Mituna ya batángi
Soki moklisto moko azali koyoka mongongo moko boye kasi azali koyeba epai yango ezali kouta te, elingi kaka koloba ete bademo bazali kotungisa ye?
Te. Esilá kosalema ete bademo básala bato makambo ya ndenge wana; kasi, bato mingi oyo bayokaki mingongo to bamonaki makambo mosusu ya nsɔmɔ, nsima ya kosala bango ekzamɛ, emonanaki ete bazalaki nde na maladi.
Ata na ekeke ya liboso, emonanaki mpe polele ete moto oyo azali kotungisama na bademo azalaki mpe kosala makambo mosusu lokola kaka moto oyo azali na maladi. Matai 17:14-18 elobi lisolo ya elenge mobali moko oyo Yesu abikisaki. Elenge mobali yango azalaki kosala makambo lokola moto azali na maladi ya ndɛkɛ, demo moko nde azalaki konyokola ye. Kasi, mokolo mosusu liboso likambo wana esalema, bamemelaki Yesu ebele ya bato ya maladi mpo abikisa bango, kati na bango ezalaki na “baoyo bazalaki na bademo mpe bato ya maladi ya ndɛkɛ.” (Matai 4:24) Yango ezali komonisa ete bato mosusu oyo bazalaki na maladi ya ndɛkɛ bazalaki na bademo te. Bazalaki kaka na maladi na nzoto.
Eyebani ete bato mosusu oyo babɛlaka maladi oyo ebulunganisaka makanisi (schizophrénie), maladi oyo esilaka na nkisi ya monganga, bayokaka mingongo ya bato to bamonaka makambo mosusu ya kokamwa.a Ezali mpe na bamaladi mosusu oyo ebulunganisaka makanisi ya moto, ekoki mpe mbala mosusu kotinda bato bákanisa ete atungisami na bademo. Yango wana, moto oyo azali koyoka mingongo ya bato oyo azali komona bango te to komona makambo mosusu ya nsɔmɔ, asengeli te kokanisa mbala moko ete atungisami na bademo, asengeli naino kokutana na monganga mpo na koyeba soki ezali maladi moko nde ezali kotungisa ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “On commence à percer le mystère des maladies mentales” na Lamuká! ya 8 Sɛtɛmbɛ 1986 (ebimeli ya Lifalanse).