“Na esika ya wolo, nazwi diamá”
LISOLÓ YA MICHALIS KAMINARIS
Nsima ya kolekisa mbula mitano na Afrika ya Súdi epai nakendaki koluka wolo, nazongaki na mboka na ngai na eloko eleki wolo na motuya. Tiká nayebisa bino bozwi oyo nazwaki na ntango yango, oyo nasepelaki kokabola yango elongo na basusu.
NABOTAMAKI na 1904, na esanga ya Céphalonie oyo ezwami na Mai monene ya Ionie, na mokili ya Grèce. Baboti na ngai nyonso mibale bakufaki mwa moke nsima ya kobotama na ngai, boye nakólaki lokola mwana-etiké. Nazalaki mpenza na mposa ya lisungi, mpe nazalaki kobondela Nzambe mbala na mbala. Atako nazalaki kosangana ntango nyonso na Lingomba ya Ortodoksi ya Grèce, nayebaki Biblia ata moke te. Nazwaki libɔndisi te.
Na 1929, nazwaki ekateli ya kokende na mokili mosusu mpo na koluka bomoi ya malamu koleka. Nsima ya kotika esanga ya mabelé mokauká epai nabotamaki, nazwaki masuwa mpo na kokende na Afrika ya Súdi, kolekáká na mokili ya Angleterre. Nsima ya kolekisa mikolo 17 na mai monene, nakómaki na engumba Cape Town, na Afrika ya Súdi; kuna, bazwaki ngai nokinoki na mosala epai na mobali moko oyo azalaki moto ya Grèce lokola ngai. Kasi, bozwi ya mosuni epesaki ngai libɔndisi te.
Nazwi eloko oyo eleki motuya
Nsima ya kolekisa mbula soko mibale na Afrika ya Súdi, Motatoli moko ya Yehova ayaki na esika na ngai ya mosala mpe atikelaki ngai mikanda oyo mikolimbolaka Biblia na lokótá ya Greke. Kati na mikanda yango, ezalaki na mwa búku Where Are the Dead? (Bakufi bazali wapi?) mpe mwa búku Oppression, When Will It End? (Minyoko, ekosuka mokolo nini?) Nazali komikundola ete natángaki yango na mposa makasi, kútu nakangaki na motó maloba ya mikapo nyonso oyo mitángamaki na kati. Mokolo moko, nayebisaki moninga moko ya mosala ete: “Nasili kozwa eloko oyo nazalaki koluka na boumeli ya bambula nyonso oyo. Nayaki na Afrika mpo na koluka wolo, kasi na esika ya wolo, nazwi diamá.”
Nazalaki na esengo mingi ya koyeba ete Nzambe azali na nkombo na ye mpenza, Yehova, ete Bokonzi na ye esili kotyama na likoló, mpe ete tozali kobika na mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. (Nzembo 83:18; Danyele 2:44; Matai 6:9, 10; 24:3-12; 2 Timoté 3:1-5; Emoniseli 12:7-12) Ezalaki likambo ya esengo mpenza koyeba ete Bokonzi ya Yehova ekosopa mapamboli mazangi nsuka likoló na bato ya mposo nyonso! Eloko mosusu oyo ekamwisaki ngai ezalaki likambo oyo ete mateya ya solo wana ya motuya mingi ezalaki kosakolama na mokili mobimba.—Yisaya 9:6, 7; 11:6-9; Matai 24:14; Emoniseli 21:3, 4.
Nokinoki, nalukaki adresi ya biro ya filiale ya Société Watch Tower na engumba Cape Town mpe nazwaki mikanda mingi oyo milimbolaka Biblia. Nasepelaki mingi mpenza mpo ete nazwaki Biblia na ngai moko. Makambo oyo natángaki epusaki ngai na koluka kopesa litatoli. Nabandaki kosala yango na kotindáká mikanda oyo milimbolaka Biblia epai na bandeko na ngai, baninga na ngai, mpe bayebani na ngai oyo bazalaki na engumba Lixoúrion, epai nabotamá. Na lisalisi ya boyekoli oyo nazalaki kosala, nayaki kososola mokemoke ete mpo na kosepelisa Yehova, tosengeli kopesa bomoi na biso epai na ye. Boye, nasalaki bongo nokinoki na nzela ya libondeli.
