Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/9 nk. 28-31
  • Okoki kolonga mawa ya motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kolonga mawa ya motema
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mwa myango mpo na kolonga mawa ya motema
  • Bazali makasi atako mawa ya motema
  • Mosika te mawa ya motema ekosila
  • Mpo na nini tosengeli te kotya elikya na makambo oyo eleki ndelo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Okoki kolonga kokakatana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Lolenge ya kozwa elikya kati na ezalela ya kozanga elikya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mpo na nini tata na ngai to mama na ngai alingaka ngai te?
    Lamuká!—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/9 nk. 28-31

Okoki kolonga mawa ya motema

TOTALELA ezalela ya bomoi ya mpasi ya mobali moko oyo azalaki na mibu 23. Asalaki bakelasi mingi te mpe azali kozwa bobele lifuti moke na mosala. Mpo na ye, ntina ezali te na kokanisa mpo na makambo ya libala mpe kozala na bomoi malamu. Yango wana mama na ye alobaki ete: “Azali na mawa mingi mpe azali mpenza na mayoki ya kozanga bolongi.” Likambo ya elenge mobali oyo lizali mpe komonana epai na bamilió mingi ya bato mosusu. Mpo na ntina moko to mosusu, bato nyonso baokaka mawa na motema.

Mawa ya motema, ezali mayoki oyo moto azalaka na yango nsima “na kozanga eloko azelaki mpo na kozwa yango, kati na elikya na ye.” (Dictionnaire alphabétique et analogique de la langue française ya Paul Robert) Tookaka mawa ya motema na ntango tozangi kokokisa likambo oyo lisengaki biso milende mingi. Nokinoki tokooka ete topekisami, lokola nde tozalaki liboso ya etutu, kozanga ata likoki moko mpo na kolónga. Biso nyonso tozalaka na mayoki wana.

Baoyo bazali kosala mosala moko momonani lokola ete mozangi ntina, bakoki komiyoka lokola nde bazali bato mpamba. Soki bamoniseli bango botondi te mpo na milende na bango, basi mpe bamama ya mabota oyo bazalaka na mitungisi mokolo na mokolo mpe na mikumba mingi oyo mikolɛmbisaka, bazalaka mbala mosusu na mayoki ya kozanga esengo mpe ya koboya komitya na esika ya bato mosusu. Bilenge oyo bazali kokutana na mimekamo na eteyelo bakoki kokanisa ete milende na bango mpo na koyekola, mizali na ntina te. Baoyo makanisi na bango mandimami na bato mingi te, bakoki kozala na mayoki ya nkanda, kondimisamáká ete bazali kotalela bango na bokesene. Bato ya mombongo baoyo, na bosembo nyonso, bazali kosala misala na bango na lolenge ya malamu bakoki kobebisama na baninga na bango oyo bazangi sembo, baoyo babangaka likambo te. Makambo wana, mpe mosusu oyo ekokani, ekopesaka mawa ya motema mpe ekosilisaka elikya epai na bato mingi.

Moto moko ya mayele, oyo azalaki na bomoi esili koleka bikeke mingi, amonisaki mawa ya motema na ye na kosaleláká maloba oyo tokoki kokanga ntina na yango. Salomo, mokonzi ya Yisraele, alobaki ete: “Ngai natali misala nyonso misalaki mabɔkɔ na ngai mpe na makambo nyonso mamekaki ngai kosala, mpe tala, nyonso ezalaki bobele mpamba mpe koluka kokwa mopepe, mpe eloko ya litomba ezalaki te na nsé na moi. Mpamba te, moto akozwa nini na mosala na ye nyonso mpe mpasi na motema na ye oyo ye asalaki na yango na nsé na moi? Mpo ete mikolo na ye nyonso mizali mpasi mpe mosala na ye mozali mawa; ata na butu motema na ye ekopema te. Yango mpe ezali mpamba.” (Mosakoli 2:11, 22, 23) Maloba oyo na Salomo mamonisi kozanga elikya oyo bato mingi bazalaka na yango na ntango bameki kobundisa mawa ya motema oyo ezali kopekisa bango na kozala na bomoi malamu.

Mawa ya motema ekoki nkutu komema na kozanga elikya. Kati na makambo ya mpasi mingi, basusu balembaka mpe bakolandaka bomoi bolongobani te. Basusu bakosalaka mabe mpe mobulu mpo na kozwa biloko oyo bakanisi ete bazali na lotomo mpo na kozwa yango. Mabala mpe boyokani kati na mabota ezali sé kobeba.

Mingi kati na biso tosengeli ntango mosusu kosala milende mingi mpo na kobundisa mawa ya motema. Atako milende nyonso oyo tokosala, makambo makoki mbala mosusu komonana lokola mazali sé kobeba. Masese 13:12 elobi ete: “Elikya ezilisami ekopesaka mpasi na motema.” Bolamu na biso ya nzoto mpe ya elimo ekoki mbala mosusu kozala na likámá. Elikya ata moko ezangi? Tosengeli ntango nyonso kozala na mawa ya motema mpo na bolɛmbu na biso to na mabungá na biso? Tokoki mpenza kosala nini mpo na kobundisa mawa ya motema mpe kozala na bomoi ya esengo? Totalela makambo oyo.

Mwa myango mpo na kolonga mawa ya motema

Wana tokutani na likambo moko mpe ete tozali na mposa ya toli, tokokende mpenza epai na moto oyo ayebi makambo mingi mpe azali na mayele, oyo totyelaka ye motema. Masese 3:5, 6 epesi etinda oyo, ete: “Talela Jéhovah na motema na yo mobimba mpe ndima bososoli na yo moko te. Talela ye kati na banzela na yo nyonso, mpe ye akotambolisa yo.” Liloba na Nzambe, Biblia, ekoki kopesa biso batoli malamu oyo ekopesa biso mayele. Totala mwa bandakisa.

Mawa ya motema ekoki kouta na mposa ya koluka kolónga na bomoi. Na ndakisa, mbala mosusu tozali kosepela na mosala na biso, kasi tokoki konyokwama na makanisi na ntina na mosolo moke oyo tozali kozwa. Tolingi libota na biso mpe tolingi koluka biloko malamu bibongi na yango. Emonani ete mikumba oyo tozali na yango mpo na kobimisa mosolo ezalaka ntango nyonso ntina ya mitungisi. Esengeli na biso mbala mosusu kobakisa ngonga mosusu nsima na ngonga ya mosala, ata mpe kosala na bisika mibale. Na nsuka, tokomona ete bomoi ezwami bobele na: kolya, kolála mpe kosala mosala. Nzokande, banyongo ezali sé koyikana mpe mawa ya motema ezali sé kobakisama.

Tozali kosala mosala, liboso mpenza, mpo na kokokisa bamposa na biso. Kasi bamposa yango ezali nini? Ntóma Paulo akomaki ete: “Biso toyaki na eloko kati na mokili te, mpe tokoki kozonga na eloko te longwa na yango. Na bongo, soki tozali na bilei mpe bilamba, tosepela na yango.” Tozali nde komeka kozwa koleka biloko oyo, mpo na kokokana na bato mosusu mpe kosala makambo motindo moko na bango? Soki ezali bongo, tozali ntango mosusu na mpasi oyo euti na mawa ya motema. Paulo apesaki likebisi oyo ete: “Baoyo bamipesi mpo na kokóma bazwi bazali kokwea kati na komekama, kati na motambo mpe kati na bamposa mingi mabe mpe na mpasi, oyo ekozindisa bato kati na kufa mpe na libebi. Mpo ete bolingo ya mbongo ezali ebandeli ya motindo na makambo nyonso mabe, mpe wana bakómaki na bolingo yango, bamoko basili kopɛngwa [mosika] na kondima mpe bango mpenza basili komitɔbɔla na mpasi mingi na bipai nyonso.” (1 Timoté 6:7-10, MN) Soki totaleli malamu biloko ya mosuni oyo tozali koluka kozwa yango, ntango mosusu tokomona ete mosusu ezali na ntina te. Tokoki ntango mosusu kozala na mawa mingi te kati na motema soki, na bososoli malamu, tobómbi mwa mosolo mpe soki tozali na bomoi ya bokatikati.

Mawa mingi ya motema ekoutaka wana bamposa oyo bato bazali na yango ekokisami te. Na ndakisa, ezali sembo ete elenge mwasi azala na mposa makasi ya kobala mpo na kozala na bomoi ya libota oyo ekopesaka kimya mpe mayoki ya bolingo. Mbala mosusu akolekisa ntango mingi na kosala midele ya lokumu mpe monzele mpo ete abenda likebi ya mibali. Akoki mpe kokóma motangi monene ya mikanda oyo mikolobelaka bolingo ya basi na mibali. Ntango mosusu akendeke mbala na mbala mpo na kominanola na elikya ya kokutana na moto oyo abongi na ye, kasi azali kolonga te. Bambula ezali koleka, mpe akoki lisusu te koyika mpiko na ntina na mawa ya motema. Mpo na kozanga elikya wana, akoki ntango mosusu koluka kobalana na moto oyo abongi na ye te. Oyo eleki mabe, akosala mbala mosusu pite mpo na kokokisa mposa ya mayoki na ye.

Na likambo motindo wana, esengeli liboso komonisa motema molai mpe bososoli. Ezali libunga monene na kobala moto oyo abongi te​—mingi mpenza moto oyo azangi kondima epai na Jéhovah. (1 Bakolinti 7:39; 2 Bakolinti 6:14, 15) Pite ekomamaka bobele na mawa mpe na kozanga elikya. (Masese 6:32, 33) Ekoki kozala malamu na komitalela yo moko na bosembo nyonso mpe kososola malamu mpo na likambo yango. Mbala mosusu “elimo ya bopɔlɔ mpe ya kimya” ekobenda likebi ya mobalani koleka oyo ekoki kosalema na midele ya bilamba to monzele moleki ndelo. (1 Petelo 3:3, 4) Na esika ya kolanda batoli mpamba epesami na bato ya mayele ya mokili, esengeli komibalola epai na Mobandisi ya libala mpo na koyekola kozala mwasi oyo alingami mpe na motuya mingi. (Masese, mokapo 31) Minzemba basengeli komonisa bizaleli oyo balingi komona epai na bato oyo bakozala babalani na bango. Kozala elongo na bato oyo bazali kotósa mitinda ya Biblia, ezali likambo ya mayele. Soki tozali kosalela yango kati na bomoi na biso, tokozala na libaku malamu ya kosala libala ya esengo. Ata soki tobali sikawa te, na kosaláká na boyokani elongo na Makomami, tokozwa esengo mpe tokozala minzemba oyo batondi na nsai.

Mikumba mileki minene mikoki komema biso na nkanda. Mbala mosusu totungisami kati na makambo nyonso. Totungisami mpo ete libota na biso lizali na mposa oyo esengeli kokokisama noki, mpe mbala mosusu mokonzi na biso ya mosala azali kosepela na mosala na biso te. Bandeko na biso bakoki komizela ete tosalisa bango ntango nyonso oyo bazwi likambo. Na ntina na makambo nyonso wana, toyei komimona ete tozali kozwa makambo na biso moko na bopotu. Ekoki kozala ete tokabolaki ntango na biso mpe makasi na biso kati na makambo mingi na mbala moko. Mawa ya motema ekoki kobongwana na nkanda, mpe tokoki kozala na mposa ya kosundola yango. Na bongo, tosengeli kosala nini?

Ekozala likambo ya mayele na kotalela lisusu malamumalamu makambo oyo tosengeli kotya na esika ya liboso. Lokola makoki na biso mazali na ndelo, tokoki te kokokisa mposa ya bato nyonso. Tosengeli komipesa na “makambo maleki ntina.” (Bafilipi 1:10) Elobamaka ete “mbwa ya bomoi eleki nkosi ekufa na malamu.” (Mosakoli 9:4) Ezali na mikumba misusu ya ntina oyo tokoki te kotika yango, nzokande misusu ezali na ntina mingi te, ekoki kokokisama na nsima. Tokoki mbala mosusu kozala na mikumba oyo tokoki kokabola yango na bato mosusu. Tokoki mpenza kolongola mosusu oyo ezali na ntina mingi te. Ata soki yango ekoki mbala mosusu kopesa mpasi na ebandeli to ekoki kookisa bato mosusu mawa, tosengeli kotósa ndelo ya makoki na biso ya nzoto mpe ya mayoki na biso.

Kolongono mabe na nzoto ekoki kopesa mayoki ya mawa na motema; ekomelaka biso mbala mosusu ete tobɛla na boumeli ya mikolo to baposo mingi. Mpasi makasi ekoki kopesa biso mawa. Ntango mosusu tozali kokende mbala na mbala epai na minganga mpo na komisalisa, to mpe tozali kozwa nkisi mingi to bavitamini mingi na elikya ya kobika. Kasi, tozali ntango nyonso kobɛla, na yango tokobanda komituna soki bomoi ezali mpenza na ntina.

Mbala mosusu, likambo wana likosila bobele na mokili ya sika ya Nzambe. (2 Petelo 3:13; tala Yisaya 33:24.) Lokola bato bazangi kokoka, minganga mpe nkisi bazali bobele bongo. Na ntango mosusu, tosengeli kondima mpasi na biso lokola eteni ya bomoi. Ntóma Paulo azalaki na “monzube kati na nzoto,” ezalaki ntango mosusu maladi ya miso to na eteni mosusu ya nzoto, oyo ezalaki mpasi mpenza kino azalaki kobondela ntango nyonso mpo na kobɔndisama. (2 Bakolinti 12:7-10) Kasi Nzambe abikisaki Paulo te; mbala mosusu ntóma ayikaki mpiko na maladi wana kino liwa na ye. Azalaki elongo na mpasi na ye, kozanga komilelalela mpe abungisaki esengo na ye te. (2 Bakolinti 7:4) Yobo, moto na sembo, azalaki kati na mpasi monene, kasi alandaki komonisa kondima epai na Jehovah. Na kosaláká bongo, amizwelaki bolamu mingi. (Yobo 42:12, 13) Soki tozali kosalela Nzambe, tokozwa makasi ya kolendendela na kokanisáká likoló na bandakisa oyo touti komona mpe na kobondeláká Jéhovah ete asalisa biso.​—Nzembo 41:1-3.

Bazali makasi atako mawa ya motema

Basaleli ya Jéhovah bakoki kozala na makasi kati na elimo, atako motindo nini ya mawa ya motema. Na ndakisa, soki tozwi maladi, tokotikala “makasi kati na kondima” soki nde tozwi litomba na bibongiseli oyo Nzambe azali kopesa biso kati na elimo. (Tito 2:1, 2) Wana tonyokwami mbala mosusu mpo na bobólá na biso kati na mosuni, tokoki kozala na bozwi kitoko kati na elimo.

Na kotyáká motema epai na Nzambe mpo na kozwa mayele mpe makasi, tokoki kobundisa mawa ya motema oyo ekoki koyela biso kati na libota. Totalela ndakisa ya Abigaili. Mobali na ye, Nabala, azalaki “moto na nkanda mpe na makambo mabe.” Nkombo na ye elimboli “Ebebe, Zoba.” Kofanda na moto motindo wana ezalaki mpenza kopesa mawa mingi. Nzokande, Abigaili azalaki ntango nyonso “na bokɛngi malamu” mpe amitikaki te kozala kozanga elikya. Na yango, alobaki mpe amonisaki mayele na ntango andimisaki Davidi na libaku moko ete azongisa mabe te mpo na kofinga mpe kozanga botɔndi ya Nabala, na kosopáka makila mpe na kozangáka elikya epai na Jéhovah.​—1 Samwele 25:2-38.

Ata soki totungisami mpenza na ntina na etamboli mabe ya mosangani moko na lisangá ya boklisto, tokoki koyika mpiko mingi na makasi oyo Jéhovah azali kopesa biso. Tozali na elembeteli oyo ete, ezaleli mabe ya Diotelefe epekisaki Gayo te, ye moto na kobanga Nzambe, na kosala malamu mpe, na yango, azwaki bolamu mpe mapamboli mingi kati na elimo.​—Misala 20:35; 3 Yoane 1-10.

Kati na lisangá, tokoki kooka mawa ya motema soki tolingi kosalela bandeko na biso kati na kondima, nzokande basusu baponami bankulutu to basaleli na misala liboso na biso. Na esika ya kolɛmba mpo na mawa ya motema, tomikembisa kati na elimo mpe topesa nzela na elimo ya Nzambe ete ebota mbuma na yango mingi epai na biso. (Bagalatia 5:22, 23) Na boumeli ya mibu 40 oyo Moize alekisaki na Madiani, Nzambe akolisaki kati na ye, na motindo moleki, bopɔlɔ, motema molai mpe bizaleli mosusu oyo azalaki na yango mposa mpo na kobundisa mimekamo mpe mawa ya motema oyo asengelaki kokutana na yango na kokambáká Bayisraele. Bobele bongo, mbala mosusu Jéhovah azali kobongisa biso mpo na kozwa mikumba ya mosala na ntango ekoya, soki totikali makasi kati na elimo mpe soki tolɛmbi te mpo na mawa ya motema.

Mosika te mawa ya motema ekosila

Mawa ya motema, ata ezali ya motindo nini, ekosila mokolo mosusu? Mpo na biso, ezalela ya makambo tozali na yango ekoki kolongola elikya, kasi yango ezali bongo te mpo na Mozalisi na biso, Jéhovah Nzambe. Ye akookaka mawa ya motema te. Nzambe alobaki na nzela ya mosakoli Yisaya, ete: “Boye na liloba oyo likobima na monoko na ngai; likobutwa epai na ngai mpamba te, kasi likokokisa oyo ekani ngai, likosukisa likambo litindaki ngai yango.” (Yisaya 55:11) Lokola Jéhovah azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso, likambo moko te lizali mpasi epai na ye. (Malako 10:27) Akokokisa mpenza bilaká na ye ya kopambola basaleli na ye mpo na seko.​—Yosua 21:45.

Ntembe mpe mitungisi na makanisi ekopesa mawa ya motema. Nzokande, “kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso.” (Baebele 11:1, MN) Kondima epai na Nzambe ezali kopesa biso ndanga ete bilikya na biso bitongami na Biblia, bikokokana nyonso mpenza. Motó ya likambo ya Biblia ezali komonisa ete Jéhovah asili kolaka Bokonzi oyo, na nzela na yango, mabelé makobongwana paradis epai kuna bayengebene bakofanda na esengo mpo na libela. (Nzembo 37:11, 29) Makambo mabe nyonso, bakisa mpe mawa ya motema, makozala lisusu te, mpe Nzambe ‘akokokisa mposa na biloko nyonso ya bomoi.’​—Nzembo 145:16.

Biso nyonso tokozala ntango nyonso na mawa mingi na motema kino mapamboli wana makokokana. Kasi, na nzela ya elikya oyo epesameli biso na Makomami, tokoki kozwa mpiko mpe makasi ya kolendendela. Batoli ya Biblia ezali kolakisa biso lolenge nini tokoki komonisa mayele mpe bososoli mpo na kozala na bomoi bobongi mpe mpo na kozala na kimya ya motema. Atako mawa ya motema, tokoki kozala na “kimya ya Nzambe, oyo eleki makanisi nyonso.” (Bafilipi 4:6, 7) Na yango, tokoki kozanga elikya te mpo na kobundisa mawa ya motema. Na lisalisi ya Jéhovah, tokoki kobundisa yango lelo mpe kolonga yango mokolo mosusu.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 31]

Nzambe akoki kosalisa yo mpo na kolonga mawa ya motema, lokola asalaki yango mpo na Yobo, Moize, Abigaili mpe Paulo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto