Tukiko moninga moombo oyo batyelaki motema
NA MABAKU mingi, Tukiko asalaki mibembo elongo na Paulo mpe asalelaki ye lokola momemi-nsango. Azalaki motindami oyo bakokaki kopesa mosolo mpo ete akende kotika mpe bakokaki kopesa ye mikumba ya mokɛngɛli. Lokola Makomami malobi ete abongaki kotyelama motema—ezaleli ebongi mpo na baklisto nyonso—mbala mosusu okolinga koyeba makambo mosusu na ntina na ye.
Paulo alobelaki Tukiko lokola “ndeko molingami, mosaleli na sembo, moombo na Nkolo na [ye] elongo.” (Bakolose 4:7) Mpo na nini ntoma azalaki kotalela ye bongo?
Atindami na Yelusaleme mpo na kopesa lisungi
Soko na mobu 55 T.B., baklisto na Yudea bakómaki na bosɛnga ya biloko ya mosuni. Na lisalisi ya masangá ya Mpoto mpe ya Asie Mineure, Paulo abongisaki makabo mpo na kosunga bango. Tukiko oyo azalaki moto ya etúká ya Azia, akokisaki mokumba monene na mobembo wana ya komema lisungi.
Nsima ya kopesa malako na lolenge ya kosalela makabo yango, Paulo apesaki likanisi ete mibali oyo babongi kotyelama motema basengelaki kotindama na Yelusaleme to kokende elongo na ye, mpo na komema makabo oyo bazwaki. (1 Bakolinti 16:1-4) Ntango asalaki mobembo molai longwa na Grèce kino na Yelusaleme, akendaki elongo na bato mingi, emonani ete moko na bango ezalaki Tukiko. (Misala 20:4) Esengelaki kokende na bato mingi mpamba te bazalaki kobatela mbongo oyo masangá mingi epesaki bango. Ezalaki likambo ya ntina ete bábatela mbongo yango, mpamba te nzela ezalaki na bayibi.—2 Bakolinti 11:26.
Lokola Alisitalaka na Tolofimi bakendaki elongo na Paulo na Yelusaleme, bato mosusu bakanisaka ete Tukiko na basusu mpe bakendaki. (Misala 21:29; 24:17; 27:1, 2) Lokola Tukiko azalaki kati na ebongiseli wana ya kopesa lisungi, ezali ye nde balobeli mbala mingi lokola “ndeko” oyo asalaki na Tito na Grèce mpo na kobongisa makabo mpe oyo “aponami na [masangá, NW] mpo na kotambola na [Paulo] na mosala oyo na ngɔlu.” (2 Bakolinti 8:18, 19; 12:18) Soki mokumba ya liboso oyo Tukiko akokisaki ezalaki monene, boye oyo ya mibale ezalaki mpe monene.
Kouta na Loma kino na Kolose
Nsima ya mbula mitano to motoba (mobu 60 kino 61 T.B.), Paulo alingaki kobima na bolɔkɔ na ye ya liboso na Loma. Tukiko azalaki na ye elongo, na bankama ya bakilomɛtɛlɛ mosika na mboka na ye. Sikawa, Tukiko azalaki kozonga na Azia. Yango epesaki Paulo libaku ya kotinda mikanda na masangá ya boklisto na etúká wana mpe kotinda Onesimo, moombo oyo akimaki nkolo na ye Filemona, ete azonga na Kolose. Tukiko na Onesimo bamemaki mikanda soko misato oyo mizali sikawa kati na kanɔ ya Biblia—moko epai na Baefese, mosusu epai na Bakolose mpe oyo ya nsuka epai na Filemona. Ekoki kozala ete mokanda moko epesamaki na lisangá ya Laodikia, engumba ezwami na ntaka ya kilomɛtɛlɛ soko 18 na Kolose.—Baefese 6:21; Bakolose 4:7-9, 16; Filemona 10-12.
Tukiko azalaki kaka momemi ya mikanda te. Azalaki momemi-nsango oyo batyelaki motema, mpamba te Paulo akomaki ete: “Tukiko akoyebisa bino makambo nyonso na ngai. Ye ndeko molingami, mosaleli na sembo, moombo na Nkolo na ngai elongo. Natindi ye epai na bino na likambo yango mpenza ete bóyeba makambo na biso mpe ete abɔndisa mitema na bino.”—Bakolose 4:7, 8.
Nganga-mayele Randolph Richards amonisaki ete “longola mokanda yango moko” momemi ya mikanda “azalaki mbala mingi ye moko moyokanisi kati na motindi na yango mpe bato oyo batindeli bango mokanda. . . . [Moko ya bantina] ya kozala na momemi ya mikanda oyo bakoki kotyela motema ezalaki [ete] mbala mingi azalaki koyebisa makambo mosusu. Mokanda ekoki kolobela likambo moko na mokuse, mbala mingi na ndenge mokomi amoni malamu kolobela yango, kasi momemi ya mokanda ayebisaka moto oyo batindeli ye mokanda makambo nyonso.” Mokanda ekoki kolobela mateya mpe makambo oyo esengeli kosalema nokinoki, kasi makambo mosusu makoyebisama na monɔkɔ na momemi-nsango oyo bakoki kotyela motema.
Mikanda epai na Baefese, na Bakolose, mpe na Filemona elobi makambo mingi te na ndenge Paulo azalaki kokokisa bamposa na ye. Tukiko asengelaki bongo koyebisa makambo mosusu, mpe kolimbola mikakatano ya Paulo kati na Loma, mpe koyeba malamu makambo mazalaki koleka na masangá mpo na kopesa bango bilendiseli. Bansango mpe mikumba motindo wana ezalaki kopesama bobele na bato oyo bakoki kotyelama motema, baoyo bakokaki komonisa motindi na bango na bosembo nyonso. Tukiko azalaki moto ya ndenge yango.
Mosala ya mokɛngɛli na bamboka ya mosika
Nsima ya kobima na ndako na ye lokola mokangami na Loma, Paulo akanisaki kotinda Tukiko to Alatema epai na Tito na esanga ya Kelete. (Tito 1:5; 3:12) Ntango Paulo azalaki na bolɔkɔ na Loma mpo na mbala ya mibale (ekoki kozala pene na 65 T.B.), ntoma atindaki lisusu Tukiko na Efese, mpo na kokamata esika ya Timote, oyo alingaki kosala mobembo mpo na kozala pene na Paulo.—2 Timote 4:9, 12.
Eyebisami polele te soki na eleko yango Tukiko akendaki na Kelete mpe na Efese. Atako bongo, makambo lokola oyo wana mamonisi ete atikalaki mosalani ya motema na Paulo kino na bambula ya nsuka ya mosala ya ntoma. Soki Paulo azalaki kokanisa kotinda ye na mobembo mpo na kokokisa mikumba minene mpe ya mpasi na esika ya kotinda Timote mpe Tito, emonani ete Tukiko akómaki mokɛngɛli moklisto oyo akɔmeli. (Kokanisá na 1 Timote 1:3; Tito 1:10-13.) Bolingo malamu oyo azalaki komonisa mpo na kosala mibembo mpe mpo na kosalelama na kokokisa mikumba na bamboka mosika esalaki ete akóma na ntina mingi mpo na Paulo mpe mpo na lisangá mobimba ya boklisto.
Lelo oyo, baklisto oyo bamipesi bazali kosalela Nzambe na bolingo malamu kati na masangá ya Batatoli ya Yehova na mboka na bango to bazali kondima mpo na kotombola matomba ya Bokonzi na bisika mosusu. Bankóto bandimi na esengo mokumba ya misionere, ya mokɛngɛli-motamboli, mosali mpo na kotonga bandako ya la Société na mokili mobimba, na biro monene ya la Société Watch Tower, to na moko na bafiliale na yango. Ndenge moko na Tukiko, bazali na etɛlɛmɛlo ya lokumu te, kasi bazali basali na misala makasi, ‘basaleli na sembo’ oyo Nzambe asepelaka na bango mpe balingami na bandeko na bango baklisto lokola ‘baombo na Nkolo’ babongi kotyelama motema.