“Tokumisa Nzambe na esengo nyonso”—Liyangani ya etúká 1995
1 Oyo nde esengo tozwaki na kozala kati na bato 249 094 oyo bayanganaki na mayangani ya etúká “Bobángi Nzambe” oyo masalemaki kati na teritware na biso na mbula eleki, longola bobele Burundi, mpo makambo oyo makwelaki na mboka wana! Ezalaki na bato 3 162 oyo bazwaki batisimo mpo na komonisa bobangi na bango ya Nzambe. Ya solo, tokolendisama na mayangani ya etúká ya mbala ezali koya, maye makosalema na boumeli ya mikolo misato na motó ya likambo “Tókumisa Nzambe na esengo nyonso.” Motó ya likambo oyo ezali kobenda likebi esengeli kopusa biso na kosala milende makasi mpo na koyangana na mayangani yango elongo na bato oyo bayekolaka Biblia elongo na biso. Ntembe ezali te, mayangani yango makozala mpo na mokomoko na biso liziba ya elendiseli na elimo, mpamba te tolingi kokóba kosalela Yehova na kondima na ntango oyo ya nsuka.
2 Omibongisa malamu mpo na kokoka koyangana na mikolo misato ya elambo wana kitoko ya elimo, kobanda na loyembo ya ebandeli kino na libondeli ya nsuka. Ntango okozwa bibongiseli mpo na koyangana na liyangani, monisá bolingo na kokanisáká na baoyo bazali na mposa ya lisungi, lokola baoyo bayambi solo kala mingi te mpo ete bazala wana na manáka mobimba. Ekozala malamu koleka na kotalela makanisi oyo matyami na lokasa oyo elongo na bato oyo bayekolaka Biblia elongo na yo mpe baoyo bazali kokana koyangana na liyangani. (Gal. 6:6, 10) Na mwamitano, liyangani likobanda na miziki na 9h 50 mpe likosuka pene na 17 heures. Na mwapɔ́sɔ, likobanda na 9h 50 mpe likosuka na loyembo mpe libondeli, na ba 16h50. Manáka ya mwalomingo ekobanda na 9h50 mpe liyangani likosuka pene na 16h10. Makanisi oyo malandi makosunga yo kati na komibongisa na yo.
3 Basakoli mosusu, bakisa mpe bana na bango bazali na bamposa ekeseni; na bango esengeli na biso kolakisa boboto mpo na bango. Lisangá mobimba, mingimingi bankulutu basengeli kosala nyonso mpo na kosunga bato yango kasi te kosundola mokumba na bango oyo likoló na service de logement ya liyangani. Bankulutu to basangani mosusu oyo bayebi ezalela na bango basengeli komonisa bolingo na komemeláká bango lisungi libongi. Yango esɛngaka mbala mingi ete basakoli bamibanzabanza na bamposa ya mibangé to bamposa ya bibɔsɔ́nɔ mpe bongo na bongo. Na ndakisa, tokoki kosunga bango na kokendáká na bango elongo to na kosungáká bango na mitindo misusu.—Yak. 2:15-17; 1 Yoane 3:17, 18.
4 Esika ya kolala ezwamaka mingimingi na bandako ya bandeko. Tosengeli komonisa botɔ́ndi epai na bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bandimi koyamba biso na bandako na bango. Epai mosusu, ekozala malamu te ete baoyo bayambami bongo basengisa ete bapesa bango bisika ya kolala mikolo mingi liboso to nsima ya liyangani. Bisika ya kolala epesami bobele na NA NTANGO YA liyangani. Baoyo bazwi libaku ya koyambama motindo wana basengeli kotosa biloko ya bankólo-ndako, kobebisa eloko moko te, kokota te na biteni oyo bipesameli nzela te; mpe kosala na boye ete bana na bango mpe básala lolenge yango. Soki bankólo-ndako, bakutani na mokakatano moko ya lolenge yango, basengeli nokinoki koyebisa service de logement, oyo ekozala na esengo ya komemela bango lisungi.
Baoyo bakoyangana na liyangani mosusu
5 Mingimingi, liyangani oyo obyangami ezali oyo ezali pene na esika oyo ofandaka. Bibongiseli bikamatami mpo na bisika ya kofanda, mikanda, bilei, esika ya kolala mpe bongo na bongo, na kolikyáká na lilako oyo ete basakoli mingi bakoyangana na liyangani oyo bango babyangami. Nzokande, soki mpo na ntina moko ya malamu osengeli koyangana na liyangani mosusu, zala na bonsomi ya kosala yango.
Kosalana na yo elongo na basusu ezali na ntina
6 Ebongiseli malamu mpe kolónga ya service de logement etaleli kosalana na yo elongo na basusu. (Ebe. 13:17) Na yango tozali kosɛnga na bato nyonso ete básala na boyokani elongo na service de logement oyo etyami na la Société. Na yango, tokokitisa motuya na mikakatano oyo tokutanaka na yango.
7 Wana tozali komibongisa mpo na ‘kokumisa Nzambe na esengo nyonso’ elongo na bandeko na biso mibali mpe basi, tokoki mpe kokanisa na lisungi ya biloko mpe mosolo oyo tokoki komema na ebongiseli ya elambo yango ya elimo! Lokola Bayisraele mpe baklisto ya liboso, tókende na liyangani maboko mpamba te.—2 Kol. 8:12; Det. 16:16, 17.
Mayangani ya Etúká 1995
Dati:
28-30 Yulí
4-6 Augústo
11-13
18-20
25-27
1-3 Sɛtɛ́mbɛ
8-10
15-17
22-24
29-Sɛtɛ́mbɛ-1 Ɔkɔtɔ́bɛ
6-8 Ɔkɔtɔ́bɛ
Bisika
Kinshasa (F)
Kinshasa (LI)
Bukavu
Kananga
Mwene-Ditu
Ilebo
Mbuji-Mayi
Bujumbura/Uvira
Brazzaville
Goma
Kikwit
Lubumbashi
Ouesso
Kindu
Kenge
Pointe-Noire
Bandundu
Butembo
Bunia
Matadi
Lodja
Kolwezi
Kamina
Tshikapa
Bumba
Nioki
Mbandaka
Boende
Gemena
Gbadolite
Isiro
Kisangani
Moba
Sandoa
Mulongo
Kongolo
Zongazonga oyo ebyangami
KIN-4, KIN-7, KIN-10
KIN-1, KIN-2, KIN-3, KIN-5, KIN-6, KIN-8, KIN-9, KIN-11, BZ-3, BZ-4, BZ-6
KI-1, KI-8 KI-11, KI-12
KA-1, KA-14, KA-19
KA-3, KA-9, KA-17, KA-24
KA-10, KA-15, KA-21
KA-2, KA-5 KA-8, KA-13, KA-16, KA-20, KA-25
BU-1, BU-2, BU-3
CO-3, CO-4, eteni CO-7
KI-3, eteni HZ-9
B-3, B-7, B-9, B-13
CO-2, CO-6
B-1, B-10
KI-5, KI-7, KI-9, KI-10
HZ-4, HZ-12
BZ-1, BZ-2, BZ-5, BZ-7, BZ-8
KA-4, KA-7, KA-11, KA-12, KA-26
S-3, eteni S-5, eteni S-15
S-4, S-6, S-7, eteni S-15
KA-6, KA-18, KA-22, KA-23
E-4, E-8, E-11, E-12, E-15, E-20, E-21, E-22, HZ-3, eteni HZ-8, HZ-10, HZ-15
B-4, B-6, B-14, B-15
E-2, E-7, E-16, E-17, E-23, E-24
E-3, E-6, E-10, E-13
E-1, E-14, E-18
E-5, E-9, E-19
HZ-2, HZ-6, HZ-11, HZ 13
HZ-1, HZ-5, HZ-7, HZ-14, eteni HZ-8, eteni HZ-9
S-11, S-12, S-19, eteni S-18
eteni S-5, S-21
S-8, S-9, S-10, S-14, S-16
KI-4, eteni S-18