Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/12 nk. 19-24
  • Bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tósala makasi mpo “tókoka mpenza”
  • Bondeláká mpo na kosɛnga kondima makasi
  • Epafala: “Mosáli ya sembo mpo na Klisto”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tósalisa basusu ete bátambola na ndenge oyo ebongi na Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mateya oyo eyei na ntango ebongi mpo na kosunga bilenge
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Komonisa ete ozali mpenza kondima makambo ozali koloba
    Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/12 nk. 19-24

Bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi

“[Azali] ntango nyonso kobunda mpo na bino na mabondeli na ye, ete nsukansuka bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.”—BAKOLOSE 4:12, NW.

1, 2. (a) Bato oyo bazalaki baklisto te bamonaki nini epai ya baklisto ya liboso? (b) Ndenge nini mokanda ya Bakolose ezali komonisa bolingo yango?

BAYEKOLI ya Yesu bazalaki mpenza komibanzabanza mpo na bandeko na bango bandimi. Tertullien (mokomi moko oyo azalaki na bomoi na ekeke ya mibale mpe ya misato T.B.) alobaki ete bazalaki komonisela bitike, babola na mibange boboto. Makambo wana oyo emonisaki ete bazalaki mpenza na bolingo ezalaki kokamwisa bato oyo bazalaki bandimi te; yango wana, bato mosusu bazalaki koloba mpo na baklisto ete, ‘Talá ndenge balingani.’

2 Mokanda ya Bakolose ezali komonisa ete ntoma Paulo na moninga na ye Epafala bazalaki na bolingo ya ndenge yango mpo na bandeko ya Kolose. Paulo akomelaki bango boye: Epafala azali “ntango nyonso kobunda makasi mpo na bino na mabondeli na ye, ete nsukansuka bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.” Na 2001, mokapo ya mobu mpo na Batatoli ya Yehova ekozala maloba yango ya Bakolose 4:12 ete: “Bózala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.”

3. Wapi makambo mibale oyo Epafala azalaki kobondela mpo na yango?

3 Omoni ete Epafala azalaki kobondela mpo na bandeko na ye mpo na makambo mibale: (1) ete “nsukansuka bázala bato oyo bakoki mpenza” mpe (2) ete bázala “na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.” Makambo yango ekomamaki na kati ya Makomami mpo na bolamu na biso. Yango wana, omituna motuna oyo: ‘Nasengeli kosala nini mpo ete nsukansuka nazala moto oyo akoki mpenza mpe oyo azali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe? Mpe ntango nazali kosala yango, ekobota mbuma nini?’ Tótalela yango.

Tósala makasi mpo “tókoka mpenza”

4. Na ndimbola nini Bakolose basengelaki kozala ‘bato oyo bakoki mpenza’?

4 Epafala azalaki na mposa mpenza ete bandeko na ye ya elimo na Kolose ‘nsukansuka bázala bato oyo bakoki mpenza.’ Liloba oyo Paulo asalelaki, oyo ebongolami awa na ‘kokoka mpenza,’ ekoki kolimbola kobonga, kokola mpenza to kokɔmela. (Matai 19:21; Baebele 5:14; Yakobo 1:4, 25) Na ntembe te oyebi malamu ete soki moto akómi Motatoli ya Yehova oyo azwi batisimo, yango elimboli te ete azali moklisto oyo akɔmeli. Paulo akomelaki Baefese, baoyo mboka na bango ezalaki na wɛsti ya Kolose, ete babateli ya mpate na balakisi bámeka kosalisa ‘bato nyonso bákóma na bomoko na kondima mpe na boyebi ya Mwana ya Nzambe, na moto oyo akoli mpenza, na ndenge ya nzoto oyo ezali na kotonda mobimba ya Klisto.’ Paulo alendisaki baklisto ya mboka mosusu bákóma “bato oyo bakoli mpenza na bososoli.”—Baefese 4:8-13, NW; 1 Bakolinti 14:20, NW.

5. Ndenge nini tokoki komityela mpenza mokano ya kozala bato oyo bakoki mpenza?

5 Soki bandeko mosusu na Kolose bakolaki naino mpenza te to bakɔmelaki te na elimo, ebongaki bámityela mokano wana. Omoni te ete esengeli mpe kozala bongo lelo oyo? Ezala ete tozwá batisimo banda kala mpenza to touti kozwa batisimo sika, tozali komona mpenza ete tokoli na bososoli mpe na makanisi? Totalelaka Biblia liboso ya kozwa bikateli? Makambo ya Nzambe mpe matomba ya lisangá ezali nde kozwa esika mingi na bomoi na biso, to tozongisá yango nde nsima? Na lisolo oyo, tokoki te kolobela makambo nyonso oyo tokoki komonisa na yango ete tozali kokola mpo na kokóma bato oyo bakoki mpenza, kasi tótalela ndakisa mibale.

6. Na likambo nini moto akoki kokola mpe kokóma moto oyo akoki mpenza, lokola Yehova?

6 Ndakisa ya liboso: Ekoki kozala ete tokolaki na esika oyo bato bakaniselaka bato ya mposo moko, ya ekólo moko to ya mboka moko boye mabe to bayinaka bango. Kasi sikoyo toyebi ete Nzambe aponaponaka bato te mpe ete biso tosengeli koponaponaka te. (Misala 10:14, 15, 34, 35) Soki na lisangá to na zongazonga na biso, ezali na bato ya mposo yango, ekólo yango to mboka yango, elingi koloba ete tofandi na bango esika moko, tokanisaka kaka mabe mpo na bato ya mposo to ekólo wana na mitema na biso? Tosilikaka mpe tozwaka nokinoki makanisi mabe soki ndeko moko ya mposo yango to ekólo yango asali libunga to azokisi biso mwa moke? Omituna motuna oyo: ‘Nasengeli nde kokola lisusu mpo na kokóma na makanisi ya Nzambe oyo aponaponaka bato te?’

7. Mpo tózala baklisto oyo bakoki mpenza, ekoki kosɛnga biso tókóma na makanisi nini mpo na bato mosusu?

7 Ndakisa ya mibale: Bafilipi 2:3 elobi ete tosengeli ‘kosala likambo moko mpo na elulela soko mpo na nzombo te kasi, awa ezali biso na kosɔkɛma, tótánga bamosusu ete baleki biso.’ Ndenge nini tozali kokola na likambo yango? Moto na moto azali na bolɛmbu na ye mpe makambo oyo azali makasi na yango. Soki liboso tozalaki kaka komona nokinoki bolɛmbu ya bato mosusu, tokoki nde koloba ete tokoli, tozali lisusu koluka ete ‘bábonga na nyonso’? (Yakobo 3:2) Sikoyo tokómi mpenza komona, to mpe koluka, na makambo nini baleki biso? ‘Nandimi mpenza ete ndeko mwasi oyo azali na motema molai koleka ngai.’ ‘Ndeko oyo kuna azali na kondima makasi koleka ngai.’ ‘Lokuta mabe, ateyaka malamu koleka ngai.’ ‘Aleki ngai na kokanga motema.’ Ekoki kozala ete Bakolose mosusu bazalaki na mposa ya kokola na makambo wana. Ezali boni mpo na biso?

8, 9. (a) Na ndimbola nini Epafala azalaki kobondela mpo ete Bakolose “bázala” bato oyo bakoki mpenza? (b) ‘Kozala bato oyo bakoki mpenza’ esɛngaki nini mpo na mikolo ezalaki liboso?

8 Epafala azalaki kobondela ete Bakolose ‘bázala bato oyo bakoki mpenza.’ Na maloba mosusu, Epafala azalaki kobondela Nzambe ete soki Bakolose bakómaki baklisto oyo bakoki mpenza, bakɔmeli, bakoli mpenza, ‘bázala,’ to bátikala ndenge yango.

9 Tokoki kokanisa te ete moto nyonso oyo akómi moklisto, ata oyo akɔmeli, akotikala kaka bongo. Yesu alobaki ete anzelu moko, mwana ya Nzambe ‘atɛlɛmaki kati na solo te.’ (Yoane 8:44) Paulo atángelaki Bakolinti bato mosusu na ntango ya kala oyo basalelaki Yehova mpo na mwa ntango kasi na nsima bakweaki. Mpo na kokebisa bandeko na ye bapakolami na elimo, alobaki boye: “Tiká ete ye oyo akanisi ete azali kotɛlɛma ngwi akeba ete akwea te.” (1 Bakolinti 10:12) Yango endimisi lisusu ntina oyo basengelaki kobondela mpo Bakolose “nsukansuka bázala bato oyo bakoki mpenza.” Soki bakómi bato oyo bakoki mpenza to bakoli, esengelaki bátikala bongo, bázonga nsima te, bálɛmba te to bálongwa na nzela te. (Baebele 2:1; 3:12; 6:6; 10:39; 12:25) Na ndenge yango nde bakozala “bato oyo bakoki mpenza” na mokolo oyo Nzambe akoya kotala mpe kokata makambo.—2 Bakolinti 5:10; 1 Petelo 2:12.

10, 11. (a) Ndakisa nini Epafala apesi biso mpo na likambo etali kobondela? (b) Ekateli nini osengeli kozwa mpo na kolanda ndenge oyo Epafala asalaki?

10 Tolobelaki ntina ya kobondela mpo na basusu mpe kotánga mpenza bankombo na bango, koloba mpenza polele ntango tozali kosɛnga Yehova asalisa bango, abɔndisa bango, apambola bango mpe apesa bango elimo santu. Epafala azalaki kosala mabondeli ya ndenge yango mpo na Bakolose. Biso mpe tokoki, to tóloba mpenza ete tosengeli, kotalela maloba yango lokola makanisi ya ntina oyo esengeli kosalisa biso tóyeba oyo tosengeli kosɛnga Yehova na libondeli mpo na biso moko. Ya solo, tosengeli kosɛnga Yehova asalisa biso ete ‘nsukansuka tózala bato oyo bakoki mpenza.’ Osalaka yango?

11 Lobeláká makambo etali bomoi na yo moko na mabondeli na yo. Yebisá Nzambe esika oyo okómi na mokano na yo ya kokóma moto oyo ‘akoki mpenza,’ akoli mpenza to akɔmeli. Bondelá ye asalisa yo na koyeba makambo oyo ezali kosɛnga yo okola lisusu na elimo. (Nzembo 17:3; 139:23, 24) Na ntembe te, ozangi yango te. Na yango, na esika elɛmbisa yo nzoto, bondelá Nzambe asalisa yo okende liboso; ntango ozali koloba na ye, zalá polele mpe sikisiki. Saláká yango mbala na mbala. Kutu, ekozala malamu ozwa ekateli ete pɔsɔ oyo ekobanda obondela mingi ete ‘nsukansuka ozala moto oyo akoki mpenza.’ Omityela mokano ya kosala yango mingi wana ozali kotalela mokapo ya mobu. Na mabondeli na yo, talelá mingimingi makanisi oyo ekoki koyela yo ete ozonga nsima, olɛmba to olongwa na nzela ya kosalela Nzambe mpe otika kosangana na basaleli na ye mpe ndenge oyo okoki kolongola makanisi yango.—Baefese 6:11, 13, 14, 18.

Bondeláká mpo na kosɛnga kondima makasi

12. Mpo na nini Bakolose bazalaki mpenza na mposa ya “kondima makasi”?

12 Epafala azalaki mpe kobondela mpo na likambo mosusu oyo Bakolose basengelaki na yango mpo ete nsukansuka Nzambe andima bango. Likambo yango ezali mpe na ntina mpo na biso. Ezali likambo nini? Azalaki kobondela ete bázala “na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.” Mboka na bango etondaki na mateya ndenge na ndenge ya filozofi oyo ezalaki kopɛngwisa bato mpe kobebisa makanisi na bango; mosusu ezalaki komonana lokola losambo ya solo, nzokande ezalaki makambo ya lokuta. Na ndakisa, bato mosusu bazalaki kosɛngisa bango ete báboyaka kolya to básalaka bafɛti mpo na kokanisa mikolo mosusu, ndenge ezalaki kosɛngama na losambo ya Bayuda. Balakisi ya lokuta bazalaki kolobela mingi baanzelu, bikelamu ya elimo mpe ya nguya oyo Nzambe atindaki mpo na kopesa Mose Mibeko. Kanisá ete bazali nde kotinda yo na makambo ya ndenge wana! Ezalaki na makanisi kilikili mpe ya bongolabongola.—Bagalatia 3:19; Bakolose 2:8, 16-18.

13. Likambo nini ekokaki kosalisa Bakolose soki bandimaki yango, mpe ndenge nini yango ekoki kosalisa biso?

13 Paulo akweisaki mateya na bango, alobelaki mingi mokumba ya Yesu Klisto. “Lokola boyambaki Klisto Yesu ye Nkolo, bótambolaka na bomoko na ye, bopikami mpe bozali kotongama kati na ye mpe bozali kotɛngatɛnga te kati na kondima, se lokola bateyaki bino.” Ya solo, esengeli mpenza (ezala Bakolose to biso) kozala na kondima makasi na mokumba ya Klisto na kati ya mokano ya Nzambe mpe na kati ya bomoi na biso. Paulo alobaki boye: “Kati na ye nde bonzambe mobimba efandi na ndenge ya nzoto. Mpe na bongo bozali na kotonda mobimba na nzela na ye, ye nde mokonzi ya boyangeli mpe bokonzi nyonso.”—Bakolose 2:6-10, NW.

14. Mpo na nini elikya ezalaki likambo ya solo mpo na Bakolose?

14 Baklisto ya Kolose bazalaki bapakolami na elimo. Bazalaki na elikya ya bomoi na likoló, mpe ebongaki mpenza bákanisaka ntango nyonso elikya wana. (Bakolose 1:5) “Mokano ya Nzambe” ezalaki ete bázala na kondima makasi ete elikya na bango ekokokisama. Ebongaki mpenza ete moto moko kati na bango akakatana mpo na elikya yango? Soki moke te! Esengeli kozala ndenge mosusu mpo na baoyo Nzambe apesi bango elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabele? Te! Elikya yango ya solosolo ezali na kati ya “mokano ya Nzambe.” Sikoyo, talelá mituna oyo: Soki ozali kosala makasi ete yo mpe ozala na kati ya “ebele monene” oyo bakobika na “bolɔzi monene,” omonaka ete elikya na yo ezali mpenza solo? (Emoniseli 7:9, 14) Ezali kati na “kondima makasi” na yo “na mokano mobimba ya Nzambe”?

15. Paulo atángaki makambo nini oyo kati na yango mpe elikya ezali?

15 Ntango tozali koloba “elikya,” yango ezali mposa to ndɔtɔ mpamba te. Tokoki kokanga ntina na yango na kotalela makambo oyo Paulo ayebisaki Baloma mwa bambula liboso. Kati na yango, likambo mokomoko ezali na boyokani na oyo elandi yango. Talá malamumalamu esika oyo Paulo atii “elikya” na maloba na ye: “Tósepelaka ntango tozali na minyoko, lokola toyebi ete monyoko ebotaka ezaleli ya koyika mpiko, bongo koyika mpiko, moto oyo andimami; bongo moto oyo andimami, elikya, mpe elikya ezangaka kokokisama te, mpamba te bolingo ya Nzambe esopami na mitema na biso na nzela ya elimo santu.”—Baloma 5:3-5, NW.

16. Ntango oyekolaki mateya ya solo ya Biblia, elikya nini okómaki na yango?

16 Mbala ya liboso oyo Batatoli ya Yehova bateyaki yo nsango ya Biblia, ekoki kozala na likambo moko oyo esimbaki mpenza motema na yo, na ndakisa, moto akendaka wapi soki akufi to mpe lisekwa. Mpo na bato mingi, likambo ya liboso oyo bamonaki ete ezali likambo ya sika ezali elikya oyo Biblia epesi ya kozala na bomoi ya seko na paladiso awa na mabele. Kanisá lisusu mbala ya liboso oyo oyokaki liteya yango. Talá elikya kitoko boye: maladi na bobange ekozala lisusu te, okozala na bomoi libela mpe okosepela na matomba ya mosala na yo, mpe tokozala na kimya ata na banyama! (Mosakoli 9:5, 10; Yisaya 65:17-25; Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:3, 4) Ozwaki elikya kitoko mpenza!

17, 18. (a) Ndenge nini makambo oyo Paulo atángelaki Baloma ememi tii na elikya? (b) Elikya ya ndenge nini elobelami na Baloma 5:4, 5, yo mpe ozali na elikya yango?

17 Na nsima, mbala mosusu batɛmɛlaki yo to mpe banyokolaki yo. (Matai 10:34-39; 24:9) Ata na mikolo oyo, na mikili mingi, babebisaki bandako ya Batatoli mpe bakimaki na mboka mopaya. Batatoli mosusu babɛtamaki, babɔtɔlaki mikanda na bango, to bakoselaki bango makambo na bazulunalo, na radio to na televizyo. Ata soki ozwaki monyoko ya ndenge nini, lokola Baloma 5:3 elobi yango, osepelaki kati na monyoko mpe yango ebotaki mbuma malamu. Se lokola Paulo akomaki yango, monyoko ebotaki ezaleli ya koyika mpiko epai na yo. Na nsima, koyika mpiko ekómisaki yo moto oyo andimami. Oyebaki ete ozali kosala oyo ezali malamu, elingi koloba mokano ya Nzambe; yango wana ozalaki na kondima ete Nzambe azali kosepela na yo. Na kolanda maloba ya Paulo, ozalaki komona ete ozali “moto oyo andimami.” Na nsima, Paulo akomaki ete kozala “moto oyo andimami, [epesaka] elikya.” Likambo yango ekoki kokamwisa mwa moke. Mpo na nini Paulo atii “elikya” mosika na kati ya molɔngɔ yango? Elingi nde koloba ete liboso, ntango oyokaki nsango malamu mpo na mbala ya liboso, ozalaki na elikya te?

18 Tomoni polele ete na vɛrsɛ yango Paulo azali te kolobela elikya ya bomoi ya kokoka oyo tozwaki na ebandeli. Eloko oyo azali kolobela eleki wana, ezali makasi koleka mpe eleki na kopesa moto mposa ya kosala likambo. Ntango toyiki mpiko na bosembo nyonso mpe na bongo tomoni ete Nzambe andimi biso, yango ebakisaka mpe elendisaka mpenza elikya na biso ya ebandeli. Elikya oyo tozalaki na yango ekómaka likambo ya solo mpenza, ekómaka makasi koleka mpe ekɔtelaka biso mpenza na motema. Elikya makasi yango elekaka kongɛnga. Ekɔtaka mpenza na kati bomoto na biso. “Mpe elikya ezangaka kokokisama te, mpamba te bolingo ya Nzambe esopami na mitema na biso na nzela ya elimo santu.”

19. Ndenge nini osengeli mbala na mbala kolobelaka elikya na yo na kati mabondeli na yo?

19 Epafala azalaki kobondela makasi ete makambo oyo ekoya esimba mitema ya bandeko na ye ya Kolose mpe bándima yango, bázala “na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.” Tiká mpe ete mokomoko na biso asololaka na Nzambe mpo na elikya na biso. Na kati ya mabondeli na yo moko, lobeláká elikya na yo ya mokili ya sika. Yebisáká Yehova mposa makasi oyo ozalaka na yango ya kokɔta na mokili yango, na kondima mpenza ete mokili yango ekoya. Bondeláká ye asalisa yo okolisa kondima na yo mpe olendisa yango. Lokola Epafala abondelaki ete Bakolose bázala na “kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe,” yo mpe saláká bongo. Mpe saláká yango mbala na mbala.

20. Mpo na nini tosengeli kolɛmba te ntango mwa bato mosusu batiki nzela ya boklisto?

20 Komitungisa te mpe kolɛmba nzoto te mpo bato mosusu bazali kolanda te kozala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi. Bamosusu bakoki kolɛmba, kopɛngwa to mpe kotika mpenza. Likambo yango esalemaki ata na kati ya bato oyo bazalaki kotambola na Yesu, elingi koloba bantoma na ye. Kasi ntango Yuda atɛkaki Yesu, bantoma mosusu balɛmbaki to bazongaki nsima? Te! Petelo asalelaki maloba ya Nzembo 109:8 mpo na komonisa ete moto mosusu asengeli kozwa esika ya Yuda. Baponaki moto mosusu na esika na ye mpe basaleli ya sembo ya Nzambe bakobaki mosala na bango ya kosakola. (Misala 1:15-26) Bazalaki na ekateli makasi ya kozala bato oyo bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi.

21, 22. Soki ozali moto oyo akoki mpenza mpe ozali na kondima makasi, ndenge nini yango ekomonana?

21 Yebá ete soki ozali ntango nyonso moto oyo akoki mpenza mpe azali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe, ekomonana polele. Ezali na baoyo bakomona mpe bakosepela na ezaleli yango. Banani bakomona yango?

22 Bandeko na yo mibali mpe basi oyo bayebi yo mpe balingaka yo bakomona yango. Ata soki mingi balobi yango te, ekozala kaka ndenge totángaka na 1 Batesaloniki 1:2-6 ete: “Tokotɔnda Nzambe ntango nyonso mpo na bino nyonso; tokokanisaka bino kati na mabondeli na biso mpe tokotika te, awa ezali biso kokanisa liboso ya Nzambe mpe Tata na biso, misala na bino na kondima mpe lisungi na bolingo mpe mpiko na elikya kati na Nkolo na biso Yesu Klisto. . . . Mpo ete Nsango Malamu na biso eyeli bino bobele na maloba te kasi na nguya mpe na [elimo santu, NW ] mpe na [kondima makasi, NW ]. . . . Mpe bino bosili kozala [bamekoli] na biso mpe ya Nkolo.” Baklisto ya sembo oyo ofandi na bango mpe bakoyoka ndenge yango ntango bakomona ete ‘ozali moto oyo akoki mpenza mpe ozali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.’—Bakolose 1:23.

23. Na boumeli ya mbula oyo ezali koya, ekateli na yo esengeli kozala nini?

23 Ndenge moko mpe, Tata na yo na likoló akomona mpe akosepela. Tyá elikya na likambo yango. Mpo na nini? Mpamba te ozali moto oyo akoki mpenza mpe azali na kondima makasi “na mokano mobimba ya Nzambe.” Paulo akomelaki Bakolose maloba ya kolendisa mpo bátambolaka “na ndenge oyo ebongi na Yehova mpo básepelisa ye mpenza.” (Bakolose 1:10) Ya solo, bato ya kozanga kokoka bakoki kosepelisa ye mpenza. Bandeko na yo ya Kolose basalaki yango. Baklisto oyo ozali na bango lelo oyo bazali kosala yango. Yo mpe okoki kosala yango! Yango wana, na boumeli ya mbula oyo ezali koya, tiká ete mabondeli na yo ya mokolo na mokolo mpe misala na yo emonisa ete ozali na ekateli ete ‘nsukansuka ozala moto oyo akoki mpenza mpe azali na kondima makasi na mokano mobimba ya Nzambe.’

Ozali koyeba lisusu?

• Osengeli kosala nini mpo na kozala ‘moto oyo akoki mpenza’?

• Makambo nini oyo etali yo moko osengeli kolobelaka na mabondeli na yo?

• Lokola Baloma 5:4, 5 emonisi yango, osengeli kozala na elikya ya motindo nini?

• Boyekoli na biso epesi yo mposa ya kozala na mokano nini na boumeli ya mbula oyo tolingi kobanda?

[Elilingi na lokasa 20]

Epafala azalaki kobondela ete bandeko na ye bákoka mpenza mpe bázala na kondima makasi mpo na Klisto mpe elikya na bango

[Bililingi na lokasa 23]

Bamilio ya bato mosusu mpe bazali na elikya ya solosolo mpe kondima makasi oyo yo ozali na yango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto