Makomi ya ba “Massorètes” ezali nini?
NA LOKÓTÁ nyonso oyo okotánga Biblia, eteni moko na yango ebongolamaki mbala moko to na nzela ya libongoli mosusu oyo eutaki na makomi ya ba Massorètes, oyo esangisi bongo Makomami ya Liebele to “Testama ya kala.” Ya solo, makomi ya ba Massorètes mazalaki mingi. Na yango, wapi oyo eponamaki, mpe mpo na nini? Makomi ya ba Massorètes ezali nini, mpe lolenge nini toyebi ete yango ebongi na kotyela motema?
Liloba ya Yehova
Bibila ebandaki kokomama na Ngomba Sinai na mobu 1513 L.T.B. Esode 24:3, 4 eyebisi biso ete: “Mose akomaki mpe atɔndɔlaki bato maloba na [Yehova] yɔnsɔ mpe mibeko yɔnsɔ, mpe bato yɔnsɔ bajongisaki na mongongo mɔkɔ ete, Tokosala yango yɔnsɔ elobi [Yehova]. Mose akomaki maloba na [Yehova] yɔnsɔ.”
Makomami ya Liebele ekóbaki kokomama na boumeli ya bambula koleka nkótó moko, kobanda na mobu 1513 L.T.B. kino pene na mobu 443 L.T.B. Lokola bakomi bapemamaki na Nzambe, ebongi kondimama ete asengelaki kotambwisa makambo na boye ete nsango na ye ebatelama na bosembo nyonso. (2 Samwele 23:2; Yisaya 40:8) Nzokande, yango elimboli mpenza ete Yehova alingaki kolongola mabunga nyonso ya bato na boye ete ata lɛtɛlɛ moko te ekokaki kokesana wana bazalaki kosala bakopi na yango?
Nzela ya bokɔti ya mabunga ebandi kofungwana
Atako bato oyo bazalaki na limemya mpenza mpo na Liloba ya Nzambe nde bakomaki bakopi na yango na boumeli ya eleko moko mpe mosusu, nzokande mwa ndambo ya mabunga ya bato ekɔtisamaki mokemoke kati na bamaniskri. Bakomi ya Biblia bapemamaki, kasi baoyo bazalaki kosala bakopi na yango bazalaki te kosala mosala na bango na kopemama ya Nzambe.
Nsima ya kobima na boombo na Babilone na 537 L.T.B., Bayuda bakómaki na lolenge mosusu ya kokoma oyo ezalaki kosalela balɛtɛlɛ ya karé oyo bayekolaki na Babilone. Mbongwana wana monene ememaki mpe mokakatano oyo ete balɛtɛlɛ mosusu oyo ekokanaki ekokaki kosalelama na libunga nyonso moko na esika ya mosusu.a Lokola lokótá ya Liebele epesaka motuya mingi na mileli, mpe motángi ye moko nde atyaka milelisi engebene bososoli na ye na kotalela zingazinga ya liloba, kobongola ata moleli moko ekokaki nokinoki kobebisa ndimbola ya liloba. (Talá ndakisa na etánda.) Nzokande, kati na makambo mingi, mabunga motindo wana mazalaki komonana mpe kosembolama.
Bayuda mingi mpenza bazongaki na Yisraele te na nsima ya kokwea ya Babilone. Na yango, biyanganelo bikómaki bisika minene ya losambo ya Bayuda na Moyen Orient mpe na mikili ya Mpótó.b Eyanganelo moko na moko esengelaki kozala na bakopi ya bamaniskri ya Makomami. Lokola bakopi ezalaki kosalema mingi, likoki mpe likómaki monene mpo ete mabunga ya bato oyo bazalaki kosala bakopi ekoka kokɔtisama.
Milende misalemi mpo na kolongola mabunga
Kobanda na ekeke ya liboso T.B., na Yelusaleme, bakomeli bamekaki kobimisa makomi ya moboko oyo na nzela na yango barulo nyonso mosusu ya Makomi ya Liebele esengelaki kosembolama. Nzokande, ezalaki na mwango moko te ya sikisiki mpo na kokesenisa makomi ya ebandeli mpe mabongoli oyo ezalaki na mabunga ya bato oyo bazalaki kosala bakopi. Uta na ekeke ya mibale T.B., emonanaki lokola ete Makomi ya Liebele oyo masalemi bobele na milelisi esilaki kobongisama malamu, atako esilaki naino te kotyama na lolenge ete endimama mpenza. Biteni ya Makomi ya Liebele oyo ezongelami kati na Talmud (oyo esangisamaki katikati na ekeke ya mibale mpe ya motoba T.B.) emonisaka mbala mingi mpenza eutelo oyo ekeseni na oyo eyaki koyebana na nsima na nkombo ya makomi ya ba Massorètes.
Na Liebele, liloba “momeseno” ezali bongo “Masorah” to “Massorète.” Na ekeke ya motoba T.B., baoyo bazalaki kobatela momeseno ya kosala bakopi ya sikisiki ya Makomami ya Liebele bakómaki kobéngama ba Massorètes. Bakopi oyo basalaki ebengamaki makomi ya ba Massorètes. Eloko nini ekesenisaki mosala na bango mpe makomi oyo bango basalaki na oyo ya basusu?
Liebele ezalaki kolobama lisusu te mpe etikalaki lisusu lokótá ya ekólo te, mpe Bayuda mingi bayebaki yango lisusu malamu te. Na yango, bososoli ya sikisiki likoló na makomi ya Biblia oyo esalemi bobele na mileli elingaki kolimwa. Mpo na kobatela yango, ba Massorètes basalaki mwango moko ya mileli oyo emonisamaki na lisalisi ya madodó mpe mikɔlɔtɔ ya mikemike to bilembo mike. Yango ezalaki kotyama na nsé to na likoló ya milelisi. Ba Massorètes basalaki mpe mwango moko ya bilembo mingi oyo bisalelamaki lokola bilembo ya bopemi mpe ya kosunga mpo na kotánga malamu.
Na bisika oyo ba Massorètes bazalaki komona ete makomi makesanaki to soki bakomeli oyo bazalaki liboso bakomaki malamu te, na esika ete bábongola makomi, bazalaki kopesa mwa bandimbola na pembeni. Bazalaki kotala maloba oyo ekomami mpe esangisami na lolenge lobongi te mpe mbala boni yango ezalaki komonana kati na mokanda moko to kati na Makomi ya Liebele mobimba. Babakisaki mpe bandimbola mosusu mpo na kosunga bakomeli ete bátalela yango lisusu na lolenge mosusu. Basalaki mpe mwango ya kokoma na ba “codes” mpo na koyeisa moke mpenza makambo makomami. Na likoló mpe na nsé ya mopanzi ya nkásá, concordance ya moke ezalaki komonisa biteni ya milɔngɔ́ oyo epesameli ndimbola na makambo oyo makomami pembeni.
Mwango oyo eyebanaki mingi koleka esalemaki na ba Massorètes oyo bazalaki na Tibériade, pene na Libeke ya Galilai. Mabota ya Ben Asher mpe Ben Naphtali ya ekeke ya libwa mpe ya zomi T.B., ekoki mpenza kozala ba Karaïtes, bayebanaki mingi mpenza.c Atako bokeseni ezalaki na lolenge ya kotánga ya kopesa maloba mpe ya kopesa bandimbola kati na bituluku wana mibale, milelisi ya makomi na bango ezali na bokeseni koleka na bisika zomi te kati na Makomami ya Liebele mobimba.
Bituluku nyonso mibale ya ba Massorètes, oyo ya Ben Asher mpe Ben Naphtali, bakokisaki mokumba monene mpo na mosala ya kokoma mikanda na eleko wana. Nsima wana Maimonides (Nganga-mayele moko ya bopusi mingi oyo asalaki boyekoli ya Talmud na ekeke ya zomi na mibale) akumisaki makomi ya Ben Asher, basusu bazalaki kosepela na yango mingi koleka. Yango ezalaki mpenza bongo, na boye ete ata maniskri moko te ya Ben Naphtali ekoki komonana lelo oyo. Na makomi ya Ben Naphtali, etikali bobele milɔngɔ́ ya makambo oyo ekesenisi bituluku wana mibale. Likambo ya kobenda likebi ezali oyo ete, bandimbola ya Maimonides etalelaki bobele lolenge ya kokoma, na ndakisa, ntáká katikati na baparagrafe, kasi etalelaki te makambo ya ntina mingi oyo matali bosikisiki ya mayebisi.
Makomi “mpenza” ya ba Massorètes ekoki komonana?
Ntembe monene ezali kati na banganga-mayele mpo na koyeba codex nini oyo ezali komonana lelo, oyo ezali “mpenza,” makomi ya Ben Asher, lokola nde yango ekopesa biso makomi “mpenza” ya ba Massorètes. Na ndenge emonani mpenza, makomi ya ba Massorètes ya “peto,” mpe oyo endimami mpenza ezalaki bobele moko te. Nzokande, makomi ya ba Massorètes mazalaki mingi, moko na moko ezalaki na mwa bokeseni moke na misusu. Ba codex oyo ezali kino lelo ezali kosangisama ya makomi, oyo kati na yango ezali na makomi ya Ben Asher mpe ya Ben Naphtali.
Mosala oyo ezali lelo liboso na mobongoli nyonso ya Makomami ya Liebele ezali monene. Asengeli bobele koyeba malamu makomi ya Liebele te kasi lisusu kosala maponi oyo ebongi, epai wapi ekoki kozala ete mokomeli abebisaki makomi to asalaki libunga ya motindo mosusu. Atako akoki kosalela makomi ndenge na ndenge ya ba Massorètes lokola moboko, kasi asengeli kotala mikanda mosusu oyo ekoki malamu komonisa mabongoli ya kala ya makomi masalemi na milelisi mpe mbala mosusu oyo ezali ya sikisiki koleka.
Na maloba ya ebandeli ya mokanda na ye, The Text of the Old Testament, Ernst Würthwein alimboli ete: “Na ntango tokutani na eteni moko ya makasi tokoki te bobele kosangisa esika moko makomi makeseni mpe kopona oyo emonanaki lokola ete ezali nzela ya pɛtɛɛ, mbala mosusu toponaka makomi ya Liebele, mbala mosusu mpe toponaka La Septante, mpe mbala mosusu na Targum araméen. Makomi ya bilembeteli mabongi mpenza na kotyela motema te. Moko na moko ezali na lolenge na yango mpe na lisoló na yango moko. Tosengeli komesana na yango nyonso soki tolingi kopɛngola nzela oyo ezangi bosikisiki to oyo ya libunga.”
Tozali na moboko makasi ya kondimisama mpenza ete Yehova abatelaka Liloba na ye. Na milende ya ebele ya bato ya sembo na boumeli ya bikeke mingi, mobimba ya nsango ya Biblia, makambo mazali kati na yango, ata mpe bandimbola na yango ya bozindo ezali na biso lelo oyo. Ata mwa mbongwana moke ya liloba to lɛtɛlɛ moko te ebebisi likoki na biso ya kosimba ntina ya Makomami. Sikawa, motuna ya ntina mingi mozali oyo, Tokomitambwisa engebene Liloba ya Nzambe, Biblia?
[Maloba na nse]
a Barulo oyo ekomamaki na mitindo mikeseni wana ya kokoma esalemaki nzela moko na boumeli ya bikeke mingi. Bamaniskri mosusu ya Mer morte oyo ekomamaki na lolenge ya kala, ezali bongo kopesa biso nzela ya kosala bokokanisi.
b Lokola Bayuda mingi oyo bazalaki na libándá ya Yisraele bayebaki lisusu kotánga Liebele malamu te, na ndakisa etuluku ya Bayuda oyo bazalaki na Alexandrie, na Ezipito, bamonaki nokinoki ntina ya kobongola Biblia na lokótá ya mboka yango. Mpo na kokokisa mposa yango, libongoli ya La Septante ebongisamaki na ekeke ya misato L.T.B. Na nsima, libongoli yango ekómaki esaleli ya ntina mingi mpo na kosala bokokanisi ya makomi.
c Pene na mobu 760 T.B., etuluku moko ya Bayuda oyo bayebanaki malamu na nkombo ya ba Karaïtes basɛngaki ete bato bakangama makasi na Makomami. Ebwakaki bokonzi ya balakisi ya mibeko ya Bayuda, “Mibeko oyo mikomami te,” mpe Talmud, bazalaki na ntina monene ya kobatela makomi ya Biblia malamumalamu mpenza. Mabota mosusu oyo mautaki na etuluku wana bakómaki bakomi minene ya makomi ya ba Massorètes.
[Elilingi na lokasa 26]
Codex ya Alep ezali na makomi ya ba Massorètes
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bibelmuseum, Münster