Tozali batekisi ya Liloba na Nzambe te
“TOZALAKI kokokisa mosala na biso mpo na mbongo.” Wana ezali maloba ya moto moko oyo azalaki kala “moteyi ya lingomba oyo asambelaka mpo na bato na nzela ya telefone,” maloba oyo etangamaki na boumeli ya bolukiluki likoló na bateyi ya mangomba oyo bapesaka mateya na televizio ya ba américains, na nsuka ya 1991.
Bolukiluki yango etalelaki bituluku misato oyo epesaka mateya ya mangomba na televizio na Etats-Unis. Emonisaki ete bituluku yango misato bizali koyibela bato bamilio mingi ya dollars mbula nyonso. Moko na “bituluku” yango emonisamaki lokola “oyo eleki mpenza ntina kati na kompanyi ya kopesa mabonza.” Nyonso misato esanganaki na makambo mingi ya kobuba. Yango ezali kotungisa yo?
Mangomba matalelami malamumalamu
Ezali bobele mateya ya televizio te, kasi lisusu mangomba ya kala bazali kobenda likebi ya biyangeli, ya bibongiseli ya bokengeli oyo esalemi na Leta te mpe ya bato nyonso. Mbala mosusu, bozwi ya Lingomba na oyo etali mosolo, kosimba matomba ya bibongiseli ya politike na bozwi ya mangomba mpe lolenge ya bomoi ya bozwi mingi ya bankonzi mosusu ya mangomba oyo bazwaka lifuti ya monene ezali kobimisa mituna na ntina ya bizaleli malamu. Tokoki koloba ete bankonzi mosusu ya mangomba bakokani mpenza na elilingi kitoko oyo epesami na ntoma Paulo, eleki sikawa mibu 2 000? Akomaki ete: “Tozali te batekisi ya liloba na Nzambe lokola bato mingi, kasi lokola batindami na Nzambe tokolobaka na sembo na miso na Nzambe kati na Klisto.” (2 Bakolinti 2:17) Banani bazali kokokisa maloba oyo na mikolo na biso?
Mpo na kosalisa yo na kozwa makanisi, totalela na penepene lolenge oyo mosala ya boklisto mokokisamaki na Paulo mpe baninga na ye mosimbamaki. Na meko nini ekeseneki na oyo ya bato mosusu ya ntango na bango?
Basakoli bakotambolaka na ekeke ya liboso
Paulo azalaki bobele ye moko te mosakoli oyo akotambolaka. Na eleko wana, bato mingi bazalaki kotambola mpo na kopalanganisa makanisi na bango ya lingomba to ya filozofi. Mokomi ya Biblia Luka azali kolobela basusu “kati na bayuda bazalaki kotambola na mboka mpe bazalaki kobimisa bilimo mabe.” (Misala 19:13) Ntango Yesu Klisto akweisaki Bafalisai, alobaki lisusu ete: “Bokolekaleka Mai Monene mpe lisobe mpo na kobongolisa moto moko motema.” (Matai 23:15) Yesu ye moko azalaki mosali mibembo. Abongisaki bantomá mpe bayekoli na ye mpo bamekola ndakisa na ye na kosakolaka bobele na Yudea mpe na Samalia te, kasi “kino ndelo eleki mosika ya mabelé.”—Misala 1:8.
Na boumeli ya mobembo na bango, bayekoli na Yesu bazalaki kokutana na bateyi oyo bazalaki Bayuda te. Na Athènes, Paulo atyanaki ntembe elongo na bato na mayele ya Baɛpikuli mpe Basetoa. (Misala 17:18) Kati na Bokonzi mobimba ya Loma, Basiniki bazalaki kondimisa bibele na masolo ya kolangwisa. Basambeli ya Isis mpe ya Sérapis bazalaki kokolisa bopusi na bango likoló na basi mpe baombo na kolakelaka bango bokokani ya losambo mpe ya etelemelo elongo na bansomi. Bikelakela ya bato na ebimelo ya ntango ezalaki ebandeli ya mangomba mingi ya biyambayamba ya mokili ya Bagreke mpe Baloma. Bilaka ya kolimbisama ya masumu na bango mpe mposa ya koyeba bibombamo ya banzambe ezalaki kobenda bayekoli mingi epai na banzambe ya lokuta Déméter, Dionysos mpe Cybèle.
Ndenge nini bazalaki kofuta mibembo
Nzokande, kosala mobembo ezalaki kosenga mosolo mingi. Longola kofuta mobembo, mpako ya kolekaleka mpe mobembo ya masuwa, bateyi ya zongazonga basengelaki komileisa, kozwa esika ya kolala, mɔtɔ ya koyotola, bilamba mpe kobatela nkolongono ya nzoto na bango. Basakoli, balakisi, bafilozofe mpe banganga nkisi bazalaki kokokisa bamposa yango na mitindo mitano. (1) Bazalaki kolakisa mpo na mosolo; (2) bazalaki na mosala ya mosuni, kosalaka misala mikemike mpe mombongo; (3) bazalaki kondima boyambi mpe makabo ya bolingo malamu; (4) bazalaki kosala epai na bazwi, mbala mingi lokola balakisi; mpe (5) bazalaki kosengasenga. Mpo na komibongisa na kozanga koyambama, Mosiniki moséngi Diogène, oyo ayebani mingi, azalaki kosenga mabonza ata epai na bikeko bizangi bomoi.
Paulo ayebaki basakoli oyo bazalaki komibenga baklisto, kasi na motindo ya bafilozofe Greke, bazalaki koluka boninga ya bazwi mpe koyiba babola. Apamelaki lisangá ya Kolinti, na kolobaka ete: “Bokoyika mpiko . . . na moto oyo akolya biloko na bino, soko moto akobotela biloko na bino.” (2 Bakolinti 11:20) Yesu Klisto abotolaki eloko na moto moko te, bobele bongo Paulo mpe baninga na ye ya mosala basalaki mpe yango te. Kasi basakoli ya nsango malamu ya Kolinti baoyo bazalaki bato na lokoso bazalaki “bantoma ya lokuta, basali ya bokosi,” basaleli ya Satana.—2 Bakolinti 11:13-15.
Malako oyo Yesu apesaki epai na bayekoli na ye epekisaki likambo ya koteya mpo na lifuti. Alakaki ete: “Bozwaki na lisombi te, bopesa na lifuti te.” (Matai 10:8) Atako kosengasenga epalanganaki mingi na eleko wana, kasi etalelamaki mpenza lokola ebongi te. Kati na moko ya bililingi na ye, Yesu alobelaki kapita moko oyo azalaki koloba ete: “Kosengasenga? Nazali kooka nsoni.” (Luka 16:3) Yango wana, kati na lisolo ya Biblia tozali kotanga te ete bayekoli na Yesu bazalaki kosengasenga mosolo to biloko. Bazalaki kobika na kolandaka motinda oyo: “Soki moto nani alingi kosala te, tika ete alya mpe te.”—2 Batesaloniki 3:10.
Yesu alendisaki bayekoli na ye na kokokisa bamposa na bango na mitindo mibale. Ya liboso, bakokaki “kobika mpo na nsango malamu” lokola Paulo alimbolaki yango. Na lolenge nini? Na kondimaka boyambi ya bolingo oyo bazalaki komonisa epai na bango. (1 Bakolinti 9:14; Luka 10:7) Ya mibale, basengelaki bango moko kokokisa bamposa na bango.—Luka 22:36.
Paulo asalelaki mitinda yango
Lolenge nini Paulo azalaki kosalela mitinda yango? Na ntina ya mobembo ya mibale ya ntóma wana, Luka akomaki ete: “Na bongo esilaki biso kokota masuwa na Toloa, totamboli alima kino na Samotalake, mpe na mokolo na nsima na Neapoli, mpe tolongwi wana kino Filipi, oyo ezalaki mboka na liboso na mokili yango na Makendonia, mpe libunga na Baloma. Toumeli na mboka yango mwa mikolo.” Na boumeli ya mobembo mobimba, bilei mpe esika ya kolala ezalaki na maboko na bango.—Misala 16:11, 12.
Na mikolo ya nsima, mwasi moko na nkombo ya Lydie andimaki “mateya na Paulo. Esili ye kobatisama, na bato na ndako na ye, abondeli biso ete, ‘Soko bokanisi ete ngai nazali sembo epai na Jéhovah, bokota na ndako na ngai mpe boumela wana.’ Mpe andimisi biso makasi.” (Misala 16:13-15) Ekoki mbala mosusu kozala, mwa moke, na ntina ya boyambi ya Lydie nde Paulo akomelaki bandimi ya Filipi mokanda ete: “Nakotondaka ntango nyonso Nzambe na ngai mpo na bino, mbala nyonso nazali kokanisa mpo na bino, kati na mabondeli na ngai nyonso mpo na bino nyonso, kosalaka mabondeli na ngai na esengo, mpo na ntina na lisungi na bino mpo na bokoli ya nsango malamu longwa na mokolo ya liboso kino sikawa.”—Bafilipi 1:3-5.
Luka atangi ebele na bandakisa ya bato oyo bayambaki baklisto wana ya zongazonga. (Misala 16:33, 34; 17:7; 21:7, 8, 16; 28:2, 7, 10, 14) Kati na mikanda na ye mipemami, Paulo alobeli boyambi oyo azwaki mpe makabo oyo bapesaki ye, mpe amonisaki botondi na ye mpo na yango. (Baloma 16:23; 2 Bakolinti 11:9; Bagalatia 4:13, 14; Bafilipi 4:15-18) Atako bongo, ye moko to baninga na ye ya mosala bakanisaki te ete basengelaki kozwa makabo to lisungi ya mosolo. Ba Témoins de Jéhovah bakoki mpenza koloba ete elimo wana ya malamu ezali naino komonana epai na bakengeli na bango ya zongazonga
Bazali kotya motema na makabo te
Ntóma Paulo azalaki kotya motema na makabo te. Ayekolaki mosala ya mpasi oyo ezali kosenga bangonga mingi, kasi ezalaki bobele na lifuti moke. Ntango ntóma akomaki na Kolinti mpo na kokokisa mosala na ye ya misionere, “akutani na Moyuda moko nkombo na ye Akula . . . mpe Pilisikila, mwasi na ye. . . . Akei bongo epai na bango, mpe azalaki moto na mosala motindo moko na bango, aumeli na bango mpe basalaki esika moko; mosala na bango ezalaki kosala hema.”—Misala 18:1-3.
Nsima na mikolo mingi, Paulo asalaki lisusu mosala makasi. (Tala Misala 20:34; 1 Bakolinti 4:11, 12.) Ekoki kozala ete ameseneki mingi na mosala ya cilicium, elamba makasi na nkungé ya ntaba, oyo bazalaki kosalela mpo na kotonga hema na etuka epai abotamaki. Tokoki kokanisa Paulo likoló na ebonga na ye, agunzami na mesa na ye ya mosala, kokata mpe kotonga kino na butu makasi. Lokola makelele ezalaki lisusu mingi te na esika ya mosala, mpe ezalaki mpasi te kosolola na kosalaka mosala, Paulo akokaki kosalela libaku ya kopesa litatoli epai na nkolo ya mosala mpe basali, baombo, basombi mpe baninga na ye.—Tala 1 Batesaloniki 2:9.
Paulo, oyo azalaki misionere, aboyaki kosala mombongo na mosala na ye, to komonisa ete azalaki kobikela na Liloba ya Nzambe. Ayebisaki Batesaloniki ete: “Mpo ete boyebi bino mpenza nzela ebongi na bino komekola biso. Biso tozalaki na goigoi kati na bino te. Tolei bilei na moto mpamba te, kasi tosali mosala, na makasi butu na moi ete, tozala na bozito likoló na moko na bino te. Tosali bongo te mpo ete tozangaki bokonzi, nde na ntina ete topesa bino etaliseli mpo bomekola biso.”—2 Batesaloniki 3:7-9.
Bamekoli na ye ya ekeke ya ntuku mibale
Kino lelo ba Témoins de Jéhovah bazali kolanda ndakisa kitoko ya ntóma Paulo. Bankulutu mpe basaleli ya misala bazali kozwa lifuti to lisungi moko te ya masangá oyo bazali kosalela. Na bokeseni, bazali kokokisa mposa na mabota na bango lokola bato mosusu nyonso, mpe mingi kati na bango bazali kosala mosala ya mosuni. Ba pionniers oyo bapesi ntango na bango nyonso mpo na mosala ya kosakola bazali mpe kokokisa bango moko bamposa na bango, mingi bazali kosala mosala mpo na kokokisa bobele bamposa na bango ya ntina. Mbula na mbula Batemwe mosusu basalaka mibembo mosika na mosolo na bango moko mpo na kosakola bipai nsango malamu ekomaka mingi te. Soki mabota na bisika wana babyangi bango na kolya to na kozwa esika ya kolala, bazali kosepela na boyambi motindo yango mpe bazali koluka kolekisa ndelo na yango te.
Mosala nyonso ya kosakola mpe ya kolakisama esalami na ba Témoins de Jéhovah ezali ya bolingo malamu, mpe basengaka lifuti te mpo na mosala na bango. Nzokande, bazali kondima makabo mike mpo na kosunga mosala na bango ya mokili mobimba mpe bazali kotinda yango na la Société Watch Tower mpo na mokano wana. (Matai 24:14) Mosala ya ba Témoins de Jéhovah ezali ya bolingo malamu kati na makambo nyonso. Lokola Paulo bakoki koloba na bosembo nyonso ete: “Nasakweli bino nsango malamu ya Nzambe, na lifuti te.” (2 Bakolinti 11:7) Ba Témoins de Jéhovah bazali “bateki ya Liloba na Nzambe te.”
[Etanda na lokasa 27]
LOLENGE YA KOPESA MAKABO MPO NA MOSALA YA KOSAKOLA BOKONZI
◻ MAKABO MPO NA KOSIMBA MOSALA YA MOKILI MOBIMBA: Bandeko mingi bazali kobomba mwa mosolo to bazali kokotisa kati na ebongiseli na bango mwa mosolo oyo bazali kotya yango na sanduku ya makabo oyo ezali na likomi: “Makabo mpo na mosala ya Société na mokili mobimba: Matai 24:14.” Sanza nyonso, masanga mazali kotinda na biro ya Société na Brooklyn (New York), to na biro ya filiale oyo ezali penepene mbongo oyo ezwami na sanduku yango.
◻ MAKABO: Makabo ya bolingo makoki kotindama mbala moko na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201, Etats-Unis, to na filiale ya Société na mokili na bino. Okoki mpe kopesa ba bijoux to biloko mosusu ya motuya. Mokanda moko ya mokuse esengeli kokende nzela moko na makabo nyonso mpo na komonisa ete ezali makabo ya bolingo.
◻ MAKABO OYO MAKOKI KOZONGISAMA: Okoki kopesa Société Watch Tower mbongo, oyo ekoki kobatelama kino liwa ya mopesi, oyo akoki komibombela lotomo ya kozwa yango lisusu soki akomi na bosenga.
◻ ASSURANCE: La Société Watch Tower akoki kofutamela assurance to kozwa litomba ya mosolo ya pension. Soki ezali bongo, ebongi koyebisa na Société.
◻ MOSOLO NA BANQUE: Na mikili misusu, nimero ya comptes na banque, mosolo oyo mobombami mpe mosolo mobombami yo pension mokoki kofungwama mpo na Société Watch Tower, to kotyama na nkombo ya Société Watch Tower na kufa ya moto yango. Soki ezali bongo, ebongi koyebisa Société.
◻ LOTOMO YA MOSOLO: Lotomo ya mosolo ekoki kopesama na Société Watch Tower na lolenge ya makabo ya libela to na kobatelaka makoki ya kozwa mosolo yango naino azali na bomoi.
◻ MAPANGO TO NDAKO: Mapango, ndako to biloko mosusu oyo ekoki kotekama ekoki kopesama na Société Watch Tower; mokabi akoki kopesa yango libela, to akoki kobatela makoki ya kozwa mosolo na yango naino azali na bomoi. Liboso na kopesa biloko nyonso na Société, esengeli koyebisa ye yango.
◻ MOKANDA YA KOPESA LIBULA: Biloko to ndako to mosolo ekoki kopesama na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania na mokanda ya kozwa libula oyo mondimami na mibeko, to tokoki kopesa Société lotomo ya kozwa biloko oyo totiki. Biloko oyo bitikami mpo na mangomba makokitisamaka mpako epai na ye oyo apesameli yango, Kopi moko ya mokanda ya kozwa libula to ya boyokani ya kozwa biloko esengeli katindama na Société.
Soki ozali na mituna to na mposa ya toli na likambo yango, koma na adresse oyo elandi: Treasurer’s office, Watch Tower Bible and tract Société of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201, to na filiale ya Société penepene na esika ofandi.
[Etanda na lokasa 29]
Alingakl KOPESA LISUNGI NA YE
TIFFANY, mwana ya mibu zomi na moko azali mwana kelasi na Baton Rouge na Louisiane na Etats-Unis. Eleki kala mingi te, elenge mwasi wana Témoin de Jéhovah asalaki momekano ya kokoma na motó ya likambo “Kolakisama na Amerika.” Baboti na ye, oyo bazali mpe Témoins de Jéhovah, bazwaki na nsima mokanda oyo ya directeur ya eteyelo:
“Na boumeli ya mposo ya kokanisa kolakisama na Amerika, momekano ya kokoma oyo eleki malamu kati na kelasi nyonso etangamaka liboso ya bato banso. Lelo na ntongo, nazalaki na esengo ya kotanga oyo ya Tiffany. Azali mpenza elenge mwasi ya kokamwisa. Azali na bokatikati, na motema ya kimya, na makoki mingi mpe bizaleli malamu. Namona mpenza mingi te mwana ya sixième oyo azali na bizaleli lokola ya ye. Tozali na esengo ya kozala na ye na eteyelo na biso.”
Tiffany azwaki esika ya liboso na momekano ya kokoma. Na nsima akomelaki la Société Watch Tower mpe alobaki ete: “Nalongaki mpenza momekano mpo na mokanda Les jeunes s’interrogent—Réponses pratiques. . . . Nasalelaki mikapo mitali kolakisama . . . Matondi mingi mpo na mokanda oyo ya kopesa mayele mpe ya malamu. Mpo na momekano na ngai nazwaki ba dollars nsambo. Napesi ba dollars yango 7 mpe mosusu 13, nyonso epesi ba dollars 20, mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba . . . Nazali na elikya ete nakomipesa mpo na kosala na Béthel, ntango nakokoma mokolo.”
[Etanda na lokasa 29]
Na bantango mosusu, Paulo azalaki kobika na kosalaka bahema