Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/9 nk. 25-28
  • Nasalelaki Nzambe oyo abongi na kotyela motema

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasalelaki Nzambe oyo abongi na kotyela motema
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakóli na Grèce
  • Kati na etumba ya banamboka
  • Nazwi elikya ya kotyela motema
  • Nakangami mpe natyami na bolɔ́kɔ
  • Nasambisami mpo na kobongola bato na makasi
  • Liwa ya mwana na ngai ya mobali
  • Tosalisi basusu ete bátya elikya epai na Yehova
  • Libula ya motuya
  • Nazwi ekateli ya kotya elikya epai na Yehova
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nazali kopesa Yehova eloko oyo ebongi na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Namekamaki na minyoko makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/9 nk. 25-28

Nasalelaki Nzambe oyo abongi na kotyela motema

Lisoló ya Kimon Progakis

Ezalaki mpokwa moko ya malili makasi na 1955. Mwasi na ngai, Giannoula,mpe ngai tobandaki komitungisa mpamba te George, mwana na biso ya mobali ya mibu 18 azongaki naino na ndako te uta akendaki na kiosike esika azalaki kosala. Na pwasa, polisi moko abɛtaki na ekuke na biso. Alobaki ete: “Mwana na bino ya mobali batuti ye ntango azalaki kozonga ndako na velo na ye, mpe akufi.” Na nsima alobelaki ngai na mongongo ya nsé na litoi ete: “Bakoyebisa yo ete ezalaki likámá, kasi ndimelá ngai, babomaki ye.” Sángo ya mboka mpe basodá-bakambi baangaki mwango mpo na koboma ye.

NA BAMBULA yango, wana Grèce eutaki kokutana na bitumba mpe mikakatano, ezalaki likámá kozala Motatoli ya Yehova. Ngai moko namonaki mpenza nguya ya lingomba Ortodoksi ya Grèce mpe bibongiseli ya basodá mpamba te na boumeli ya mibu koleka 15, nazalaki mosangani ya molende kati na bango. Tiká ete nayebisa bino makambo oyo mapesaki nzela na likámá yango kati na libota na biso esili koleka mibu 40.

Nakóli na Grèce

Nabotamaki na 1902 na libota moko makasi na mboka moko moke pene na engumba Chalcis, na Grèce. Tata na ngai azalaki na molende na makambo ya politiki ya mboka, mpe libota na biso bazalaki basangani oyo bamipesi na lingomba Ortodoksi ya Grèce. Nakómaki motángi monene ya babúku ya politiki mpe ya mangomba na ntango oyo mingi kati na banamboka bayebaki kotánga te mpe kokoma te.

Bobóla mpe kozanga boyengebene oyo ekómaki mingi na ebandeli ya ekeke ya 20 epesaki ngai mposa ya mokili moko oyo ezali na bomoi ya malamu koleka. Nakanisaki ete lingomba ekoki kozala na likoki ya kobongisa bomoi ya banamboka mpamba te bazalaki kati na ezaleli ya mawa. Mpo na bopusi ya makambo ya lingomba oyo nazalaki na yango, bakonzi ya mboka basɛngaki na ngai ete nakóma sángo ya Lingomba Ortodoksi ya Grèce na mboka na biso. Nzokande, atako nasilaki kotambola na bamonastɛrɛ mingi mpe nasololaki mingi na baepiskɔ́pɔ mpe ba abbés, namiyokaki ete nazalaki pene te to nazalaki na bolingi te ya kondima mokumba motindo wana.

Kati na etumba ya banamboka

Nsima ya bambula mingi, na Apríli 1941, Grèce ekómaki na mabɔkɔ ya banazi. Yango ezalaki ebandeli ya eleko moko ya mpasi, koboma, nzala, kobungisa biloko mpe minyoko ndenge na ndenge. Ebongiseli moko makasi ya botɛmɛli ekólaki, mpe nakɔtaki na etuluku moko ya guerrilla oyo babundisaki batumoli banazi. Na yango, ndako na ngai etyamaki mɔ́tɔ mbala mingi, nazokaki lisasi mpe bilanga na ngai bibebisamaki. Na ebandeli ya 1943, ngai ná libota na ngai tosengelaki kokima na bangomba ya mabangamabanga. Tofandaki kuna kino ntango basodá ya Allemagne balongwaki na Ɔkɔtɔ́bɛ 1944.

Etumba ya banamboka ebimaki nsima wana basodá ya Allemagne bakendaki. Etuluku makasi ya guerrilla oyo nazalaki mosangani na yango ekómaki moko ya babundi makasi na ntango ya bitumba ya banamboka. Atako maloba oyo ya koministe: boyengebene, bosembo, mpe boninga mazalaki kosepelisa ngai, nzokande bosolo na yango ebulunganisaki makanisi na ngai. Lokola nazalaki na etɛlɛmɛlo monene na etuluku, namonaki ngai moko na miso ete nguya ya boyangeli ezali kokosa bato. Atako mateya mpe makanisi ezalaki komonana lokola malamu, moimi mpe kozanga kokoka ebebisaka mikano kitoko ya politiki.

Likambo oyo lizokisaki ngai mpenza ezalaki oyo ete bituluku ndenge na ndenge ya matátá ya banamboka, bakonzi ya Lingomba Ortodoksi bazalaki kokamata bibundeli mpe koboma bato ya lingomba na bango moko! Namitunaki ete: ‘Lolenge nini bakonzi ya lingomba oyo bakoki koloba ete bazali bamonisi ya Yesu Klisto, oyo akebisaki ete: “Baoyo nyonso bakosimba mopanga bakokufa na mopanga”?’​—Matai 26:52.

Na boumeli ya etumba ya banamboka, na 1946, nabombanaki pene na engumba Lamia, na ntei ya Grèce. Bilamba na ngai binzulukaki, na yango nazwaki ekateli ya kobomba elongi na ngai mpe kokenda epai na mosɔni-bilamba ete asɔnela ngai bilamba mosusu ya sika. Ntembe moko makasi ezalaki kosalema ntango nakómaki, mpe nokinoki nabandaki koloba, mpo na makambo matali politiki te kasi mpo na eloko oyo nazalaki kolinga mingi liboso, lingomba. Kososoláká ete nayebaki makambo mingi, bato oyo bazalaki kotala biso basɛngi na ngai ete nasolola na ‘profɛsɛrɛ moko ya teolojí.’ Nokinoki bakendaki kobénga ye.

Nazwi elikya ya kotyela motema

Na ntango ya lisoló oyo lilandaki, “profɛsɛrɛ” atunaki soki nini ezali bongo moboko ya bindimeli na ngai. Nayanolaki ye ete: “Batata basantu mpe makita minene ya mangomba ndenge na ndenge.” Na esika ete atɛmɛla makanisi na ngai, afungolaki Biblia na ye na Matai 23:9, 10, mpe asɛngaki na ngai ete natánga maloba ya Yesu oyo: “Bobianga moto tata awa na mokili te, zambi moko azali Tata na bino, oyo na Likoló. Bobianga mpe bankolo te, zambi moko azali Nkolo na bino, ye Klisto.”

Yango efungolaki ngai miso! Nasosolaki ete moto yango azalaki koloba solo. Ntango amimonisaki ete azalaki Motatoli ya Yehova, nasɛngaki ye mwa mikanda ya kotánga. Amemelaki ngai búku Lumière, oyo ezali kolimbola mokanda ya Biblia Emoniseli, mpe nakendaki na yango na esika ya nkuku oyo nazalaki kofanda. Na boumeli ya ntango molai, banyama oyo balobelami kati na Emoniseli ezalaki mobombamo mpo na ngai, kasi sikawa nayebaki ete yango ezalaki komonisa bibongiseli ya politiki oyo bizali komonana na ekeke na biso ya 20. Nabandaki kososola ete Biblia ezali na ndimbola ebongi mpo na eleko na biso mpe ete nasengeli koyekola yango mpe koyokanisa bomoi na ngai na mateya na yango.

Nakangami mpe natyami na bolɔ́kɔ

Mwa ntango moke na nsima, basodá bakɔtaki na esika nazalaki kobombana mpe bakangaki ngai. Bakɔtisaki ngai na bolɔ́kɔ ya nsé ya mabelé. Lokola na boumeli ya mwa ntango bazalaki koluka ngai mpo bakanga ngai, nakanisaki ete bakoboma ngai. Kuna, na bolɔ́kɔ, Motatoli moko oyo asololaki na ngai liboso ayaki kotala ngai. Alendisaki ngai ete natya elikya na ngai mobimba epai na Yehova, nasalaki mpe bongo. Bakatelaki ngai etumbu ya basanza misato ete nakende kofanda na esanga Égée, na Icarie.

