Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/7 lok. 3
  • Lolenge nini otalelaka lisumu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge nini otalelaka lisumu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Ntango lisumu ekozala lisusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Lisumu—Ebongwani na nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Lolenge nini otalelaka lisumu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mokili mozangi masumu: mokoki kosalema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/7 lok. 3

Lolenge nini otalelaka lisumu?

“LISUMU ezali kati na yo te, monyoko ezali kati na yo te, ozali ebombelo ya nguya oyo eleki nguya nyonso.” Vivekananda, filozofe ayebani mingi ya Lingomba ya Hindu alobaki maloba yango ntango azalaki kolimbola mokapo ya Bhagavad Gita, búku moko ya bulɛɛ ya Lingomba ya Hindu. Kotángáká maloba ya Vedanta, alobaki ete: “Libunga lileki monene ezali oyo ya koloba ete ozali na bolɛmbu, ete ozali mosumuki.”a

Kasi, ezali solo ete moto azali na lisumu te? Mpe soki moto asangolaka eloko moko na kobotama na ye, ezali mpenza nini? Nikhilananda, moteyi moko ya Lingomba ya Hindu, alobi ete “moto azwaka [bobele] bilembo ya nzoto ya baboti na ye.” Makambo mosusu masilá kobongisama na “misala oyo moto asalaki na bomoi na ye ya liboso.” Engebene Vivekananda, “moto na moto azali mobongisi ya makambo makokómela ye na bomoi.” Lingomba ya Hindu eteyaka soko moke te lisumu-lisango.

Liteya ya lisumu-lisango eteyamaka mpe te na mangomba lokola ya Zoroastre, ya Shinto, ya Confucius, mpe ya Bouddha. Ata mpe kati na mangomba ya Bayuda mpe baklisto, oyo uta kala bateyaka lisumu-lisango, makanisi ya bato na ntina na lisumu mazali kobongwana. Lelo oyo, bato mingi bazali kokanisa te ete bazali basumuki.

Cornelius Plantinga, nganga-mayele ya teoloji alobi ete: “Lisosoli ya bato ya mikolo oyo ezali kolendisa te likambo ya koboya bizaleli mabe; mingimingi, ezali kolendisa te ezaleli ya kosambisama na lisosoli.” Mangomba ya boklisto mazali na ngambo na ezalela oyo ya kotalela lisumu lokola eloko mpamba. Sángó moko na Iniversité ya Duke alobi ete “Soki olingi koyoka makambo ya masumu te, kendá na ndakonzambe.” Mpe engebene Plantinga, mangomba mosusu malobelaka lisumu bobele na makambo ya boyokani kati na bomoi ya bato.

Ya solo, lelo oyo makambo ya mawa kati na bomoi ya bato mazali mingi. Mobulu, koboma, bitumba, kowelana kati na bikólo, kosalela bilangwiseli, kozanga kolongobana, kokonza, mpe konyokola bana mike ezali sé kokóla. Kútu, ekeke oyo ya 20 esili kobéngama ete ekeke oyo eleki kosopa makila lokola emonanaki naino liboso te. Likoló na yango eyei kobakisama mpasi mpe minyoko oyo miuti na maladi, na konuna, mpe na liwa. Nani azali na mposa te ya kosikwama na ebele na mikakatano oyo mizali komonana na mokili lelo oyo?

Na yango, likanisi na yo ezali nini na ntina na lisumu? Lisumu esangolamaka? Mokolo mosusu tokosikwama na mpasi mpe minyoko? Lisoló lilandi likolobela mituna yango.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Filozofi ya Vedanta ezwi moboko na yango na Upanishads, oyo ezali na nsuka ya makomami ya Hindu mabéngami Veda.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto