Bazali na esengo kati na mokili oyo mozangi esengo
“NA NTINA na mabe na yango mingi koleka, ekeke oyo emonani ete ezali ekeke ya Satana. Na bikeke bileki ezalaki ata na eleko moko te oyo na boumeli na yango bato bazalaki na makoki mpe na mposa makasi mpo na koboma bamilió ya bato mosusu na ntina na mposo, lingomba to kelasi lokola yango ezali komonana na ekeke oyo,” wana ezali maloba ya ebandeli ya lisoló moko libimaki na zulunalo The New York Times ya 26 Yanuáli 1995.
Bokundoli mobu ya 50 uta bato oyo basalaki likambo te, oyo bakangamaki na bolɔ́kɔ na bakáa ya liwa ya Nazi basikolamaki, likambo yango epusaki bakomi ya bazulunalo na kobimisa maloba lokola oyo touti kotánga. Nzokande, kobomama ya bonyama motindo wana ezali mpe kosalema na mikili misusu ya Afrika mpe ya Mpótó ya Ɛ́sti.
Kobomama ya ebele ya bato, kopɛtolama ya bitúlúká, kobomama kati na bikólo—ezala ete bazali kobénga yango nini—ebimisi mawa monene. Nzokande, katikati ya mobulu ya nkó motindo wana ezali na bato oyo bazali na esengo. Na ndakisa, tiká tótalela oyo esalemaki na Allemagne na bambula 1930.
Na Apríli 1935, Hitler mpe parti na ye ya Nazi bapekisaki Batatoli ya Yehova kosala misala ya Leta. Lisusu, Batatoli ya Yehova bakangamaki, batyamaki na bolɔ́kɔ, mpe batindamaki na bakáa ya bakangami mpamba te babatelaki ezaleli na bango ya kozanga kokɔta na makambo ya politiki. (Yoane 17:16) Na nsuka ya Augústo 1936, Batatoli ya Yehova bakangamaki mingi. Bankóto mingi kati na bango batindamaki na bakáa ya bakangami, epai kuna mingi kati na bango bazalaki na bomoi kino na 1945 soki babomamaki te. Kasi lolenge nini Batatoli basalaki liboso na bampasi makasi oyo bazwaki na bakáa ya bakangami? Likambo ya kokamwa, bazalaki na likoki ya kobatela esengo atako bafandaki na esika oyo ezangaki esengo.
“Libanga kati na pɔtɔpɔ́tɔ”
Christine King, mokomi na makambo ya kala, mobotami ya Angleterre, atunaki mituna epai na Mokatolike moko ya mwasi oyo azalaki kati na káa ya bakangami. Molakisi King alobaki ete: “[Mwasi wana] abimisaki maloba oyo nakobosana yango soko moke te. Alobelaki likambo moko na moko na ntina na makambo ya nsɔ́mɔ ya bomoi, bizalela ya mawa oyo azalaki kati na yango. Mpe alobaki ete ayebaki Batatoli ya Yehova, mpe Batatoli wana bazalaki libanga kati na pɔtɔpɔ́tɔ. Bazalaki lokola esika ekauki kati na pɔtɔpɔ́tɔ wana. Alobaki ete bobele bango nde bazalaki bato oyo bazalaki kobwaka nsoi te wana basɛnzɛli bazalaki koleka. Bobele bango nde bato oyo bayikaki mpiko na makambo wana nyonso kozanga koyina, bazalaki nde na bolingo mpe na elikya mpe na mayoki ete bazalaki nde na mokano moko.”
Nini esalisaki Batatoli ya Yehova mpo ete bázala “mabanga kati na pɔtɔpɔ́tɔ”? Ezali bongo kondima makasi epai na Yehova Nzambe mpe epai na Mwana na ye, Yesu Klisto. Na yango, milende ya Hitler milóngaki te mpo na kobebisa bolingo na bango mpe esengo na bango ya baklisto.
Tóyoka maloba ya bato mibale oyo babikaki na káa wana bazali komikundola mibu ntuku mitano nsima ya kolónga komekama wana ya kondima na bango. Moko alobi ete: “Natondaki na esengo mingi na koyeba ete nazalaki na libaku moko malamu ya komonisa bolingo na ngai mpe botɔ́ndi na ngai epai na Yehova kati na ezalela ya makambo wana ya mpasi koleka. Moto moko te apusaki ngai na kosala bongo! Nzokande, bato oyo bamekaki kopusa biso bazalaki banguna na biso oyo balukaki na nzela ya makaneli kopusa biso ete tótosa Hitler mingi na esika ya kotosa Nzambe—kasi balóngaki te! Nazali na esengo bobele sikawa te kasi, na ntina na lisosoli na ngai malamu, nazalaki na esengo ata na ntango tozalaki kati na bolɔ́kɔ.”—Maria Hombach, mibu 94.
Motatoli mosusu alobi ete: “Nakanisaka mikolo oyo nalekisaki na bolɔ́kɔ na botɔ́ndi mpe na esengo. Bambula oyo nalekisaki na bolɔ́kɔ mpe na bakáa ya bakangami na nsé ya boyangeli ya Hitler ezalaki mpasi mpe ezalaki na komekama mingi. Kasi nalingaki te kozangisa yango, mpamba te yango eteyaki ngai kotya elikya bobele epai na Yehova.”—Johannes Neubacher, mibu 91.
“Kotya elikya nyonso mpenza epai na Yehova”—yango nde ezali sɛkɛlɛ́ ya esengo oyo Batatoli ya Yehova bazalaki na yango. Na yango, bazali na esengo atako bazingelami na mokili oyo mozangi esengo. Esengo na bango emonanaki polele na Liyangani ya Etúká “Basanzoli na esengo,” oyo esalemaki na basanza oyo euti koleka. Tiká tótalela na mokuse mayangani wana ya esengo.
[Elilingi na lokasa 4]
Maria Hombach