lokola hypertension, ba nerfs, kozanga mpɔngi, mpasi na motó, mpasi na libumu mpe bongo na bongo. Kati na lisoló lilandi, tokotalela bizaleli mpe myango misusu oyo mikosalisa biso mpo na komipekisa.
Bozongeli
◻ Mpo na nini komipekisa ezali na ntina mingi?
◻ Tánga mwa bandakisa ya bato oyo babungisaki matomba mpo ete bazangaki komipekisa
◻ Kati na makambo nini tosengeli komipekisa?
◻ Biloko misato nini oyo bizali kotɛmɛla ete tosalela komipekisa te?
[Elilingi na lokasa 10]
Baklisto basengeli komipekisa katina kolya mpe na komela
[Elilingi na lokasa 11]
Komipekisa ezali kosalisa biso ete tomipesa na bilobaloba mabe te
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 8]
Historical Pictures Service