Lisolo ya bomoi
Namekamaki na minyoko makasi
YA PERICLES YANNOURIS
Nsolo mabe ya kasho epesaki ngai mbala moko malili na nzoto. Nafandaki kaka ngai moko, namifinikaki mwa bolangiti moko ya moke mpe nazalaki kokanisa lisusu ndenge oyo, mikolo mibale liboso, mwasi na ngai azalaki koyoka ata mawa moke te ntango basoda bakangaki ngai na ndako, atako natikaki ye ná bana mibale, mwasi ná mobali, oyo bazalaki kobɛla. Na nsima, mwasi na ngai, oyo azalaki Motatoli te, atindelaki ngai mwa liboke moko ná mokanda oyo akomaki ete: “Natindeli yo mikate oyo, mpe nazali kolikya ete yo mpe okobɛla lokola bana na yo.” Nakomona lisusu mwasi na ngai ná bana na ngai?
OYO ezali kaka moko ya bampasi oyo nabundaki na yango ntango molai mpo na kobatela kondima ya boklisto. Ezalaki mpenza etumba mpamba te bandeko na ngai moko bazalaki kosepela ata moke te; bato nyonso baboyaki ngai, nasambaki mbala ebele na batribinale mpe nanyokwamaki makasi mpenza. Kasi, ndenge nini mpe mpo na nini nakómaki na ezaleli ya kokangama na Nzambe tii kondima kokɔta na esika ya mpasi ndenge wana? Tiká nalimbolela bino.
Mwana mobola oyo azalaki na mikano ya mineneminene
Nabotamá na 1909 na Stavromeno, na Crète; ntango wana, bitumba, bobola mpe nzala ezalaki makasi na mboka yango. Mwa moke na nsima, ngai ná baleki na ngai minei tobikaki na maladi babengi grippe espagnole. Nazali koyeba lisusu ete baboti na ngai bazalaki kobomba biso na ndako, ntango mosusu na boumeli ya bapɔsɔ mpo tózwa maladi yango te.
Tata azalaki mosali-bilanga, alingaki makambo ya Nzambe mingi, kasi azalaki moto ya bindimandima te. Lokola afandaki na France mpe na Madagascar, ayebaki makanisi ya sika oyo ezalaki koteyama mpo na kobongola makambo na lingomba. Atako bongo, libota na biso mobimba etikalaki kaka na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce, mokolo ya lomingo nyonso tozalaki kokende na misa mpe episkɔpɔ azalaki kolala na ndako na biso soki ayei na parwasi na biso ndenge azalaki kosala mbala moko na mbula. Nazalaki koyemba na korale mpe mposa na ngai mpenza ezalaki ete nakóma sango.
Na 1929, nakɔtaki na mosala ya polisi. Ntango Tata akufaki, nazalaki na Tesaloniki, na nɔrdi ya Grèce esika batindaki ngai. Lokola nazalaki koluka libɔndisi mpe koyeba makambo ya elimo malamu, nasɛngaki bátinda ngai nakende kosala na biro ya bapolisi oyo ezalaki pene na monastɛrɛ ya Ngomba Athos, oyo baklisto ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse babengaka yango “ngomba mosantu.”a Nasalaki mosala ya polisi mbula minei kuna, mpe nazalaki komona malamumalamu ndenge oyo bomoi ezalaka na monastɛrɛ. Na esika ete bolingo na ngai mpo na Nzambe ebakisama, etamboli ya mbindo ya basango elɛmbisaki nde ngai nzoto. Kutu nayokaki mabe mpenza ntango archimandrite (mokonzi ya lingomba oyo alandi episkɔpɔ) moko oyo nazalaki komemya mingi asɛngaki ngai ete tósangisa nzoto. Atako namonaki makambo nyonso wana, kasi nazalaki kaka kolinga kosalela Nzambe mpe kokóma sango. Kutu nakangisaki fɔtɔ na sutani ya basango kaka mpo namitalaka. Nsukansuka, nazongaki na Crète.
“Azali Zabolo!”
Na 1942, nabalaki Frosini, mwasi moko kitoko oyo akolá na libota moko ya lokumu. Lokola libota ya mwasi na ngai emipesaki mingi na makambo ya losambo, yango ekolisaki lisusu mposa na ngai ya kokóma sango.b Nazalaki na mposa makasi ya kokende na Athènes mpo na kotánga na seminɛrɛ. Pene na nsuka ya mobu 1943, nakómaki mpenza na libongo ya Iráklion, na Crète, mpo nazwa masuwa, kasi nakendeki lisusu na Athènes te. Soki nakendeki lisusu te, ekoki kozala ete, kaka na ntango yango, namonaki esika mosusu oyo ezali kobɔndisa na elimo. Nini esalemaki?
Banda mwa bambula, Emmanuel Lionoudakis, elenge moko oyo azalaki kosakola na molende mpenza elongo na Batatoli ya Yehova, azalaki kotambola na Crète mobimba mpo na koteya solo ya Biblia oyo ezalaki kofungola bato miso.c Bato mosusu bazalaki kosepela na ndenge oyo Batatoli bazalaki kolimbola Liloba ya Nzambe mpe balongwaki na mangomba ya lokuta. Mwa etuluku ya Batatoli ya molende bazalaki na engumba Sitía, oyo ezalaki pene engumba na biso. Mpo na yango, episkɔpɔ ya mboka wana asilikaki makasi—mpamba te lokola afandá na États-Unis—ayebaki malamu ete Batatoli ya Yehova bazalaka makasi na kosakola. Yango wana, azwaki ekateli ya kosukisa “lipɛngwi” oyo ekɔtaki na mboka na ye. Ayokanaki na bapolisi, oyo bakómaki ntango nyonso kokanga Batatoli, kotya bango na bolɔkɔ, mpe kosambisa bango mpo na ebele ya bifundeli ya lokuta.
Moko ya Batatoli yango amekaki koteya ngai solo ya Biblia, kasi amonaki lokola ete nazalaki kosepela te. Yango wana atindaki mosakoli mosusu oyo ayebaki makambo mwa mingi koleka ye ete aya koteya ngai. Ntango Motatoli wana ya mibale ayaki, nayambaki malamu te, mpe ntango azongaki, akendaki koyebisa baninga na ye Batatoli ete: “Pericles akoki kokóma Motatoli te. Azali zabolo!”
Botɛmɛli ya liboso
Nazali na esengo ete Nzambe azalaki kotalela ngai lokola zabolo te. Na sanza ya Febwali 1945, ndeko na ngai ya mobali Demosthenes, oyo andimaki ete Batatoli ya Yehova bazalaki koteya solo, akabelaki ngai mwa buku Bóbɔndisa baoyo nyonso bazali kolela (na Lingelesi).d Makambo oyo natángaki na mokanda yango ekamwisaki ngai mingi mpenza. Tolongwaki mbala moko na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, tokómaki kosangana na mwa etuluku ya Batatoli oyo bazalaki na Sitía mpe tokómaki koteya bandeko na biso makambo ya sika oyo toyekolaki. Bango nyonso bandimaki solo ya Biblia. Ndenge kaka nakanisaki yango, mwasi na ngai mpe libota na ye basilikaki makasi ntango natikaki losambo ya lokuta mpe bazalaki kolinga ngai lisusu ata moke te. Kutu, na boumeli ya mwa mikolo, bokilo na ngai ya mobali azalaki lisusu kolobisa ngai te. Na ndako, ngai ná mwasi na ngai tozalaki lisusu koyokana te, ekómaki se matata mikolo nyonso. Atako bongo, na mokolo ya 21 Mai 1945, ngai ná Demosthenes tozwaki batisimo mpe Ndeko Minos Kokkinakis nde abatisaki biso.e
Nakokisaki mokano na ngai ya kokóma mosaleli ya solosolo ya Nzambe! Nabosanaka te mokolo ya liboso oyo nasakolaki ndako na ndako. Nazwaki bisi mpo na kokende na mwa mboka moko, nazalaki kaka ngai moko na mwa babuku 35. Na mwa nsɔni, nabandaki kosakola ndako na ndako. Nsima ya kosolola ná bato mwa mingi, kobanga mpe ebandaki kosila mokemoke. Kutu, ntango sango moko oyo asilikaki makasi ayaki kozwa ngai mpo akende na ngai na biro ya bapolisi, natɛlɛmaki na mpiko nyonso liboso na ye mpe kozanga kobanga naboyaki kokende na ye elongo. Nayebisaki ye ete nakolongwa na mboka wana kaka soki natali bato nyonso mpe ezali yango nde nasalaki. Nazalaki na esengo mingi, nazelaki lisusu ata bisi te kasi natambolaki kilomɛtrɛ zomi na makolo tii na ndako.
Bato ya mobulu bakangi ngai
Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1945, bapesaki ngai mikumba mosusu na lisangá na biso oyo esalemaki sika na Sitía. Eumelaki te bitumba ebandaki na Grèce. Bituluku ndenge na ndenge bazalaki koyinana makasi. Na kati ya mobulu wana, episkɔpɔ ayokanaki na etuluku moko ya bato oyo bazalaki kobimisa mobulu ete bákanga Batatoli mpe básala bango ndenge nyonso oyo bakomona malamu. (Yoane 16:2) Bato yango ya mobulu bamataki bisi moko ná mwasi moko ya motema malamu oyo ayokaki makambo oyo bazalaki kokana kosala biso mpo na kokokisa “mokumba oyo Nzambe apesaki bango,” mwasi yango ayaki kokebisa biso. Tomibombaki, mpe ndeko na biso moko abikisaki biso. Tobikaki na liwa.
Yango ezalaki ebandeli ya minyoko oyo ekómaki makasi na nsima. Mokolo na mokolo bakómaki kobɛta mpe kokanela biso. Banguna bazalaki kotinda biso na makasi ete tózonga na lingomba, tókulisaka bana na biso batisimo mpe tósalaka elembo ya ekulusu. Mokolo mosusu, babɛtaki ndeko na ngai ya mobali makasi tii ntango bakanisaki ete akufi nde batikaki ye. Esalaki ngai mpasi makasi ntango namonaki bazali kopasola bandeko na ngai ya basi bilamba mpe kobɛta bango. Kaka na ntango moko wana, lingomba ekulisaki bana mwambe ya Batatoli ya Yehova batisimo na makasi.
Na 1949, mama na ngai akufaki. Sango akómaki lisusu kotungisa biso, afundaki biso ete tozwaki mokanda ya Leta te mpo na kokunda ebembe. Nasambaki na tribinale mpe nalongaki. Ezalaki mpenza litatoli monene mpamba te bato nyonso bayokaki nkombo ya Yehova na maloba ya ebandeli liboso bábanda kosambisa ngai. Banguna batikalaki se na likambo moko oyo bakokaki lisusu kosala mpo “bázongisa biso na nzela” ndenge bazalaki koloba, ezalaki kaka kokanga biso mpe kotinda biso na mboka mopaya. Ezali yango nde basalaki na Aprili 1949.
Minyoko ya nsɔmɔ mpenza
Bakangaki biso bandeko misato. Mwasi na ngai ayaki ata kotala ngai te na kasho ya bapolisi esika batyaki biso. Batindaki biso liboso na bolɔkɔ ya Iráklion. Lokola nalobaki na ebandeli, nazalaki komiyoka kaka ngai moko mpe nakómaki mawamawa. Natikaki bana mibale na mwasi oyo azalaki Motatoli te. Nabondelaki Yehova makasi ete asunga ngai. Maloba ya Nzambe lokola oyo ezali na Baebele 13:5 eyelaki ngai na makanisi: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” Namonaki ete kotyela Yehova motema na ngai mobimba ezali nzela ya bwanya.—Masese 3:5.
Bayebisaki biso ete bakotinda biso na Makrónisos, mwa esanga moko ya moke oyo etalani na boluka ya etúká ya Attique, na Grèce. Nkombo mpamba Makrónisos ebandaki kobangisa moto nyonso mpamba te na bolɔkɔ yango bazalaki konyokola bato makasi mpe kosalisa bango misala lokola banyama. Ntango tozalaki kokende na bolɔkɔ, totɛlɛmaki mwa moke na nzela, na Pirée. Atako bakangaki biso mabɔkɔ na minyɔlɔlɔ, tolendisamaki makasi ntango bandeko mosusu bakɔtaki na masuwa mpo na koyamba biso.—Misala 28:14, 15.
Bomoi na Makrónisos ezalaki nsuka ya mpasi. Basoda bazalaki konyokola bato ya bolɔkɔ banda na ntɔngɔ tii na butu. Bato mingi oyo bazalaki Batatoli te bakómaki lokola na ligboma, bamosusu bakufaki mpe mingi babebaki binama mosusu ya nzoto. Na butu, tozalaki koyoka ndenge bato oyo bazalaki konyokwama bazalaki koganga na kolela. Mwa bolangiti na ngai ezalaki kobatela ngai kaka moke na malili makasi ya butu.
Mokemoke, bato bakómaki koyeba Batatoli ya Yehova malamu, mpamba te bazalaki kobenga biso bongo ntɔngɔ nyonso ntango bazalaki kobenga bankombo. Na ndenge yango, epesaki biso nzela ya kopesa bango litatoli. Kutu, nazwaki libaku malamu ya kobatisa moto moko oyo akɔtaki bolɔkɔ mpo na makambo ya politiki; akolaki na elimo mpe amonisaki mposa ya komipesa na Yehova.
Na bolɔkɔ oyo batindaki biso na esanga moko ya mosika, nazalaki ntango nyonso kokomela mwasi na ngai, kasi ye azalaki kokomela ngai te. Atako bongo, nazalaki ntango nyonso kokomela ye maloba ya boboto, nazalaki kolendisa ye mpe komonisa ye ete yango ezali kaka mpasi ya mwa ntango mpe ete tokozala lisusu na bomoi ya esengo.
Na ntango yango, tokómaki ebele mpamba te bakangaki bandeko mosusu mpe batindaki bango na bolɔkɔ oyo tozalaki. Lokola nazalaki kosala na biro, namesanaki na kolonele oyo azalaki mokonzi ya bolɔkɔ. Lokola azalaki kopesa Batatoli limemya, mokolo mosusu nabwakaki kobanga nyonso mpe natunaki ye soki bandeko oyo bazali na biro na biso na Athènes bakoki kotindela biso mwa mikanda. Alobaki ete, “Ekoki kosalema te; kasi bandeko na bino bakoki te kotya mikanda yango na kati ya biloko na bino, bákoma nkombo na ngai mpe bátindela ngai yango?” Natikalaki wana monɔkɔ polele! Mwa mikolo na nsima, ntango tozalaki kokitisa biloko na masuwa moko oyo eyaki, polisi moko ayaki pene na kolonele, apesaki ye losako mpe ayebisaki ye ete: “Mokonzi, biloko na yo eyei.” Kolonele atunaki ye, “Biloko nini?” Napusanaki penepene mpo na koyoka lisolo yango mpe nayebisaki ye na mongongo ya nse ete: “Ekoki mbala mosusu kozala liboke na biso oyo batindi na nkombo na yo ndenge olobaki.” Wana ezalaki moko ya banzela oyo Yehova asalelaki mpo na koleisa biso na elimo.
Nazwi mapamboli oyo nakanisaki te, nazwi mpe minyoko mosusu
Na nsuka ya mobu 1950, babimisaki ngai na bolɔkɔ. Nazongaki epai na ngai nalɛmbá mpenza, nzoto ebebá, mpe nakɔndá makasi; nayebaki kutu te soki bakoyamba ngai ndenge nini. Nazalaki na esengo mingi ya komona lisusu mwasi na ngai ná bana! Kasi, likambo ya esengo koleka ezalaki ete Frosini azalaki lisusu kotɛmɛla ngai lokola liboso te. Mikanda oyo nazalaki kokomela ye ebotaki mbuma. Mpiko mpe molende na ngai esimbaki mpenza motema ya Frosini. Na nsima, nasololaki na ye ntango molai mpo na kokitisa ye motema. Andimaki koyekola Biblia mpe akómaki kondima Yehova mpe bilaka na ye. Moko na mikolo oyo esepelisaka ngai mingi na bomoi, ezalaki na 1952, mokolo oyo nabatisaki mwasi na ngai na mai mpe akómaki mosaleli ya Yehova.
Na 1955, tosalaki kampanye ya kokabola mwa buku Boklisto ya nkombo mpamba to boklisto ya solo—Wapi oyo ezali “pole ya mokili”? (na Lingelesi). Bakangaki ngai mpe bafundaki ngai na tribinale elongo na Batatoli mosusu. Lokola Batatoli ya Yehova oyo bafundamaki bakómaki ebele, tribinale ezwaki ebongiseli ya kosangisa bango nyonso básamba mokolo moko. Mokolo yango, bazuzi nyonso ya etúká bayaki mpe basango batondaki mɛkɛ na tribinale. Episkɔpɔ azalaki na nkanda makasi mpe azalaki kotambolatambola na kati ya tribinale. Sango moko afundaki ngai ete nalukaki kolongola ye na lingomba na ye na makasi mpo akɔta na lingomba na biso. Zuzi atunaki ye ete: “Kondima na yo ezali mpenza moke na boye ete kotánga kaka mwa buku moko ekoki kolongola yo na lingomba na yo?” Sango yango azangaki maloba. Batikaki ngai, kasi bakatelaki bandeko mosusu bolɔkɔ ya sanza motoba.
Na bambula oyo elandaki, bazalaki kokanga biso mbala na mbala mpe bafundaki biso na tribinale mbala ebele. Lokola tozalaki kosamba mingi, baavoka na biso bazalaki kopema te. Na nyonso, nasambaki na tribinale mbala 17. Atako botɛmɛli ezalaki, tozalaki ntango nyonso kosakola. Tondimaki bampasi nyonso wana na esengo mpe minyoko yango ebakisaki kondima na biso mpe ekómisaki yango makasi.—Yakobo 1:2, 3.
Mikumba mpe mikakatano ya sika
Na 1957 tokendaki kofanda na Athènes. Mwa moke na nsima, baponaki ngai nakende kosalisa lisangá moko oyo eutaki kosalema. Na lisalisi ya mwasi na ngai, tolukaki kozala na bomoi oyo ezali na mindɔndɔ te mpe tozalaki ntango nyonso kotya makambo ya elimo na esika ya liboso. Yango epesaki biso nzela ya kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola. Bazalaki kotinda biso na masangá oyo ezalaki na mposa ya lisalisi.
Na 1963, mwana na ngai ya mobali akokisaki mbula 21 mpe bakangaki ye mpo akɔta na mosala ya soda. Lokola bilenge Batatoli baboyaki kokɔta na mosala ya soda mpo básangana na makambo ya politiki te, banyokolaki bango, babɛtaki bango makasi mpe basambwisaki bango. Mwana na ngai mpe azalaki na kati na bango. Yango wana napesaki ye bolangiti na ngai ya moke oyo nautaká na yango na Makrónisos mpo na kolendisa ye ete alanda ndakisa ya baoyo banyokwamaki liboso na ye mpe batikalaki sembo. Bandeko oyo bazalaki kosɛnga bango ete bákɔta mosala ya soda, soki baboyi, bazalaki kosambisa bango na tribinale ya basoda mpe mbala mingi bazalaki kokatela bango etumbu ya bolɔkɔ kobanda mbula mibale tii mbula minei. Ntango babimisaki bango, babengaki bango lisusu mpo bakɔta na mosala ya soda mpe basambisaki bango lisusu. Lokola nazalaki ministre ya makambo ya nzambe, nazalaki na likoki ya kokɔta na babolɔkɔ mingi mpe kosolola moke na mwana na ngai mpe Batatoli mosusu ya sembo. Mwana na ngai asalaki mbula koleka motoba na bolɔkɔ.
Yehova asungaki biso
Ntango bakonzi ya ekólo Grèce batikaki kopekisa misala ya mangomba, batindaki ngai mobongisi-nzela monene na esanga ya Rhodes. Na nsima, mposa ya basakoli ezalaki makasi na Sitía, na Crète epai nabandaki mosala na ngai ya boklisto. Nandimaki na esengo nyonso kokende lisusu kosala elongo na baninga na ngai baklisto oyo nayebaki banda na bolenge na ngai.
Lelo oyo, na libota na ngai, nazali nkɔkɔ oyo aleki mokóló, nazali na esengo mpenza ya komona bandeko 70 ya libota na ngai bazali kosalela Yehova na bosembo. Mpe motuya yango ezali se kobakisama. Mingi bazali bankulutu na masangá, basaleli na misala, babongisi-nzela, bamosusu bazali kosala na Betele mpe bamosusu bazali bakɛngɛli-batamboli. Ekómi mbula koleka 58, kondima na ngai emekamaki na minyoko ya nsɔmɔ mpenza. Sikoyo, nazali na mbula 93 mpe soki nazongisi makanisi nsima, nayokaka mawa ata moke te ndenge nasalelaki Nzambe. Apesaki ngai makasi ya kondima mpe kotosa maloba na ye ya boboto ete: “Mwana na ngai, pesá ngai motema na yo; tiká ete miso na yo etala nzela na ngai.”—Masese 23:26.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Desɛmbɛ 1999, nkasa 30-31.
b Na Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse, epekisami te ete sango abala.
c Mpo na koyeba lisolo ya bomoi ya Emmanuel Lionoudakis, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1999, nkasa 25-29.
d Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova kasi sikoyo ebimaka lisusu te.
e Lisolo ya Minos Kokkinakis mpe ndenge oyo alongaki na batribinale ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1993, nkasa 27-31.
[Etanda na lokasa 27]
Makrónisos—Esanga ya nsɔmɔ
Banda 1947 kino 1957, elingi koloba na boumeli ya mbula 10, bato ya bolɔkɔ koleka 100 000 batindamaki na esanga ya Makrónisos. Kati na bango, ebele ya Batatoli ya sembo bakangamaki mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki. Mbala mingi ezalaki bakonzi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Grèce nde bazalaki kokosela Batatoli makambo ete bazali Bakoministe.
Na likambo etali “kosembola” oyo bazalaki kosembola bato na Makrónisos, buku moko (Papyros Larousse Britannica) elobi boye: “Konyokola bato, . . . makambo oyo ekoki kondimama ata na ekólo moko te oyo ebatelaka ntomo ya moto, makambo mabe oyo bakɛngɛli bazalaki kosala bato ya bolɔkɔ . . . ezali nsɔni mpenza na lisolo ya Grèce.”
Bayebisaki Batatoli mosusu ete bakotika bango kaka soki balongwe na lingomba wana. Atako bongo, Batatoli batikalaki sembo. Lisusu, bato mosusu oyo bakɔtaki bolɔkɔ mpo na makambo ya politiki bandimaki solo ya Biblia lokola bazalaki esika moko ná Batatoli.
[Elilingi na lokasa 27]
Minos Kokkinakis (moto ya misato banda na lobɔkɔ ya mobali) mpe ngai (moto ya minei banda na lobɔkɔ ya mwasi) na esanga ya Makrónisos
[Elilingi na lokasa 29]
Nazali kosala elongo na Motatoli mosusu Sitía, na Crète, epai nasalaki na bolenge na ngai