Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 1/10 nk. 24-28
  • Formasyo oyo eumeli bomoi na ngai mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Formasyo oyo eumeli bomoi na ngai mobimba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Litomba ya kozala na baninga malamu
  • Komekama ekómisi ngai makasi
  • Ndenge nalongaki makanisi ete nakokoka te
  • Natiki mokili ya esobe, nakei na esanga moko ya kitoko
  • Kosakola mpe koteya na Sri Lanka
  • Mbongwana mpe makambo oyo yango ebimisaki
  • Nazwaki eloko ya motuya mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Yehova ateyaki ngai kosala mokano na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Koyeba oyo ezali malamu mpe kosala yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Bikateli ya malamu ememeli biso matomba ya libela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 1/10 nk. 24-28

Lisolo ya bomoi

Formasyo oyo eumeli bomoi na ngai mobimba

YA HAROLD GLUYAS

Likambo moko namoná na bomwana na ngai etikalá na makanisi na ngai ata nsima ya mbula koleka 70. Nafandaki na kuku, mpe nazalaki kotala papye moko oyo bakomá “Ti ya Ceylan.” Papye yango ezalaki mpe na elilingi ya basi oyo bazali kobuka ti na bilanga, na Ceylan (lelo oyo Sri Lanka). Elilingi yango oyo namonaká kala mpenza ntango tozalaki kofanda na sudi ya Australie, ezalaki kolongwa te na makanisi na ngai. Namonaki ete Ceylan ezali mboka moko kitoko mpenza! Na ntango wana, nayebaki te ete nakolekisa mbula 45 ya bomoi na ngai ya misionɛrɛ na esanga wana.

NABOTAMAKI na sanza ya Aprili 1922, mpe na ntango yango mokili ezalaki ndenge mosusu mpenza. Baboti na ngai bazalaki kosala bilanga na ferme moko oyo ezalaki pene na engumba Kimba, oyo ezali na katikati ya Australie, na ndelo ya sudi ya esobe monene ya Australie. Bomoi ezalaki mpasi, na ndakisa, mbula ezalaki kobɛta mingi te, nyama-nkɛkɛ ezalaki kotondana na mboka, mpe molunge ezalaki makasi. Mama azalaki kosala mingi mpo na kosalisa Tata ná biso bana motoba oyo tozalaki kofanda na mwa ndako ya manzanza.

Kasi, ngai nazalaki komiyoka ete nazali na bonsomi mpe nazalaki kosepela mingi na mboka yango. Nazali koyeba lisusu ndenge nazalaki kokamwa soki namoni ebele ya bangɔmbɛ bazali kokata matiti na bilanga to mipɛpɛ makasi oyo ezalaki kotombola putulu mboka mobimba. Na bongo, nabandá kozwa formasyo kala, liboso kutu nakɔta kelasi na mwa eteyelo moko ya moke oyo ezalaki kaka na molakisi moko, na ntaka ya kilomɛtrɛ mitano banda na ndako na biso.

Baboti na ngai bazalaki kolinga makambo ya Nzambe, atako bazalaki kokende na ndako-nzambe te, mingimingi mpo ferme na biso ezalaki mosika mpenza na engumba. Atako bongo, na ebandeli ya bambula 1930, mama akómaki kolanda masukulu ya Ndeko Rutherford oyo ezalaki koleka pɔsɔ na pɔsɔ na radio moko ya engumba Adélaïde. Ngai nazalaki kokanisa ete Rutherford azali pastɛrɛ moko ya engumba Adélaïde, mpe nazalaki mpenza kotyela mateya na ye likebi te. Kasi, Mama azalaki kozela na motema likoló masukulu yango mpe azalaki kofungola mpenza matoi mpo na koyoka mongongo ya Ndeko Rutherford na radio na biso ya kala oyo ezalaki kosala na pile.

Mokolo moko na mpokwa, oyo molunge ezalaki makasi mpe putulu ezalaki mingi, motuka moko etɛlɛmaki liboso ya ndako na biso mpe mibali mibale oyo balataki malamu mpenza bakitaki na motuka yango. Bazalaki Batatoli ya Yehova. Mama ayokaki lisolo oyo bayaki na yango mpe apesaki makabo mpo na kozwa mikanda mwa mingi, mpe abandaki mbala moko kotánga yango. Asepelaki mpenza na makambo oyo atángaki na mikanda yango mpe asɛngaki mbala moko Tata amema ye na motuka mpo akende koyebisa bato mosusu makambo oyo ayekolaki.

Litomba ya kozala na baninga malamu

Mwa moke na nsima, tolongwaki na mboka yango mpo bomoi elekaki mpasi mpe tokendaki na engumba Adélaïde, na ntaka ya kilomɛtrɛ 500 longwa na esika tozalaki kofanda. Libota mobimba tobandaki koyangana na makita ya lisangá ya Batatoli ya Yehova na engumba Adélaïde, mpe tokómaki kokola na elimo. Ntango kaka tolongwaki na mboka yango, natikaki mpe kotánga kelasi. Nasilisaki kelasi ya nsambo wana nazalaki na mbula 13. Lokola nazalaki motó likolólikoló, soki ezalaki te lisalisi ya bandeko mibali mingi ya malamu​—babongisi-nzela, to basaleli ya ntango nyonso—​oyo bazalaki mpenza komibanzabanza mpo na ngai, nalingaki te kolanda mikano ya elimo.

Mokemoke, boninga ya bandeko mibali wana ekómaki kolamusa mposa na ngai ya makambo ya elimo. Nakómaki kolinga mingi kozala elongo na bango mpe nazalaki kosepela na elimo na bango ya kosala mingi. Yango wana, ntango bapesaki liyebisi moko oyo elendisaki mosala ya ntango nyonso na liyangani moko ya etúká oyo esalemaki na Adélaïde na 1940, ngai mpe napesaki nkombo. Kutu, na ntango wana, nazwaki naino ata batisimo te mpe namesanaki mpenza te na mosala ya kosakola. Atako bongo, mwa mikolo na nsima, batindaki ngai nakende kosala elongo na etuluku moko ya babongisi-nzela na Warrnambool, engumba moko ya etúká ya Victoria, oyo ezalaki mosika mpenza na Adélaïde.

Atako na ebandeli ezalaki lokola lisano, mwa moke na nsima nakómaki mpenza kolinga mosala ya kosakola, mpe nazali na esengo ya koloba ete tii lelo oyo, nsima ya ebele ya bambula, bolingo yango ekitá te. Kutu, yango ebongolaki mpenza bomoi na ngai mpe nakómaki kokola na elimo. Namonaki mpenza ntina ya kozala pene na bandeko oyo balingaka makambo ya elimo. Namonaki mpenza ndenge oyo baninga ya malamu bakoki kosalisa biso na kokolisa bizaleli ya malamu, ezala totángá kelasi mingi to te, mpe ndenge oyo makambo oyo toyekoli ekoki kopesa biso matomba bomoi na biso mobimba.

Komekama ekómisi ngai makasi

Naumelaki naino te na mosala ya mobongisi-nzela ntango bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Australie. Lokola nayebaki mpenza te nini nasala, natunaki makanisi epai ya bandeko mpe bayebisaki ngai ete bapekisi te kosolola na bato na Biblia. Na bongo, elongo na babongisi-nzela mosusu, nabandaki kokende ndako na ndako mpo na kosolola na bato kaka masolo ya Biblia. Yango epesaki ngai makasi ya kolonga komekama oyo eyaki na nsima.

Sanza minei na nsima, nakómaki na mbula 18 mpe basɛngaki ngai nakɔta mosala ya soda. Yango epesaki ngai libaku ya kolobela kondima na ngai liboso ya bakonzi mingi ya basoda mpe zuzi moko. Na ntango yango, bandeko mibali 20 bazalaki na bolɔkɔ ya Adélaïde mpo baboyaki kosala mosala ya soda, mpe eumelaki te, batyaki ngai mpe kuna. Bazalaki kosalisa biso misala ya makasi, lokola kobuka mabanga mpe kobongisa banzela. Yango esalisaki ngai nalona bizaleli lokola mpiko mpe molende. Lokola tozalaki na bizaleli ya malamu mpe totikalaki sembo, bakɛngɛli mingi ya bolɔkɔ bakómaki komemya biso mpenza.

Nsima ya basanza mingi, nabimaki na bolɔkɔ, nalyaki lisusu bilei ya malamu mpe nazongelaki mosala ya mobongisi-nzela. Kasi, lokola babongisi-nzela bazalaki mingi te, batunaki ngai soki nakondima kokende ngai moko kosakola na baferme oyo ezalaki na sudi ya Australie. Nandimaki mpe nakendaki na Péninsule ya Yorke, kaka na biloko na ngai ya mosala ya kosakola ná velo na ngai. Ntango nakómaki kuna, libota moko oyo bazalaki kosepela na solo bamemaki ngai na ndako moko ya bapaya epai mama moko azwaki ngai mpenza lokola mwana na ye. Na moi, nazalaki kokende na velo na banzela etondi na zɛlɔ mpe nazalaki kosakola na mwa bingumba ya etúká yango. Mpo na kokende na bamboka oyo ezali mosika, nazalaki mbala mingi kolala na baotɛlɛ ya mike to na bandako ya bapaya. Na ndenge yango, natambolaki bakilomɛtrɛ na bakilomɛtrɛ mpe nakutanaki na makambo mingi ya malamu. Nazalaki komitungisa mingi te mpo nazalaki kosakola kaka ngai moko, mpe lokola nazalaki komona ndenge Yehova azalaki kosunga ngai, yango esalaki ete napusana lisusu penepene na ye.

Ndenge nalongaki makanisi ete nakokoka te

Na 1946, biro etindelaki ngai mokanda mpo na kosɛnga ngai nakóma mosaleli ya bandeko (mokɛngɛli ya zongazonga). Mosala yango ezalaki kosɛnga kotalaka masangá na zongazonga moko. Lokuta mabe, namonaki ete mokumba yango ezalaki makasi mpenza mpo na ngai. Mokolo moko nayokaki ndeko mobali moko alobaki ete, “Harold ayebi mpenza kosala masukulu te, azali nde makasi na mosala ya kosakola.” Maloba yango elendisaki ngai mingi. Ngai moko nayebaki ete nazalaki molobi ya malamu te mpe nayebaki mpenza te ndenge ya kotambwisa lisangá, kasi nayebaki ete mosala ya kosakola ezali mosala ya libosoliboso mpo na baklisto.

Na 1947, bandeko nyonso bakómaki kolobela koya ya Ndeko Nathan Knorr ná Ndeko Milton Henschel, oyo basengelaki kouta na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn. Wana ezalaki mbala ya liboso bandeko ya biro monene báya kotala biso, banda ndeko Rutherford ayaká na 1938. Tosalaki liyangani moko monene na Sydney. Lokola ebele ya bilenge mosusu oyo bazalaki babongisi-nzela, nasepelaki mingi na formasyo oyo bakómaki kopesa bandeko mpo na mosala ya misionɛrɛ na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, oyo eutaki kofungwama na South Lansing, na etúká ya New York, na États-Unis. Mingi kati na biso tozalaki komituna soki eteyelo yango ezalaki kaka mpo na bato oyo batángá kelasi mingi. Kasi, Ndeko Knorr alimbolelaki biso ete soki tokoki kotánga lisolo moko na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe kokanga makanisi ya ntina, tokoki mpe kosala malamu na Gileadi.

Nazalaki kokanisa ete bakondima ngai na eteyelo yango te lokola natángá kelasi mingi te. Likambo ya kokamwa, basanza mingi na nsima, basɛngaki ngai natondisa formilɛrɛ mpo na kokɔta na eteyelo ya Gileadi. Nsima na yango, bandimaki ngai, mpe nakɔtaki na kelasi ya mbala ya 16 oyo esalemaki na 1950. Kelasi yango ezalaki likambo ya malamu mpenza oyo esalisaki ngai nalongola kobanga. Yango emonisaki ngai mpenza ete esɛngaka kaka te kotánga kelasi ya minene mpo na kolonga na bomoi. Kasi, makambo ya ntina mpenza ezalaki nde komipesa mpe kozala na botosi. Balakisi na biso bazalaki kolendisa biso tósala milende mpenza. Lokola nalandaki toli na bango, nakolaki mpenza mpe nakokaki kolanda mateya malamu.

Natiki mokili ya esobe, nakei na esanga moko ya kitoko

Ntango tosilisaki kelasi yango, batindaki ngai ná bandeko mosusu mibale oyo toutaki na bango na Australie na Ceylan (lelo oyo Sri Lanka). Tokómaki na Colombo, mboka-mokonzi ya Ceylan, na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1951. Molunge ezalaki makasi, tomonaki biloko mingi ya sika, toyokaki mingongo mpe bansolo oyo toyoká naino te. Ntango tobimaki na masuwa, misionɛrɛ moko oyo tokutaki na mboka yango ayambaki ngai mpe apesaki ngai papye moko oyo ezalaki kolobela lisukulu ya bato nyonso oyo esengelaki kosalema na mokolo ya lomingo oyo elandi na ntei ya engumba. Likambo ya kokamwa, nkombo ya molobi oyo batyaki na mwa papye yango ezalaki nde ngai. Kanisá naino kobanga oyo nazalaki na yango. Kasi, ntango nyonso oyo nalekisaki na mosala ya mobongisi-nzela na Australie eteyaki ngai kondima mikumba nyonso oyo bapesi ngai. Na bongo, na lisalisi ya Yehova, nasalaki lisukulu yango malamu mpenza. Elongo na bamisionɛrɛ mosusu minei ya minzemba oyo tokutaki na ndako ya bamisionɛrɛ na Colombo, tobandaki koyekola Cinghalais, monɔkɔ moko makasi mpenza, mpe tobandaki kobima na mosala ya kosakola. Mbala mingi, tozalaki kosakola kaka biso moko mpe tozalaki kosepela mingi ndenge bato ya mboka bazalaki komemya biso mpe koyamba biso. Eumelaki te, bato mingi bakómaki koyangana na makita.

Nsima ya mwa ntango, nakómaki kokanisa malamumalamu mpo na Sybil, ndeko mwasi moko mobongisi-nzela oyo nakutanaki na ye ntango nazalaki kokende na Eteyelo ya Gileadi, mpe azalaki kosepelisa ngai mingi. Ntango tokutanaki na ye, azalaki kokende na liyangani monene ya New York, oyo esangisaki bandeko bautaki mikili ndenge na ndenge. Na nsima, akɔtaki na kelasi ya mbala ya 21 ya Gileadi mpe na 1953, batindaki ye na Hong Kong. Nazwaki mokano ya kokomela ye, mpe tokobaki kotindelana mikanda tii na 1955 ntango Sybil ayaki na Ceylan mpe tobalanaki.

Esika ya liboso batindaki biso mibale lokola bamisionɛrɛ ezali Jaffna, mboka moko ya mosika na nɔrdi ya Sri Lanka. Na katikati ya bambula ya 1950, makambo ya politiki ekómaki kokabola bato oyo balobaka monɔkɔ ya Cinghalais ná baoyo balobaka monɔkɔ ya Tamoul; kowelana yango ebimisaki bitumba na bambula oyo elandaki. Na bambula wana ya mpasi, ezalaki likambo ya esengo mpenza komona ndenge Batatoli oyo balobaka monɔkɔ ya Cinghalais bazalaki kobomba Batatoli oyo balobaka monɔkɔ ya Tamoul, mpe baoyo balobaka Tamoul kobomba bandeko oyo balobaka Cinghalais! Minyoko yango elendisaki kondima ya bandeko mpe ekómisaki yango lisusu makasi.

Kosakola mpe koteya na Sri Lanka

Mpo na komesana na Bahindu ná Bamizilma, esengelaki mpenza kozala na motema molai mpe kolendendela. Atako bongo, tokómaki kosepela na makambo na bango mpe na bizaleli na bango ya malamu. Lokola ezalaki mpasi komona bato oyo bautá bikoló mosusu komata na babisi ya mboka yango, mbala mingi bato bazalaki kokamwa ntango bazalaki komona biso na kati ya babisi yango. Soki Sybil amoni bango bazali kokamwa, azalaki kotala bango na elongi ya kosɛka. Likambo ya esengo, okomona bato oyo bazalaki kokamwa biso bango mpe babandi kosɛka!

Mokolo moko, bapolisi batɛlɛmisaki biso. Ntango soda moko atunaki biso soki touti wapi mpe tozali kokende wapi, akómaki kotuna biso makambo etali bomoi na biso.

“Mwasi oyo azali nani?”

Napesaki ye eyano ete, “Azali mwasi na ngai.”

“Eleki sikoyo mbula boni banda bobalani?”

“Mbula mwambe.”

“Bozali na bana?”

“Te.”

“Ya solo! Bokutaná na monganga?”

Na ebandeli, makambo ya ndenge wana ezalaki kokamwisa biso mingi, kasi na nsima, toyebaki ete ezali ndenge na bango ya komonisa ete bazali komibanzabanza mpo na bato mosusu. Kutu, yango ezalaki moko ya bizaleli na bango ya malamu koleka. Soki moto moko atɛlɛmi mwa miniti na balabala, okomona moto mosusu apusani penepene na ye mpo na kotuna ye na boboto mpenza soki azali na mposa ya lisalisi.

Mbongwana mpe makambo oyo yango ebimisaki

Tozwaki mikumba mosusu ndenge na ndenge ntango tozalaki bamisionɛrɛ na Sri Lanka. Nazwaki libaku ya kozala mokɛngɛli ya zongazonga, mokɛngɛli ya etúká mpe ya kosala na komite ya filiale. Na 1996, nakómaki na mbula koleka 70. Nazalaki na esengo ya komona ete nasali mbula 45 na mosala ya misionɛrɛ na Sri Lanka. Mbala ya liboso nayanganaki na makita na Colombo, tozalaki kaka bato soki 20. Sikoyo, na engumba yango basakoli bakómi koleka 3 500! Ngai ná Sybil tomonaka bato yango lokola bana mpe bankɔkɔ na biso. Atako bongo, mosala ezalaki naino mingi na ekólo yango​—mosala oyo ezali kosɛnga makasi mpe mayele ya bandeko oyo bazali naino bilenge. Yango wana, tondimaki likanisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ete tózonga na Australie. Yango epesaki nzela bátinda bandeko mosusu oyo bazali naino bilenge, oyo bazalaki kokokisa masɛngami, na Sri Lanka epai tozalaki.

Nazali sikoyo na mbula 83, mpe ngai ná Sybil tozali na esengo mingi ndenge tozali naino na makasi ya kokoba kosala mosala ya mobongisi-nzela monene na Adélaïde, mboka na ngai ya kala. Mosala ya kosakola ezali kosalisa biso tóbatela makanisi ya malamu mpe tóyeba komesana na makambo ya sika. Esalisi biso mpe na komesana na bomoi oyo ekeseni mpenza na oyo tozalaki na yango.

Yehova azali kokoba kopesa biso biloko nyonso oyo tosengeli na yango, mpe bandeko ya lisangá na biso balingaka biso mingi mpe basalisaka biso mingi mpenza. Nautaki mpe kozwa mokumba ya sika. Nakómi sekrɛtɛrɛ ya lisangá na biso. Na bongo, namoni mpenza ete lokola nazali kosala molende mpo nakosalela Yehova na bosembo, nazali kokoba kozwa formasyo. Soki nakanisi bambula nyonso wana, nakamwaka mpenza komona ndenge mwana mobali oyo azalaki motó likolólikoló mpe abotamaki na mboka, akokaki kozwa formasyo oyo eumeli bomoi na ye mobimba.

[Elilingi na lokasa 26]

Mokolo ya libala na biso, na 1955

[Elilingi na lokasa 27]

Na mosala ya kosakola elongo na Rajan Kadirgamar, ndeko moko ya Sri Lanka, na 1957

[Elilingi na lokasa 28]

Ngai ná Sybil lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto