Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/10 nk. 13-17
  • Bóbakisa na boyebi na bino ezaleli ya komipekisa

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bóbakisa na boyebi na bino ezaleli ya komipekisa
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komipekisa, ezaleli oyo tosengeli koyekola
  • Ezali mpasi koleka mpo na bato mosusu
  • Koyeba komipekisa na kati ya libala
  • Tótika kosalisana te
  • Tolóna mbuma oyo ete komipekisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini komipekisa​—ezali na ntina mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na kozwa mbano, zalá na komipekisa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Kolisá komipekisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/10 nk. 13-17

Bóbakisa na boyebi na bino ezaleli ya komipekisa

“Bóbakisa . . . na boyebi na bino ezaleli ya komipekisa.”​—2 PETELO 1:5-8.

1. Mikakatano mingi oyo tozalaka na yango eutaka na bolɛmbu nini?

NA KAMPANYE moko monene oyo esalemaki na États-Unis mpo na kokebisa bato na momeseno ya komɛla bangi, bazalaki koyebisa bilenge ete: “Lobá kaka ‘te.’” Makambo elingaki kozala malamu koleka soki moto nyonso akokaki koloba “te” na bangi kaka te, kasi mpe na molangwa, na pite mpe ekobo, na mimbongo ya mabe mpe na “bamposa ya mosuni”! (Baloma 13:14) Kasi, moto nyonso ayebi ete koloba “te” ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te.

2. (a) Bandakisa nini ya Biblia ezali komonisa ete mokakatano ya koloba “te” ebandi lelo te? (b) Bandakisa yango esengeli kolendisa biso na kosala nini?

2 Lokola komipekisa ezali mpasi mpo na bato ya kozanga kokoka, tosengeli koluka koyeba ndenge ya kolonga bolɛmbu nyonso oyo tozali na yango. Biblia elobeli bato ya kala oyo bazalaki kosala makasi mpo na kosalela Nzambe kasi ntango mosusu bakokaki te koloba “te.” Kanisá ndenge Davidi asalaki ekobo na Bata-Seba. Lisumu yango ememaki liwa ya mwana oyo babotaki na ekobo mpe liwa ya mobali ya Bata-Seba, bato mibale oyo basalaki mabe te. (2 Samwele 11:1-27; 12:15-18) Kanisá mpe ntoma Paulo, oyo alobaki polele ete: “Mpo malamu oyo nazali kolinga nazali kosala yango te, kasi mabe oyo nazali kolinga te yango nde nazali na momeseno ya kosala.” (Baloma 7:19) Yo mpe okutanaka na mokakatano ya ndenge wana? Paulo abakisaki boye: “Nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe engebene moto oyo ngai nazali na kati, kasi nazali komona na kati ya binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba ná mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na kati ya binama na ngai. Ngai moto ya mawa! Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali kozwa liwa oyo?” (Baloma 7:22-24) Bandakisa oyo Biblia elobeli esengeli kolendisa ekateli na biso ya kolɛmba te na molende na biso ya kokóma mpenza na komipekisa.

Komipekisa, ezaleli oyo tosengeli koyekola

3. Limbolá ntina oyo tokoki kokanisa te ete komonisa ezaleli ya komipekisa ezali pɛtɛɛ.

3 Komipekisa, oyo elimboli mpe likoki ya koloba “te,” elobelami na 2 Petelo 1:5-7, esika moko na kondima, ezaleli malamu, boyebi, ezaleli ya koyika mpiko, ezaleli ya kokangama na Nzambe, bolingo ya bondeko mpe bolingo. Tobotamaka ata na moko te ya bizaleli malamu yango. Tosengeli nde kolona yango. Mpo na komonisa yango mpenza, esɛngaka kozwa ekateli makasi mpe molende. Boye, tokoki nde kolikya ete kolona ezaleli ya komipekisa ekozala pɛtɛɛ?

4. Mpo na nini bato mingi bazali komona ete kolona ezaleli ya komipekisa ezali na ntina te mpo na bango, kasi yango ezali komonisa nini?

4 Ebele ya bato bakoki kokanisa ete kolona ezaleli ya komipekisa ezali na ntina te mpo na bango. Bato yango basalaka makambo kaka ndenge motema na bango elingi; ezala bayebi yango to te, balandaka kaka bamposa ya nzoto na bango ya kozanga kokoka mpe bakanisaka te mbuma oyo yango ekobota mpo na bango moko mpe mpo na bato mosusu. (Yuda 10) Emonani mpenza ete lelo oyo, koleka ndenge ezalaki liboso, bato bazali na likoki mpe na mposa te ya koloba “te.” Yango emonisi ete tozali na “mikolo ya nsuka” oyo Paulo alobelaki ntango asakolaki ete: “Bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza ekozala. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, . . . bazangi komipekisa.”​—2 Timote 3:1-3.

5. Mpo na nini Batatoli ya Yehova bamonaka ete koyeba komipekisa ezali na ntina, mpe toli nini tosengeli kolanda ata na moi ya lelo?

5 Batatoli ya Yehova bayebi malamu ete kolona ezaleli ya komipekisa ezali lisɛki te. Lokola Paulo, bayebi ete etumba monene ezali kati na mposa ya kotosa mibeko ya Nzambe mpo na kosepelisa ye mpe mposa ya kolanda makambo oyo nzoto ezangi kokoka ekoki kosɛnga. Yango wana, banda kala balingaka koyeba ndenge bakoki kolonga etumba yango. Na 1916, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko elobelaki “ndenge tosengeli kosala mpo na koyeba komipekisa, kopekisa makanisi na biso, maloba na biso mpe etamboli na biso.” Elobaki ete tosengeli te kobosana toli ya Bafilipi 4:8. Ata lelo oyo, tosengeli kolanda toli ya Nzambe oyo ezali na vɛrsɛ yango, atako epesamaki eleki lelo soki mbula 2 000 mpe mbala mosusu kolanda yango ekoki kozala mpasi lelo oyo koleka ndenge ezalaki na 1916. Atako bongo, baklisto basalaka makasi mpo na koloba “te” na bamposa ya mokili, mpo bayebi ete ntango bazali kosala bongo bazali koloba “ɛɛ” na Mozalisi na bango.

6. Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto te ntango tozali kolona ezaleli ya komipekisa?

6 Batángi ezaleli ya komipekisa na kati ya “mbuma ya elimo [santu]” na Bagalatia 5:22, 23. Soki tozali komonisa ezaleli yango elongo na “bolingo, esengo, kimya, motema molai, motema malamu, bolamu, kondima [mpe] boboto,” tokozwa matomba mingi. Soki tozali komonisa yango, ndenge Petelo alobaki, ekopekisa biso kozala “bato oyo bazangi kosala mosala to bato oyo bazangi kobota mbuma” na mosala ya Nzambe. (2 Petelo 1:8) Kasi, ata soki tozali koumela mpo na komonisa bizaleli yango mpe soki tozali kolonga kosala yango na makambo nyonso te na ndenge tolingi, tosengeli te kolɛmba nzoto to komipesa foti. Na ntembe te omonaka ete na kelasi, bana mosusu bakangaka makambo noki koleka bamosusu. To mpe na mosala, moto mosusu akoki koyeba kosala mosala moko boye noki koleka baninga na ye. Ndenge moko mpe, bato mosusu bayekolaka mpe bamonisaka bizaleli ya boklisto noki koleka basusu. Likambo eleki ntina ezali ete tókoba kolona bizaleli oyo esepelisaka Nzambe na ndenge oyo tokokoka. Tokoki kosala yango soki tozali kosala nyonso mpo na kondima lisalisi oyo Yehova azali kopesa biso na nzela ya Liloba na ye mpe ya lisangá na ye. Kozala na mposa makasi ya kokende ntango nyonso liboso ezali na ntina mingi koleka kosala mbangumbangu mpo na kokokisa mokano oyo tozali na yango.

7. Nini ezali komonisa ete koyeba komipekisa ezali na ntina mingi?

7 Atako batángi ezaleli ya komipekisa na nsuka ya bizaleli oyo elimo ebotaka, elingi koloba te ete ezali na nse ya bizaleli mosusu nyonso. Tóbosana te ete soki tózalaka na ezaleli ya komipekisa na ndenge ya kokoka, tolingaki kolonga “misala ya mosuni” nyonso. Kasi, bato ya kozanga kokoka babendamaka na lolenge mosusu ya “misala ya nzoto . . . , pite, bosɔtɔ, etamboli ya mbindo, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, bokabwani, mwa mangomba.” (Bagalatia 5:19, 20) Yango wana, tosengeli ntango nyonso kobunda, kozala na ekateli ya kobengana bamposa nyonso ya mabe na makanisi mpe na mitema na biso.

Ezali mpasi koleka mpo na bato mosusu

8. Makambo nini esalaka ete bato mosusu bákokaka te komipekisa?

8 Baklisto mosusu bazalaka na mokakatano mpo na kolona ezaleli ya komipekisa koleka basusu. Mpo na nini? Ekoki kozala mpo na ndenge baboti na bango babɔkɔlaki bango to mpo na makambo mosusu oyo bakutaná na yango na bomoi na bango. Soki tomoni ete kolona ezaleli ya komipekisa ezali mpasi te mpo na biso, tosengeli kosepela. Kasi, bato oyo bazali kokoka te kolona ezaleli yango, tosengeli koyokela bango mawa mpe komitya na esika na bango, ata soki kozanga komipekisa na bango ezali koyokisa biso mpasi. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, moto moko te akoki komonisa ete ye nde aleki na boyengebene!​—Baloma 3:23; Baefese 4:2.

9. Bolɛmbu nini bato mosusu bazali na yango, mpe ntango nini bolɛmbu yango nyonso ekosila?

9 Tópesa ndakisa: Mbala mosusu toyebi ete baninga na biso baklisto mosusu oyo batiká komɛla likaya to bangi bakoki ntango mosusu koyoka lisusu mposa na yango makasi. Mpo na bato mosusu mpe ezalaka mpasi kolya to komɛla masanga na bokatikati. Bamosusu bakokaka te kopekisa lolemo na bango, mpe mbala mingi monɔkɔ na bango ebɛtaka libaku. Mpo na kolonga bolɛmbu ya ndenge wana, esɛngaka molende mingi mpo na kolona ezaleli ya komipekisa. Mpo na nini? Yakobo 3:2 elobi solo ete: “Biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi. Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, ye azali moto ya kokoka, oyo akoki kopekisa mpe nzoto na ye mobimba.” Bato mosusu mpe babendamaka mingi na masano ya mbongo. To mpe bakokaka te kopekisa nkanda na bango. Mpo na kolonga makambo wana mpe bolɛmbu mosusu ya ndenge yango, ekoki kozwa ntango mingi. Ata soki tosili kolonga bamposa mingi ya mabe, tokolonga na etumba yango mpo na libela kaka ntango tokokóma bato ya kokoka. Liboso na yango, soki tozali kosala makasi mpo na kolona ezaleli ya komipekisa, yango ekosalisa biso tózonga lisusu na bomoi ya masumu te. Lokola etumba esili naino te, esengeli tópesanaka mabɔkɔ mpo tólɛmba te.​—Misala 14:21, 22.

10. (a) Mpo na nini bato mosusu bazalaka na mokakatano makasi mpo na komipekisa na makambo ya kosangisa nzoto? (b) Mbongwana monene nini ndeko-mobali moko asalaki? (Talá etanda na lokasa 16.)

10 Bato mosusu bakokaka te komipekisa na makambo etali kosangisa nzoto. Yehova Nzambe ye moko nde akelá biso na mposa ya kosangisa nzoto. Kasi, bato mosusu bazali na mokakatano monene mpo na kotosa mitinda ya Nzambe na makambo ya kosangisa nzoto. Mokakatano na bango ekoki kokóma lisusu monene mpo mposa ya kosangisa nzoto ezali makasi epai na bango. Mokili oyo etondi na ebele ya makambo ya pite oyo ezali kolamusa mposa yango na ndenge ebele. Yango ekoki kozala mokakatano mpo na baklisto oyo baponi kotikala naino minzemba mpo na kosalela Nzambe kozanga kotya makanisi na makambo ya libala. (1 Bakolinti 7:32, 33, 37, 38) Kasi, na boyokani na toli ya Biblia oyo elobi ete “eleki malamu kobala na esika ya kozika na mposa,” bakoki kozwa ekateli ya kobala, oyo ezali mpe mabe te. Nzokande, bazali na ekateli ya kobala “na kati na Nkolo kaka,” ndenge Biblia esɛngi. (1 Bakolinti 7:9, 39) Tokoki kolikya ete Yehova asepelaka na ndenge balingaka kobatela mibeko na ye ya sembo. Baninga na bango baklisto bazalaka na esengo ya kozala na baninga oyo bazali basambeli ya solo, oyo bazali kobatela mitinda malamu mpe bazali kotikala sembo.

11. Ndenge nini tokoki kosalisa ndeko moko oyo azali na mposa ya kobala kasi azali kobala kaka te?

11 Ezali boni soki ozali komona te molongani oyo abongi na yo? Kanisá mpasi oyo moto akoki kozala na yango soki azali na mposa ya kobala kasi azali kobala kaka te! Ntango mosusu azali komona baninga bazali kobala mpe koyoka bisengo ya libala, kasi ye azali koluka kaka molongani oyo abongi na ye. Bato mosusu oyo bazali na mokakatano wana bakoki kokóma baombo ya momeseno mabe ya kosakana na binama na bango ya kobotela mpo na kosilisa mposa ya kosangisa nzoto. Ezala ata ndenge nini, moklisto moko te asengeli kosala likambo oyo ekoki kolɛmbisa moninga moklisto oyo azali kobunda mpo na kobatela nzoto na ye. Kozanga ete tóyeba yango, tokoki mpenza kolɛmbisa moninga moko soki tozali kotuna ye mituna ezangi ntina lokola, “Yango yo okobala mokolo nini?” Tokoki koloba yango na makanisi mabe te, kasi eleki malamu tóyeba komipekisa, elingi koloba tóbatela lolemo na biso! (Nzembo 39:1) Ebongi mpenza tópesa longonya na baninga na biso oyo bazali komibatela atako bazali naino minzemba. Na esika ya kolɛmbisa bango na maloba na biso, esengeli tólukaka nde kolendisa bango. Na ndakisa, ntango baklisto oyo bakɔmeli bayokani ete bákutana mpo na mwa bilei to mpo na kolekisa ntango elongo, basengeli kosala makasi bábosanaka minzemba te.

Koyeba komipekisa na kati ya libala

12. Mpo na nini ata bato oyo babalá basengeli koyeba komipekisa?

12 Na likambo ya kosangisa nzoto, ata moto oyo abalá asengeli kaka koyeba komipekisa. Na ndakisa, mposa ya kosangisa nzoto ya mobali ekoki kozala ndenge moko te na ya mwasi na ye. To mpe, ntango mosusu moko na bango akoki kokutana na mokakatano oyo esali ete kosangisa nzoto ezala mpasi mpo na ye to akoka yango te. Mbala mosusu, mpo na makambo mosusu oyo akutaná na yango, molongani moko akoki kozala na mokakatano mpo akokisa likambo oyo Biblia esɛngi: “Tiká ete mobali apesa mwasi na ye eloko oyo azali na lotomo ya kozwa; kasi tiká mwasi mpe asala ndenge wana epai ya mobali na ye.” Na ntango wana, molongani na ye asengeli koyeba mpenza komipekisa. Bango mibale basengeli kobosana te toli malamu oyo Paulo apesaki baklisto oyo babalá: “Bópimelanaka yango te, longola kaka soki bino mibale bondimi yango mpo na mwa ntango moko boye oyo etyami, na ntina ete bópesa ntango na libondeli mpe bóya lisusu kosangana, mpo Satana akoba te komeka bino mpo na kozanga komipekisa na bino.”​—1 Bakolinti 7:3, 5.

13. Tokoki kosala nini mpo na baoyo bazali kobunda mpo na koyeba komipekisa?

13 Bato oyo babalani bakozala na esengo mingi soki bayekoli komipekisa na likambo ya kosangisa nzoto. Lisusu, basengeli koyeba komitya na esika ya baninga na bango bandimi oyo bazali naino kokoka mpenza te komipekisa na likambo yango. Tosengeli kobosanaka te kobondelaka Yehova apesa bandeko na biso mayele, mpiko, mpe molende ya kokoba kobunda mpo na koyeba komipekisa mpe kosala makasi mpo na kolonga bamposa ya mabe.​—Bafilipi 4:6, 7. 

Tótika kosalisana te

14. Mpo na nini tosengeli koyokela baninga na biso baklisto mawa mpe koyeba komitya na esika na bango?

14 Ntango mosusu, ekoki kozala mpasi mpo na komitya na esika ya bandeko na biso baklisto oyo bazali kokoka mpenza te komipekisa na likambo oyo ezalaka mpasi te mpo na biso. Kasi, bato bakeseni. Bato mosusu bakokaka kokanga motema te; basusu bazalaka motema makasi. Komipekisa ezalaka mpasi te mpo na bato mosusu, mpo bayebaka mpenza kokanga motema na makambo mingi. Mpo na bamosusu komipekisa ezalaka mpasi mingi. Kasi, tóbosana te ete moto oyo azali kobunda mpo akóma na komipekisa azali moto mabe te. Esengeli tóyebaka komitya na esika ya baninga na biso baklisto mpe tóyokelaka bango mawa. Biso moko mpe tokozala na esengo soki tozali ntango nyonso komonisa motema mawa epai ya baoyo bazali kobunda mpo na kolona komipekisa. Tokoki komona yango na maloba ya Yesu na Matai 5:7.

15. Mpo na nini maloba ya Nzembo 130:3 ezali mpenza kobɔndisa na likambo ya komipekisa?

15 Soki moninga moklisto moko amonisi ezaleli ya boklisto te na libaku moko boye, tosengeli soki moke te komona ye mabe. Ezali esengo koyeba ete Yehova amonaka kaka te mbala moko oyo tokwei, kasi amonaka mpe mbala ebele oyo tolongaka komipekisa, ata soki bandeko na biso baklisto bamoni yango te. Tokoki mpe kobɔndisama mpenza soki tokanisi maloba ya Nzembo 130:3 (NW) : “Soki olandelaka mabunga, Ee Yah, Ee Yehova, nani akokaki kotɛlɛma?”

16, 17. (a) Ndenge nini tokoki kosalela Bagalatia 6:2, 5 na likambo ya koyeba komipekisa? (b) Na lisolo elandi, tokotalela nini na oyo etali ezaleli ya komipekisa?

16 Mpo na kosepelisa Yehova, mokomoko na biso asengeli kolona ezaleli ya komipekisa, kasi tóyeba mpe ete bandeko na biso baklisto bakotika biso te. Atako mokomoko na biso asengeli komema mokumba na ye, tolendisami ete tósalisanaka mpo na kolonga bolɛmbu. (Bagalatia 6:2, 5) Tosengeli kosepela mingi na moboti, molongani, to moninga oyo azali kopekisa biso kokende na bisika ya mabe, kotala makambo ya mabe, to kosala makambo ya mabe. Azali kosalisa biso tóyeba komipekisa, oyo ezali likoki ya koloba “te” na motema moko!

17 Baklisto mingi bakoki kondima makambo oyo tolobi na lisolo oyo mpo na ezaleli ya komipekisa, kasi bakoki komona ete bazali naino na makambo mingi ya kobongisa. Bakoki kozala na mposa ya koyeba mpenza komipekisa, na ndenge oyo moto ya kozanga kokoka akoki kolonga kosala yango. Yo mpe ozali na mposa ya ndenge wana? Soki bongo, okoki kosala nini mpo na kolona ezaleli yango oyo ezali na kati ya mbuma ya elimo? Ndenge nini kosala yango ekoki kosalisa yo na komityela mikano mosusu ya elimo? Tótalela yango na lisolo oyo elandi.

Ozali koyeba lisusu?

Mpo na nini ezaleli ya komipekisa . . .

• ezali na ntina mpo na baklisto?

• ezali etumba monene mpo na bamosusu?

• ezali na ntina na kati ya libala?

• ezali ezaleli oyo tokoki kosalisana mpo na kolona yango?

[Etanda/Elilingi na lokasa 16]

Ayekolaki koloba “te”

Motatoli ya Yehova moko ya Allemagne azalaki kosala na biro moko ya kopanza nsango. Mosala na ye ezalaki kosɛnga kopanza baemisyo ya televizyo mpe radio soki 30. Soki bililingi ya televizyo moko ekómi kobeba, asengelaki koluka esika kwokɔsɔ ezali mpe kobongisa. Alobi boye: “Bililingi ya televizyo ezalaki kobeba kaka na ntango bazali kolakisa bitumba to bato bazali kosangisa nzoto. Bililingi ya makambo ya mabe ezalaki kotikala na makanisi na ngai mikolo mingi, ntango mosusu bapɔsɔ, lokola nde bakɔtisi ngai yango na bɔɔngɔ.” Alobi ete likambo yango ekómaki kobebisa elimo na ye: “Nazalaka makila mɔtɔmɔtɔ, mpe bililingi ya makambo mabe ezalaki kobakisa mokakatano na milende na ngai mpo na koyeba komipekisa. Komona bililingi ya bato bazali kosangisa nzoto ememelaki ngai matata ná mwasi na ngai. Nakómaki na etumba ya mokolo na mokolo. Mpo na kolonga etumba yango, nazwaki ekateli ya koluka mosala mosusu, atako soki bakofuta ngai ndenge moko te. Eleki mwa mikolo, nazwaki mosala mosusu. Mposa na ngai ekokisamaki.”

[Bililingi na lokasa 15]

Boyebi oyo tozwi na koyekola Biblia esalisaka biso tóyeba komipekisa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto