Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/8 nk. 3-4
  • Molimo ekufaka te?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Molimo ekufaka te?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mwa mituna ya kobulunganisa
  • Bomoi ezalaka nsima ya liwa?
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠bato bazali na bindimeli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Kondima na yo kati na lisekwa ezali mpenza makasi?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Molimo etikalaka na bomoi nsima na kufa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/8 nk. 3-4

Molimo ekufaka te?

KOZANGA kotya makɛlɛ́lɛ, baninga mpe basangani ya libota bazali kobaluka zingazinga na nzoto ya mowei. Bazali kotala na likebi nyonso nzoto ya elenge mobali moko ya mibu 17. Baninga na ye ya kelasi bazali koyeba ye lisusu soko moke te. Mwango oyo basalisaki ye na yango, chimiothérapie, esili kolongola ye nsuki mingi na motó; kanser esilaki kokɔndisa ye mingi mpenza. Oyo ekoki mpenza kozala nzoto ya moninga na bango? Bobele mwa bapɔ́sɔ liboso, azalaki koloba mingi, azalaki kotuna mituna mingi, azalaki makasi​—azalaki mpenza na bomoi! Na mpisoli na elongi, mama na ye azali kozongela maloba oyo ete: “Tommy azali sikawa na esengo mingi koleka. Nzambe alingaki ete Tommy azala elongo na ye kuna na likoló.”

Mama wana oyo azalaki na motema motutami azwaki mwa elikya mpe ntina ya kobɔndisama kati na likanisi oyo ete, na lolenge moko to mosusu, mwana na ye ya mobali azali naino na bomoi. Kati na lingomba ateyamaki ete molimo ekufaka te, ete ezali ntéi ya bomoto, ya makanisi, ya komikundola makambo masilá koleka​—“bomei.” Akanisaki ete molimo ya mwana na ye ya mobali ekufaki te; lokola ezali ekelamu ya elimo, etikaki nzoto na ye na ntango akufaki mpe ekendaki na likoló mpo na kozala elongo na Nzambe mpe na baanzelu.

Na ntango ya mpasi, motema ya moto endimaka ata elikya nini moke oyo ekoki komonana, yango wana ezali mpasi te na kososola ntina oyo mpo na yango endimeli wana esepelisaka bato mingi. Na ndakisa, tótalela lolenge teolojiɛ́ J. Paterson-Smyth alobi kati na búku na ye The Gospel of the Hereafter (Evanzile ya lola) ete: “Liwa ezali eloko mpamba, soki tokokanisi yango na eloko oyo eyaka na nsima na yango​—mboka kitoko, kitoko, kitoko, oyo Liwa ekɔtisaka biso kati na yango.”

Kati na mokili mobimba mpe kati na mangomba mpe na bamboka mingi, bato bakanisaka ete moto azali na molimo oyo ekufaka te, elimo oyo ezali na bososoli, oyo ekóbaka kozala na bomoi na nsima ya kokufa ya nzoto. Endimeli yango ezali kati na mangomba mingi mpenza ya minene mpe ya mike ya boklisto ya nkombo mpamba. Ezali mpe moko na bindimeli ya moboko kati na Lingomba ya Bayuda. Bato ya Lingomba ya Hindou bakanisaka ete atma, to molimo, ezalisamaki na ebandeli ya mokili, etyamaka kati na nzoto na ntango moto abotami, mpe na ntango moto akufi elongwaka na nzoto moko mpe ekɔtaka na nzoto mosusu, mpe ekóbaka bobele bongo kati na zolongano ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu. Bamizilmá bakanisaka ete molimo ebandaka bomoi na ntango moto abotami mpe ekóbaka kozala na bomoi na ntango nzoto ekufi. Mangomba mosusu​—bato ya Afrika baoyo bakanisaka ete biloko nyonso bizali na molimo, bato ya Lingomba ya Shinto, ata mpe bato ya Lingomba ya Bouddha, na likanisi oyo moko​—bateyaka makambo ndenge na ndenge bobele likoló na endimeli yango.

Mwa mituna ya kobulunganisa

Atako bato mingi batyelaka liteya ya kozanga kokufa ya molimo ntembe te mpe basepelaka na yango, kasi ebimisaka mwa mituna ya kobulunganisa. Na ndakisa, bato bamitunaka soki molimo ya molingami oyo akufi ekendaka epai wapi, soki azalaki na etamboli mabe. Akobotama lisusu na bomoi ya mpasi? To akotindama nde na epongelo, epai kuna akopɛtolama na mɔ́tɔ kino akondimama ete abongi sikawa kokenda na likoló? Likambo ya mpasi mingi koleka, akonyokwama mpo na libela kati na lifelo ya mɔ́tɔ? To, lokola mangomba mingi oyo batalelaka biloko nyonso lokola ete bizali na molimo bakanisaka yango, akokóma elimo oyo esengeli kobondelama?

Makanisi motindo wana mapesaka bilikya ya kobulunganisa epai na bato oyo bazali na bomoi. Tosengeli kobondela milimo ya balingami na biso oyo basilá kokufa noki bakotombokela biso? Tosengeli kosunga bango ete bábima na epongelo moko ya nsɔ́mɔ? To tosengeli bobele kolɛngalɛnga na nsɔ́mɔ monene mpamba te tokanisi ete bazali konyokwama kati na lifelo? Tosengeli kotalela banyama mosusu lokola ete kati na bango bazali na milimo ya bato basilá kokufa?

Mituna oyo mizali kotunama na ntina na Nzambe ye moko mizali mpenza ya kobɔndisa te. Na ndakisa, baboti mingi, lokola mama oyo tolobelaki na ebandeli, babɔndisamaka liboso na likanisi oyo ete Nzambe “akamati” milimo mizangi kokufa ya bana na bango mpo na komema yango kuna na likoló ete mizala elongo na ye. Nzokande, bato mingi baumelaka te mpo na komituna soki Nzambe ya lolenge nini oyo akoki kopesa maladi ya nsɔ́mɔ epai na mwana oyo asali likambo te, kokamatáká ye na pwasa na mabɔkɔ ya baboti batutami na motema bobele mpo na komema ye kuna na likoló na liwa ya mbalakaka. Nzambe motindo yango azali mpenza na boyengebene, na bolingo, na motema mawa? Basusu kútu bamitunaka soki Nzambe motindo wana azali mpenza na mayele. Bamitunaka ete, mpo na nini Nzambe oyo azali na mayele akoki mpenza kobanda liboso na kotya milimo wana nyonso awa na mabelé bongo na nsima akamata yango kuna na likoló? Mbɛlɛ yango elingaki komonisa ete kozalisama ya mabelé ezalaki bobele mosala mpamba, boye te?​—Kokanisá na Deteronome 32:4; Nzembo 103:8; Yisaya 45:18; 1 Yoane 4:8.

Na bongo, emonani polele ete liteya ya kozanga kokufa ya molimo ya moto, ata soki yango eteyami na lolenge nini, ebimisaka mituna ya kobulunganisa, mpe ya bongolabongola. Mpo na nini? Mobulungano wana mingi mpenza ebimisami kobanda na biutelo ya liteya yango. Okozwa engɛngiseli mingi soki otaleli na mokuse biutelo yango; mpe okoki kokamwa na koyeba makambo oyo Biblia yango moko elobi na ntina na molimo. Ezali kopesa elikya kitoko mingi mpo na bomoi na nsima ya liwa, koleka oyo mangomba ya lokuta mazali koteya.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto