Lisolo ya bomoi
Etike oyo basundolaki azwi tata ya bolingo
YA DIMITRIS SIDIROPOULOS
Mokonzi moko ya basoda abwakelaki ngai mondoki mpe alobaki, “zwá mondoki oyo mpe bɛtá.” Naboyaki na malɛmbɛ. Basoda babangaki ntango bamonaki mokonzi na bango azali kobɛta masasi likoló na mapeka na ngai. Namonaki liwa na miso. Likambo ya esengo, nakufaki te. Kasi yango ezalaki mbala ya liboso te oyo bomoi na ngai ezalaki na likama.
TOZALAKI bato ya mwa etuluku oyo ezalaki pene na engumba Kayseri, na etúká ya Cappadoce, na ekólo Turquie. Emonani ete bato mosusu ya etuluku yango bandimaki solo na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.). (Misala 2:9) Kasi, na ebandeli ya ekeke ya 20, makambo ebongwanaki makasi mpenza.
Tokimi bitumba mpe na nsima nakómi mwana-etike
Mwa basanza nsima ya kobotama na ngai na 1922, bitumba kati na bituluku ya mboka na biso esalaki ete ngai ná baboti na ngai tókima na Grèce. Na nsɔmɔ wana, baboti na ngai bakimaki, bamemaki kaka ngai, biloko nyonso etikalaki. Nsima ya minyoko makasi, bakómaki na mboka Kiria, pene na Drama, na nɔrdi ya Grèce.
Ntango tata na biso akufaki, ngai nazalaki na mbula minei, mpe leki na ngai ya mobali autaki kobotama. Azalaki kaka na mbula 27, kasi bampasi oyo amonaki na ntango wana elɛmbisaki ye. Mama akómaki kokelela makasi mpe eumelaki te akufaki. Ngai ná leki na ngai totikalaki na biloko ya kobikela te. Bazalaki kotinda biso na bandako ekeseni epai babɔkɔlaka bitike, mpe ntango nakómaki na mbula 12, batindaki ngai na ndako moko oyo babɔkɔlaka bitike na Thessalonique, epai nayekolaki mosala ya mekanisiɛ.
Ntango nazalaki kokola na bisika wana epai bolingo ezalaki te, nazalaki komituna mpo na nini bato mosusu banyokwamaka mingi mpe basalelaka bango makambo na bosembo te. Nazalaki komituna mpo na nini Nzambe atiki makambo ya mabe motindo oyo esalema. Na mateya ya Nzambe oyo bazalaki kolakisa biso na kelasi, bateyaki biso ete Nzambe azali Mozwi-ya-Nguya-nyonso, kasi bapesaki ndimbola ya malamu te mpo na komonisa mpo na nini mabe ezali se kobakisama. Bazalaki koloba ete Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse nde ezali malamu mingi. Ntango natunaki bango, “Soki lingomba ya Ɔrtɔdɔkse nde ezali malamu mingi, mpo na nini bato nyonso basambelaka kuna te?” Bapesaki ngai eyano ya malonga te.
Kasi, molakisi na biso azalaki na limemya makasi mpo na Biblia, mpe ntango nyonso azalaki koyebisa biso ete Biblia ezali mokanda mosantu. Mokambi ya esika oyo babɔkɔlaka bitike azalaki mpe komemya Biblia mingi, kasi azalaki kokende na ndako-nzambe te. Ntango nalukaki koyeba ntina, bayebisaki ngai ete ayekolaki Biblia na Batatoli ya Yehova, lingomba moko oyo nayebaki te.
Nasilisaki kelasi na esika oyo babɔkɔlaka bitike na Thessalonique ntango nakómaki na mbula 17. Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, mpe Banazi bazwaki ekólo Grèce. Bato bazalaki kokufa na nzala na babalabala. Mpo nakufa te, nakimaki na mwa mboka moko epai nazalaki kosala mosala ya bilanga mpe bazalaki kofuta ngai mwa mbongo.
Nazwi biyano na Biblia
Ntango nazongaki lisusu na Thessalonique na Aprili 1945, yaya ya moninga na ngai moko oyo tozalaki na ye na bisika ya kobɔkɔla bitike ayaki kotala ngai. Paschalia ayebisaki ngai ete ndeko na ye ya mobali abungá mpe atunaki ngai soki nayebi esika azali. Ntango tozalaki kosolola, alobaki ete azali Motatoli ya Yehova mpe amonisaki ngai ete Nzambe atyelaka bato likebi.
Natyaki ntembe makasi. Mpo na nini ngai nazali komona bwale banda bomwana? Mpo na nini natikalá etike? Nzambe azalaka wapi ntango tosengelaka na ye? Paschalia atunaki ngai boye: “Ondimi mpenza ete Nzambe nde amemelaka bato mpasi nyonso wana?” Asalelaki Biblia mpe amonisaki ngai ete Nzambe anyokolaka bato te. Yango esalisaki ngai nayeba ete Mozalisi alingaka bato mpe mosika te akobongisa makambo. Asalelaki mikapo lokola Yisaya 35:5-7 mpe Emoniseli 21:3, 4, mpe amonisaki ngai ete mosika te bitumba, matata, maladi, mpe liwa ekosila, mpe bato ya sembo bakofanda libela na libela na mabelé.
Nazwi libota oyo ezali kosunga ngai
Nayokaki ete ndeko ya Paschalia akufaki na etumba moko ya batomboki. Nakendeki epai na bango mpo nabɔndisa bango, kasi, na esika ngai nabɔndisa bango, bango nde babɔndisaki ngai na nzela ya Biblia. Mokolo mosusu nakendeki lisusu koluka libɔndisi ya Biblia epai na bango, mpe mosika te nakómaki kosangana na mwa etuluku ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaki kosangana na nkuku mpo na koyekola mpe kosambela. Atako bapekisaki mosala ya Batatoli, ekateli na ngai ezalaki ya kokoba kosangana na bango.
Na kati ya etuluku ya baklisto wana ya komikitisa, nakutaki libota moko ya esengo mpe ya bolingo oyo nazangaki. Bapesaki ngai lisalisi ya elimo oyo nazalaki koluka. Bazalaki baninga oyo batyelaka bato likebi, baninga oyo bazalaki pene mpo na kosalisa mpe kobɔndisa ngai. (2 Bakolinti 7:5-7) Likambo eleki ntina, basalisaki ngai napusana penepene na Yehova, Nzambe oyo nakómaki komona lokola Tata na ngai ya bolingo. Bizaleli na Ye lokola bolingo, motema mawa, kotyela bato likebi ebendaki ngai mpenza. (Nzembo 23:1-6) Nsukansuka, nazwaki mpenza libota ya elimo mpe Tata ya bolingo! Makambo nyonso wana esimbaki motema na ngai. Mosika te namipesaki na Yehova mpe nazwaki batisimo na Sɛtɛmbɛ 1945.
Koyangana na makita ekolisaki kaka te boyebi na ngai, kasi ekolisaki mpe kondima na ngai. Lokola mituka ezalaki te, mingi kati na biso tozalaki kotambola kilomɛtrɛ soki mitano, kobanda na mboka na biso tii na esika makita ezalaki kosalema, kasi na nzela, tozalaki kobɛta masolo ya elimo oyo tokobosana te. Ntango nayokaki na 1945 ete nakoki kosala mosala ya ntango nyonso, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela. Kozala na boyokani makasi elongo na Yehova ezalaki na ntina mpo mosika te kondima mpe bosembo na ngai elingaki komekama makasi.
Botɛmɛli ebimisi matomba mosusu
Bapolisi bazalaki mbala mingi kokɔtela biso na mindoki ntango tozalaki kosala makita. Lokola etumba ezalaki na Grèce, mboka mobimba ezalaki na nse ya mibeko ya basoda. Bato ya bituluku oyo ezalaki kobunda bazalaki kobomana lokola banyama. Lokola mobulu ezalaki, bakonzi ya mangomba bandimisaki bakonzi ya mboka ete biso tozali Bakoministe mpe batindaki bango bányokola biso mabe mpenza.
Na boumeli ya mbula mibale, bakangaki biso mbala ebele, mpe mbala motoba bakatelaki biso etumbu ya sanza minei. Kasi, bandako ya bolɔkɔ etondaki na bato ya politiki oyo bakangaki, yango wana bazalaki kotika biso. Tosimbaki libaku wana oyo tomizelaki na yango te mpo na kokoba kosakola, kasi mwa moke na nsima, bakangaki biso lisusu mbala misato na pɔsɔ moko. Toyebaki ete bamemaki bandeko na biso mingi na bisanga oyo ezalaki na bato te. Kondima na ngai ekozala makasi mpo na kolonga komekama motindo wana?
Makambo ekómaki ndongo ntango basɛngaki ngai nakendeke na biro ya bapolisi mikolo nyonso. Mpo na kokɛngɛla ngai malamumalamu, bakonzi batindaki ngai na Evosmos, pene na Thessalonique, epai biro ya bapolisi ezalaki. Nakómaki kofutela ndako mosika te na biro ya bapolisi, mpe nazalaki kosala bambɛki ya fololo mpe mwa banzungu mpo na kozwa mwaye ya kobikela mpe mosala yango ezalaki kosɛnga ngai natambolaka mingi. Ntango nazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na bamboka ya zingazinga, mombongo na ngai wana ezalaki kosalisa ngai nakɔtaka na bandako mingi kozanga ete bapolisi bákanisela ngai mabe. Yango esalaki ete bato mingi báyoka nsango malamu mpe básepela na yango. Bato koleka zomi bamipesaki epai na Yehova.
Nakɔti bolɔkɔ mbala mwambe na boumeli ya mbula zomi
Bapolisi bakobaki kokɛngɛla ngai tii na nsuka ya mobu 1949, mpe na nsima, nazongaki na Thessalonique mpe nazalaki na mposa makasi ya kokoba na mosala ya ntango nyonso. Na 1950, ntango nazalaki kokanisa ete minyoko na ngai esili, basɛngaki ngai na makasi nakóma soda. Lokola nakɔtaka na makambo ya mokili te, nazwaki ekateli ya koboya ‘koyekola etumba.’ (Yisaya 2:4) Mpe nabandaki mobembo moko ya molai mpe ya mpasi oyo ememaki ngai na babolɔkɔ ya mabe mpenza ya Grèce.
Makambo nyonso ebandaki na engumba Drama. Na bapɔsɔ ya liboso, basoda oyo bakɔtaki sika bazalaki koyekola kobɛta mondoki. Mokolo moko, bamemaki ngai na esika yango. Mokonzi moko ya basoda abwakelaki ngai mondoki mpe alobaki na ngai nabɛta. Ntango naboyaki, abandaki kobɛta masasi pembeni na ngai. Ntango basoda mosusu bamonaki ete naboyi mpenza, babandaki kobɛtabɛta ngai. Bapelisaki makaya mpe bazalaki kozikisa ngai lobɔkɔ na mɔtɔ na yango. Na nsima, batyaki ngai na bolɔkɔ kaka ngai moko. Nasalaki wana mikolo misato. Bisika oyo makaya ezikisaki ngai ezalaki kosala mpasi makasi, mpe etikelaki ngai bilembo na mabɔkɔ na boumeli ya bambula ebele.
Liboso básambisa ngai na tribinale ya basoda, batindaki ngai na kaa moko ya basoda na engumba Iráklion, na Crète. Ntango nazalaki kuna, babɛtaki ngai lokola nyama mpo na kolɛmbisa bosembo na ngai. Lokola nabangaki ete kondima na ngai ekoki kolɛmba, nabondelaki tata na ngai ya likoló makasi mpo apesa ngai makasi. Maloba ya Yilimia 1:19 eyelaki ngai na makanisi: “Bakobunana na yo nde bakoleka yo te zambi ngai nazali na yo elongo, mpo na kobikisa yo, [Yehova] alobi bongo.” “Kimya ya Nzambe” ebɔndisaki ngai. Namonaki mpenza ete kotyela Yehova motema mobimba ezali likambo ya bwanya.—Bafilipi 4:6, 7; Masese 3:5.
Ntango basambisaki ngai lisusu, bakatelaki ngai etumbu ya bolɔkɔ bomoi na ngai mobimba. Bazalaki komona Batatoli ya Yehova lokola “banguna ya Leta” oyo baleki mabe. Bolɔkɔ yango ebandaki na Itsedin, pembeni ya engumba Canea, epai bazalaki kotya bato ya makambo mabe mingi, batyaki ngai kaka ngai moko. Itsedin ezalaki na ndako moko monene ya kala, mpe mwa esika oyo batyaki ngai etondaki na bampoko. Nazalaki komifinika elamba banda motó tii na makolo mpo bampoko bátambolatambola likoló na ngai te. Nabɛlaki makasi maladi ya mpema. Monganga alobaki na ngai ete esengelaki nafandaka libanda, mpe yango esalaki ete nasololaka na bato mingi ya bolɔkɔ. Atako bongo, maladi ekómaki makasi, mpe ntango makila ebandaki kobima ngai na mimpululu, batindaki ngai na lopitalo ya Iráklion.
Bandeko na ngai ya elimo basalisaki ngai lisusu. (Bakolose 4:11) Bandeko ya Iráklion bazalaki koya kotala ngai mbala na mbala, kobɔndisa ngai mpe kolendisa ngai. Nayebisaki bango ete nasengeli na mikanda mpo napesaka litatoli epai ya bato oyo bazali kosepela na nsango malamu. Bamemelaki ngai valize moko oyo nakokaki kobomba mikanda mpo bámona yango te. Oyo nde esengo ndenge nasalisaki bato ya bolɔkɔ soki motoba ntango nazalaki na bolɔkɔ bakóma baklisto ya solo!
Etumba kati na bana-mboka esilaki mpe bakitisaki etumbu na ngai ya bolɔkɔ na mbula zomi. Nalekisaki mikolo na ngai ya bolɔkɔ oyo etikalaki na engumba Rethimno, Genti Koule, mpe na engumba Cassandra. Nsima ya kokɔta bolɔkɔ mwambe na boumeli ya mbula soki zomi, babimisaki ngai, mpe nazongaki na Thessalonique, kuna bandeko baklisto bayambaki ngai malamu.
Bandeko basalisi ngai nakola na elimo
Ntango babimisaki ngai na bolɔkɔ, Batatoli na ekólo Grèce bakómaki na mwa bonsomi. Nazongelaki mbala moko mosala ya mobongisi-nzela. Mosika te, lipamboli mosusu ebakisamaki ntango nakutanaki na Katina, ndeko moko ya sembo, oyo alingaki Yehova mingi mpe azalaki na molende na mosala ya kosakola. Tobalanaki na Ɔkɔtɔbɛ 1959. Kobotama ya mwana na ngai ya mwasi Agape mpe kozala na libota ya boklisto esalisaki ngai nabosana mpasi ya kozala etike. Likambo eleki ntina, libota na biso ezalaki na esengo ya kosala na libateli ya Yehova, tata na biso ya bolingo.—Nzembo 5:11.
Lokola nakómaki na mokakatano ya mbongo, natikaki mosala ya mobongisi-nzela, kasi nazalaki kosalisa mwasi na ngai mpo akoba na mosala yango. Likambo moko ya ntina mingi na bomoi na ngai ya moklisto esalemaki na mobu 1969, ntango liyangani ya bikólo mingi ya Batatoli ya Yehova esalemaki na engumba Nuremberg, na Allemagne. Mpo na kokende na liyangani yango, nakɔtisaki mikanda mpo bápesa ngai passeport. Ntango mwasi na ngai akendeki na biro ya bapolisi mpo na kotuna mpo na nini sanza mibale mobimba eleki nazwi passeport te, mokonzi moko ya bapolisi abimisaki anvelopi moko na tirware na ye mpe atunaki boye: “Ozali kosɛnga passeport mpo na moto oyo mpo abenda bato ya Allemagne na lingomba na ye? Tokopesa ye te! Azali moto mabe.”
Kasi, na lisalisi ya Yehova mpe ya bandeko mosusu, bakɔtisaki nkombo na ngai na passeport ya bato ebele, mpe nsukansuka nazalaki na liyangani wana ya kitoko mpenza. Bayangani nyonso bazalaki koleka 150 000, mpe namonaki polele ete elimo ya Yehova ezali kotambwisa libota wana ya elimo na mokili mobimba mpe kosangisa yango esika moko. Na nsima, namonaki lisusu ntina mpenza ya libota ya boklisto.
Na mobu 1977, mwasi na ngai ya bolingo mpe moninga na ngai ya sembo akufaki. Nasalaki nyonso mpo nabɔkɔla mwana na ngai ya mwasi na mitinda ya Biblia. Kasi, na mbala wana mpe, libota na ngai ya elimo etikaki ngai te. Nakobosana soki moke te lisalisi ya bandeko na ntango wana ya mpasi. Basusu kati na bango bayaki kutu kofanda na biso mwa ntango mpo na kosalisa mwana na ngai. Nakobosana soki moke te bolingo ya solosolo oyo bamonisaki.—Yoane 13:34, 35.
Agape akolaki mpe abalá ndeko moko na nkombo Elias. Bazali na bana minei mpe bango nyonso bazali na kati ya solo. Na bambula oyo euti koleka, natungisamaki mingi na maladi ya bɔɔngɔ mpe nzoto na ngai ezali lisusu malamu te. Mwana na ngai ná libota na ye bazali kosunga ngai malamu mpenza. Atako nzoto ezali lisusu malamu te, makambo oyo ezali kosepelisa ngai ezali mingi. Nazali koyeba lisusu ntango oyo bandeko bazalaki kaka soki 100 na Thessalonique mobimba mpe tozalaki kosala makita na nkuku. Sikoyo, Batatoli bazali na ekólo yango soki 5 000. (Yisaya 60:22) Na mayangani, bandeko mingi ya bilenge batunaka ngai boye: “Ozali lisusu koyeba ntango ozalaki komema bazulunalo na ndako na biso?” Atako baboti bazalaki kotánga bazulunalo yango te, bana na bango batángaki yango mpe bakolaki na elimo!
Soki natali ndenge ebongiseli ya Yehova ekoli, namonaka ete nayikelaki minyoko wana nyonso mpiko mpamba te. Nayebisaka ntango nyonso bankɔkɔ na ngai ná bilenge mosusu ete bákanisa Tata na bango ya likoló na bolenge na bango, mpe akotika bango soki moke te. (Mosakoli 12:1) Yehova akokisaki liloba na ye mpe akómaki mpo na ngai “tata ya bitike.” (Nzembo 68:5) Atako nazalaki mwana etike oyo basundolaki na bomwana mpenza, nsukansuka, nazwaki Tata oyo asungi ngai!
[Elilingi na lokasa 22]
Nazalaki molambi na bolɔkɔ ya engumba Drama
[Elilingi na lokasa 23]
Ngai ná Katina, mokolo ya libala na biso, na 1959
[Elilingi na lokasa 23]
Liyangani na zamba moko pene na Thessalonique, na nsuka ya bambula ya 1960
[Elilingi na lokasa 24]
Ngai, mwasi na ngai mpe mwana na biso ya mwasi, na 1967