Babosani Klisto na Noele?
“Nakangaka mpenza ntina ya bisengo ya eleko ya Noele te. Namonaka ete eyokani ata moke te na bomoi mpe mateya ya Yesu.”—Mohandas Gandhi.
BATO mingi bakoki kondima likanisi ya Gandhi ata moke te. Mbala mosusu bakotuna ete, ‘Moto yango ya politiki azalaki mpe moto ya Lingomba ya Bahindu akokaki koyeba makambo nini na feti ya boklisto?’ Kasi, tokoki koboya te ete Noele epalangani na mokili mobimba, ekɔti na mimeseno ya bato nyonso. Emonani lokola ete sanza na sanza ya Desɛ́mbɛ, feti yango esalemaka na mokili mobimba.
Na ndakisa na Azia, bato soko milio 145 bakumisaka Noele, nzokande eleki soki mbula zomi, ezalaki milio 40. Mpe soki “bisengo” oyo Gandhi alobelaki ezali makambo ya losambo te oyo esalemaka na mikolo na biso na feti ya Noele—ndenge tomonaka bato bazali kosombasomba biloko—tokoki koboya te ete yango nde likambo oyo eleki kosalema na feti yango. Zulunalo Asiaweek eyebisi ete: “Na Azia, Noele ezali mpenza feti ya mokili (mingimingi mpo na kotɛkisa biloko)—banda na ebele ya miinda oyo bapelisaka na ntango ya feti yango na Hong Kong, leka na banzete milai ya Noele na bikɔtelo ya baotɛlɛ ya engumba Pékin mpe na elyelo ya elilingi oyo basalaka na engumba Singapour.
Na mikolo na biso, bato babosani Klisto na ndenge na bango ya kokumisa Noele? Eyebani ete dati ya 25 Desɛ́mbɛ ebandaki kokumisama na ekeke ya minei T.B. Lingomba ya Katolike ya Loma eponaki mokolo yango mpo na kokumisa kobotama ya Yesu. Kasi, ankɛtɛ moko esalemi mikolo oyo na États-Unis emonisi ete bobele bato 33 likoló na monkama bamonaka ete kobotama ya Klisto nde likambo oyo eleki ntina na Noele.
Omonaka ntango mosusu ete makambo lokola ebele ya bapiblisite, ndenge bato babɛtaka motó mpo na kosomba makabo ya kotindela baninga na bango, kokembisa banzete na biloko ya ngɛlingɛli, kobongisa mpe kokende bafeti, kotinda bakalati—nyonso wana esali ete bato bábosana Yesu?
Bato mingi bamonaka ete likambo oyo bakoki kosala mpo bábosana Klisto te na Noele ezali ya kosala elyelo ya elilingi, to crèche. Na ntembe te osilá komona mwa bikeko yango oyo ezali komonisa mwana Yesu na kati ya elyelo, mpe zingazinga na ye Malia, Yosefe, babateli na mpate, “bato na mayele misato,” to “bakonzi misato,” bibwele, mpe batali. Bato mingi bamonaka ete bilyelo wana esalisaka bato ete bámikundola ndimbola ya solo ya Noele. Zulunalo U.S. Catholic elobi ete, “elyelo ya elilingi emonisaka makambo malamu koleka ndenge oyo ata evanzile nini ekoki komonisa yango, atako yango mpe emonisaka mpenza ete masolo yango ezali makambo masalemaki solo te.”
Kasi, ndenge nini elyelo ya elilingi ekoki kopesa likanisi ete masolo ya Baevanzile ya Biblia ezali makambo oyo masalemaki solo te? Ya solo mwa bikeko wana bisalami malamu bimonisaka lokola ete kobotama ya Klisto ezali se lisapo to lisese. Sango moko nde abandaká kopalanganisa elilingi yango epai ya bato na ekeke ya 13. Na ebandeli, elyelo ya elilingi ezalaki mpenza kobenda likebi ya bato mingi te. Lelo oyo, elyelo ya elilingi ekómi mombongo monene, ndenge moko na makambo mosusu oyo esalemaka na feti yango. Na engumba Naples, na ekólo Italie, na boumeli ya mbula mobimba, bamagazini mingi etɛkisaka bikeko oyo batyaka na bililingi ya elyelo to ba presepi. Bikeko mosusu oyo bato basepelaka na yango mingi ezali na bilongi ya bato oyo balobelami na Baevanzile te, kasi bato oyo bayebani mingi lelo oyo, lokola Princesse Diana, Mère Teresa, to mpe Gianni Versace, mosali ya midɛlɛ ya bilamba. Kutu na bisika mosusu, basalaka ba presepi na shokola, na macaroni, to mpe na mbɛmbɛ. Okoki kokanga ntina oyo ezali mpasi ete lisolo ya kobotama ya Yesu ezala likambo ya solo na lisalisi ya bililingi wana.
Boye, ndenge nini bililingi wana ya kobotama ya mwana Yesu bikoki ‘komonisa malamu koleka ndenge oyo ata evanzile nini ekoki komonisa yango’? Masolo ya Baevanzile mazali mpenza solo? Ata babɛti-ntembe makasi bandimaka ete Yesu azalaki mpenza moto. Na bongo, ntembe ezali te ete azalaki mwana mpe abotamaki na mboka moko. Esengeli kozala na lolenge ya malamu koleka mpo na koyeba lisolo ya makambo oyo esalemaki ntango Yesu abotamaki; lisolo oyo ekoki koyebisa makambo malamu koleka ndenge kotala elyelo ya elilingi ekoki koyebisa!
Ɛɛ, lisolo yango ezali. Bakomi mibale ya makambo ya kala bakomaki masolo ya kobotama ya Yesu, moto na moto na esika na ye. Soki mbala mosusu omonaka ete bato babosani Klisto na Noele, talelá naino masolo yango yo moko. Kuna okokuta masapo te, kasi lisolo kitoko—lisolo ya solo oyo elobeli kobotama ya Klisto.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Mayemi pembeni pembeni ya nkasa 3-6, 8, and 9: Fifty Years of Soviet Art