Nazwaki eloko ya motuya mingi
LISOLÓ YA FLORENCE WIDDOWSON
Wana butu ebandaki koingela, tozwaki ekateli ya kolala penepene ya nzalé moko. Ezalaki mpenza esika malamu mingi te ya kolala libanda mpo na basi mibale, kasi tokanisaki ete ekoki kobonga mpo na butu moko. Wana nazalaki kotelemisa hema, Marjorie azalaki kolamba bilei na biso ya mpokwa.
ESILISAKI ngai kopika pikɛ́ ya nsuka ya hema namonaki eloko moko koningana penepene na ekumu ya nzeté moko moindo. Nangangaka epai ya Marjorie ete: “Omoni ntango ekumu wana eninganaki?”
Na mwa kobanga, ayanolaki ete: “Te.”
Nangangaki ete: “Eninganaki mpenza. Pesá ngai mbilíka!”
Wana nakamataki yango, elongo na epasola na lipeka, nakendeki na nzalé. Ntango nakómaki penepene na ekumu, namonaki mobali moko oyo abimaki na nsima na yango!
Nalobaki lokola moto na likukuma ete: “Bamelaka mai ya nzalé oyo?”
Ayanolaki noki ete: “Te, bamelaka yango te; soki olingi mai ya komela, nakoki kokende kolukela yo yango.”
Naboyaki likanisi na ye nokinoki, mpe motema na ngai mokitaki ntango abalukaki mpe akendeki. Na kolenga nyonso, nazongaki mbangu koyebisa Marjorie likambo yango. Nokinoki, tokweisaki hema, tokangaki bisaka mpe tolongwaki wana. Na nsima bayebisaki biso ete mobali yango autaki kobimisama na bolɔ́kɔ.
Atako kala na 1937, mbala mingi baluki wolo bazalaki kolala libandá na bisika wana bakotimolaka wolo ya Australie, nzokande biso tozalaki baluki wolo ya lolenge mosusu. Tozalaki koluka bato oyo bazalaki na motuya mingi na miso ya Nzambe.
Lisoló ya libota na ngai
Eleki sikawa mibu monkámá, tata na ngai azalaki motúli na bibende na mboka moke Porepunka, na etúká ya Victoria. Nabotamaki kuna na mobu 1895, mpe nakólaki kati na bandeko mibali minei, penepene ya ebale Ovens oyo eleki pembeni na ngomba Buffalo. Baboti na ngai bazalaki basangani ya molende na lingomba oyo babengi Eglise de l’Union; nazalaki kolanda malongi ya Lomingo, epai tata na ngai azalaki mokambi.
Na 1909, na boumeli ya mbula moko ya mopepe makasi mama na ngai azwaki bokɔnɔ makasi ya motema mpe akufaki na mabɔkɔ ya tata na ngai. Na nsima, na ebandeli ya 1914, moko kati na bandeko na ngai ya mibali akimaki ndako, mpe nsima na mwa bangonga, bazongiselaki biso ye bobele ebembe. Amibomaki. Mpasi na biso ebakisamaki na liteya ya lingomba oyo ete lifelo ezalaki kozela ye, mpamba te komiboma etalelamaki lokola lisumu oyo likoki kolimbisama te.
Pene na nsuka ya mbula wana, Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki, mpe bandeko na ngai mibali mibale batindamaki na mosala ya sodá na mikili ya bopaya. Bansango ya nsɔmɔ etali kosopama ya makila mpe mpasi epusaki biso bilenge basi motoba, mpe tata na ngai, na kobanda boyekoli ya mokanda na Yoane, kati na Biblia.
Tozwi eloko ya motuya ya solo
Ellen Hudson azalaki na búku Ntango ebelemi (na Lingelesi), ya Charles Taze Russell. Esengo azalaki na yango mpo na búku wana ebendaki biso nyonso oyo tozalaki kati na etuluku wana. Ntango asosolaki ete buku wana ezalaki bobele moko kati na molɔngɔ́ ya babúku motoba ebéngmi ete Boyekoli ya Makomami (na Lingelesi), atindaki mokanda epai na Lisangani ya mokili mobimba ya Bayekoli ya Biblia na Melbourne mpo na kosenga babúku mosusu ya molɔngɔ́ yango. Etuluku na biso endimaki kosalela búku ya liboso, Le divin plan des âges, kati na boyekoli na biso ya poso na poso.
Kanisá esengo oyo ngai mpe tata na ngai tozalaki na yango na koyeba ete lifelo ya mɔ́tɔ lizali te. Kobanga oyo nazalaki na yango ete ndeko na ngai ya mobali abwakami kati na lifelo ya mɔ́tɔ esilaki. Toyekolaki solo oyo ete bakufi bayebi eloko moko te, bazali lokola nde balali mpongi, mpe bazali na bomoi te na esika moko epai bazali konyokwama. (Mosakoli 9:5, 10; Yoane 11:11-14) Basangani mosusu ya etuluku na biso bazwaki ekateli ya kosakola epai na bazalani na biso solo oyo tozalaki koyekola. Na bandako ya penepene tozalaki kokende na makolo, kasi na bamboka mosika ya engumba tozalaki kosalela veló mpe likalo ya yíka mibale oyo ebendamaki na mpunda moko.
Nakendeki kotatola ndako na ndako mpo na mbala ya liboso na mokolo oyo bikólo biyokanaki mpo na kosukisa Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, na Novɛ́mbɛ 11, 1918. Basangani misato kati na etuluku na biso ya boyekoli, tosalaki mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 80 kino na engumba Wangaratta mpo na kokabola trakte La tribune du peuple. Likambo oyo nalobelaki na ebandeli, nakutanaki na yango mibu mingi na nsima, wana totindamaki kosakola na moko na bitúká oyo ezalaki mosika kati na mboka.
Na 1919, nazalaki na Liyangani ya Etúká oyo Bayekoli ya Biblia babongisaki na Melbourne. Kuna, na Apríli 22, 1919, namonisaki polele komipesa na ngai epai ya Yehova na kozwa batisimo ya mai. Elambo ya elimo ekolisaki bosepeli na ngai mpo na eloko ya motuya ya elimo ya Bokonzi na makoló mpe mpo na ebongiseli ya Yehova awa na mabelé.—Matai 13:44.
Nsima ya Liyangani ya Etúká, nazongaki mbala moko epai na biso te, kasi nandimaki libyangi ya kopesa litatoli na boumeli ya sanza moko elongo na Jane Nicholson, mosakoli moko ya ntango nyonso. Mokumba na biso ezalaki ya kosakola na bilanga mpe na bibokwelo ya bangombe pembeni ya ebale King. Bobele mwa bambula liboso, etando wana ya ngombangomba eponamaki mpo na kosala filimi oyo babéngi The Man From Snowy River (Moto oyo auti na ebale ya mbula mpɛmbɛ).
Na 1921 tozwaki La Harpe de Dieu, búku kitoko mpo na koyekola Biblia. Ntango Tata abandaki kosalela yango lokola búku ya kelasi mpo na malongi ya Lomingo, baboti mingi baboyaki mpe basengaki ete atika kolakisa. Asalaki yango nokinoki. Na nsima, tozwaki mwa búku Lifelo (na Lingelesi), oyo ezalaki na mituna ya kobenda likebi na ezipeli: “Ezali nini? Banani bazali kuna? Bakoki kobima na yango?” Tata asepelaki mingi na bandimbola ya polele ya Biblia oyo elakisamaki na likambo yango na boye ete abandaki kokabola yango ndako na ndako. Akabolaki nkámá mingi na yango na mboka na biso mpe na bamboka ya zingazinga.
Mibembo mpo na kosakola elongo na tata na ngai
Na nsima, tata na ngai asombaki motuka mpo na kokómisa nsango ya Bokonzi epai na bato na bitúká misusu. Lokola azalaki motúli na bibende, amesenaki mingi na bampunda, yango wana ngai nakómaki mokumbi motuka. Na ebandeli, tozalaki kolala na ndako ya bato ya mobembo. Nokinoki tomonaki ete yango ezalaki kosenga mosolo mingi, bongo tobandaki kolala kati na hema na libandá.
Tata asalaki ete kiti ya liboso na motuka ezala patatalu mpo nakoka kolala kati na motuka. Tobongisaki hema moko moke mpo ete tata akoka kolala kati na yango Nsima ya kolala baposo mingi kati na hema na libandá, tozalaki kozonga na Porepunkah, epai tata azalaki kofungola lisusu etúlelo na ye. Tozalaki bobele kokamwa na komona ete basombi mingi bazalaki ntango nyonso kofuta mosolo oyo mosengelaki kokokisa bamposa na biso mpo na mobembo mosusu kati na mosala ya kosakola.
Bato mingi ya motema sembo bayambaki biso malamu mpe na nsima bandimaki boyekoli ya Biblia na bandako na bango. Sikawa ezali na masangá nsambo elongo na Bandako na yango ya Bokonzi na etúká oyo, liboso etalelamaki na etuluku na biso moke oyo ezalaki na Porepunkah. Ya solo, nani akoki kotyola “mokɔlɔ na makambo mikɛ”?—Jekalia 4:10.
Na 1931, Tata mpe ngai tosalaki mobembo ya bakilomɛtɛlɛ 300 na banzela ya mabe mpo na koyangana na likita moko ya ntina, epai tondimaki kozwa nkombo na biso ya sika, “Batatoli ya Yehova.” Biso banso tosepelaki mingi na nkombo wana eleki kitoko oyo ezwami na Makomami. (Yisaya 43:10-12) Emonisaki biso polele koleka kokesana moke oyo emonisamaki na nkombo “Lisangani ya mokili mobimba ya Bayekoli ya Biblia,” oyo toyebanaki na yango kino ntango wana.
Mokolo moko, ntango nazalaki kopesa litatoli na engumba Bethanga, nakutanaki na mokambi ya Lingomba ya Anglican. Asilikaki mpe abandaki kolanda bisika mingi epai tokabolaki babúku, mpe azalaki kosenga ete bato bapesa ye babúku yango. Na nsima akambaki botumbi babúku na katikati ya engumba. Kasi likambo mabe wana asalaki libalukelaki ye.
Nsima, wana nayebisaki biro ya filiale ya la Société na likambo oyo lisalemaki, mokanda moko mokomamaki oyo mozalaki kokweisa polele etamboli ya mokonzi wana ya lingomba. Lisusu, bibongiseli bizwamaki mpo ete bakumbi mituka oyo bazalaki Batatoli, bakoka kokabola mokanda yango na etúká mobimba. Ntango ngai mpe tata na ngai tozongaki na engumba wana, tokabolaki babúku mingi koleka na liboso. Bafandi ya engumba balingaki koyeba makambo oyo malobelamaki kati na babúku oyo “epekisamaki”!
Moto ya liboso oyo ayambaki solo ya Biblia na Nɔ́rdi-Ɛ́sti ya Victoria lokola mbano ya mosala na biso ya kosakola, ezalaki Milton Gibb. Katikati na bilaká ya bozongeli na biso, azalaki koyekola na molende mingi mikanda ya la Société oyo totikelaki ye. Na libaku moko ya bozongeli na biso, akamwisaki biso wana alobaki ete: “Nazali sikawa moko ya bayekoli na yo.”
Atako nasepelaki na ekateli na ye, nalimbolaki ete: “Te, Milton. Okoki kozala moyekoli na ngai te.”
“Boye, nazali bongo moko na bayekoli ya Rutherford [oyo azalaki prezidá ya la Société Watch Tower na ntango wana].”
Nalobaki lisusu ete: “Moyekoli ya Rutherford mpe te, kasi nazali kolikya ete okozala moyekoli ya Klisto.”
Milton Gibb azalaki solo moko na biloko mingi ya motuya oyo nalekisaki mibu mingi mpo na koluka. Ye mpe bana na ye ya mibali mibale bazali bankulutu baklisto, mpe basangani mosusu ya libota na ye bazali kosala mosala makasi kati na lisangá.
Nakutani na komekama ndenge na ndenge
Atako bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Australie na Yanuáli 1941, tokobaki kosakola na kosaleláká bobele Biblia. Bongo nakataki mosala na ngai ya mobongisi-nzela (pionnier), to mosala ya ntango nyonso, wana nabyangamaki na mboka mpo na kobatela tata na ngai oyo azalaki na maladi makasi. Na nsima, ngai mpe nabɛlaki makasi, mpe esɛngaki ete basala ngai lipasó ya monene. Esengelaki ntango molai mpo nakoka kozala lisusu na nzoto kolɔngɔnɔ, kasi namonaki bosolo ya elaka oyo ya Nzambe ete: “Nakotika yo sɔkɔ mokɛ tɛ, [nakosundola, NW] yɔ mpe tɛ.” (Baɛbɛlɛ 13:5) Ndeko moklisto mwasi moko andimisaki ngai, wana alobaki ete: “Flo, omikundola ete ozali yo moko te. Ozali ntango nyonso elongo na Yehova, zala na elikya ete okolónga.”
Tata molingami na ngai akómaki bongo na nsuka ya bokɔnɔ na ye oyo boumelaki baposo 13. Na Yúli 26, 1946, akufaki. Azalaki na bomoi malamu, mpe elikya na ye ezalaki ya kokende likoló. (Bafilipi 3:14) Na yango, na mibu 51 nazalaki ngai moko, nsima ya kolekisa mibu ya bolenge na ngai nyonso elongo na tata na ngai. Bongo nakutanaki na mobali oyo asengelaki kobala ngai. Tobalanaki na 1947 mpe tobandaki kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo. Kasi eleko wana ya esengo eumelaki mingi te, mpo ete azwaki maladi makasi ya paralizi na 1953 mpe akómaki elɛ́mɛ.
Koloba ekómaki mpasi mingi mpo na mobali na ngai, mpe mwango ezalaki mpenza te mpo na kosolola elongo na ye. Yango nde ezalaki likambo ya mpasi mingi mpo na ngai ntango nazalaki kobatela ye. Komeka kososola makambo oyo azalaki kobundana mpo na koloba ezalaki solo kolɛmbisa makanisi. Atako tozalaki kofanda na esika moko etangwamaki, epai masangá mazalaki penepene te, Yehova atikaki biso te na boumeli ya mibu wana ya mpasi. Nazalaki kosala makasi mpo na kotambola elongo na ebongiseli (organisation) mpe mbala na mbala nazalaki kozwa bilei ya elimo oyo bizalaki kati na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Na Desɛ́mbɛ 29, 1957, mobali molingami na ngai akufaki.
Mobongisi-nzela na Adelaide
Nakómaki lisusu ngai moko. Nasengelaki kosala nini? Nakokaki nde kondimama lisusu lokola mosakoli ya ntango nyonso nsima ya kotika mosala penepene na mibu mitano? Lisengi na ngai lindimamaki, bongo natekaki ndako na ngai mpe nabandelaki lisusu mosala ya mobongisi-nzela na Adelaide, engumba-mokonzi ya Súdi na Australie. Bazalaki na mposa ya babongisi-nzela kuna na eleko yango, mpe batindaki ngai na lisangá ya Prospect.
Lokola nazalaki na bobangi ya kokumba motuka kati na engumba, natekaki motuka na ngai mpe nazongelaki lisusu veló. Nasalelaki yango kino nakómaki na mibu 86, mpe nayebanaki mingi kati na etúká yango lokola “mwasi moke motambwisi na veló ya bulé.” Na nsima nakómaki kobanga mpo na mituka mingi mizalaki kotambola; yíka ya liboso ya veló na ngai ekómaki lokola nde ezalaki ntango nyonso kolɛnga. Mokolo moko nsima na nzangá, nakweaki kati matiti ya lopango moko. Namilobaki ete: ‘Esili,’ mpe nazwaki bongo ekateli ya kotambola na makolo.
Eleki mwa bambula sikawa, ntango nazalaki na Liyangani moko ya Etúká, makolo na ngai malɛmbaki mpenza, mpe na nsima esengelaki basala ngai lipasó na lokéto. Nazalaki malamu nsima ya lipasó kino ntango mbwa moko ya monene ekweisaki ngai. Yango esengaki lisusu basalisa ngai na monganga, mpe kobanda wana, nazali kosalela mpéngu mpo na kotambola. Bɔɔngɔ́ na ngai ezali naino malamu. Ezali lokola moninga moko alobaki yango: “Emonani ete nzoto na yo ezali konuna kasi bɔɔngɔ́ na yo ezali kotikala elenge.”
Na boumeli ya mibu mingi, nasili komona wana masangá na Adelaide ezalaki kokola, kofuluka, mpe kokabolama. Na nsima, na 1983, wana nazalaki na mibu 88, natikaki Adelaide mpo na kokende kofanda elongo na libota moko na Kyabram na etúká ya Victoria, epai nasili kolekisa mibu zomi ya esengo. Kino sikawa nazwaka bibongiseli mpo na kobima na mosala ya kosakola; baninga kati na lisangá bamemaka ngai kotala bato oyo nakendeke kopesa bango bazulunalo. Bato wana babimaka na boboto nyonso kino esika motuka motɛlɛmi mpo ete nakoka kosolola elongo na bango.
Ntango nazali kokanisa mpo na mibu 98 ya bomoi na ngai, nazali komikundola na esengo nyonso mpo na bato mingi ya bosembo oyo bakumisaki Yehova elongo na ngai, mingi mpenza papa na ngai ya bolingo. Emonani lokola naumeli na bomoi koleka bato mosusu nyonso ya bosembo oyo bazalaki baninga na ngai kati na mosala ya mobongisi-nzela. Kasi esengo monene ezali kozela ngai na ntango nakozala elongo na baoyo nyonso bazali na elikya ya kozwa mbano ya bomoi kati na Bokonzi ya Nzambe na likoló, oyo ezali mpenza eloko ya motuya mingi!
[Elilingi na lokasa 28]
Nazwaki batisimo na Apríli 22, 1919
[Elilingi na lokasa 31]
Nazali na esengo lokola nazali naino kosalela Yehova awa ezali ngai kobɛlɛma na mbula 100 na bomoi na ngai