Monyoko ya seko: Liteya lizali kobulunganisa
“Nayoki ete bolongoli pasteur na bino. Ezalaki mpo na likambo nini?”
“Ya solo, azalaki ntango nyonso koloba na biso ete tokokende biso nyonso na lifelo.”
“Bongo pasteur ya sika azali koloba nini?”
“Pasteur ya sika ye mpe azali koloba ete, tokonde na lifelo.”
“Bongo, bokesene ezali wapi?”
“Ya solo, bokesene ezali ete, ntango pasteur ya kala azalaki koloba yango, emonanaki lokola ete azali kosepela na yango; kasi ntango oyo ya sika azali koloba na biso makambo yango, emonani mpenza ete likambo yango ezali kopasola motema naye.
LISOLÓ wana, oyo etyami na mokanda moko oyo ezali komonisa bililingi, ezali komonisa na lolenge na yango motindo bateyi mingi ya Biblia, elongo na bato na mangomba bazali mpenza kokakatana na ntina na liteya ya lifelo. Na bolai, yango endimisi lisusu oyo téolojié ya ekolo Canada, Clark H. Pinnock, amonisaki ete: “Na mateya ya téoloji nyonso oyo etungisaki lisosoli na bato na boumeli ya bikeke mingi, nakanisi ete bobele moke nde epesi bato mpasi mingi kati na motema koleka likanisi oyo endimami ya etumbu ya seko kati na nzoto mpe molimo na lifelo.”
Bopusi likoló na bizaleli malamu
Bongo, mpo na nini bato mingi bazali kobulungana na bililingi ya lifelo oyo bilakisami kati na mangomba ya boklisto ya lokuta? (Tala encadré.) Molakisi Pinnock alimboli ete: “Likanisi oyo ete ekelamo oyo azali kososola makambo asengeli konyokwama na nzoto mpe na makanisi mpo na libela ezali mpenza kobulunganisa, likanisi oyo ete mpasi wana ekweli ye mpo na etinda na Nzambe eyokani te na kondima oyo nazali na yango mpo na bolingo ya Nzambe.”
Ya solo, liteya ya bwale ya seko ezali kobimisa mikakatano etali bizaleli malamu. Na ndakisa, baklisto ya kolongobana bazali kokanisa likoló na mituna oyo téolojié Mokatolike Hans Küng abimisaki ete: “Nzambe na bolingo asengeli ... kotala mpo na libela na libela monyoko wana ezangi nsuka kati na nzoto mpe makanisi ya bikelamu na ye, monyoko oyo ezali kotika ata esika moke te na elikya, na mawa, na bolingo?” Küng abakisi ete: “Azali nde modefisi ya motema makasi bongo? ... Tokoki kokanisa nini na moto oyo akosepela na kozongisa mabe kozanga mawa mpe kozanga ndelo?”a Ya solo, lolenge nini Nzembe oyo azali koyebisa biso kati na Biblia ete tolinga bayini na biso akoki kokana konyokola bayini na ye mpo na libela? (1 Yoane 4:8-10) Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete bato mosusu bazali kosukisa ete lolenge ya lifelo eyokani te na ezaleli na Nzambe, ete liteya wana elongobani na bizaleli malamu te.
Bandimi mingi mosusu bazali koluka kozimisa lisosoli na bango na koboya kokanisa na mituna wana. Nzokande, koboya kokanisa yango ekolimwisa mitungisi wana te. Yango wana tika tolobela likambo yango polele. Bopusi nini liteya yango ezali kosala likoló na bizaleli malamu? Kati na zulunalo Criswel Theological Review, molakisi Pinnock akomi ete: “Monyoko ya seko elongobani te mpo ete ezali kokomisa Nzambe lokola mobomi ya nsomo oyo azali kobatela mɔ́tɔ ya seko mpo na banyokwami na ye oyo alingi te ete bakufa.” Atunaki ete: “Lolenge nini moto na motema mawa oyo azali na mwa boboto moke akoki kozala nyee wana azali komanyola likanisi yango [liteya ya kala ya lifelo]? ... Lolenge nini baklisto bakoki mpenza kotalela bonzambe ya mabe mpe ya nkanda motindo yango?”
Wana amonisaki bopusi mabe oyo liteya wana ekokaki kosala likoló na etamboli ya bato, Pinnock alimboli ete: “Nazali mpe komituna makambo ya nsomo nini masili kosalema na baoyo bazali kondima ete Nzambe azali konyokola bayini na ye.” Asukisaki ete: “Ezali wana likanisi lileki kotungisa oyo ezali kosenga batalela yango lisusu, boye te?” Ya solo, soki bazali komonisa Nzembe ete azali na motema mabe ya lolenge yango, ezali likambo ya kokamwa te ete bato oyo basambelaka bazali kotalela malamumalamu mɔ́tɔ na lifelo. Mpe bazali komona nini? Mokakatano mosusu oyo ezali kotemela likanisi ya monyoko ya seko.