Mokolo moko, nayanganaki na likita ya Batatoli ya Yehova, kasi lokola nayebaki Lingelesi te, nayokaki ata eloko moko te. Ntango nayokaki ete ezali na Bagreke mingi oyo bafandi na engumba Port Elizabeth, nakendaki kuna, kasi nakutanaki ata na Motatoli moko te oyo alobaka lokótá Greke. Na bongo, nazwaki ekateli ya kozonga na Grèce mpo na kokóma mopalanganisi ya nsango malamu ya ntango nyonso. Nazali komikundola makambo oyo namilobelaki ngai moko ete: ‘Nakozonga na Grèce, ata soki yango ekosɛnga ete nazonga mabɔkɔ mpamba.’
Nakɔti na mosala ya ntango nyonso na Grèce
Na eleko ya prɛntá ya 1934, nazalaki kati na masuwa monene ya Italie na nkombo Duilio, oyo esalaka mibembo na Mbu. Nakitaki na engumba Marseille, na mokili ya France, mpe nsima ya kolekisa mikolo zomi kuna, nazwaki masuwa monene (pakebó) na nkombo Patris mpo na kokende na Grèce. Ntango tozalaki naino kotambola na mai monene, motɛlɛ ya masuwa ezwaki mikakatano, mpe na kati ya butu, etindá epesamaki ete bákitisa bakanó ya kobikisa bomoi na mai. Na ntango yango, namikundolaki makanisi na ngai ya kozonga na Grèce mabɔkɔ mpamba. Kasi, masuwa remorkɛrɛ ya Italie eyaki mpe ebendaki biso kino na engumba Naples, na mokili ya Italie. Mpe na nsima tokómaki na Piraiévs (Le Pirée), na mokili ya Grèce.
Longwa kuna, nakendaki kino engumba Athènes mpo na kotala biro ya filiale ya Société Watch Tower. Wana nazalaki kosolola na Athanassios Karanassios, mokambi ya filiale yango, nasɛngaki ete bápesa ngai teritware mpo na mosala ya kosakola ntango nyonso. Mokolo oyo elandaki, nakamataki nzela mpo na kokende na Péloponnèse, na eteni ya súdi ya Grèce monene. Etúká yango mobimba epesamelaki ngai lokola teritware na ngai moko!
Na mɔ́tɔ nyonso, nabandaki mosala ya kosakola, engumba na engumba, mboka na mboka, fɛrmɛ na fɛrmɛ, mpe ndako na ndako. Mwa moke na nsima, Michael Triantafilopoulos ayaki kokuta ngai kuna, mpe abatisaki ngai na eleko ya molungé ya 1935—mbula koleka moko nsima ya ntango oyo nabandaki mosala ya ntango nyonso! Mituka ya kokumba basáli-mibembo ezalaki te, boye tozalaki kokende bipai nyonso na makolo. Mokakatano moleki monene oyo tokutanaki na yango ezalaki bongo botɛmɛli ya bakonzi ya mangomba, oyo bazalaki kosala nyonso mpo na kopekisa mosala na biso. Na yango, mingi bazalaki na makanisi ya mabe mpo na biso. Kasi, atako bipekiseli bizalaki, litatoli epesamaki kaka, mpe nkombo ya Yehova esakolamaki bipai binso.
Toyikaki mpiko na botɛmɛli
Mokolo moko na ntɔ́ngɔ́, wana nazalaki kosakola na etúká ya ngombangomba na nkombo Arcadie, nakómaki na mboka babéngi Magouliana. Nsima ya kosakola na boumeli ya ngonga moko, nayokaki ngonga ya ndakonzambe mpe nokinoki nasosolaki ete bazalaki kobɛta yango mpo na ngai! Ebele ya bato bayanganaki na litambwisi ya archimandrite (mokonzi ya lingomba oyo alandi episkɔ́pɔ) ya Lingomba ya Ortodoksi ya Grèce. Nakangaki sakosi na ngai nokinoki mpe nabondelaki Yehova na nsé ya motema. Archimandrite, elongo na etuluku ya bana mike nsima na ye, ayaki semba epai na ngai. Abandaki konganga: “Ye oyo! Ye oyo!”
Bana mike bazingelaki ngai malamumalamu, bongo mokonzi yango ya lingomba ayaki mpe abandaki kotindika ngai na libumu na ye monene, kolobáká ete alingi te kosimba ngai na mabɔkɔ na ye ‘mpo mbala mosusu nazwá bokɔnɔ moko boye.’ Angangaki ete: “Bɛtá ye! Bɛtá ye!” Kasi bobele na ntango wana, mokonzi moko ya bapolisi ayaki mpe amemaki biso mibale na biro ya bapolisi. Mokonzi yango ya lingomba amemamaki na esambiselo mpamba te apusaki ebele ya bato ete básala mobulu mpe bafutisaki ye lomande ya badrakma 300, bakisá mpe misolo mosusu oyo basɛngaki ye na esambiselo. Ngai, batikaki ngai.
Ntango tokómaki na etúká mosusu, toponaki engumba moko monene ete ezala esika oyo tokobanda kofanda mpo na mosala na biso ya kosakola, mpe uta na engumba yango, tozalaki kokóma kino nsuka ya teritware mobimba na botamboli ya ngonga minei na makolo. Tozalaki kobima ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ ntango molili ezali naino mpe kozonga wana butu esili koyinda; tozalaki mbala mingi kopesa litatoli na mboka moko to mibale na mokolo. Nsima ya kosilisa bamboka nyonso ya zingazinga, tosakolaki na engumba epai tozalaki kofanda mpe na nsima tokendaki na etúká mosusu. Bazalaki kokanga biso mbala mingi mpamba te bakonzi ya mangomba bazalaki kopusa bato ete básala yikiyiki mpo na biso. Na etúká Parnasse, oyo ezwami na ntéi mpenza ya Grèce, bapolisi balukaki ngai na boumeli ya basanza mingi. Kasi, bakangaki ngai ata mokolo moko te.
Mokolo moko, ngai mpe ndeko Triantafilopoulos tozalaki kosakola na mboka Mouríki oyo ezali na etúká Béotie. Tokabolaki mboka yango na biteni mibale, mpe ngai nabandaki kosakola na bandako oyo ezalaki na mipanzi ya ngomba etombwaná makasi, mpo ete nazalaki elenge koleka ye. Na mbala moko, nayoki moto azali konganga na nsé. Ntango nazalaki kokita na mbangu, makanisi na ngai ezalaki kaka ete ‘bazali kobɛta ndeko Triantafilopoulos.’ Bato ya mboka bayanganaki na nganda ya kafé, mpe sángó moko azalaki kotambola epai na epai lokola ngɔmbɛ esiliki. Azalaki konganga ete: “Bato oyo bazali kobénga biso ‘bana ya Nyoka.’”
Sángó yango asilaki kobuka lingenda mobimba na motó ya ndeko Triantafilopoulos, mpe makila ezalaki kokita na elongi na ye. Ntango nasilisaki kopangwisa ye makila, tozwaki likoki ya kolongwa wana. Totambolaki ngonga misato na makolo kino tokómaki na engumba Thèbes. Na lopitalo moko ya engumba yango, batyaki nkisi na mpota wana. Tofundaki likambo yango na biro ya bapolisi mpe babandaki ankɛtɛ mpo na kosambisa likambo yango. Nzokande, sángó yango ayebanaki na bakonzi kuna mpe nsukansuka batikaki ye.
Ntango tozalaki kosakola na engumba Leucade, bato ya mokonzi moko ya politiki na esika yango “bakangaki” biso mpe bamemaki biso na nganda ya kafé na mboka wana, epai kuna bazalaki kofunda biso na esambiselo moko ya lokuta. Mokonzi yango ya politiki mpe bato na ye bazalaki kolekaleka zingazinga na biso mpe koloba moto na moto na ngala na ye—kolobeláká biso maloba mabe mbala na mbala—mpe bazalaki kolakisa biso makofi na bango. Bango nyonso bazalaki na molangwa. Maloba mabe na bango liboso na biso elandanaki bandá midi kino kolala ya moi, kasi yango ebulunganisaki biso te mpe tozalaki ntango nyonso komungamunga wana tozalaki koyebisa bango polele ete toyebaki ata likambo moko te, mpe tozalaki kobondela Yehova na nsé ya motema ete asunga biso.
Ntango butu eyindaki, bapolisi mibale bayaki kobikisa biso. Bamemaki biso na biro na bango ya bapolisi mpe basalelaki biso makambo na boboto mpenza. Mpo na kolóngisa makambo oyo asalaki, mokonzi wana ya politiki ayaki mokolo molandaki mpe afundaki biso ete tozalaki kopalanganisa makanisi ya kokweisa Mokonzi ya Grèce. Na bongo, biro ya bapolisi etindaki biso na engumba Lamía mpo ete likambo na biso etalelama lisusu malamumalamu, mpe bapesaki biso bakɛngɛli mibale ete bákende na biso elongo. Batyaki biso na bolɔ́kɔ mikolo nsambo mpe bamemaki biso, minɔ́ti na mabɔkɔ, kino na engumba Lárissa mpo na kosambisama.
Bandeko na biso baklisto oyo bazalaki na engumba Lárissa, oyo basilaki koyoka nsango na biso, bazalaki kozela boyei na biso. Bolingo mozindo oyo bamoniselaki biso ezalaki litatoli malamu epai na basodá-bakɛngɛli. Avoká na biso, oyo azalaki Motatoli ya Yehova mpe oyo na ntango ya kala azalaki mokonzi ya basodá, ayebanaki malamu na engumba yango. Ntango akómaki na esambiselo mpe alimbolaki likambo na biso, bitumbu oyo bapesaki biso emonanaki ete ezalaki ya lokuta, mpe batikaki biso.
Bolóngi ya mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova eyeisaki lisusu botɛmɛli makasi. Mibeko mingi ebimisamaki na 1938 mpe 1939 oyo mizalaki kopekisa likambo litali kobongola bato na lingomba mosusu, boye ngai mpe Michael tozalaki ntango nyonso kofundama na esambiselo mpo na makambo ndenge na ndenge na ntina na yango. Na nsima, biro ya filiale eyebisaki biso ete tósala moto na moto na esika na ye, na ntina ete likebi ya bato ebendama mingi te na mosala na biso. Kozanga mosalani ezalaki likambo ya mpasi mpo na ngai. Kasi, kotyáká elikya epai na Yehova, nasilisaki na makolo teritware oyo esangisi bitúká biye: Attique, Béotie, Phthiotide, Eubée, Étolie, Acarnanie, Eurytanie, mpe etúká ya Péloponnèse.
Eloko oyo esalisaki ngai na boumeli ya eleko nyonso wana ezalaki maloba kitoko ya mokomi na Nzembo, maloba oyo mamonisi elikya na ye epai na Yehova ete: “Mpo na kosunga na yo, nakoleka kati na ebele na babun[d]i, na kosunga na Nzambe na ngai, nakopombwa likoló na lopango. Ye Nzambe oyo azingeli ngai na nguya, mpe asemboli nzela na ngai. Apesi ngai makaka lokola yango na mboloko, atɛmisi ngai likoló na bisika na likoló.”—Nzembo 18:29, 32, 33.
Na 1940, Italie eyaki kobundisa Grèce, mpe mwa moke na nsima mampinga ya Allemagne mpe makɔtaki na Grèce. Babɔtɔli-mboka batyaki mibeko na bango, mpe mikanda ya Société Watch Tower mipekisamaki. Yango ezalaki ntango ya mpasi mpo na Batatoli ya Yehova na mokili ya Grèce; atako bongo, motuya na bango mobakisamaki na lolenge ya kokamwa—na 1940 bazalaki Batatoli 178 mpe, na nsuka ya Etumba ya Mibale ya Mokili mobimba na 1945, bakómaki 1 770!
Mosala na Betele
Na 1945, nabyangamaki kokende kosala na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na engumba Athènes. Betele, oyo elimboli “Ndako ya Nzambe,” ezalaki kati na ndako moko ya kofutela na balabála Lombardou. Babiro ezalaki na likoló, mpe esika ya konyata mikanda ezalaki na ndako ya nsé ya mabelé. Esika ya konyata mikanda ezalaki na masini ya bonyati mpe na masini ya kokata nsɔngɛ́ ya papiyé. Liboso mpenza, baoyo bazalaki kosala na ndako ya konyata mikanda bazalaki sé bato mibale, kasi mwa moke na nsima, basáli mosusu ya bolingo malamu bazalaki kouta na bandako na bango mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala wana.
Na 1945, tozwaki lisusu likoki ya kosolola na biro monene ya Société Watch Tower na Brooklyn, New York, mpe na mbula wana kaka, tobandaki lisusu konyata Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Grèce mbala na mbala. Na nsima, na 1947, filiale na biso ekómaki na balabála Tenedou No. 16, kasi ndako na biso ya konyata mikanda etikalaki na balabála Lombardou. Na nsima, masini ya konyata mikanda elongolamaki na balabála Lombardou mpe tomemaki yango na izíni ya Motatoli moko, na ntáká ya kilomɛtɛlɛ 5 uta na esika yango. Boye, na boumeli ya eleko moko, tozalaki kotambolatambola katikati na bisika wana misato.
Nazali komikundola lolenge tozalaki kolongwa ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ na esika tozalaki kofanda, na balabála Tenedou, mpo na kokende na ndako ya bonyati mikanda. Nsima ya kosala mosala na esika yango kino ngonga ya yambo na nsima ya nzánga, nazalaki kokende na balabála Lombardou epai nkasa ya mikanda oyo tonyataki ezalaki komemama. Kuna, nkasa yango izalaki kobongisama na lolenge ya bazulunalo, kotongama esika moko, mpe nsɔngɛ́ na yango ezalaki kokatama na mabɔkɔ. Nsima na yango, tozalaki koya na bazulunalo oyo esalemi kino na biro ya pósita, tozalaki komema yango na etaze ya mibale, kopesa mabɔkɔ na basáli ya pósita mpo na kosangisa esika moko bazulunalo oyo ekokani, mpe kotya bilembo na anvɛlɔpi ya botindi mikanda.
Na 1954, motángo ya Batatoli na mokili ya Grèce emataki kino bato koleka 4 000, mpe tokómaki na mposa ya kozwa bandako ya minene koleka. Na yango, tolongwaki mpe tokendaki na Betele oyo ezalaki na etaze mibale na balabála Kartali na vílɛ ya engumba Athènes. Na 1958, bapesaki ngai mokumba ya kotambwisa mosala ya kolamba na kúku, mpe yango ezali mosala oyo nasalaki kino 1983. Kati na eleko yango, na 1959, nabalaki Eleftheria, oyo azali mosungi na ngai ya sembo na mosala ya Yehova.
Toyiki lisusu mpiko na botɛmɛli
Na 1967, lisangani moko ya basodá ebɔtɔlaki bokonzi, mpe mosala na biso ya kosakola epekisamaki lisusu. Nzokande, lokola tosilaki koyeba lolenge ya kosala misala na biso na ntango ya bipekiseli, tobongisaki makambo nokinoki mpe tokóbaki mosala na biso na lolenge ya kobombama mpe yango etambolaki malamu.
Tozalaki kosala makita na biso na bandako ya bandeko mpe tozalaki na bokɛngi kati na mosala na biso ya kosakola ndako na ndako. Atako bongo, bazalaki kokanga bandeko na biso mbala na mbala, mpe makambo ya kosamba mayikanaki mingi. Baavoká na biso bazalaki ntango nyonso kokende epai na epai mpo na kosamba makambo na bisika ndenge na ndenge ya mokili yango. Atako botɛmɛli ezalaki, Batatoli mingi batikaki mosala na bango ya kosakola te; bazalaki kosala yango mingi mpenza na nsuka ya pɔ́sɔ.
Mwapɔ́sɔ to Mwalomingo nyonso, nsima ya kosilisa mosala na biso ya kosakola mpo na mokolo wana, tozalaki kolukaluka mpo na koyeba soki moto moko azangi na bituluku na biso. Mbala mingi, soki bandeko bazangi, elingi koloba bakangami na biro ya bapolisi oyo ezali pene. Boye, tozalaki komemela bango babolangiti mpe bilei, mpe tozalaki kopesa bango bilendiseli. Na nsima, tozalaki koyebisa makambo yango epai na baavoká na biso, mpe bango bazalaki kokende kuna na Mwayambo kosamba epai ya procureur mpo na baoyo bakangamaki. Toyikaki mpiko na esengo nyonso kati na ezalela yango mpamba te tozalaki konyokwama mpo na solo!
Na boumeli ya epekiseli, misala na biso ya bonyati mikanda na Betele mikangamaki. Na yango, ndako oyo ngai mpe Eleftheria tozalaki kofanda na kartyé moko ya zingazinga na engumba Athènes ekómaki lokola ndako ya konyata mikanda. Eleftheria azalaki kokoma masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na lisalisi ya masini moko ya bozito mingi. Azalaki kotya nkasa zomi na mbala moko kati na masini mpe azalaki kobɛta na makasi mpenza na ntina ete makomi ebima na nkasa nyonso. Na nsima, ngai nazalaki kosangisa nkasa yango mpe kotonga yango esika moko. Tozalaki kosala yango mpokwa nyonso kino na midi ya butu. Polisi moko azalaki kofanda na etaze ya nsé, mpe tozalaki kokamwa ntango nyonso ete yango ebendaki likebi na ye te.
Tozwi esengo mpo na bokóli oyo elandaki
Demokrasi ezongaki na Grèce na 1974, mpe mosala na biso ya kosakola ekómaki lisusu kosalema na polele. Kasi, na boumeli ya mbula nsambo oyo mosala na biso epekisamaki, tozwaki bokóli ya kokamwisa mpenza, Batatoli ya sika 6 000 babakisamaki, mpe biso banso tokómaki bato koleka 17 000 oyo tozalaki kosakola Bokonzi.
Tozongelaki mpe mosala ya konyata mikanda na bandako ya filiale. Boye, mwa moke na nsima, bandako ya Betele oyo ezalaki na balabála Kartali ezalaki lisusu kokoka te. Na yango, eteni ya mabelé ya hectare 1 esombamaki na Marousi oyo ezalaki kartyé ya zingazinga ya engumba Athènes. Bandako ya sika ya Betele etongamaki; ezalaki na biteni ya kolala 27, ezalaki na ndako ya bonyati mikanda, babiro mpe bandako mosusu. Nyonso wana ebandaki kosalelama na sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1979.
Atako bongo, tozalaki lisusu na mposa ya esika ya mwa monene. Na yango, mabelé ya hectares 54 esombamaki, na ntáká ya kilomɛtɛlɛ soko 60 na nɔ́rdi ya engumba Athènes. Esika yango ezalaki na etúká ya Eleona, na mopanzi ya ngomba oyo uta na yango okoki komona bangomba mpe mabwaku oyo matondi na mai. Kuna, na Apríli 1991, tobandaki kosalela ndako oyo eleki monene, oyo ezalaki na biteni 22, mpe na eteni mokomoko, bato mwambe bakokaki kofanda wana.
Nsima ya kosala mbula koleka 60 na mosala ya ntango nyonso, nazali naino na kolɔngɔ́nɔ́ malamu ya nzoto, oyo ezali lipamboli mpenza. Na esengo nyonso, nazali naino ‘kobota mbuma na ntango na konuna.’ (Nzembo 92:14) Nazali mpenza kotɔ́nda Yehova mpamba te abateli ngai na bomoi mpe namoni na miso na ngai moko bokóli monene ya motángo ya basambeli na ye ya solo. Mosakoli Yisaya asakolaki bokóli yango ete: “Bikuke na yo ikozipwama libela na moi mpe na butu ikokangana te; ete bato báyeisela yo bozwi na mabota.”—Yisaya 60:11.
Ezali likambo ya esengo komona bamilió ya bato ya mabota nyonso oyo bazali koya na lisangá ya Yehova mpe bazali koteyama lolenge bakoki kobika na bolózi monene mpe kokɔta na mokili ya sika ya Nzambe! (2 Petelo 3:13) Nakoki koloba na bosolo nyonso ete mosala ya ntango nyonso esili kopesa ngai litomba koleka eloko nyonso oyo mokili ya lelo ekoki kopesa. Ɛɛ, nasili kozwa, biloko ya motuya ya wolo te, kasi diamá ya elimo oyo epesi ngai bozwi ezangi nsuka kati na bomoi.
[Bililingi na lokasa 23]
Michalis mpe Eleftheria Kaminaris
(Na lobɔkɔ ya mobali) Ndako ya bonyati mikanda na balabála Lombardou