Ba Massorètes—Bazalaki banani?
YEHOVA, “Nzambe na solo,” asili kobatela Liloba na ye, Biblia. (Nzembo 31:5, NW) Kasi lokola Satana, monguna na solo, amekaki kobebisa mpe kolimwisa yango, lolenge nini Biblia ekómelaki biso mobimba lokola yango ekomamaki?—Talá Matai 13:39.
Eteni moko ya eyano ekoki kozwama na maloba ya Professeur Robert Gordis ete: “Mosala ya bakomeli [wana] Baebele, oyo babéngamaki Massorètes to ‘babateli ya bonkɔ́kɔ,’ ezwi naino lokumu lobongi na yango te. Bakomeli wana oyo bayebani nkombo te basalaki bakopi ya Búku Mosantu na likebi monene mpe na bolingo nyonso.” Atako ntálo monene kati na bakomeli wana bayebani nkombo te na mikolo na biso, nkombo ya libota moko ya ba Massorètes ekomamaki polele—Ben Asher. Makambo nini toyebi na ntina na bango mpe na baninga na bango mosusu ba Massorètes?
Libota ya Ben Asher
Na bosembo nyonso bakomeli ya Bayuda basalaki bakopi ya eteni ya Biblia oyo na ebandeli ekomamaki na Liebele, oyo mbala mingi ebéngamaka Kondimana ya Kala. Kobanda na ekeke ya motoba T.B. kino na ekeke ya zomi T.B., bakomeli yango babéngamaki ba Massorètes. Mosala nini basalaki?
Na boumeli ya bikeke mingi Liebele lizalaki kokomama bobele na milelisami, kasi milelisi misengelaki kobakisama na motángi. Nzokande, na eleko ya ba Massorètes, lolenge ya kotánga Liebele ebandaki kobungana mpamba te Bayuda mingi bayebaki lisusu koloba lokótá yango malamu te. Bituluku ya ba Massorètes na Babilone mpe na Yisalaele babimisaki bilembo oyo bisengelaki kobakisama na milelisami mpo na komonisa botómboli mongongo mpe ebéngeli malamu ya milelisi. Mitindo misato oyo miyebani mibimaki, kasi oyo ezalaki na bopusi mingi esalelamaki na ba Massorètes na Tibériade, penepene na Libéke ya Galilai, mboka ya libota ya Ben Asher.
Mikanda mitángi kolandana ya libota kino libota ya mitano, longwa na Asher Mokóló oyo azalaki na ekeke ya mwambe T.B. Basusu bazalaki bongo Nehemia Ben Asher, Asher Ben Nehemia, Mose Ben Asher, mpe, na nsuka, Aaron Ben Mose Ben Asher ya ekeke ya zomi T.B.a Mibali wana bazalaki bato ya liboso oyo basembolaki mpenza malamu bilembo bikomami oyo engebene bango bikokaki kolimbola na lolenge lobongi ebéngeli ya makomi ya Biblia ya Liebele. Mpo na kosalela bilembo yango, basengelaki kotya moboko ya gramɛre ya lokótá ya Liebele. Kino eleko yango mibeko ya lokótá ya Liebele mikomamaki naino te. Na yango, tokoki koloba ete ba Massorètes wana bazalaki kati na banganga-mayele ya liboso oyo babongisaki mibeko ya lokótá ya Liebele.
Aaron, Massorète ya nsuka na libota ya Ben Asher, azalaki moto ya liboso oyo akomaki mpe abimisaki mokanda na likambo yango. Akomaki yango kati na búku na ye oyo ezalaki na motó ya likambo ete “Sefer Dikdukei ha-Te‛amim,” búku ya liboso ya mibeko ya lokótá na Liebele. Búku yango ekómaki moboko ya babúku mosusu ya banganga-mayele mpo na boyekoli ya mibeko ya lokótá ya Liebele na bikeke oyo bilandaki nsima. Kasi yango ezalaki bobele mbuma ya mosala monene ya ba Massorètes. Mosala yango mozalaki nini?
Bwanya monene bosɛngami
Lobanzo monene ya ba Masorètes ezalaki kokoma na bosikisiki mpenza liloba moko na moko, to ata lɛtɛlɛ moko na moko ya makomi ya Biblia. Mpo na kondimisama na bosikisiki yango, ba Massorètes basalelaki mpembeni ya lokasa moko na moko mpo na kokoma makambo oyo mazalaki komonisa bobongwani nyonso ya makomi oyo bakomeli ya kala basalaki mpo na kozanga likebi to na nkó nyonso. Kati na maloba yango oyo mazalaki na mpembeni, ba Massorètes bakomaki lisusu maloba mpe bosangisami ya maloba oyo mayebanaki mingi te, koyebisáká mbala boni yango ezalaki komonana kati na búku moko to kati na Makomi ya Liebele mobimba. Maloba wana makomamaki na lolenge ya mokuse mpenza ya kokata maloba, mpamba te bisika na mpembeni ezalaki monene mingi te. Bazalaki na esaleli mosusu mpo na kobatela bosikisiki, na kotyáká elembo na liloba mpe na lɛtɛlɛ ya katikati ya babúku mosusu. Bakendeki kino kotánga lɛtɛlɛ moko na moko ya Biblia mpo na komindimisa bosikisiki ya bakopi oyo balingaki kosala.
Na bisika oyo bitikalaka na likoló mpe na nsé ya lokasa, ba Massorètes babakisaki makambo mingi matali banote mosusu ya mikuse oyo bakomaki mpembenimpembeni.b Yango ezalaki lisalisi ya ntina mpo na kotala soki mosala na bango mozalaki sikisiki. Lokola na eleko wana makomi makabwanaki naino na milɔngɔ́ te mpe mikanda ya koluka mikapo kati na Biblia mizalaki te, lolenge nini ba Massorètes bazalaki kosala mitindami na biteni mosusu ya Biblia mpo na kokóma na bosikisiki wana? Na bisika oyo bitikalaki na likoló mpe na nsé ya makomi, bazalaki kotanda na molɔngɔ́ biteni ya mikapo oyo mikokani mpo ete bákoka komikundola bisika liloba to maloba yango mazwamaki epai mosusu kati na Biblia. Lokola esika ezalaki moke, mbala mingi bazalaki kokoma bobele liloba moko ya ntina mpo na komikundola mikapo mikokani moko na moko. Mpo ete banote wana ya mpembeni ekoka kosunga, bakomeli wana basengelaki mpenza koyeba Biblia mobimba na motó.
Milɔngɔ́ oyo mizalaki milai mingi mpo na kotyama na bisika bitikali mpembeni ya lokasa mizalaki kotyama na eteni mosusu ya maniskri. Na ndakisa, banote ya ba Massorètes oyo ezali na mpembeni ya lokasa likoló ya Genese 18:3 emonisi makomi misato ya Liebele, קלד. Yango ezali ekomeli ya Liebele mpo na motuya 134. Na eteni mosusu ya maniskri, ezali na molɔngɔ́ moko oyo mozali komonisa bisika 134 epai bakomeli oyo bazalaki liboso na ba Massorètes balongolaki na nkó nyonso nkombo ya Yehova na makomi ya Liebele, kotyáká liloba “Nkolo”c na esika na yango. Atako bayebaki mbongwana wana, ba Massorètes bazwaki ekateli ya kobongola te makomi oyo makómaki na mabɔ́kɔ na bango. Nzokande, bamonisaki mbongwana yango na banote na bango ya mpembeni ya lokasa. Kasi mpo na nini ba Massorètes batyaki likebi monene boye ete bábongola te makomi nzokande bakomeli oyo bazalaki liboso na bango babongolaki yango? Lolenge nini bindimeli na bango na losambo ya Bayuda ekesanaki na oyo ya baoyo bazalaki liboso na bango?
Bindimeli na bango bizalaki nini?
Na boumeli ya eleko wana ya bokóli ya ba Massorètes, losambo ya Bayuda esilaki komikɔtisa kati na etumba moko makasi ya makanisi. Kobanda na ekeke ya liboso T.B., Losambo ya Bayuda oyo etambwisamaki na Balabi esilaki kokólisa bopusi na yango. Ntango bakomaki Talmud mpe bandimbola epesamaki na Balabi, makomi ya Biblia makomaki na esika ya mibale nsima ya bandimbola epesamaki na Balabi likoló na mibeko oyo mikomamaki te.d Na yango, mbɛlɛ kobatela na likebi nyonso makomi ya Biblia ekokaki kobungisa ntina na yango.
Na ekeke ya mwambe, etuluku moko oyo eyebanaki na nkombo ya ba Karaïtes etombokelaki ezaleli wana. Komonisáká ntina ya koyekola Biblia moto ye moko, baboyaki bokonzi mpe bandimbola ya Balabi mpe ya Talmud. Bazalaki kondima bobele makomi ya Biblia lokola moboko mpo na mateya na bango. Yango ebakisaki ntina ya kosala bakopi ya sikisiki ya makomi wana, mpe boyekoli ya ba Massorètes ezwaki nguya ya sika.
Na meko nini bindimeli ya Balabi to ya ba Karaïtes ezalaki na bopusi likoló na mosala ya ba Massorètes? M. H. Goshen-Gottstein, nganga-mayele na boyekoli ya bamaniskri ya Liebele, alobi ete: “Ba Massorètes bandimisamaki ete bazalaki kobatela momeseno moko ya kala ya bonkɔ́kɔ, mpe bongo kotɛmɛla yango na nkó ekokanaki mpo na bango na mbeba oyo eleki mabe.”
Ba Massorètes bazalaki kotalela likambo ya kosala kopi malamu ya makomi ya Biblia ete lizalaki mokumba moko ya bulɛɛ. Emonani lokola ete mosala ya ba Massorètes epusamaki te na kowelana ya makanisi, atako bango moko bakokaki mbala mosusu kopusama na mateya makeseni ya lingomba. Banote ya sikisiki oyo ezalaki mpembeni ya makomi ezalaki kotika nzela te mpo na kowelana ya mateya. Makomi ya Biblia yango moko nde mazalaki lobanzo na bango bobele moko; balingaki kobebisa yango soko moke te.
Tózwa litomba na mosala na bango
Atako Yisalaele ya mosuni ezalaki lisusu te libota liponami ya Nzambe, Bayuda wana bakomeli bamipesaki mobimba mpo na kobatela bosikisiki ya Liloba ya Nzambe. (Matai 21:42-44; 23:37, 38) Mosala ya lokumu ya libota ya Ben Asher mpe ya ba Massorètes mosusu elobelamaki na mokuse na Robert Gordis, oyo akomaki ete: “Basáli wana ya kosɔkɛma mpe oyo eloko moko te ekokaki kopekisa bango . . . basalaki na nkúku mosala na bango wana monene mpe ya mpasi mingi ya kobatela Makomi ya Biblia na libúngá to na libebi.” (The Biblical Text in the Making) Lokola litomba, ntango babandisi ya Mbongwana ya ekeke ya 16 lokola Luther mpe Tyndale batɛmɛlaki bokonzi ya Lingomba mpe babandaki kobongola Biblia na nkótá oyo ezalaki kolobama mpo ete bato banso bákoka kotánga yango, bazalaki na makomi ya Liebele oyo mabombamaki malamu lokola moboko ya mosala na bango.
Mosala ya ba Massorètes mozali kopesa biso matomba kino lelo oyo. Makomi na bango ya Liebele mazalaki moboko ya Les Saintes Écritures — Traduction du monde nouveau. Kobongolama ya libongoli wana na nkótá mingi ezali kokóba na elimo moko ya komipesa mpe na lobanzo lolenge moko oyo ba Massorètes ya ntango ya kala bamonisaki mpo na bosikisiki. Ekozala malamu ete tómonisa elimo motindo moko na kotyáká likebi na Liloba ya Yehova Nzambe.—2 Petelo 1:19.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na Liebele “ben” elimboli “mwana.” Ben Asher elimboli bongo “mwana ya Asher.”
b Banote ya ba Massorètes oyo ezali mpembenimpembeni ebéngami Masora Moke. Banote oyo ezali na bisika bitikali na likoló mpe na nsé ya lokasa ebéngami Masora Monene. Milɔngɔ́ oyo mityami epai mosusu kati na maniskri mibéngami Masora ya Nsuka.
c Talá Appendix 1B kati na New World Translation of the Holy Scriptures With References.
d Mpo na koyeba makambo mingi na ntina na mibeko oyo mikomamaki te mpe Losambo ya Bayuda oyo etambwisamaki na Balabi, talá lokasa 8 kino lokasa 11 ya mwa búku Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda/Elilingi na lokasa 28]
Motindo ya ebéngeli na Liebele
BIKEKE mingi bilekaki wana ba Massorètes bazalaki naino kolukaluka lolenge eleki malamu ya kokoma bilembo ya milelisi mpe bilembo ya botómboli mongongo. Na yango, ezali likambo ya kokamwa te na komona kolandana ya bobongwani na libota moko nsima na libota mosusu ya bakitani ya Ben Asher. Bamaniskri oyo tozali na yango ezali na bikomeli mpe myango ya ba Massorètes bobele mibale ya nsuka na libota ya Ben Asher, Mose mpe Aaron.e Bokokanisi ya bamaniskri wana oyo basalaki emonisi ete Aaron abimisaki mibeko mitali makambo mikemike ya kotánga mpe banote ekeseni na oyo ya tata na ye, Mose.
Ben Naphtali azalaki na bomoi na eleko ya Aaron Ben Asher. Codex ya Caire oyo ezali na makomi ya Mose Ben Asher ezali na bandimbola mingi oyo bakanisi ete eutaki na Ben Naphtali. Na yango, ekoki kozala ete Ben Naphtali ye moko ayekolaki epai na Mose Ben Asher to bango nyonso mibale babatelaki momeseno moko ya bonkɔ́kɔ ya kala. Banganga-mayele mingi bazali kolobela bokeseni kati na mitindo ya Ben Asher mpe oyo ya Ben Naphtali, kasi Goshen-Gottstein akomi ete: “Ekoki kozala mpe solo soki tolobeli mitindo mibale kati na libota ya Ben Asher mpe tobéngi bokeseni yango ya bandimbola: Ben Asher liboso na Ben Asher.” Bongo ekozala solo te kolobela mwango bobele moko ya Ben Asher. Ezalaki te mpo yango elekaki malamu nde myango ya Aaron Ben Asher ekómaki lolenge ya nsuka oyo endimamaki. Ezalaki bobele mpo ete nganga-mayele ya Talmud ya ekeke ya 12, Mose Maïmonide akumisaki mokanda moko ya Aaron Ben Asher nde baponaki yango.
[Artwork—Hebrew characters]
Eteni ya Exode 6:2 elongo na milelisi mpe bilembo ya kokesenisa makomi mpe mosusu ezangi yango
[Maloba na nse ya lokasa]
e Codex ya Caire (896 T.B.), oyo ezali bobele na makomi ya basakoli ya liboso mpe baoyo ya nsuka, ezali kopesa ndakisa ya myango oyo Mose asalelaki. Codex ya Alep (soko 930 T.B.) mpe Codex ya Leningrad (1008 T.B.) etalelami lokola bandakisa ya myango ya Aaron Ben Asher.
[Elilingi na lokasa 26]
Tibériade, esika monene ya mosala ya ba Massorètes kobanda ekeke ya mwambe kino ekeke ya zomi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.