Lifelo mpe boyengebene
Bato mingi oyo bazali kokanisa liteya ya kala ya lifelo bazali komona ete ezali komonisa Nzambe lokola azangi boyengebene, na yango ezali kotemela mayoki na bango ya boyengene oyo babotami na yango. Na lolenge nini?
Okoki kozwa eyano soko okokanisi liteya ya monyoko ya seko na ndakisa ya boyengebene ya kokoka oyo Nzambe apesaki ete: “Liso mpo na liso, lino mpo na lino.” (Exode 21:24) Na ndakisa, kokanisa liteya ya mɔ́tɔ ya lifelo na mobeko oyo Nzambe apesaki na libota ya Yisraele ya kala, mobeko oyo ezalaki kosenga lifuta ya kolongobana. Bosukisi nini okoki mbala mosusu kokoma na yango? Ete bobele basumuki oyo bapesaki mpasi ya seko nde babongi kozwa mpo na yango minyoko ya libela— bwale ya seko mpo na bwale ya seko. Kasi mpo ete bato (ata azalaki mabe lolenge nini) bakoki bobele kopesa mpasi oyo ekoumela mwa ntango, kokatela bango monyoko ya seko ezali komonisa kozanga bokokani kati na mabe na bango mpe etumbu ya seko ya mɔ́tɔ ya lifelo.
Na mokuse, etumbu yango elingaki kozala makasi mingi. Elingaki koleka mosika mobeko ya “liso mpo na liso, lino mpo na lino.” Na kotalela ete mateya na Yesu ebongolaki likanisi ya kozongisa mabe mpo na mabe, okondima ete baklisto ya solo bakomona noki kozanga bosembo kati na monyoko ya seko.—Matai 5:38, 39; Baloma 12:17.
Bazali kolongisa liteya yango
Nzokande, bandimi mingi bazali kolanda kolongisa liteya yango. Lolenge nini? Mobritanike mokomi ya mikanda, Clive S. Lewis, azali kolobela bakoteli mingi kati na mokanda na ye Mokokatano ya bolozi (na Lingelesi) ete: “Ezali na liteya mosusu te oyo nalingaka mpenza kolongola yango na mateya ya boklisto lokola oyo wana, soki nazalaka na makoki ya kosala yango. Kasi esimbami makasi mpenza na Makomami mingimingi na maloba na Nkolo na biso ye moko.” Na yango, balongisi na liteya yango bazali kondima ete monyoko ya seko ezali kobulunganisa, kasi bazali bobele koloba ete liteya yango esengeli kolakisama mpamba te bazali komona ete Biblia ezali koteya yango. téolojié Pinnock amonisi ete: “Wana bazali kondima motungisi na yango, bazali kolikya kolakisa bokangami makasi na bango na Biblia mpe mpiko kati na bindimeli na bango lokola likambo ya kondima solo oyo ezali kopesa nsomo bobele mpo ete Makomami mazali koteya yango. Bazali komonisa lokola ete bosolo ya Biblia etyameli ntembe. Kasi, ezali solo bongo?”
Yo mpe okoki komituna soki bosembo epai na Biblia etikeli yo liponi mosusu te bobele kondima liteya wana? Biblia ezali mpenza koloba nini?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bomoi ya seko?—Bomoi nsima ya kufa, mikakatano ya monganga, ya filozofi mpe téoloji lokasa 136 (na Lingelesi).
[Etanda na lokasa 5]
BILILINGI MISATO YA LIKANISI SE MOKO
Eyambweli ya Westminster, oyo endimami na Baprotestà elobi ete moto oyo aponami te “akobwakama na minyoko ya seko, mpe akozwa etumbu ya kobomama libela.” Mokanda The Encyclopedia of Religion elimboli ete: “Na Lingomba ya Katolike ya Loma lifelo etalelami lokola ezalela ya etumbu ezangi nsuka ... oyo ezali na ... mpasi ya mɔ́tɔ mpe minyoko misusu.” Encyclopedie yango ebakisi ete: “Lingomba ya Ortodoxe ya Est” ezali kondima “liteya oyo ete lifelo ezali esika ya mɔ́tɔ mpe etumbu ya seko oyo ezali kozela baoyo balakelami mabe.”—Volume 6, lokasa 238 kino lokasa 239.