Bobele ntango nakómaki, namimonisaki lokola koministe te, kasi lokola Motatoli ya Yehova. Bato mosusu oyo bayekolaki Biblia mpe bakimaki kuna, na bongo, nakutanaki na bango mpe tobandaki koyekola Biblia elongo pɔ́sɔ na pɔ́sɔ. Basalisaki ngai na kozwa boyebi mingi ya Makomami mpe lisosoli malamu mpo na Yehova, Nzambe oyo abongi na kotyela motema.

Na 1947, ntango etumbu na ngai esilaki, nabyangamaki na biro ya zúzi-mokonzi. Ayebisaki ngai ete akamwaki mingi na etamboli na ngai mpe alobaki ete nakoki kotánga nkombo na ye soki bakangi ngai lisusu. Ntango nakómaki na Athènes, epai kuna libota na ngai bazalaki kofanda ntango nazalaki te, nabandaki koyangana na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova mpe mosika te nazwaki batisimo lokola elembo ya komipesa na ngai epai na Yehova.

Nasambisami mpo na kobongola bato na makasi

Na boumeli ya bambula, Grèce esambisaki Batatoli ya Yehova na nsé ya mibeko oyo ebandaki uta 1938 kino 1939 oyo ezalaki kopekisa kobongola bato na makasi. Na yango, banda 1938 kino 1992, ezalaki na bakangami 19 147 ya Batatoli ya Yehova na Grèce mpe bisambiselo bikatelaki bango bitumbu oyo nyonso bikokisaki mbula 753 mpe mbula 593 ekokisamaki kati na bolɔ́kɔ. Mpo na ngai moko, nakangamaki koleka mbala 40 mpamba te nazalaki kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, mpe nasalaki na mobimba basanza 27 na malɔ́kɔ ekeseni.

Moko kati na bokangami na ngai ezalaki mpo na nkomá oyo natindelaki sángo moko ya lingomba Ortodoksi na Chalcis. Na 1955, masangá ya Batatoli ya Yehova malendisamaki ete mátinda mwa búku Boklisto ya nkombo mpamba to Boklisto ya solo​—Oyo wapi ezali “pole ya mokili”? (na Lingelesi) epai na bakonzi ya mangomba nyonso. Moko na bakonzi ya mangomba oyo azalaki na etɛlɛmɛlo monene afundaki ngai ete nazalaki kobongola bato na makasi. Na ntango ya kosambisama, avoká oyo azalaki mpe Motatoli, elongo na mosambisi ya mboka bapesaki endimiseli ya mayele mpenza, kolimboláká lisɛngami oyo ete baklisto ya solo basengeli kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.​—Matai 24:14.

Zúzi-mokambi ya esambiselo atunaki vikɛ́rɛ (mokambi ya lingomba oyo azali nsima ya episkɔ́pɔ) ete: “Otángaki nkomá mpe mwa búku yango?”

Ayanolaki na mɔ́tɔ nyonso ete “te, napasolaki mpe nabwakaki yango mbala moko ntango nafungolaki anvɛlɔ́pɛ!”

Zúzi-mokambi atunaki: “Bongo ndenge nini okoki koloba ete moto oyo azalaki kobongola yo na makasi?”

Na nsima molobeli atángaki bandakisa ya baprofɛsɛrɛ mpe bato mosusu oyo bapesaka babúku ebele ete etyama kati na babibliotɛ́kɛ ya bato nyonso. Atunaki ete “Okoki koloba ete bato yango bazali komeka kobongola basusu na makasi?”

Ezali polele ete mosala motindo wana esalemaka te mpo na kobongola bato na makasi. Napesaki matɔ́ndi epai na Yehova ntango nayokaki eyano ya esambiselo ete: “Azali na likambo te.”

Liwa ya mwana na ngai ya mobali

Mwana na ngai ya mobali George azalaki mpe ntango nyonso kotungisama, mingimingi na bopusi ya bakonzi ya lingomba Ortodoksi. Ye mpe akangamaki mbala mingi mpo na molende na ye ya bolenge mpo na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Nsukansuka, batɛmɛli bazwaki ekateli ya koboma ye, mpe bobele na ntango yango, batindelaki biso baoyo totikalaki likebisi ete tósakola lisusu te.

Polisi oyo ayaki na ndako na biso kopesa nsango ya liwa ya George alobaki ete sángo ya Lingomba Ortodoksi ya Grèce mpe basodá-bakambi basalaki mwango ya koboma mwana na biso. “Makámá” motindo wana mazalaki komonana mingi na boumeli ya ntango wana ya mpasi. Atako liwa na ye epesaki biso mpasi mingi, kasi mokano na biso ya kokóba kati na mosala ya kosakola mpe kotya elikya epai na Yehova elendisamaki.

Tosalisi basusu ete bátya elikya epai na Yehova

Na katikati ya mibu ya 1960, mwasi na ngai mpe bana na ngai bazalaki kolekisa basanza ya eleko ya molungé na mboka moko ebéngami Skala Oropos, oyo ezalaki pembeni ya mai, na ntáka ya bakilomɛ́tɛlɛ soko 50 longwa na Athènes. Na ntango wana, ata Motatoli moko te azalaki kofanda kuna, na bongo tozalaki kopesa litatoli ya libaku malamu epai na bafandi ya pembeni na biso. Basáli-bilanga mosusu bandimaki nsango na biso. Lokola mibali bazalaki kosala bangonga mingi na moi kuna na bilanga na bango, tozalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia epai na bango na butu, mpe bamosusu kati na bango bakómaki Batatoli.

Komonáká lolenge Yehova azalaki kopambola milende na biso, na boumeli ya mbula soko 15, tozalaki kosala mibembo kuna pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia epai na bato oyo bamonisaki bosepeli. Bato pene na 30 oyo toyekolaki na bango kuna basili kosala bokóli kino na batisimo. Na ebandeli, etuluku ya boyekoli etyamaki, mpe naponamaki lokola motambwisi ya makita. Na nsima, etuluku yango ekómaki lisangá, mpe lelo oyo Batatoli koleka monkámá na etúká wana bazali basangani ya lisangá ya Malakasa. Tozali na esengo ete minei kati na bato oyo tosungaki bazali sikawa kosala lokola baministre ya ntango nyonso.

Libula ya motuya

Mwa moke nsima ya kopesa bomoi na ngai epai na Yehova, mwasi na ngai abandaki kokóla na elimo mpe azwaki batisimo. Na boumeli ya eleko ya mpasi na minyoko, kondima na ye ezalaki ntango nyonso makasi, mpe atikalaki ngwi, atɛngatɛngaki te kati na bosembo na ye. Amilelaki te mpo na minyoko mingi oyo azwaki ntango nazalaki kokangama mbala na mbala na bolɔ́kɔ.

Na boumeli ya bambula, totambwisaki boyekoli ya Biblia mingi elongo, mpe asungaki bato mingi na lolenge na ye ya kosolola na boboto mpe na esengo. Sikawa, azali na bato soko zomi na mibale oyo amemelaka bango bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mbala na mbala.

Mingi mpenza mpo na lisungi ya molongani na ngai ya bolingo, bana na biso misato oyo bazali na bomoi mpe mabota na bango, oyo esangisi bankɔ́kɔ motoba mpe bankɔ́kɔlɛlɛ minei, bango nyonso bazali na molende kati na mosala ya Yehova. Atako bakutani naino te na monyoko mpe botɛmɛli makasi lokola oyo ngai ná mwasi na ngai tokutanaki na yango, basili kotya elikya na bango makasi epai na Yehova, mpe bazali kolanda kotambola kati na banzela na ye. Oyo nde esengo tokozala na yango ntango biso nyonso tokosangana elongo na molingami na biso George ntango akozonga na lisekwa!

Nazwi ekateli ya kotya elikya epai na Yehova

Na boumeli ya bambula oyo nyonso, nasili komona elimo ya Yehova lokola ezali kosala mosala na yango likoló na bato na ye. Lisangá na ye oyo litambwisami na elimo lisalisi ngai mingi na komona ete tokoki te kotya elikya na biso na milende ya bato. Bilaka na bango mpo na bomoi ya malamu na mikolo mizali koya bizali mpamba, nyonso wana ezali bobele lokuta monene.​—Nzembo 146:3, 4.

Atako napusani mingi na bambula mpe nazali na mikakatano ya kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto, miso na ngai mazali kotala bosolo ya elikya ya Bokonzi. Nazali mpenza komilela mpo na bambula oyo nalekisaki na lingomba ya lokuta mpe komekáká kolukela bato bomoi ya malamu na nzela ya myango ya politiki. Soki nakokaki kobandela bomoi na ngai, na ntembe te nakokaki lisusu kozwa ekateli ya kosalela Yehova, Nzambe oyo abongi na kotyela motema.

(Kimon Progakis auti kokufa kala mingi te. Azalaki na elikya ya bomoi ya seko awa na mabelé.)

[Elilingi na lokasa 26]

Fɔtɔ́ ya sika ya Kimon elongo na mwasi na ye Giannoula

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto