Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w95 1/8 nk. 3-4
  • Ntango esili kobongwana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntango esili kobongwana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Masolo mosusu
  • Azali ndakisa to likebisi mpo na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Milende mpo na kosilisa bobola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Kimya na mokili mobimba—ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Nani akobikisa baoyo bazali kolela mpo na kosɛnga lisalisi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
w95 1/8 nk. 3-4

Ntango esili kobongwana

OYO nde esengo ezalaki mpo na bato ya Yisraele ya kala na nsé ya boyangeli ya nkembo ya Mokonzi ya sembo Salomo! Ezalaki eleko ya kimya, ya bozwi mingi mpe ya esengo. Na ntango oyo Salomo atɛlɛmaki ngwi kati na losambo ya solo, Yehova apesaki mapamboli mingi epai na libota na ye. Nzambe apesaki Mokonzi Salomo bobele bozwi mingi te, kasi lisusu “motema na mayele mpe na bososoli” mpo ete Salomo akoka koyangela kati na boyengebene mpe na bolingo. (1 Mikonzi 3:12) Biblia elobi ete: “Mikonzi nyonso na mokili balukaki elongi na Solomo ete báyoka mayele na ye oyo Nzambe atii na motema na ye.”​—2 Ntango 9:23.

Epai na bato na mboka, Yehova apesaki libateli, kimya mpe ebele ya biloko kitoko. Liloba ya Nzambe lilobi ete: “Yuda mpe Yisalaele bazalaki mingi lokola zɛlɔ pembeni na mai-na-monana; balyaki mpe bamelaki mpe bayokaki esengo.” Ezala na ndimbola ya solosolo to na ndimbola ya elilingi, bato bafandaki na kimya “moto na moto na nsé na mowiti na ye na vinyo mpe na nzeté na ye na mbuma, mikolo nyonso na Solomo.”​—1 Mikonzi 4:20, 25.

Ntango esili kobongwana. Lelo oyo bomoi ekesani mpenza na mikolo wana ya esengo ya ntango ya kala. Na kokesana na ntango ya Salomo, lelo oyo mokakatano monene mozali bongo bobólá. Ata kati na mikili ya bozwi mingi, bobólá ezali. Na ndakisa, ebongiseli oyo ebéngami Programme de développement de Nations Unies emonisaki ete ezala na Etats-Unis to kati na Lisangá ya mikili ya Mpótó, pene na 15% ya bato bazali kati na bobólá.”

Mpo na komonisa makambo kati na mokili mobimba, búku The State of the World’s Children 1994 (Ezalela ya bana kati na mokili na 1994), lapólo ya UNICEF (Ebongiseli ya Lisangá ya Mabota mpo na kosunga bana), emonisaki ete moto moko kati na bato mitano na mokili azali mpenza kati na bobólá, ekóbi koloba ete mpo na ntálo monene ya baoyo baleki bobólá kati na mokili, bomoi “ezali kokóma mpasi mingi mpe na kozanga elikya.”

Kati na mikili misusu, kokwea monene ya mosolo ezali kobakisa mpasi likoló na mikakatano ya babólá. Mwasi moko na mboka moko ya Afrika alobaki ete: “Okoki komona eloko na zando, mpe omilobi ete, ‘Malamu, nakei na ndako kokamata mbongo mpo naya kosomba yango.’ Ekozonga yo nsima na ngonga moko okoyoka ete okoki lisusu kosomba yango te mpamba te ntálo na yango euti komata. Okosala nini? Ezali mpenza kopesa mawa.”

Mwasi mosusu ya kuna alobaki ete: ‘Mpo na kobika, tosengeli kobosana bamposa mosusu. Sikawa lobanzo na biso ya liboso etali lolenge nini kozwa bilei.’

Engebene O.N.U., elikya ezali te mpo na mikolo mizali koya. Na ndakisa, UNICEF ekanisi ete soki bokóli ya bato ekóbi, motángo ya babólá kati na mokili mobimba ekoyikana mbala minei “bobele na boumeli ya bomoi ya bato ya libota moko.”

Nzokande, atako makambo ya nkita mpe ya bomoi ya bato mazali sé kobeba, basaleli ya Nzambe bazali na ntina ya kozala na elikya. Atako bazali kobika kati na bato oyo batalelaka mikolo mizali koya na kozanga elikya mpenza, basaleli ya Nzambe bazali kotalela mikolo mizali koya na esengo nyonso mpe na endimiseli. Lisoló lilandi likomonisa bantina na yango.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

De Grunne/Sipa Press

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto