Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/10 nk. 18-22
  • Mpo na kozwa mbano, zalá na komipekisa!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na kozwa mbano, zalá na komipekisa!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komipekisa mpo na kosala malamu
  • “Na makambo nyonso”?
  • Tókóma bato oyo bakɔmeli na nzela ya komipekisa
  • Ndenge ya kolona ezaleli ya komipekisa
  • Tolóna mbuma oyo ete komipekisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini komipekisa​—ezali na ntina mingi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Bóbakisa na boyebi na bino ezaleli ya komipekisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Kolisá komipekisa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/10 nk. 18-22

Mpo na kozwa mbano, zalá na komipekisa!

“Moto nyonso oyo azali kosangana na kati ya momekano moko amipekisaka na makambo nyonso.”​—1 BAKOLINTI 9:25.

1. Na boyokani na Baefese 4:22-24, ndenge nini bamilio ya bato bandimi kosala mokano ya Yehova?

SOKI ozwá batisimo mpo na kokóma Motatoli ya Yehova, omonisaki na miso ya bato ete ondimi kokɔta na momekano oyo mbano na yango ezali bomoi ya seko. Ondimaki kosala mokano ya Yehova. Liboso ya komipesa na Yehova, mingi kati na biso tosengelaki kobongwana mpenza mpo tómipesa na ndenge ya solosolo mpe Nzambe andima biso. Tolandaki toli oyo ntoma Paulo apesaki baklisto ete: ‘Bólongola bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na bino ya liboso mpe oyo ezali kopɔla engebene bamposa na yango ya bokosi . . . Bólata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo.’ (Baefese 4:22-24) Na maloba mosusu, liboso tóndima komipesa na Nzambe, toboyaki makambo mabe oyo tozalaki kosala kala.

2, 3. Ndenge nini 1 Bakolinti 6:9-12 emonisi ete esengeli kobongwana na ndenge mibale mpo na kosepelisa Nzambe?

2 Liloba ya Nzambe eyebisi polele bizaleli mosusu ya bomoto ya kala oyo bato oyo balingi kokóma Batatoli ya Yehova basengeli kotika. Paulo atángaki bizaleli yango mosusu na mokanda oyo akomelaki Bakolinti, alobaki boye: “Bato ya pite, mpe basambeli ya bikeko, mpe bato ya ekobo, mpe mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mpe mibali oyo balalaka na mibali, mpe miyibi, mpe bato ya lokoso, mpe balangwi-masanga, mpe bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” Na nsima, mpo na komonisa ete baklisto ya ekeke ya liboso babongolaki bizaleli na bango, abakisaki ete: “Nzokande bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana.” Tomoni ete alobi ete bazalaki, kasi alobi te ete bazali.​—1 Bakolinti 6:9-11.

3 Paulo amonisaki ete basengelaki mpe kobongwana na makambo mosusu, mpo alobaki lisusu ete: “Napesami nzela ya kosala makambo nyonso; kasi makambo nyonso epesaka litomba te.” (1 Bakolinti 6:12) Yango wana, bato mingi oyo balingi kokóma Batatoli ya Yehova bamonaka ete basengeli koboya makambo mosusu oyo epekisami te, kasi ezali mpenza na ntina to na litomba te. Ekoki kozala ete makambo yango elyaka ntango mingi mpe ekoki kopekisa bango kokokisa makambo oyo eleki ntina.

4. Baklisto oyo bamipesi na Nzambe bandimaka likanisi nini ya Paulo?

4 Moto amipesaka na Nzambe na bolingo na ye moko, kasi na kokakatana te lokola nde kosala yango ezali komipimela likambo moko monene koleka. Baklisto oyo bamipesi na Nzambe bandimaka makanisi ya Paulo oyo, nsima ya kokóma moyekoli ya Klisto, alobaki ete: “Mpo na [Yesu] nandimi kobunga ya biloko nyonso mpe natalelaka yango lokola liboke ya bosɔtɔ, mpo nazwa Klisto.” (Bafilipi 3:8) Paulo akakatanaki te koboya biloko oyo ezali mpenza na ntina te mpo akoba kondima Nzambe.

5. Paulo alongaki na bopoti mbangu nini, mpe ndenge nini biso mpe tokoki kosala lokola ye?

5 Paulo amonisaki komipekisa na bopoti mbangu ya elimo mpe na nsuka na yango alobaki ete: “Nasili kobunda etumba ya malamu mingi, nasili kopota mbangu tii na ndelo ya nsuka, nabateli kondima. Banda sikoyo babombeli ngai motole ya boyengebene, oyo Nkolo, mosambisi oyo azali moyengebene, akopesa ngai lokola mbano na mokolo yango, kasi kaka ngai te, kasi mpe baoyo nyonso basili kolinga komonisama na ye.” (2 Timote 4:7, 8) Biso mpe tokoloba ndenge yango mokolo mosusu? Tokoloba yango soki na kondima mpenza, tozali na komipekisa wana tozali kokoba kopota mbangu tii na nsuka.

Komipekisa mpo na kosala malamu

6. Komipekisa ezali nini, mpe tosengeli komonisa yango na makambo mibale nini?

6 Maloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo ebongolami “komipekisa” na Biblia ezali mpenza na ndimbola ya moto oyo azali na nguya to bokonzi likoló na ye moko. Mbala mingi emonisaka koboya kosala mabe. Kasi, ezali polele ete esengeli mpenza kozala na komipekisa mpo na kosalisa nzoto na biso misala malamu. Mitema ya bato ya kozanga kokoka ezalaka mingimingi na mposa ya kosala mabe; yango wana, tozali na bitumba mibale. (Mosakoli 7:29; 8:11) Tosengeli koboya kosala mabe, kasi tosengeli mpe kosala makasi mpo na kosala malamu. Kutu, kosalisa nzoto na biso misala malamu ezali lolenge malamu mingi ya koboya kosala mabe.

7. (a) Na ndakisa ya Davidi, tosengeli kobondela mpo na nini? (b) Komanyola likoló ya makambo nini ekosalisa biso na komonisa mpenza komipekisa?

7 Ezali polele ete komipekisa ezali na ntina mingi mpo na kokokisa ndai na biso ya komipesa epai ya Nzambe. Tosengeli kobondela lokola Davidi ete: “Ee Nzambe, zaliselá ngai motema ya pɛto mpe pesá ngai [elimo, NW] ya sika ya boyengebene kati na ngai.” (Nzembo 51:10) Tokoki komanyola likoló ya matomba oyo moto azwaka soki azali koboya makambo oyo ezali mabe mpo na elimo to ebebisaka nzoto. Kanisá mbuma mabe ya kozanga kokima makambo yango: maladi minene, kobebisa boyokani malamu, ata mpe liwa ya mobesu. Epai mosusu, kanisá ebele ya matomba ya kotikala na nzela ya bomoi oyo Yehova azali kolakisa. Kasi, tosengeli kobosana te ete motema na biso ezali na bokosi. (Yilimia 17:9) Yango wana, tosengeli kozwa ekateli makasi ya koboya mposa na yango ya kozwa mitinda ya Yehova na lisɛki.

8. Makambo oyo mingi kati na biso toyebi malamu ezali koteya biso nini? Pesá ndakisa.

8 Mingi kati na biso toyebi malamu ete nzoto elukaka kolɛmbisa elimo oyo elingi kosala malamu. Tózwa na ndakisa mosala ya kosakola Bokonzi. Yehova asepelaka ndenge bato bamipesaka na kosala mosala yango oyo ezali kobikisa bomoi ya bato. (Nzembo 110:3; Matai 24:14) Mpo na mingi kati na biso, koyekola kosakola ezalaki likambo ya pɛtɛɛ te. Esɛngaki​—mpe mbala mosusu ezali kosɛnga tii sikoyo​—ete tóyangela nzoto na biso, ‘tóbɛtabɛta yango makofi’ mpe ‘tókómisa yango lokola moombo,’ na esika tótika yango emema biso na kotika kosakola.​—1 Bakolinti 9:16, 27; 1 Batesaloniki 2:2.

“Na makambo nyonso”?

9, 10. Komonisa ezaleli ya “komipekisa na makambo nyonso” ezali mpe kosɛnga nini?

9 Toli oyo Biblia epesi ya “komipekisa na makambo nyonso” ezali komonisa ete tosengeli kosuka te kaka na kozala na bokonzi likoló ya makanisi na biso mpe koboya misala ya mbindo. Tokoki komona ete tozali na komipekisa na makambo yango, mpe soki ezali bongo, tosengeli kozala na botɔndi. Kasi, ezali boni mpo na makambo mosusu oyo tokoki komona te ntina ya komipekisa mpo na yango? Na ndakisa, tofandaka na mokili moko ya bozwi mpe tozali na bomoi ya malamu. Ekozala mpenza bwanya soki toyekoli koloba “te” na ezaleli ya kobebisa mbongo mpambampamba. Baboti basengeli koteya bana na bango bázala te na ezaleli ya kosomba eloko nyonso oyo bamoni, oyo esepelisi bango, to oyo bazali na mbongo mpo na kosomba yango. Nzokande, mpo malako ya ndenge wana ebota mbuma, bango moko baboti basengeli kopesa ndakisa malamu.​—Luka 10:38-42.

10 Koyekola komipimela biloko mosusu ekoki kolendisa ekateli na biso. Yango ekoki mpe kobakisa botɔndi na biso mpo na biloko oyo tozali na yango mpe kosalisa biso tóyeba komitya na esika ya baoyo bazangi biloko mosusu, ntango mosusu mpo bazangi makoki ya kozwa yango, kasi te mpo balingi bongo. Elimo ya komikitisa eyokani te na makanisi oyo epalangani mingi lokola “sepelisá nzoto na yo” to “obongi na biloko ya mpambampamba te.” Bapiblisite ezali kopusa bato na kolanda bisengo ya nokinoki, kasi ezali kosala yango mpo na matomba ya bato ya mombongo. Likambo yango ekoki koboma milende na biso mpo na komonisa ezaleli ya komipekisa. Zulunalo moko ya mboka moko ya bozwi mingi na Mpoto eyebisaki boye: “Soki kopekisa mposa ya makambo mabe ezali etumba mpo na bato oyo bafandi na bamboka ya bobola makasi, ezali boni mpo na bato oyo bafandi na ekólo oyo ezali na miliki mpe mafuta ya nzoi na mokili ya lelo oyo etondi na bozwi!”

11. Mpo na nini koyekola komipimela makambo mosusu ezali na litomba, kasi mokakatano na yango ezali nini?

11 Soki tozali koyeba kokesenisa te makambo oyo ezali kosepelisa biso mpe oyo tosengeli na yango mpenza, ekozala malamu tótalela soki tozali kosala makambo bisalela te. Na ndakisa, soki tolingi kolonga mposa ya kosomba biloko bisombela te, tokoki kozwa ekateli ya kodefa te, to ya komema kaka mbongo oyo ekoki ntango tokei kosomba biloko. Tóbosana te ete Paulo alobaki ete “ezaleli yango ya kokangama na Nzambe elongo na ezaleli ya kosepela na oyo ozali na yango” ezali “nzela ya kozwa litomba monene.” Alobaki boye: “Toyaki na eloko te na kati ya mokili, mpe tokoki komema eloko te. Na yango, kozaláká na bilei mpe na eloko ya kozipa nzoto, tokosepela na biloko wana.” (1 Timote 6:6-8) Tosepelaka na oyo tozali na yango? Kozala na bomoi ezangi mindɔndɔ, ya komipesa te na lolenge nyonso ya bisengo esɛngaka ekateli makasi mpe komipekisa. Kasi, ezali na ntina tóyekola kozala na bomoi ya lolenge wana.

12, 13. (a) Na ndenge nini koyangana na makita esɛngaka ezaleli ya komipekisa? (b) Tángá mwa makambo mosusu oyo ezali kosɛnga tómonisa ezaleli ya komipekisa.

12 Koyangana na makita ya lisangá, na mayangani ya minene mpe ya mike, esɛngaka mpe kozala na ezaleli ya komipekisa. Na ndakisa, tosengeli komipekisa mpo na kotika te ete makanisi na biso eyengayengaka ntango tozali kolanda masukulu. (Masese 1:5) Ekoki kosɛnga komipekisa mpo na koboya kosololasolola na bato oyo tofandi na bango mpe kotya likebi epai ya molobi mpe na bongo, kobungisa te likebi ya bato mosusu. Kobongisa programɛ na biso mpo tókómaka na ngonga malamu ekoki mpe kosɛnga komipekisa. Lisusu, ekoki kosɛnga komipekisa mpo na kozwa ntango ya kobongisa makita mpe kopesa biyano.

13 Komipekisa na makambo mikemike esalisaka biso mpo na komonisa yango na makambo ya minene. (Luka 16:10) Yango wana, ezali mpenza malamu tómityela mokano ya kotángaka ntango nyonso Liloba ya Nzambe mpe mikanda oyo elimbolaka Biblia, koyekola yango mpe komanyola makambo oyo tozali koyekola! Ezali mpenza bwanya koboya misala oyo elongobani te, baninga ya mabe, komekola elimo mpe bizaleli oyo ebongi te to mpe komityela mokano ya koloba “te” na makambo oyo ekoki kozangisa biso ntango mpo na mosala ya Nzambe! Kozala na mingi ya kosala na mosala ya Yehova ezali libateli monene na makambo oyo ekoki kolongola biso na paladiso ya elimo, elingi koloba lisangá ya Yehova na mokili mobimba.

Tókóma bato oyo bakɔmeli na nzela ya komipekisa

14. (a) Ndenge nini bana basengeli koyekola ezaleli ya komipekisa? (b) Matomba nini ekoki komonana soki bana babandi koyekola ezaleli yango ntango bazali naino mike?

14 Mwana oyo abotami sika azalaka na komipekisa te. Bato ya mayele oyo bayekolaka bizaleli ya bana bakomaki buku moko oyo elobi boye: “Komipekisa eyaka yango moko te to mpe na mbalakaka te. Baboti nde basengeli kotambwisa mpe kosunga bana oyo babotami sika ná bana ya mike mpo báyekola komipekisa. . . . Ntango baboti bazali kotambwisa bango, bana bakobanda mokemoke kokolisa komipekisa ntango bazali na bambula ya kelasi.” Bato ya mayele bayekolaki bizaleli ya bana ya mbula minei mpe bamonaki ete baoyo bayekolaki komonisa mwa moke komipekisa “mbala mingi bakómaki bilenge ya malamu, oyo bafandaka malamu na baninga, oyo babangabangaka te, mpe oyo bakoki kotyelama motema.” Baoyo babandaki naino koyekola komipekisa te “mbala mingi bazalaki kolinga kozala kaka bango moko, kosilika mpambampamba mpe motó makasi. Bazalaki kokoka komipekisa te mpe bazalaki kokima makambo nyonso ya mpasi.” Tomoni ete mpo mwana akóma mokóló ya solosolo, asengeli koyekola komipekisa.

15. Koyeba komipekisa te emonisaka nini, mpe yango eyokani te na mokano nini oyo Biblia elobeli?

15 Ndenge moko mpe, mpo tókóma baklisto oyo bakɔmeli, tosengeli koyekola kozala na ezaleli ya komipekisa. Soki toyebaka komipekisa te, ekomonana ete tozali naino babébé na elimo. Biblia elendisi biso ete ‘tókóma mikóló na oyo etali makoki ya kososola.’ (1 Bakolinti 14:20) Mokano na biso ezali ya ‘kokóma na bomoko na kati ya kondima mpe na kati ya boyebi ya solosolo ya Mwana ya Nzambe, na motindo ya moto oyo akoli mpenza, na mezire ya molai oyo ezali ya litondi ya Klisto.’ Mpo na nini? “Mpo tózala lisusu te bana mike, oyo bazali kotindikama lokola na mbonge mpe komemama epai na epai na mopɛpɛ nyonso ya mateya na nzela ya bokosi ya bato, na nzela ya mayele mabe ya kobotabota mabunga.” (Baefese 4:13, 14) Emonani mpenza ete koyekola ezaleli ya komipekisa ezali na ntina mingi mpo na bomoi na biso ya elimo.

Ndenge ya kolona ezaleli ya komipekisa

16. Ndenge nini Yehova asalisaka?

16 Mpo na kolona ezaleli ya komipekisa, esengeli Nzambe asalisa biso, mpe akopesaka biso lisalisi yango. Liloba ya Nzambe, lokola talatala ya polele, emonisaka biso bisika oyo tosengeli kobongisa, mpe eyebisaka biso nini tosengeli kosala mpo na kobongisa. (Yakobo 1:22-25) Tozali mpe na bandeko ya bolingo oyo basepelaka mpenza kosalisa biso. Bankulutu bayebaka mpenza komitya na esika na biso ntango bazali kosalisa biso. Yehova ye moko apesaka biso elimo santu na ye soki tosɛngi ye yango na nzela ya libondeli. (Luka 11:13; Baloma 8:26) Yango wana, tosengeli kozala na esengo ya kosalela bibongiseli yango. Makanisi oyo epesami na lokasa 21 ekoki kosalisa.

17. Ndenge nini Masese 24:16 ezali kolendisa biso?

17 Koyeba ete Yehova amonaka mpamba te milende oyo tosalaka mpo na kosepelisa ye ezali mpenza kolendisa! Yango esengeli kopesa biso makasi ya kokoba kosala nyonso mpo na kozala mpenza na komipekisa. Ata tokwei mbala boni, tosengeli kotika te kosala milende. “Moyengebene akokwea mbala nsambo nde akotɛlɛma lisusu.” (Masese 24:16) Mbala nyonso oyo tolongi kosepelisa Yehova, tosengeli mpenza kozala na esengo. Tokoki mpe kolikya ete Yehova asepeli na biso. Motatoli moko alobaki ete liboso amipesa na Yehova, mbala nyonso oyo alekisi pɔsɔ mobimba kozanga komɛla likaya, azalaki kosomba eloko moko ya ntina na mbongo oyo komipekisa esalisaki ye na kobomba.

18. (a) Etumba na biso mpo na komipekisa esɛngaka nini? (b) Elikya nini Yehova azali kopesa?

18 Oyo eleki nyonso, tosengeli kobosana te ete komipekisa ezali likambo oyo etaleli makanisi mpe motema na biso. Maloba ya Yesu ezali kondimisa biso yango: “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii na koyoka ye mposa asili kosala ekobo elongo na ye na kati ya motema na ye.” (Matai 5:28; Yakobo 1:14, 15) Moto oyo ayebi kopekisa makanisi mpe elimo na ye akozala na mokakatano te mpo na kopekisa nzoto na ye mobimba. Yango wana, tosengeli kolendisa mokano na biso ya kokima mabe, ezala na misala to na makanisi. Soki makanisi ya mabe ebandi koyela biso, tóbengana yango mbala moko. Tokoki kokima komekama soki tozali kobondela, miso na biso ntango nyonso epai ya Yesu. (1 Timote 6:11; 2 Timote 2:22; Baebele 4:15, 16) Ntango tozali kosala nyonso oyo tokoki, tokobosana te toli ya Nzembo 55:22: “Kitisá mokumba na yo epai ya [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.”

Ozali koyeba lisusu

• Wapi ndenge mibale oyo tosengeli komonisa ezaleli ya komipekisa?

• Komonisa “komipekisa na makambo nyonso” elimboli nini?

• Makanisi nini ya malamu mpenza osimbi na boyekoli oyo ekoki kosalisa yo na kolona ezaleli ya komipekisa?

• Komipekisa ebandaka wapi?

[Etanda/Bililingi na lokasa 21]

Ndenge ya kokolisa ezaleli ya komipekisa

• Kolona yango ata na makambo ya mikemike

• Komanyola na matomba oyo tokoki kozwela yango sikoyo mpe na mikolo ekoya

• Koboya makambo oyo Nzambe apekisi mpe kolanda makambo oyo elendisaka

• Kobengana mbala moko makanisi ya mabe

• Kotondisa makanisi na makambo oyo etongaka na elimo

• Kondima lisalisi ya baninga baklisto oyo bakɔmeli

• Kokima bisika mpe makambo oyo ekoki komema na mabe

• Kobondela Nzambe mpo na kosɛnga ye lisalisi na ntango omekami

[Bililingi na lokasa 19]

Ezaleli ya Komipekisa etindaka biso na kosala malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto