Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/11 nk. 2-4
  • Bampasi ya bato: Ekosila mokolo mosusu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bampasi ya bato: Ekosila mokolo mosusu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • Bampasi
    Lamuká!—2015
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
  • Motuna 3: Mpo na nini Nzambe atiki ete nanyokwama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Libɔndisi mpo na baoyo bazali komona mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/11 nk. 2-4

Bampasi ya bato: Ekosila mokolo mosusu?

MAKAMBO ya nsɔ́mɔ mamonani nsima wana bómbi moko ebetaki na zando moko ya Sarajevo epai kuna bato bazalaki mingi; koboma bato mpe yikiyiki na Rwanda; bana oyo bazali na nzala na Somalie bazali kolela bilei; mabota mabulunganisami bazali kotala mpo na koyeba biloko oyo babungisi nsima ya koningana ya mabelé na Los Angeles; na Bangladesh, bato bazangi lisungi, baoyo bazwi mpasi na ntina na mpela. Makambo oyo matali bampasi ya bato mazali komonana mikolo nyonso na televizyó to na mikanda mpe na bazulunalo.

Bampasi ya bato ezali na bopusi moko ya mabe, ezali kosala ete basusu bátika kondimela Nzambe. Engebene mokanda moko oyo bato ya lingomba ya Bayuda babimisaki na Etats-Unis, “uta kala mabe ezali ntango nyonso epekiseli eleki mpenza makasi mpo na kondima.” Bakomi na yango bazali kolobela kobomama ya bato oyo esalemaki na káa ya bakangami ya Nazi na engumba Auschwitz mpe na babómbi lokola oyo ebwakamaki na Hiroshima. Bakomi yango balobi ete: “Likambo ya koyeba soki mpo na nini Nzambe ya boyengebene mpe ya nguya akokaki kotika nzela na kobomama ya ebele ya bato oyo bayebi likambo te ezali kobulunganisa lisosoli ya moto oyo asambelaka mpe ezali kokamwisa.”

Na mawa nyonso, bansango ya mawa oyo ezali kopesama mbala na mbala ekoki kolɛmbisa mayoki ya bato. Wana baninga mpe bandeko na bango bazwi mpasi te, bato mingi baokaka mawa mpenza te mpo na mpasi ya basusu.

Nzokande, lokola tozali na likoki ya kooka mawa, mpo na bato oyo tolingaka, yango esengeli koteya biso likambo moko mpo na oyo etali Moyemi na biso. Biblia elobi ete moto azalisamaki na “elilingi na Njambe” mpe “na lolenge na [ye].” (Genese 1:26, 27) Yango elingi koloba te ete na nzoto, bato bazali lokola Nzambe. Ezali bongo te, mpamba te Yesu Klisto alobaki ete “Njambe ajali [elimo, NW],” mpe “[elimo ezali na mosuni mpe na mikuwa te, NW].” (Yoane 4:24; Luka 24:39) Kosalema na lolenge ya Nzambe etaleli likoki oyo biso tozali na yango ya komonisa bizaleli oyo ekokani na oyo ya Nzambe. Na yango, lokola moto nyonso oyo azali na nzoto kolɔngɔ́nɔ́ aokaka mawa mpo na baoyo bazali na mpasi, tosengeli koloba ete Yehova Nzambe, Mozalisi ya moto, azali na motema mawa mpe aokaka mawa makasi mpo na bato oyo bazali komona mpasi, bango bikelamu na ye.​—Kokanisá na Luka 11:13.

Moko na lolenge oyo Nzambe amonisaki motema mawa na ye ezali bongo na kopesáká epai na bato bandimbola oyo ekomami mpo na oyo etali ntina ya bampasi. Amonisi yango kati na Biblia, Liloba na ye. Biblia ezali komonisa polele ete Nzambe azalisaki moto mpo ete asepela na bomoi, kasi mpo ete aoka mpasi te. (Genese 2:7-9) Ezali mpe komonisa ete bato ya liboso bamibendelaki bampasi bango moko na kobwakáká boyangeli ya sembo ya Nzambe.​—Deteronome 32:4, 5; Baloma 5:12.

Atako bongo, Nzambe azali sé kooka mawa mpo ete bato bazali komona mpasi. Yango emonisami polele kati na elaká na ye ya kosilisa mpasi ya bato. “Tala! Efandelo na Njambe ejali na bato esika mɔkɔ. Akofanda na bango esika mɔkɔ, mpe bango bakojala bato na ye, mpe Njambe ye mpenja akojala na bango elɔngɔ. Akolongola mpisoli yɔnsɔ na miso na bango, mpe kufa ekojala lisusu tɛ, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe tɛ, mpɔ ete makambo na liboso masili koleka.”​—Emɔnisɛli 21:3, 4; talá lisusu Yisaya 25:8; 65:17-25; Baloma 8:19-21.

Bilaká wana ya kitoko bimonisi ete Nzambe ayebi malamu mpenza bampasi ya bato mpe azwi ekateli makasi ya kosukisa yango. Kasi, nini mpenza ebimisaki bampasi ya bato na esika ya liboso, mpe mpo na nini Nzambe atikeli yango nzela ete ekóba kino na mikolo na biso?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Cover and page 32: Alexandra Boulat/​Sipa Press

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Kevin Frayer/Sipa Press

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto