Mpo na nini tosengeli kopesa na Yehova?
WANA moi ezalaki kokita na engumba moke Salepata oyo ezali na Sidona, mwasi moko mokufeli-mobali agumbamaki kolɔkɔta nkoni. Azalaki na mposa ya kopelisa mɔ́tɔ mpo na kolamba mwa bilei moke—mbala mosusu bilei ya nsuka oyo ye mpe mwana na ye ya mobali bakokaki kolya. Asalaki milende na komibatela ye moko mpe kobatela mwana na ye ya mobali na bomoi na boumeli ya ntango molai ya elanga mpe ya nzala, mpe esukaki na ezalela oyo ya mpasi. Bazalaki na nzala.
Mobali moko akómaki epai na bango. Nkombo na ye ezalaki Eliya, mpe nokinoki mwasi yango mokufeli-mobali amonaki ete azalaki mosakoli ya Yehova. Emonani ete asilaki koyoka nsango na ntina na Nzambe yango. Yehova akesanaki na Baala, oyo azalaki mobomi, losambo na ye ya mbindo lopanzanaki mingi na mokili ya Sidona. Na bongo ntango Eliya asɛngaki ye mai ya komɛla, andimaki mpenza kopesa ye. Mbala mosusu akanisaki ete na kosaláká bongo akokaki kondimama na Yehova. (Matai 10:41, 42) Kasi na nsima Eliya asɛngaki lisusu—mwa eloko ya kolya. Alimbwelaki ye ete azalaki bobele na biloko moke ekoki mpo na bilei ya nsuka. Nzokande Eliya alendendelaki, kondimisáká ye ete Yehova akopesa ye bilei na lolenge ya likamwisi kino eleko ya elanga ekosila. Asalaki nini? Biblia elobi ete: “Akendaki mpe asalaki lokola elobaki Eliya.” (1 Mikonzi 17:10-15) Mwa maloba yango moke mazalaki komonisa ekela moko ya kondima monene—monene mpenza, na boye ete Yesu Klisto akumisaki mwasi-mokufeli-mobali yango soko bambula nkóto na nsima!—Luka 4:25, 26.
Ata bongo, ekoki komonana lokola likambo ya kokamwa ete Yehova asɛnga mingi epai na mwasi moko mobóla. Yango ezali bongo mingimingi soki totaleli libondeli oyo lisalemaki na moto moko ya lokumu mpenza. Kokɔngɔlama ya makabo oyo esalemaki na ntango ya Mokonzi Davidi mpo na mwana na ye ya mobali Salomo mpo na kosalelama na botongi ya tempelo epusaki bato na komonisa elimo monene ya kokaba. Na mikolo na biso, makabo oyo mapesamaki mazalaki na motuya ya bamiliare ya badolare. Nzokande, kati na libondeli, Davidi alobaki ete: “Kasi ngai nani mpe bato na ngai nini ete tókoka kopesa yo eloko na mitema nyonso na lolenge oyo? Zambi biloko nyonso ikoutaka na yo mpe topesi yo bobele biloko na yo moko.” (1 Ntango 29:14) Lokola Davidi alobaki yango, biloko nyonso ezali ya Yehova. Na bongo ezala eloko nini tozali kopesa mpo na kotombola losambo ya pɛto, tozali bobele kozongisela Yehova biloko na ye. (Nzembo 50:10) Na yango, motuna oyo mozali kobima: Mpo na nini Yehova alingi ete biso tóbanda kopesa ye liboso?
Eteni moko ya ntina ya losambo ya solo
Eyano ya pɛtɛɛ ezali oyo ete kobanda na ntango ya kala Yehova asili kosala ete makabo ezala eteni moko ya losambo ya pɛto. Abele, moto na sembo apesaki mbeka ya bitonga na ye ya kitoko epai na Yehova. Batata ya mabota Noa, Abalayama, Yisaka, Yakobo mpe Yobo bapesaki mpe makabo lolenge yango.—Genese 4:4; 8:20; 12:7; 26:25; 31:54; Yobo 1:5.
Mibeko ya Mose mizalaki kosɛnga mpe ata kosɛngisa kopesama ya makabo mpo na Yehova. Na ndakisa, Bayisalaele nyonso basengelaki kopesa dime, to yoko ya zomi ya milóna na bango mpe yoko ya zomi ya bitonga na bango. (Mituya 18:25-28) Makabo mosusu masɛngamaki mbala na mbala te. Na ndakisa, Moyisalaele mokomoko asɛngamaki kopesa na Yehova mbuma ya liboso ya bitonga na ye mpe ya milóna na ye. (Exode 22:29, 30; 23:19) Nzokande, Mobeko epesaki nzela na moto mokomoko apesa mbuma ya milóna na meko oyo ye moko alingi, wana apesaki oyo eleki malamu. Mobeko mpe epesamaki mpo na matɔ́ndi mpe makabo ya ndai, oyo ezalaki nyonso ya bolingo malamu. (Levitike 7:15, 16) Yehova alendisaki bato na ye ete bápesaka na meko oyo azalaki kopambola bango. (Deteronome 16:17) Lokola yango esalemaki na ntango ya kotonga mongombo mpe na nsima na ntango ya kotonga tempelo, moto na moto apesaki oyo motema na ye epusaki ye ete apesa. (Exode 35:21; 1 Ntango 29:9) Ya solo, makabo ya bolingo malamu motindo wana mazalaki kosepelisa Yehova mingi!
Na nsé na “mobeko ya Klisto,” makabo nyonso masengelaki kozala ya bolingo malamu. (Bagalatia 6:2; 2 Bakolinti 9:7) Yango elingaki koloba te ete bayekoli ya Klisto batikaki kopesa makabo to bazalaki kopesa moke. Bongo te! Wana Yesu mpe bantoma na ye bazalaki kosakola nsango malamu na Yisalaele, etuluku moko ya basi bazalaki kolanda bango mpe bazalaki kosunga bango na biloko bizalaki na bango. (Luka 8:1-3) Bobele bongo ntoma Paulo azwaki makabo oyo masungaki mosala na ye ya misionere, mpe ye alendisaki masangá mosusu ete mápesa mosolo mpo na basusu na ntango mposa emonani. (2 Bakolinti 8:14; Bafilipi 1:3-5) Lisangani ya mikolo-bakambi na Yelusaleme batyaki mibali mpo na kondimisama ete biloko oyo biutaki na makabo bikabolamaki epai na baoyo bazalaki na bosɛnga. (Misala 6:2-4) Ezali polele ete baklisto ya liboso bamonaki yango lokola libaku malamu mpo na kosunga losambo ya pɛto na lolenge wana.
Nzokande, tokoki komituna mpo na nini Yehova asali ete makabo ezala eteni moko ya losambo na ye. Tótalela bantina minei.
Bantina oyo topesaka makabo
Ntina ya liboso ezali ete, Yehova asali ete makabo ezala eteni moko ya losambo ya solo mpamba te kosala bongo ezali malamu mpo na biso. Ezali komonisa motuya oyo tozali kopesa na motema boboto ya Yehova. Na ndakisa, soki mwana apesi likabo moko epai na moboti na ye, mpo na nini moboti asepelaka? Elingi koloba ete likabo yango ekokisi mposa oyo na lolenge moko to mosusu moboti akokaki kokokisa yango ye moko te? Ezali mpenza bongo te. Nzokande, moboti azali na esengo na komona mwana na ye lolenge azali kokólisa motuya mpe elimo ya bokabi. Mpo na bantina motindo yango Yehova azali kolendisa biso ete tópesaka makabo mpe asepelaka soki tozali kosala bongo. Yango ezali lolenge oyo tozali komonisa ye ete topesaka motuya na boboto na ye monene mpe na bokabi na ye epai na biso. Azali mopesi na “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi,” na bongo tokoki soko moke te kozanga bantina ya kopesa ye matɔ́ndi. (Yakobo 1:17) Koleka nyonso, Yehova asilaki kopesa Mwana na ye molingami, kopesáká nzela ete akufa mpo ete tókoka kozala na bomoi ya seko. (Yoane 3:16) Tokoki solo kopesa ye matɔ́ndi koleka, boye te?
Ntina ya mibale, soki tozali na momeseno ya kopesa makabo, na yango tozali komekola Yehova mpe Mwana na ye, Yesu Klisto na likambo moko oyo eleki ntina. Yehova azali ntango nyonso na elimo ya bokabi, azali kokabela biso mbala na mbala. Lokola Biblia elobi yango, azali kopesa biso “bomoi, na mpema, na biloko nyonso.” (Misala 17:25) Tokoki na lolenge lobongi kopesa ye matɔ́ndi mpo na mpema nyonso oyo tozali kopema, biloko nyonso tozali kolya, ntango nyonso ya kosepela mpe ya esengo oyo tozali kozwa kati na bomoi. (Misala 14:17) Lokola Tata na ye, Yesu amonisaki elimo ya bokabi. Amipesaki ye moko na motema mobimba. Oyebaki ete ntango Yesu azalaki kosala makamwisi, abungisaki mwa eloko mosusu na nzoto na ye moko? Koleka mbala moko Makomami mazali koyebisa biso ete ntango abikisaki bato ya maladi, nguya ‘ebimaki longwa na ye.’ (Luka 6:19; 8:45, 46) Yesu azalaki mpenza mokabi na boye ete apesaki kútu molimo na ye moko, bomoi na ye, kino na liwa mpenza.—Yisaya 53:12.
Na bongo, wana tozali kopesa, ezala ntango na biso, nguya na biso, to biloko na biso, tozali komekola Yehova mpe kosepelisa motema na ye. (Masese 27:11; Efese 5:1) Tozali mpe kolanda ndakisa ya kokoka ya etamboli malamu oyo Yesu Klisto atikelaki biso.—1 Petelo 2:21.
Ntina ya misato, kopesa makabo ezali kokokisa bamposa ya ntina mpenza. Ya solo, Yehova akokaki mpenza kokokisa bamposa ya matomba ya Bokonzi kozanga lisungi na biso, motindo moko akoki kobongisa na boye ete mabanga máganga na esika ete asalela biso mpo na kosakola liloba. (Luka 19:40) Kasi aponi kopesa biso lokumu na mabaku yango kitoko. Na yango soki tozali kopesa biloko na biso mpo na kotombola matomba ya Bokonzi, tozali na bosepeli mingi ya koyeba ete tozali kosangana na mosala ya ntina monene oyo mozali kokóba na mokili oyo.—Matai 24:14.
Ezali mpenza polele ete esengeli mosolo mpo na kosunga mosala ya Batatoli ya Yehova oyo mozali kosalema na mokili mobimba. Na boumeli ya mobu ya mosala 1995, la Société abimisaki mosolo pene na badolare 60 milió bobele mpo na kosunga babongisi-nzela monene, bamisionere, mpe bakɛngɛli-batamboli kati na bisika na bango ya mosala ya kosakola. Nzokande, wana ezali mpenza motuya ya mosolo moke soki tokokanisi yango na mosolo oyo mozali kobima mpo na mosala ya botongi mpe misala oyo mizali kosalema na bafiliale mpe bandako ya binyateli mikanda kati na mokili mobimba. Kasi nyonso oyo esalemaka na lisalisi ya makabo ya bolingo malamu!
Basaleli ya Yehova bamilobaka te ete soki bango moko bazali mpenza na makoki te, bakoki bobele kotika ete basusu bámema mokumba. Ezaleli motindo wana ekoki kosala ete tózanga kozwa litomba na eteni wana ya losambo. Engebene ntoma Paulo, baklisto na Makɛdɔnia bazalaki “kati na bobóla mpenza.” Nzokande, balɔmbi na etingya ete bápesa bango nzela ya kopesa makabo. Paulo amonisi ete oyo bapesaki ezalaki “kino nsuka na nguya na bango mpe na koleka”!—2 Bakolinti 8:1-4.
Ntina ya minei, Yehova asali ete kopesa makabo ezala eteni moko ya losambo ya solo mpamba te kopesa ekosalisa biso ete tózala na esengo. Yesu ye moko alobaki ete: “Esengo na kopesa eleki esengo na kozwa.” (Misala 20:35) Yango ezali lolenge Yehova asalaki biso. Ezali mpe na ntina mosusu mpo na yango tokoki kokanisa ete ezala oyo tozali kopesa na ye, tokoki soko moke te kofuta botɔ́ndi oyo tozalaka na yango kati na mitema na biso mpo na ye. Likambo ya esengo, Yehova amizelaka te ete tópesa koleka makoki na biso. Tokoki kondimisama ete asepelaka ntango tozali kopesa na esengo nyonso engebene makoki na biso!—2 Bakolinti 8:12; 9:7.
Komonisa elimo ya bokabi ememaka mapamboli
Soki tozongi na ndakisa oyo topesaki na ebandeli ya lisoló, kanisá naino soki mwasi-mokufeli-mobali ya mboka Salepata amilobaki ete moto mosusu nde akokokisa mposa ya Eliya mpo na molei. Oyo nde lipamboli akokaki kozanga!
Ntembe ezali te ete Yehova apambolaka baoyo bazali komonisa elimo ya bokabi. (Masese 11:25) Mwasi-mokufeli-mobali ya mboka Salepata amonaki mpasi te mpo na kotika oyo akanisaki ete ezalaki molei ya nsuka. Yehova apesaki ye mbano na likamwisi. Lokola Eliya alakaki yango, ekɔlɔ́ na ye ya falíni mpe molangi na ye ya mafuta esilaki te kino eleko ya elanga elekaki. Kasi azwaki kútu lipamboli monene koleka. Ntango mwana na ye ya mobali abɛlaki mpe na nsima akufaki, Eliya, mosaleli na Nzambe ya solo, abikisaki ye. Yango elendisaki ye mpenza na elimo!—1 Mikonzi 17:16-24.
Lelo oyo tozali komizela te ete tópambolama na lolenge ya makamwisi. (1 Bakolinti 13:8) Kasi Yehova azali kondimisa biso ete akosunga baoyo bazali kosalela ye na molimo na bango mobimba. (Matai 6:33) Na bongo tokoki kozala lokola mwasi-mokufeli-mobali ya mboka Salepata, na lolenge wana ya kopesa na bolingi nyonso, komindimisáká ete Yehova akomibanzabanzaka mpo na biso. Bobele bongo, tokoki kozwa mbano monene ya elimo. Soki kopesa makabo ezali eteni moko ya makambo na biso oyo tosalaka mbala na mbala, na esika ete ezala ya mbalakaka, to likambo ya kopusama na ntango moko boye, ekosalisa biso ete tózala ntango nyonso na liso ya pɛtɛɛ mpe komipesa na matomba ya elimo, lokola Yesu alakaki yango. (Luka 11:34; kokanisá na 1 Bakolinti 16:1, 2.) Ekosalisa mpe biso na komiyoka ete tozali pene na Yehova mpe Yesu lokola baninga na bango ya mosala. (1 Bakolinti 3:9) Mpe ekokólisa elimo ya bokabi oyo ntango nyonso ezalaka elembeteli ya basaleli ya Yehova kati na mokili mobimba.
[Etanda na lokasa 31]
LOLENGE BASUSU BAZALI KOPESA MAKABO
MAKABO MPO NA KOSIMBA MOSALA YA MOKILI MOBIMBA
Bandeko mingi bazali kobomba mwa mosolo to bazali kokɔtisa kati na ebongiseli na bango mwa mosolo oyo bazali kotya yango na sanduku ya makabo oyo ezali na likomi: “Makabo mpo na mosala ya la Société na mokili mobimba—Matai 24:14.” Sanza na sanza masangá mazali kotinda mbongo oyo ezwami na sanduku yango na biro ya la société na Brooklyn, New York, to na biro ya filiale oyo ezali penepene.
Makabo ya bolingo malamu makoki kotindama mbala moko na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na filiale ya la Société na mokili na bino. Okoki mpe kopesa biloko ya paúni to biloko mosusu ya motuya. Mokanda moko ya mokuse mosengeli kokende nzela moko na makabo nyonso mpo na komonisa ete ezali makabo ya bolingo malamu.
MAKABO OYO MAKOKI KOZONGISAMA
Okoki kopesa Watch Tower Society mbongo, oyo ekoki kobatelama kino liwa ya mopesi, oyo akoki komibombela lotómo ya kozwa yango lisusu soki akómi na bosɛnga. Mpo na koyeba makambo mosusu, sololá na Treasurer’s Office na adrɛsi oyo etyami likoló.
MAKABO MAKANAMI
Longola makabo ya mosolo mpe mosolo oyo mopesami lokola nyongo, ezali mpe na myango mosusu ya kopesa makabo mpo na matomba ya mosala ya Bokonzi oyo mozali kosalema na mokili mobimba. Yango ezali bongo:
Assurance: Watch Tower Society ekoki kofutamela assurance to kozwa litomba na mosolo ya pension. Soki ezali bongo, ebongi koyebisa na la Société.
Mosolo na bánki: Na mikili mosusu, nimero ya kɔnti na bánki, mosolo oyo mobombami mpe mosolo ya epaso oyo mobombami mokoki kofungwama mpo na Watch Tower Society to kotyama na nkombo ya Watch Tower Society na kufa ya moto yango. Soki ezali bongo, ebongi koyebisa la Société.
Lotómo ya mosolo: Lotómo ya mosolo ekoki kopesamela Watch Tower Society na lolenge ya makabo ya libela to na kobateláká makoki ya kozwa mosolo yango naino ozali na bomoi.
Mapango to ndako: Mapango, ndako to biloko mosusu oyo ekoki kotekama ekoki kopesama na Watch Tower Society, mokabi akoki kopesa yango libela, to akoki kobatela lotómo ya kofanda kati na yango naino azali na bomoi. Liboso na kopesa biloko nyonso na la Société, esengeli koyebisa ye yango.
Mokanda ya kopesa libula: Biloko to ndako to mosolo ekoki kopesama na Watch Tower Society na mokanda ya kozwa libula oyo mondimami na mibeko, to tokoki kopesa na la Société lotómo ya kozwa biloko oyo totiki. Biloko oyo bitikami mpo na mangomba bikokitisamaka mpako epai na ye oyo apesameli yango. Kopi moko ya mokanda ya kozwa libula to ya boyokani ya kozwa biloko esengeli kotindama na la Société.
Baoyo basepeli na bibongiseli oyo mpo na kopesa makabo bakoki kosolola na Planned Giving Desk (Biro ya makabo makanami) na adrɛsi oyo etyami awa na nsé to na filiale ya la Société oyo ezali na mboka oyo bofandi. Biro ya makabo makanami esengeli kozwa kopi to mikanda misengeli mpo na bibongiseli yango.
La Société asili kobongisa mwa búku moko ezali na motó na likambo Planned Giving (Makabo makanami). Baoyo bazali na États-Unis mpe bazali kokana kopesa likabo ya sikisiki epai na la Société sikawa to kotika libula nsima ya liwa, mayebisi wana makoki kozala na ntina mingi mpo na bango. Yango ezali bongo malamu soki balingi kokokisa mokano moko kati na libota to kokana kotekisa ndako wana bazali kosalela matomba ya mpako oyo ekitisami na motuya ya likabo to libula. Mwa búku yango ekoki kopesama soki osɛngi yango, ezala na nkomá to na telefone.
PLANNED GIVING DESK
Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
100 Watchtower Drive, Patterson, New York 12563-9204
Telephone: (914) 878-7000