Molimo ekufaka te: Ebandeli ya liteya yango
“Ezali na lisolo mosusu te oyo ekɔta mpenza mozindo na makanisi ya bato koleka lisolo litali ezalela ya moto nsima ya liwa.”—BUKU “ENCYCLOPÉDIE DE LA RELIGION ET DE L’ÉTHIQUE.”
1-3. Lolenge nini Socrate na Platon bakolisaki likanisi oyo elobaka ete molimo ekufaka te?
MOBANGE moko ya mobali, nganga-mayele mpe molakisi, oyo azalaki na mibu 70, afundamaki ete mateya na ye mazalaki kotyola Nzambe mpe kobebisa makanisi ya bilenge. Ntango bazalaki kosambisa ye, alobaki na mpiko nyonso, kasi lokola bazuzi yango bayinaki ye, bakweisaki ye na likambo mpe bakatelaki ye etumbu ya liwa. Mwa ntango moke liboso ete báboma ye, molakisi yango mobange alimbolelaki bayekoli oyo bazalaki wana, na kosaleláká bilembeteli minene ete molimo ekufaka te, mpe na bongo, esengeli kobanga liwa te.
2 Moto yango oyo bakatelaki ye etumbu ya liwa ezalaki bongo Socrate, moto ya filozofi Mogreke oyo ayebani mingi, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya 5 L.T.B.a Moyekoli na ye, Platon, akomaki makambo yango na mikanda na ye Apologie mpe Phaédon. Socrate na Platon bazali kati na bato oyo bateyaki mpo na mbala ya liboso liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Kasi bazalaki babandisi ya liteya yango te.
3 Lokola tokomona yango, likanisi oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebandá kala mpenza. Kasi Socrate na Platon babongisaki yango mpe bakómisaki yango liteya ya filozofi; bayeisaki yango liteya kitoko mpo na bato ya mayele oyo bazalaki na eleko na bango mpe na bileko oyo bilandaki.
Longwa na ntango ya Pythagore kino kotongama ya bapiramide
4. Liboso ya ntango ya Socrate, makanisi ya Bagreke ezalaki nini na ntina na bomoi nsima ya liwa?
4 Bagreke oyo bazalaki na bomoi liboso ya ntango ya Socrate na Platon, bazalaki mpe kondima ete molimo ekobaka kozala na bomoi ata nsima ya liwa ya nzoto. Pythagore, nganga-mayele ya lokumu ya ekólo Grèce na matematiki, oyo azalaki na bomoi na ekeke ya 6 L.T.B., andimaki ete molimo ekufaka te mpe ekoki kokɔta na ekelamu mosusu. Liboso na ye, Thalès de Milet, moko na bato ya libosoliboso ya filozofi na mboka Grèce, azalaki kokanisa ete molimo oyo ekufaka te ezwami bobele epai na bato, to epai na nyama, to milona te kasi mpe na biloko lokola emá, mpo ete yango ebendaka ebende. Bagreke ya ntango ya kala bazalaki kokanisa ete milimo ya bakufi mizalaki kokatisa ebale Styx mpo na kokende kino mokili monene na nse ya mabelé, mokili ya bawei. Kuna, bazuzi bazalaki kokatela milimo mosusu etumbu ya konyokwama kati na bolɔkɔ oyo ezingelamaki na bifelo ya milaimilai, mpe basusu bazalaki kozwa mbano ya komona bisengo kati na mokili ya banzambe.
5, 6. Lolenge nini bato ya Perse bazalaki kotalela molimo?
5 Na ekólo Iran, oyo ebéngamaki kala Perse, kuna na ɛsti, profeta moko na nkombo Zoroastre azalaki na bomoi na ekeke ya 7 L.T.B. Abimisaki lingomba moko oyo liyebanaki na nkombo ya Zoroastrisme. Yango ezalaki Lingomba ya Leta ya bokonzi ya ekólo Perse, oyo ezalaki koyangela mokili mobimba liboso ya boyangeli ya Grèce. Makomami ya Zoroastrisme elobi ete: “Kati na bomoi oyo ekufaka te, molimo ya moto ya sembo esengeli kozala na esengo libela na libela, kasi molimo ya mobuki na lokuta ekonyokolama solo. Yango ezali mobeko euti epai na Mokonzi Monene, Ahura Mazda, [“nzambe ya mayele”].”
6 Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezalaki mpe koteyama na ekólo Iran liboso ete Lingomba ya Zoroastre, Lingomba ya Leta, esalema. Na ndakisa, bato ya bituluka ya kala ya ekólo Iran bazalaki komibanzabanza mpo na milimo ya bawei na kopesáká bango mbeka ya bilei mpe bilamba oyo bakosalela yango na mokili ya bawei.
7, 8. Bato ya kala ya Ezipito bazalaki kokanisa nini na ntina na molimo nsima ya liwa ya nzoto?
7 Kondima ete bomoi ezalaka nsima ya liwa ezalaki liteya ya moboko ya Lingomba ya Ezipito na ntango ya kala. Baezipito bazalaki kondima ete molimo ya moto oyo akufi ekosambisama na Osiris, nzambe mokonzi ya mokili ya bawei. Na ndakisa, mokanda moko oyo mokomamaki na papirise, soko na ekeke ya 14 L.T.B., emonisi lolenge Anubis, nzambe mobateli ya malita, azali koya na molimo ya mokomeli Hunefer epai kiti ya bokonzi ya Osiris ezali. Batii motema ya mokomeli yango, elingi koloba lisosoli na ye, na emekeli. Bameki kilo na yango na oyo ya nsuki ya nzambe-mwasi ya bosolo mpe ya boyengebene. Thoth, nzambe mosusu, azali koluka koyeba kilo ya motema ya Hunefer. Lokola yango eleki nsuki ya nzambe-mwasi na kilo te, elimboli ete lisosoli ya Hunefer lizali na ngambo te; na bongo, Hunefer azwi ndingisa ya kobɛlɛma na kiti ya bokonzi ya Osiris mpo na kozwa bomoi oyo ekufaka te. Mokanda yango emonisi mpe elima moko ya mwasi oyo etɛlɛmi na emekeli yango ya kilo, azali kozela mowei mpo amela ye soki alongi mamekani yango te. Bato ya kala ya Ezipito mpe bazalaki kobatela nzoto ya bawei mpo epɔla te mpe bazalaki kobomba nzoto ya Bafarao kati na malita mineneminene to bapiramide, mpamba te bazalaki kokanisa ete soki nzoto ya mowei ebatelami malamumalamu, molimo na ye ekokoba kozala na bomoi.
8 Na bongo, basivilizasyo ya kala ndenge na ndenge ezalaki koteya liteya moko—oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Bazwaki liteya yango esika moko?
Ebandeli na yango
9. Lingomba nini ezalaki na bopusi makasi likoló na mokili ya Ezipito, ya Perse mpe ya Grèce ya kala?
9 Buku The Religion of Babylonia and Assyria (Lingomba ya Babilone mpe ya Asulia) elobi ete: “Na mokili ya ntango ya kala, Lingomba ya Babilone ezalaki na bopusi likoló na mokili ya Ezipito, ya Perse mpe ya Grèce.” Buku yango elandi kolimbola ete: “Na kotalela boyokani oyo ezalaki kala kati na Ezipito mpe Babilone, lokola yango emonisami na bitanda ya makomi ya El-Amarna, likoki ezalaki mpenza ete makanisi mpe mimeseno ya Babilone ekɔta na losambo ya Baezipito. Na Perse, losambo ya nzambe-moi Mithra ezalaki komonisa mpenza bopusi ya makanisi ya Babilone . . . Banganga-mayele mingi bandimisami mpenza ete mateya ya bato ya kala ya Azia makɔtaki mpenza na masapo ya kala ya Bagreke mpe na losambo na bango, na boye ete esengeli kobeta lisusu ntembe te. Mateya yango ya bato ya kala ya Azia mauti mpenzampenza na Babilone.”b
10, 11. Bato ya Babilone bazalaki kokanisa nini na ntina na bomoi nsima ya liwa?
10 Kasi makanisi ya bato ya Babilone likoló na oyo ekómelaka moto nsima ya liwa, ekeseni na oyo ya Baezipito, ya bato ya Perse mpe ya Bagreke, boye te? Tókamata, na ndakisa, lisapo ya lokumu ya Babilone oyo ebéngami Epic of Gilgamesh (Lisapo ya Gilgamesh). Ntango abandaki kokóma mobange, Gilgamesh, oyo alobelami kati na lisapo yango, abandaki kobanga liwa mpe mpo na yango akómaki kolukaluka bomoi oyo ekufaka te kasi azwaki yango te. Na boumeli ya mobembo na ye, akutanaki na mwana mwasi moko moteki masanga oyo alendisaki ye ete asepela mingi koleka nde na bisengo ebele ya bomoi oyo azali na yango, mpo ete bomoi oyo ekufaka te oyo ye azali koluka, akozwa yango te. Lisapo yango elingi mpenza komonisa ete moto moko te akoki kokima liwa mpe ete elikya ya bomoi oyo ezangi nsuka ezali bobele ndɔtɔ mpamba. Kasi yango emonisi ete bato ya Babilone bazalaki kondima te ete bomoi ezalaka nsima ya liwa?
11 Profesere Morris Jastrow, Jr., ya Iniversite ya Pennsylvanie na États-Unis akomaki ete: “Ezala bato [ya Babilone] to batambwisi ya lingomba [ya Babilone], bazalaki kokanisa ata moke te ete bomoi esukaka na liwa. Na makanisi na bango, liwa ezali bobele nzela mpo na koleka na lolenge mosusu ya bomoi mpe soki bazalaki koboya kondima ete moto moko te akoki kozwa bomoi oyo ekufaka te, ezalaki bobele mpo na kondimisa ete moto nyonso asengeli kokufa mpo ete alikya kokoba kozala na bomoi na nzela ya mbongwana oyo esalemaka nsima ya liwa.” Ɛɛ, bato ya Babilone bazalaki mpe kokanisa ete moto akobaka kozala na bomoi nsima ya liwa, na lolenge moko to na lolenge mosusu. Bamonisaki endimeli yango wana bazalaki kokunda mowei elongo na biloko oyo bazalaki kolikya ete akosengela na yango na mokili ya bawei.
12-14. (a) Nsima ya Mpela ya mokili mobimba, epai wapi liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebandaki? (b) Lolenge nini liteya yango epalanganaki na mokili mobimba?
12 Na ntembe te, liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ebandaki na Babilone na ntango ya kala. Engebene Biblia, buku oyo endimami mpo na bosikisiki na yango na makambo matali istware, Nimilode, mwana ya mwana ya Noa nde atongaki engumba Babele, elingi koloba Babilone.c Nsima ya Mpela ya mokili mobimba na mikolo ya Noa, bato nyonso bazalaki koloba lokota moko mpe kosambela na lingomba moko. Ntango bazalaki kotonga engumba yango mpe ndako na yango ya baetaze, Nimilode abandisaki lolenge mosusu ya losambo. Lisolo ya Biblia ezali komonisa ete nsima ya mobulungano ya nkota na Babele, batongi ya ndako yango bakokisaki mokano na bango te, bapalanganaki mpe babandaki kotambwisa bomoi na bango lokola bato mosusu nyonso, komemáká na bisika yango mimeseno ya losambo na bango. (Genese 10:6-10; 11:4-9) Ezali na motindo wana nde mateya ya lingomba ya Babilone mapalanganaki na mokili mobimba.
13 Engebene lisolo ya bato, Nimilode akufaki liwa ya nsɔmɔ. Na ntembe te, nsima ya liwa na ye, bato ya Babilone bakumisaki ye lokola mobandisi, motongi, mpe mokonzi ya liboso ya engumba na bango. Mpo ete Marduk (Merodach) atalelamaki lokola nzambe mpe mobandisi ya engumba Babilone, banganga-mayele mosusu bakanisaka ete Marduk yango ezalaki bobele Nimilode oyo bato basambelaki lokola nzambe. Soki ezali mpenza bongo, na yango liteya oyo elobaka ete molimo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa epalanganaki kobanda liwa ya Nimilode. Atako boni, istware emonisi ete nsima ya Mpela ya mokili mobimba, eutelo ya liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezalaki Babele to Babilone.
14 Kasi lolenge nini liteya yango eyaki kokóma liteya ya moboko ya mangomba mingi mpenza na ntango na biso? Eteni oyo elandi ekotalela lolenge yango ekɔtaki na mangomba ya mikili ya Azia.
[Maloba na nse ya lokasa]
a L.T.B. elimboli “Liboso ya Ntango na Biso.” T.B. elimboli “Ntango na Biso.”
b El-Armana ezali esika oyo engumba moko ya Ezipito na nkombo Akhetaton ezalaká kala, engumba oyo balobaka ete etongamaká na ekeke ya 14 L.T.B.
c Talá buku La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?, nkasa 37-54, ebimisami na Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania.
[Bililingi na lokasa 6]
Likanisi ya Baezipito na ntina na milimo kati na mokili ya bawei
[Elilingi na lokasa 7]
Socrate azalaki kondimisa ete molimo ekufaka te