Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/11 nk. 26-29
  • Tozali kosala mosala oyo mosengeli kosalema nokinoki

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali kosala mosala oyo mosengeli kosalema nokinoki
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobongisama na ngai na ntango ya etumba
  • Ebandeli ya mosala
  • Mwasi ya motuya mingi
  • Mosala ya misionere na Indonésie
  • Na ntango ya coup d’État
  • Botɛmɛli ekweisami lisusu
  • Amérique du Sud
  • Yehova azalaki na ngai elongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Yehova ateyaki ngai kosala mokano na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Bikateli ya malamu ememeli biso matomba ya libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Miziki oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/11 nk. 26-29

Tozali kosala mosala oyo mosengeli kosalema nokinoki

LISOLÓ YA HANS VAN VUURE

Na ntongo moko ya 1962, kati na libongo ya Rotterdam nakutanaki na Paul Kushnir, mokɛngɛli ya filiale ya la Société Watch Tower na Pays-Bas. Ntango tofandaki na mesa moko ya café-restaurant oyo engengisamaki malamu te, atalaki ngai mpe alobaki ete: “Oyebi, Hans, soki bondimi teritware wana, yo mpe mwasi na yo bokozala bobele na mposa ya kofuta ticket ya kokende?”

“YA SOLO, nayebi ete Susie akondima yango.”

“Solola na ye. Soki bokoyebisa ngai ekateli na bino nokinoki, ekozala malamu mpenza.”

Na mokolo molandaki na ntɔ́ngɔ́, azwaki eyano na biso: “Tokokende.” Yango wana, na mokolo ya le 26 Décembre 1962, tozalaki na libandá ya mpepo ya Schiphol na engumba ya Amsterdam, oyo ezipamaki na mbula mpembe. Nsima ya kopwepwe baboti na biso mpe baninga na biso, tomataki na mpepo mpo na kokende na teritware misionere oyo ezalaki naino na basakoli te: Nouvelle-Guinée néerlandaise (lelo oyo Irian Jaya, na Indonésie)​—mokili ya ba Papous.

Tokakatanaki mpo na kondima teritware wana ya mpasi? Mpenza te. Tosilaki kopesa bomoi na biso mobimba mpo na kosala mokano na Nzambe, mpe tondimisamaki ete akosunga biso. Wana ntango esili koleka mingi, tozali komona ete lolenge totyelaki Jéhovah motema ezalaki ya mpamba te. Kasi, liboso ete nayebisa bino makambo nini malekaki na Indonésie, tika nayebisa bino bomwana na ngai.

Kobongisama na ngai na ntango ya etumba

Na 1940, ntango Arthur Winkler, Temwe moko ya molende ayaki kotala baboti na ngai mpo na mbala ya liboso, nazalaki bobele na mibu zomi. Baboti na ngai bakamwaki na komona oyo Biblia ezalaki koloba na ntina na mateya ya lokuta ya boklisto ya lokuta. Lokola Pays-Bas ezalaki na nse ya bokonzi ya ba Nazis mpe ba Témoins de Jéhovah bapekisamaki, baboti na ngai basengelaki kokamata ekateli ya kosangana to ya koboya kosangana na lisangá moko oyo epekisami. Bazwaki ekateli ya kosala yango.

Na nsima, nalendisamaki mingi na mpiko oyo mama na ngai azalaki na yango mpe molende na ye ya kotya bonsomi na ye ata mpe bomoi na ye na likámá. Mokolo moko, na libaku ya bokaboli batrakte, atambolaki bakilomɛtɛlɛ 11 na vélo mpe azelaki kati na molili elongo na saki moko etondi na batrakte oyo ekolimbolaka Biblia. Na nsima, na ntango esengelaki, alandaki nzela na ye mpe atambolaki mbangu, wana azalaki mbala na mbala kotya loboko na saki na ye mpe kopanza batrakte nzelanzela. Motambwisi moko ya vélo oyo azalaki kolanda ye ayaki kokutana na ye mpe, na kolemba makasi angangaki epai na ye ete: “Mama, ozali kobungisa biloko na yo!” Tosekaki mingi ntango toyokaki mama koyebisa biso lisoló yango.

Nazalaki mpenza elenge, kasi nayebaki likambo nini nalingaki kosala na bomoi na ngai. Na boumeli ya moko na makita na biso na katikati ya mobu 1942, ntango mokambi atunaki ete: “Nani alingi kozwa batisimo na mbala oyo ezali koya?” Natombolaki loboko. Baboti na ngai batalanaki na kokakatana, bazalaki komituna soki nasosoli bonene ya ekateli motindo wana. Kasi, atako nazalaki na mibu 12, nayebaki oyo elimboli komipesa epai na Nzambe.

Kosakola ndako na ndako wana ba Nazis bazali kolanda na nsima ezalaki kosenga kozala na bokɛngi mingi. Mpo na kopengola ete tokende te kobeta na ekuke na baoyo bakokaki kofunda biso, mikolo oyo bakoteli ya ba Nazis bazalaki kotya makomi likoló na maninisa na bango, nazalaki koleka na vélo mpe nazalaki kokoma ba adresses na bango. Mokolo mosusu, mobali moko amonaki ngai mpe angangaki ete: “Ezali malamu mwana na ngai. Koma nkombo na bango, koma bango nyonso!” Nazalaki na molende, kasi nazalaki mpenza na bokɛngi mingi te! Na nsuka ya etumba na 1945, tosepelaki na likanisi ya kozwa bonsomi mingi mpo na kosakola.

Ebandeli ya mosala

Mokolo ya 1er Novembre 1948, nsima ya kosilisa kelasi na ngai, natindamaki na teritware mpo na mbala ya liboso lokola pionnier. Sanza moko na nsima, ndeko Winkler ayaki kotala libota epai nazalaki kofanda. Azwaki libaku ya koyeba makoki na ngai, mpamba te, mwa moke na nsima, nabyangamaki mpo na kosala na filiale ya la Société na Amsterdam.

Na nsima, basengaki ngai ete natalaka masangá ya ba Témoins de Jéhovah, lokola mokɛngɛli ya zongazonga. Mpe, na ebandeli ya eleko ya malili ya mobu 1952, nabyangamaki mpo na kokota na kelasi ya mbala ya 21 ya Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower na New York mpo na kobongisama lokola misionere. Yango wana, na nsuka ya 1952, tozalaki bato mwambe, oyo toutaki na Pays-Bas, na komata na masúwa Nieuw Amsterdam oyo ekatisaka mai monene ya Atlantique mpo na kokende na Amerika.

Na nsuka ya eteyelo, Maxwell Friend, moko na balakisi, ayebisaki biso ete: “Bokobosana makambo mingi oyo boyekoli awa, kasi tozali kolikya ete bokotikala na makambo misato: kondima, elikya mpe bolingo.” Makambo mingi mpe ya kitoko matali lisangá ya Jéhovah mazali naino kati na makanisi mpe kati na motema na ngai: oyo ya etuluku na bato oyo bazalaki kosala mosala wana bakangi ntina na yango.

Na nsima, nayokaki mawa mingi. Ndambo moko na mibale na bandeko oyo bautaki na Hollande (ngai mpe lokola) toponamaki mpo na kosala na Pays-Bas. Atako nayokaki mawa, nasilikaki te. Nazalaki bobele na elikya ete nakozela mibu 40 te, lokola Moize mpo na kotindama na mokili ya bopaya.​—Misala 7:23-30.

Mwasi ya motuya mingi

Ntango Fritz Hartstang, oyo azalaki mpo na ngai lokola tata, ayokaki mokano na ngai ya libala, ayebisaki ngai na nkuku ete: “Nakokaki te kosala liponi mosusu oyo eleki malamu koleka.” Tata ya Susie, Casey Stoové, azalaki moko na bakambi ya etumba mpo na kotemela ba Nazis na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Kasi, ntango akutanaki na Batemwe na 1946, andimaki solo ya Biblia nokinoki. Ye mpe bana misato kati na bana na ye motoba (Susie, Marian, mpe Kenneth) baumelaki te kozwa batisimo. Na le 1er Mai 1947, bango nyonso misato babandaki mosala ya pionnier. Na 1948, Casey atekaki mombongo na ye, mpe ye moko abandaki mpe mosala ya pionnier. Na nsima andimaki ete: “Mibu yango mizalaki oyo eleki esengo kati na bomoi na ngai!”

Nakutanaki na Susie na 1949, ntango babyangaki ye mpo na kosala na biro ya filiale na Amsterdam. Nzokande, na mobu molandaki, ye mpe ndeko na ye ya mwasi Marian bakendeki kolanda mateya na kelasi ya mbala ya 16 ya Galaad mpe bakendeki lokola bamisionere na Indonésie. Na Février 1957, nsima ya kosala mibu mitano, Susie azongaki na Pays-Bas mpo na kobalana elongo na ngai. Na ntango yango, nazalaki mokɛngɛli ya zongazonga, mpe na boumeli ya mibu mingi ya libala, amonisaki ntango nyonso ete azalaki pene ya komipesa mpo na bolingo na ye ya mosala ya Bokonzi.

Nsima ya libala na biso, tolandaki kotala masangá ya bitúká bikeseni ya Pays-Bas. Mibu oyo Susie asalaki lokola misionere na bisika ya mpasi ebongisaki ye mpo na mibembo na biso na vélo, longwa na lisangá moko kino na lisangá mosusu. Ezalaki na 1962, wana tozalaki na mosala ya zongazonga nde ndeko Kushnir ayaki kotala ngai na Rotterdam mpe asengaki ete tokende na Irian Jaya, na Indonésie.

Mosala ya misionere na Indonésie

Tokómaki na Manokwari, mokili moko ya lolenge mosusu! Ezalaki na makɛlɛlɛ ya kokamwa na butu na mikili ya molungé, moi makasi mpe mputulu. Lisusu ba Papous ya bamboka mike bazalaki kolata bobele maputa, bazalaki komema mipanga mpe bazalaki kolanda biso nsima mpo na kosimba mposo na biso ya mpembe​—makambo nyonso wana tosengelaki komesana na yango.

Na baposo oyo elandaki boyei na biso, bakonzi ya mangomba batangaki na ndakonzambe mokanda moko mpo na kokebisa bato na ntina na ba Témoins de Jéhovah, mpe bakabolaki yango na bayangani nyonso. Radio ya mboka elobelaki mikanda yango. Na nsima, bakonzi misato ya mangomba bayaki kotala biso mpe kotinda biso ete tokende kofanda na bamboka mike mpe kosakola epai na baoyo bazalaki kobénga “bapakano.” Papou moko oyo azalaki mokonzi ya bapolisi alendisaki biso mingi ete tokende, mpe mosangani moko ya bapolisi oyo basalaka bolukiluki na nkuku ayebisaki biso ete bazalaki kokana koboma biso.

Nzokande, bato nyonso te bazalaki kotemela biso. Conseiller politique moko ya ba Papous, Hollandais moko oyo azalaki pene na kozonga na Pays-Bas, alakisaki biso epai na bakonzi mingi ya ba Papous. Azalaki koloba na bango ete: “Ba Témoins de Jéhovah bakomemela bino losambo ya boklisto moko ya malamu koleka oyo nyonso boyebi. Na bongo, bosengeli bongo koyamba bango malamu.”

Na nsima, mosáli moko monene ya Leta asololaki na Susie na balabala mpe alobaki na kokitisáká mongongo na nse ete: “Bayebisaki biso ete bosili kobanda mosala ya sika awa, mpe tokoki te kopesa bino nzela ya kofanda awa. Kasi, ee, . . . bobele soki bozalaki na ndakonzambe.” Tokangaki ntina! Nokinoki, tokweisaki bifelo ya ndako na biso, totyaki bifandelo, totelemisaki pupitre mpo na molobi mpe tokomaki na libaya moko liboso na ndako, oyo ezali “Salle du Royaume.” Na nsima, tobyangaki mosáli monene wana ya Leta. Aningisaki motó, asekaki mwa moke mpe amibetibeti mosapi na motó, lokola mpo na koloba: ‘Mayele, mayele.’

Na mokolo ya le 26 Juin 1964, mbula moko na ndambo nsima na kokóma na biso, ba Papous 12 oyo tozalaki koyekola Biblia elongo na bango bazwaki batisimo. Mwa moke nsima, basusu 10 babakisamaki, mpe mwayene ya bato 40 bazalaki koyangana na makita. Ba pionniers mibale ya Indonésie batindamaki mpo na kosalisa biso. Na Décembre 1964, wana lisangá ya Manokwari esilaki kozwa moboko makasi, filiale ya la Société na Indonésie etindaki biso na esika mosusu.

Liboso ete tokende, mokambi ya Département des relations publiques ya boyangeli abengaki biso na pembeni mpe alobaki: “Nazali na mawa ete bozali kokende. Poso nyonso, bakonzi ya mangomba bazalaki kobondela ngai ete nazongisa bino, mpamba te, engebene maloba na bango, bozalaki kobuka mbuma na bango. Kasi, nazalaki koloba na bango ete: ‘Te. Bazali nde kobotisa banzeté na bino.’” Abakisaki ete: “Ata bokei epai wapi, bolemba te. Bokolónga!”

Na ntango ya coup d’État

Na butu moko ya Septembre 1965, na mboka-mokonzi Jakarta, epai totindamaki, batomboki ya communisme babomaki bakonzi mingi ya basodá, batumbaki engumba mpe babandisaki bitumba bipai nyonso kati na mboka kino kokweisa prezidá Sukarno. Bato soko 400 000 bakufaki!

Mokolo moko tozalaki kosakola na balabala moko, wana bazalaki kobeta mindoki mpe kotumba bandako na balabala mosusu ya pembeni. Na mokolo molandaki, toyokaki ete basodá balingaki kobebisa ndako moko ya ba communistes oyo ezalaki wana. Ntango tozalaki kosolola elongo na bato, bazalaki kotala biso na bobangi, kasi, ntango bazalaki koyoka nsango ya Biblia, kobanga na bango ezalaki kosila mpe bazalaki kokotisa biso na ndako. Kozala elongo na biso ezalaki kopesa bango mayoki ya libateli. Eleko wana eteyaki biso kotyela Jéhovah motema mpe kozala na bokatikati na ntango ya botɛmɛli.

Botɛmɛli ekweisami lisusu

Na nsuka ya 1966, tokendeki kofanda na engumba Amboine, na sud ya bisanga kitoko ya Moluques. Bafandi na yango bazalaki na bolingo, bazalaki kondima kosolola mpe kosepela mingi na makambo ya elimo. Lisangá na biso ya moke ekólaki nokinoki, mpe na makita bayangani bazalaki kokóma penepene na monkáma. Yango wana, bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bakendaki na biro ya makambo ya mangomba mpo na kopusa mokambi na yango ete abengana biso na Amboine. Kasi na biro na ye, bamonaki molɔngɔ́ ya mikanda ya la Société Watch Tower etandami polele! Lokola bakokaki te kondimisa ye, bakendaki na ministère des cultes, na Jakarta, mpe balukaki ete babengana biso bobele na Amboine te, kasi lisusu na Indonésie mobimba.

Mbala oyo, bamonanaki lokola ete balóngi, mpamba te mokolo ya kobengana biso etyamaki na le 1er Février 1968. Nzokande, bandeko na biso na Jakarta bakutanaki na Mizilmá moko, mosali monene ya ministère des cultes oyo asalaki ete ekateli wana eboyama. Lisusu, ministère ebongolaki likanisi, mpe epesaki bamisionere mosusu ndingisa ya kokota na mboka.

Na yango, na boumeli ya mibu zomi oyo milandaki, tosakolaki na nord ya Sumatra, elongo na bamisionere oyo bautaki na Allemagne, na Australie, na Autriche, na Etats-Unis, na Philippines mpe na Suède, na esika oyo ezalaki na bangomba, bazámba mpe mabéké ya kitoko. Mosala ya kosakola ekólaki, mingi mpenza kati na etuluku ya Bataks, oyo ezalaki na bato mingi koleka kati na etúká yango.

Nzokande, bato mabe ya mangomba balóngaki: mosala na biso ya kosakola epekisamaki na Décembre 1976, mpe na mobu molandaki, mingi kati na bamisionere bakendeki na bateritware mosusu. Na nsuka, na 1979, biso mpe tokendaki.

Amérique du Sud

Na ntango yango tozalaki na mibu soko 50, mpe tozalaki komituna soko tokomesana na mokili mosusu. Susie atunaki ete: “Tokondima kokende na teritware mosusu to tokokende kofanda na esika moko?”

Nayanolaki ete: “Susie, epai nyonso oyo Jéhovah asengaki ete tokende, abatelaki biso. Nani ayebi soko mapamboli nini mosusu mazali kozela biso na mikolo mizali koya?” Yango wana, tokendeki na Suriname, na Amérique du Sud, teritware na biso ya sika. Naino sanza mibale ekokaki te, tozongelaki lisusu mosala ya zongazonga mpe tomiyokaki lokola nde tozalaki na mboka na biso moko.

Soki tozali kokanisa mpo na mibu 45 oyo tolekisi kati na mosala ya misionere, ngai mpe Susie tozali kososola lolenge lisungi ya baboti na biso esalisaki biso na kolendendela na mosala ya misionere. Na 1969, ntango namonaki baboti na ngai nsima ya mibu motoba ya bokabwani, tata na ngai abéngaki ngai na pembeni mpe alobaki ete: “Soki ekómi ete mama akufi liboso na ngai, ezali na ntina te ete bozonga. Botikala na esika na bino ya mosala. Kasi soki ezali ngai nde nakokufa liboso, bosengeli kotuna mama oyo bosengeli kosala.” Mama mpe alobaki bobele bongo.

Baboti ya Susie bazalaki na makanisi motindo wana mazangi moimi. Na libaku moko, Susie aumelaki mibu 17 mosika na bango, kasi bakomelaki ye mokanda moko te ya kolembisa. Na ntembe te, soki baboti na biso bazalaki na lisungi moko te, tolingaki kozonga na mboka na biso. Likambo tosengeli kososola ezali ete, bazalaki kosepela na mosala ya misionere motindo moko na biso mpe, kino liwa na bango, basalelaki Jéhovah na kobateláká etinda oyo balonaki na motema na biso: kokanga ntango nyonso ntina ya mosala yango​—Tala 1 Samwele 1:26-28.

Tolendisamaki lisusu na bakomani na biso ya sembo. Basusu kati na bango balekisaka sanza mobimba te kozanga kokomela biso na boumeli ya mibu 30 ya mosala na biso ya misionere. Kasi, na koleka, tozali kokanisa Jéhovah, Tata na biso ya boboto oyo azali na likoló, oyo ayebi kosunga basaleli na ye oyo bazali awa na mabelé. Na yango, wana ezali biso kobelema na kondongwana ya makambo minene oyo tozali kozela na motema likoló, Susie mpe ngai tolingi ete “tobosana te mokolo ya Jéhovah” wana tozali kolanda kosalela ye, na kokangáká ntina ya mosala na biso.​—2 Petelo 3:12.

[Elilingi na lokasa 26]

Libala na biso na 1957

[Elilingi na lokasa 29]

Oyo nde esengo: ba pionniers motoba ya bilenge!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto