‘Tólinga lisangá mobimba ya bandeko’
Maloba ya motó ya likambo oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, eleki sikoyo mbula pene na nkóto mibale. (1 Pe. 2:17) Atako bongo, tosengeli kosalela yango mingi lisusu koleka sikoyo! Ndenge nini tokoki kolinga bandeko nyonso na mokili mobimba? Na mokili oyo ezangá bolingo, ndenge nini tokoki kosala mpo bolingo na biso ekita te? (Mat. 24:12) Nsima ya kotala video oyo ezali na motó ya likambo Toute la communauté des frères (Lisangá mobimba ya bandeko), okoki koyanola na mituna oyo elandi?
(1) Ntango nini tokɔtaki na kati ya lisangá mobimba ya bandeko? (2) Wapi makambo misato oyo lisangá na biso ya bandeko na mokili mobimba tosalaka? (3) Ndenge nini bandeko na biso bazali komonisa molende na mosala ya kosakola (a) na esobe ya Alaska, (b) na mabongo minene ya mikili ya Mpoto mpe (c) na bazamba ya ekólo Pérou? (4) Mpo na nini mosala na biso ya kosakola eleki misala mosusu nyonso? (5) Pesá bandakisa oyo emonisi ndenge Batatoli ya Yehova babɔndisanaki mpe basalisanaki (a) nsima ya koningana moko ya mabele, (b) nsima ya mopɛpɛ makasi, mpe (c) na ntango ya bitumba na kati ya bana-mboka. (6) Na makambo nini mokomoko na biso akoki komonisa elembo monene oyo emonisaka bondeko na biso ya bokristo? (Yoa. 13:35) (7) Matomba nini tokozwa soki tosali elongo na bandeko mpo na kotonga Ndako na biso ya Bokonzi? (8) Ndenge nini bandeko na biso ya Mpoto ya Ɛsti mpe ya ekólo Russie bakangamaki na Yehova na ntango ya epekiseli? (9) Milende nini Batatoli mingi basalaka mpo na kokende na mayangani, mpe mpo na nini basalaka bongo? (10) Na ndenge nini video oyo elendisi ekateli na yo ya (a) kosambela Yehova na bomoko elongo na bandeko na makita ya bokristo, (b) kosalisa basusu na ntango bakeleli, mpe (c) kokoba kosakola na molende mpenza esika nyonso mpe ntango nyonso oyo okoki kosala yango? (11) Mpo na nini mpe ndenge nini tokoki kosalela video oyo na mosala ya kosakola?
Ntina ya libosoliboso oyo etindaka biso tózala na kati ya lisangá mobimba ya bandeko ezali bolingo na biso mpo na Yehova. Yango wana, tolingaka koyekola makambo na ye mpe koteya yango na bato mosusu. Tolingaka mpe bato oyo Yehova alingaka. Ntango tosalisaka bango soki bazali na bosɛnga, tomizelaka te ete Nzambe apesa biso matɔndi. Kutu, topesaka nde Nzambe matɔndi mpo tomonaka ete lisangá na biso ya bandeko ezali likabo moko ya motuya oyo apesi biso. Lokola nsuka ya mokili oyo ezangá bolingo ekómi pene, tiká ete tókoba kolinga lisangá mobimba ya bandeko!