Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/7 nk. 3-4
  • Mpo na nini bato mingi bazangi elikya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini bato mingi bazangi elikya?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mwango ya nsuka
  • Elikya oyo ezwi elónga likoló na kozanga elikya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge nini koyika mpiko ntango tozali lisusu na elikya te?
    Lamuká!—2000
  • Etikali moke moto nyonso akozala na elikya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Libondeli ya moto ya komikitisa
    Tóyembela Yehova na esengo
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/7 nk. 3-4

Mpo na nini bato mingi bazangi elikya?

ELIKYA ya kozala na bomoi malamu emonani! Bato mingi oyo bazalaki kofanda na mboka oyo ebengamaki liboso Allemagne de l’Est bakanisaki bongo, na ntango efélo ya Berlin ekweaki na novembre 1989. Kasi, mwa moke nsima na mobu moko, bazalaki komilela ete “malamu kozingama na efélo ya Berlin na esika na kofanda na mokili ya démocratie capitaliste.” Yango ebimisaki makambo nini? Mawa mpe kozanga elikya oyo ezali kokóla.

Mobulu na libota mpe na libandá ya libota ekoki kosɛngisa bato ete batika ndako na bango mpo na koluka kimya epai mosusu, kasi bobele bato moke nde bazali kozwa yango. Basusu bazali kosuka na kosangana na bato bazangi ndako baoyo bakotambolaka na balabala ya bingumba. Na mikili misusu, mingi kati na bango bazali na mikakatano makasi. Bazali na makoki ya kofutela ndako te mpo ete basalaka mosala te, mpe bakoki kozwa mosala te mpo ete bazangi esika ya kofanda. Bibongiseli bisalemi na Leta mpo na kosalisa bato bizali komeka kosunga bango, kasi kosilisa mikakatano esɛngaka ntango molai. Ekopesa nkanda mpe kozanga elikya.

Mpo na kozanga elikya, basi mingi bakómi kosalela mwango mabe mpo na kosilisa mikakatano na bango. Kati na rapport moko ezalaki na titre Les femmes et la criminalité dans les années 90 (angl.), Susan Edwards, molakisi molandi na droit (na université), apesi ndimbola oyo ete: “Lolenge oyo bilenge basi bazali komipesa [na pité] emonani lokola nde euti na mikakatano ya nkita, kasi ezali mpenza te ete bazangi komiboyisa to ezali te ete bazangi kozwa discipline na mabota na bango.” Bobele bongo, bilenge mibali oyo bazali kotika mabota na bango mpo na kokende koluka mosala bazali kozwa yango te. Na ntina na kozanga elikya, bamoko bazali ‘kosala misala ya mwa ntango moke,’ mpe bazali komipesa na kosangisa nzoto mibali na mibali mpo na kozwa bilei mpe esika ya kofanda, wana ezali bango ntango nyonso elongo na basali na mabe.

Matáta na makambo ya politike, mobulu, mikakatano na makambo ya nkita, nyonso wana ekoki kolongola elikya na makambo mingi. Ata baoyo bazali na bisika malamu na mosala balongolami te na mikakatano oyo, mpamba te bazali koluka kobatela lolenge ya bomoi na bango malamu na komekáká kolónga mikakatano makasi na ntina na mosolo. Yango ebimisi makambo nini? Na ntango na kala, Mokonzi Salomo alobaki ete: “Moto na mayele akokómaka zoba mpo na minyoko.” (Mosakoli 7:7, MN)a Ya solo, kozanga elikya ekomamaka bato mingi na mwango oyo ya nsuka: komiboma.

Mwango ya nsuka

Bato mingi oyo bamibomi kati na bango mpe bilenge, bamonisi ete bango mpe bazali kokutana na mokakatano oyo ete kozanga elikya. Mwasi moko akomaka makambo na kala kati na zulunalo moko na Angleterre, atunaki motuna oyo ete: “Nini esali ete bilenge mingi bazanga elikya na eleko na biso?” Na ankete oyo asalaki epai na bana ya mibu 8 kino mibu 16 baoyo bakɔtisamaki lopitalo nsima wana balingaki komɛla nkisi mpo na komiboma, docteur Eric Taylor, ya Institut psychiatrique ya Londres, alobaki boye: “Ezali likambo na mawa na komona ete ebele na bana oyo basili kolɛmba na motema, bazali ata na elikya moke te.” Mbula na mbula na Grande-Bretagne, soko bato 100 000 balukaka komiboma na komeláká nkisi, mpo na komonisa ete bazangi elikya ya kozwa lisalisi.

Ebongiseli moko ya kosalisa bato na mboka Grande-Bretagne esalemaki mpo na kosunga baoyo bazangi elikya. Bongo, bapesi-toli bamonisaki “myango mosusu na esika na kufa.” Kasi, bandimi ete bakoki te kosilisa mikakatano miuti na kozanga elikya.

Zulunalo The Sunday Correspondent eyebisi ete: “Motuya ya bato oyo bazali komiboma emonisi bozoba mpe kozanga boyokani kati na bato.” Mpo na nini motuya ya bato oyo bazali komiboma mozali mingi lelo? Zulunalo yango etangi “kozanga ndako, komela masanga makasi, maladi ya SIDA mpe bokangami ya lopitalo lokosalisaka maladi ya motó” lokola makambo oyo mazali kobimisa kozanga elikya oyo ememi bato na kotalela komiboma lokola mwango bobele moko mpo na kosilisa mikakatano na bango.

Ezali na elikya oyo ekoki kolongola kozanga elikya? Ee, Yesu ayebisaki maloba oyo na kolendisa ete: “Botɛlɛma alima mpe botómbola mitó na bino.” (Luka 21:28, MN) Alingaki koloba nini? Elikya nini ezali wana?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Engebene Dictionnaire théologique de l’Ancien Testament (angl.), ya Harris, Archer mpe Waltke, ebandeli ya liloba libongolami na “minyoko” lizali na boyokani na “likambo oyo ete komemisa babólá bozito monene, konyata bango mpe kotuta bango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto