Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/11 nk. 19-23
  • Lobanzo na ngai ya liboso ezali ya kosepelisa Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lobanzo na ngai ya liboso ezali ya kosepelisa Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Namipesi mobimba na mosala ya Nzambe
  • Komekama ya kondima na kati ya eteyelo
  • Bokatikati na ngai ya boklisto emekami
  • Nazongeli mosala nsima ya kobima na bolɔkɔ
  • Bomoi oyo epesi matomba mingi
  • Tosalaki mosala na nsé ya libateli ya bolingo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Etike oyo basundolaki azwi tata ya bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Koleka mbula 50 ya ‘kolekaleka’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Nazali na ekateli ya kozala soda ya Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/11 nk. 19-23

Lobanzo na ngai ya liboso ezali ya kosepelisa Yehova

LISOLO YA THEODOROS NEROS

Ekuke ya ndako oyo nazalaki kolala na kati ya bolɔkɔ efungwamaki, mpe mokonzi ya bosoda angangaki ete: “Wapi Neros?” Ntango nabimaki, alobaki ete: “Tɛlɛmá. Tolingi koboma yo sikoyo.” Yango esalemaki na kaa ya basoda na engumba Kolinti, na ekólo Grèce na mobu 1952. Balingaki koboma ngai mpo na nini? Liboso ya koyebisa bino, bótika nabɛtɛla bino mwa moke lisolo ya bomoi na ngai.

BAYEKOLI YA BIBLIA (nkombo bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na eleko wana) bakutanaki na tata na ngai soko na mobu 1925. Eumelaki te, ye mpe akómaki Moyekoli ya Biblia. Ayebisaki mpe bandeko na ye mwambe, ya mibali mpe ya basi, makambo oyo ye andimelaki. Bango nyonso bandimaki solo ya Biblia. Baboti na ye mpe bakómaki Bayekoli ya Biblia. Na nsima, abalaki, mpe ngai nabotamaki na mobu 1929 na Agrinio, na ekólo Grèce.

Na ntango yango ekólo Grèce ezalaki na mpasi! Liboso ezalaki eleko ya boyangeli ya mokonzi mabe Général Metaxas. Na nsima, na 1939, Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, mpe Banazi babɔtɔlaki ekólo Grèce. Maladi mpe nzala epalanganaki. Bazalaki komema bibembe na pusupusu ya mike. Makambo mabe ezalaki komonana polele na mokili mpe bato bazalaki na mposa ya Bokonzi ya Nzambe.

Namipesi mobimba na mosala ya Nzambe

Na mokolo ya 20 Augústo 1942, ntango toyanganaki mpo na kosala likita na libándá ya engumba Tesaloniki, mokɛngɛli mokambi ya lisangá na biso alobaki ete bampɛpo ya ekólo Angleterre ezali kobwaka babombi na engumba mpe amonisaki ete tobikaki mpamba te totosaki elendiseli oyo elobi ete ‘tótika koyangana elongo moko te.” (Baebele 10:25) Na mokolo yango, toyanganaki pene na mai monene, ngai mpe nazalaki moko ya bato oyo basengelaki kozwa batisimo. Ntango tobimaki na mai, totɛlɛmaki na molɔngɔ, mpe bandeko na biso baklisto bayembaki nzembo moko mpo na kokumisa biso na ekateli oyo tozwaki. Nakoki kobosana mokolo yango te!

Mwa moke na nsima, ntango ngai na ndeko moko ya mobali tozalaki kosakola ndako na ndako, bapolisi bakangaki biso mpe bamemaki biso na biro na bango. Mpo na komonisa ete batalelaki biso lokola bakoministe, mpe mosala na biso epekisamaki, babɛtaki biso mpe balobaki na biso ete: “Bozali babolole, Yehova azali ndenge moko na Stalin!”

Na ntango yango etumba ya bana-mboka ekómaki makasi na ekólo Grèce, mpe bazalaki kotombokela bakoministe. Mokolo elandaki, batambwisaki biso liboso ya bandako na biso, minyɔlɔlɔ na mabɔkɔ, lokola nde tozalaki bato ya mobulu. Kasi, komekama na ngai esukaki kaka wana te.

Komekama ya kondima na kati ya eteyelo

Na ebandeli ya 1944, nazalaki naino mwanakelasi, mpe engumba Tesaloniki ezalaki naino na mabɔkɔ ya Banazi. Mokolo moko na kelasi, sango moko ya Lingomba ya Ortodokse, ye profesere na biso ya makambo ya mangomba, alobaki na ngai ete asengelaki kotuna ngai mituna mpo na liteya ya mokolo wana. Banakelasi mosusu balobaki ete, “Azali moklisto ya Ortodokse te.”

Profesere atunaki: “Kasi azali nani?”

Nayanolaki ete: “Nazali Motatoli ya Yehova.”

Angangaki ete, “Mbwa ya zamba na kati ya bampate.” Abendaki ngai mpe abɛtaki ngai mbata.

Na nse ya motema nalobaki ete, ‘Ndenge nini lisusu bampate bábɛta mbwa ya zamba?’

Mwa mikolo na nsima, tofandaki soko bato 350 mpo na kolya. Kapita alobaki ete: “Neros akosala libondeli.” Nazongelaki libondeli ya ‘Tata wa biso’ oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye, ndenge ekomami na Matai 6:9-13. Yango esepelisaki kapita te, na nkanda nyonso, kaka esika afandaki atunaki ngai: “Mpo na nini osali libondeli ya ndenge wana?”

Nalobaki: “Mpo nazali Motatoli ya Yehova.” Mpo na yango, ye mpe abendaki ngai mpe abɛtaki ngai mbata na litama. Mwa nsima bobele mokolo yango, molakisi moko abéngaki ngai na biro na ye mpe alobaki na ngai: “Longonya, Neros, kangamá na kondima na yo, kolɛmba te.” Na butu ya mokolo yango, tata na ngai alendisaki ngai na maloba oyo ya ntoma Paulo ete: “Bango nyonso balingi kosambela [Nzambe] kati na Klisto Yesu bakonyokolama.”​—2 Timote 3:12.

Ntango nasilisaki eteyelo ya ntei, nasengelaki kopona mosala ya kosala. Lokola basivili bazalaki konyokwama na ekólo Grèce, nasengelaki kokutana na mokakatano ya kobatela bokatikati ya boklisto. (Yisaya 2:4; Matai 26:52) Nsukansuka, na ebandeli ya 1952, bakatelaki ngai etumbu ya mbula 20 na bolɔkɔ, mpo naboyaki kokɔta mosala ya soda na eleko wana oyo ekólo Grèce ezalaki na mpasi.

Bokatikati na ngai ya boklisto emekami

Ntango nazalaki na bolɔkɔ na kaa ya basoda na engumba Mesolóngion mpe na Kolinti, nazwaki libaku ya kolimbola epai na bakonzi ya basoda ete lisosoli na ngai oyo eteyami na Biblia ekopesa ngai nzela te ete nakóma soda mpo na kobundela matomba ya politiki. Nalimbolaki na kolobeláká 2 Timote 2:3, ete “Nazali soda ya Klisto.” Ntango basɛngaki ngai nakanisa lisusu malamu, nalobaki ete nazwaki ekateli ya mbangumbangu te, kasi nakanisaki malamu liboso ntina oyo namipesi na Nzambe mpo na kosala mokano na ye.

Na yango, basalisaki ngai misala ya makasimakasi na nko, bazalaki kopesa ngai bilei mbala moko mpo na mikolo mibale na boumeli ya mikolo 20, mpe batyaki ngai nalalaka na mabelé na mwa eteni moko ya ndako oyo ezalaki na bonene ata ya mɛtɛlɛ moko te mpe bolai na yango ekokaki ata mɛtɛlɛ mibale te. Mpe tozalaki na Batatoli mosusu mibale na kati ya bolɔkɔ yango! Ezalaki na eleko wana, na kaa ya Kolinti, nde babéngaki ngai nabima na bolɔkɔ mpo bákende koboma ngai.

Ntango tozalaki kokende na esika oyo basengelaki koboma ngai, mokonzi ya basoda atunaki ngai ete: “Ozali na likambo ya koloba te?”

Nayanolaki ete: “Te.”

“Okokomela libota na yo mokanda te?”

Nazongisaki ete, “Te, bayebi malamu ete nakoki kokufa awa.”

Tokómaki na libándá, mpe balobaki na ngai natɛlɛma liboso ya efelo. Bongo, na esika ete apesa mitindo mpo soda abɛta ngai masasi, mokonzi ya basoda alobaki ete: “Kɔtisá ye na kati ya lopango.” Nyonso wana ezalaki kaka mangungu mpo na kobangisa ngai natika ekateli na ngai.

Na nsima, batindaki ngai na esanga ya Makrónisos, kuna balingaki nazala na mokanda ata moko te longola bobele Biblia. Batyaki Batatoli ya Yehova zomi na misato na ndako moko ya moke pene na bato ya mobulu 500 oyo bazalaki na kati ya bolɔkɔ. Kasi, atako bongo tozalaki kozwa mikanda na mayele. Na ndakisa, mokolo moko batindelaki ngai karto moko ya loukoúmia (nkombo ya bonbon moko eyebani mingi na Grèce). Bakɛngɛli basepelaki kaka kolya loukoúmia kasi bamonaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebombamaki na kati te. Motatoli moko alobaki, “Basoda balyaki loukoúmia, kasi biso ‘tolyaki’ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli!”

Tozwaki buku moko ebimaki sika na Lingelesi, buku yango ezalaki na motó na likambo oyo: Lingomba esali nini mpo na bato? Motatoli moko oyo ayebaki Lingelesi na kati ya bolɔkɔ abongolaki yango. Tozalaki mpe koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe kosala makita na kobombana. Tozalaki kotalela bolɔkɔ lokola eteyelo, lokola libaku mpo na kolendisa elimo na biso. Na koleka, tozalaki na esengo mpamba te toyebaki ete bosembo na biso ezalaki kosepelisa Yehova.

Bolɔkɔ ya nsuka oyo batyaki ngai ezalaki na engumba Tirynthe, na ɛsti ya Peloponnèse. Kuna nazalaki komona mokɛngɛli-bolɔkɔ moko wana azalaki kotala na likebi ndenge nazalaki koyekolisa mokangami mosusu Biblia. Nakamwaki ntango nakutanaki na mokɛngɛli-bolɔkɔ yango nsima ya bambula na engumba Tesaloniki! Na ntango yango akómaki Motatoli ya Yehova. Na nsima, batindaki mwana na ye moko na bolɔkɔ, lokola mokɛngɛli te kasi lokola mokangami. Akɔtaki bolɔkɔ mpo na ntina oyo ngai mpe nakɔtelaki bolɔkɔ.

Nazongeli mosala nsima ya kobima na bolɔkɔ

Na esika ya kosala mbula 20, nasalaki kaka mbula misato na bolɔkɔ. Ntango nabimaki na bolɔkɔ nasepelaki kofanda na engumba Atene. Kasi, mwa moke na nsima, nazwaki maladi makasi ya mpema. Yango etindaki ngai nazonga na engumba Tesaloniki. Naumelaki na maladi yango sanza mibale. Na nsima, nakutanaki na Koula, elenge mwasi moko kitoko, mpe tobalanaki na Desɛ́mbɛ 1959. Na 1962 abandaki mosala ya mobongisi-nzela, ndenge babéngaka basali ya ntango nyonso epai ya Batatoli ya Yehova. Nsima ya mbula misato, ngai mpe nakómaki mobongisi-nzela.

Na Yanuáli 1965, tobandaki mosala ya zongazonga, kotala masangá mpo na kolendisa yango na elimo. Na eleko ya molunge ya mbula yango, tozwaki libaku ya koyangana mpo na mbala ya liboso na liyangani ya etúká oyo esangisaki bato mingi, na engumba Vienne, na ekólo Autriche. Liyangani yango ekesanaki mpenza na oyo tozalaki kosala na ekólo Grèce ntango tozalaki koyangana na zamba mpamba te Leta apekisaki mosala na biso. Na nsuka ya 1965, babéngaki biso mpo na kosala na filiale ya Batatoli ya Yehova na engumba Atene. Lisusu, lokola bandeko na ngai bazalaki kobɛla mingi, tozongaki na engumba Tesaloniki na 1967.

Atako tozalaki kokokisa bamposa ya libota, tozalaki mpe kokoba mosala ya kosakola. Mokolo moko, nasololaki na ndeko na ngai Kostas, nayebisaki ye makambo kitoko ya lisangá ya Nzambe mpe bolingo, bomoko, mpe ndenge bato oyo bazali na kati na yango batosaka Nzambe. Alobaki: “Makambo oyo makozala malamu soki mpenza Nzambe azali.” Andimaki nalakisa ye soki Nzambe azali mpenza to te. Nayebisaki ye ete biso tokokende na liyangani ya mikili mingi oyo Batatoli ya Yehova bakosala na engumba Nuremberg, na ekólo Allemagne na Augústo 1969. Atunaki soki akoki kokende na biso elongo, kutu ndeko na ye Alekos, oyo tozalaki mpe koyekola na ye Biblia asepelaki mpe kokende elongo na biso.

Liyangani ya Nuremberg ezalaki kitoko mpenza! Esalemaki na libándá monene ya masano epai Hitler azalaki kosepela soki alongi bitumba. Toyanganaki bato 150 000, mpe elimo ya Yehova emonanaki na makambo nyonso. Mwa moke na nsima, Kostas na Alekos bazwaki batisimo. Sikoyo bazali bankulutu baklisto, mpe lisusu basi mpe bana na bango bazali Batatoli.

Nabandaki koyekola Biblia na mwasi moko oyo asepelaki na solo. Mobali na ye alobaki ete alingi koyeba bindimeli na biso, mpe mwa moke na nsima ayebisaki ngai ete abéngaki mpe Sakkos, moto ya teoloji na Lingomba ya Ortodokse, mpo tósolola esika moko. Mobali ya mwasi yango alingaki kotuna ngai na Sakkos mwa mituna. Sakkos ayaki elongo na sango moko. Mobali yango alobaki, “Liboso, nalingi Sakkos ayanola na mituna misato.”

Mobali yango asimbaki Biblia oyo tozalaki kosalela na masolo, mpe atunaki, “Motuna ya liboso: Oyo ezali Biblia ya solosolo to ezali Biblia ya Batatoli ya Yehova?” Sakkos alobaki ete ezalaki libongoli ya malamu, mpe amonisaki ete Batatoli ya Yehova ‘balingaka Biblia mingi.’

Mobali yango akobaki, “Motuna ya mibale: Batatoli ya Yehova bazali mpenza bato ya bizaleli malamu?” Alingaki mpenzampenza koyeba soki bato oyo mwasi na ye alingi kosala na bango boninga bazali bato ya ndenge nini. Moto ya teoloji ayanolaki ete bazali solo bato ya bizaleli malamu.

Mobali yango alandisaki, “Motuna ya misato: Bafutaka Batatoli ya Yehova?” Moto ya teoloji ayanolaki ete, “Te.”

Mobali yango asukisaki ete “Nazwi biyano na mituna na ngai mpe nazwi ekateli na ngai.” Bongo alandaki koyekola Biblia mpe azwaki batisimo. Akómaki Motatoli ya Yehova.

Bomoi oyo epesi matomba mingi

Nakómaki lisusu mokɛngɛli ya zongazonga na Yanuáli 1976. Mbula motoba na nsima, nazwaki libaku ya kosangana na motindo ya sika ya mosala ya kosakola na ekólo Grèce—litatoli na balabala. Bongo, na Ɔkɔtɔ́bɛ 1991, ngai na mwasi na ngai tokómaki babongisi-nzela monene. Nsima ya mwa basanza, basalaki ngai lipaso ya motema. Lipaso yango elekaki malamu. Sikoyo, nzoto na ngai ezali mwa malamu, mpe nazongeli mosala ya ntango nyonso. Nazali nkulutu na lisangá moko na engumba Tesaloniki, nazali lisusu kosala na komite ya boyokanisi elongo na minganga mpo na kosunga bandeko oyo bazali na maladi.

Soki nakanisi bomoi na ngai, nandimi solo ete kosala makambo oyo esepelisaka Tata na biso ya likoló epesaka esengo. Nazali lisusu kosepela mpamba te uta kala nandimaki libyangi na ye oyo: “Mwana na ngai, zalá na mayele mpe sepelisá motema na ngai, ete nazongisela ye monɔkɔ oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Lisusu motema na ngai etondi na esengo ndenge nazali komona motuya ya bato ya sembo oyo bazali koya na ebongiseli ya Yehova na mokili mobimba ezali kobakisama. Kosangana na mosala ya kopesa bato bonsomi na nzela ya solo ya Biblia mpe kofungolela bango elikya ya bomoi ya seko na mokili ya sika ya boyengebene ezali mpenza libaku malamu!—Yoane 8:32; 2 Petelo 3:13.

Ntango nyonso tolendisaka bilenge basaleli ya Yehova ete bámityela mokano ya kosala mosala ya ntango nyonso, bápesa ye ntango mpe makasi na bango. Ɛɛ, kotya elikya epai na Yehova mpe koluka esengo na kosepelisáká motema na ye ezali bomoi oyo eleki bomoi nyonso oyo moto akoki kozala na yango!—Masese 3:5; Mosakoli 12:1.

[Bililingi na lokasa 21]

(Kobanda na lobɔkɔ ya mwasi kino lobɔkɔ ya mobali)

Mosala ya kolamba na Betele na 1965

Lisukulu na 1970 ntango Leta apekisaki mosala na biso

Ngai na mwasi na ngai na 1959

[Elilingi na lokasa 23]

Ngai na mwasi na ngai, Koula

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto