Tozali komeka kosala ete bato bázala ndenge moko
Etikali moke Mozalisi asala ete bato nyonso bázala ndenge moko, na ndenge oyo balingaka. Liboso na yango, tokoki kosala mwa makambo mosusu mpo ete bokeseni oyo tozali komona mpe oyo ezali kobebisa mabota na biso ekita mwa moke. Nelson Mandela, oyo azalaki prezida ya Afrika ya Sudi alobaki ete: “Eloko oyo ekabolaka moto na moninga na ye ezali te makoki oyo bapesá biso, kasi ezali ndenge oyo tosalelaka makoki oyo tozali na yango.”
MAKAMBO oyo bato basalaka banda kala ezali kolakisa ete maloba ya Nelson Mandela ezali solo. Bato mingi bakutá biloko mingi te na esika oyo babotamaki, kasi lokola bayebaki kosalela mwa moke oyo bazalaki na yango, babongisaki bomoi na bango mpe balekaki baninga na bango oyo bazalaki na biloko mingi. Nzokande, bato mosusu oyo bayaki kokuta bomɛngo, basalelaki yango malamu te mpe bazwelaki yango mpenza litomba te.
Salelá malamu biloko oyo ozali na yango!
Batatoli ya Yehova basepelaka mpenza kosalisa bato báyekola Biblia mpo báyeba mikano ya Nzambe. Kasi, bayebi ete mpo bato bázwa litomba na makambo ezali na Biblia basengeli koyeba mokanda. Yango wana, Batatoli ya Yehova balakisi bato ebele kotánga mpe kokoma. Na mokili moko ya Afrika ya Wɛsti, basalisi bato 23 000 (na bambula ya 1990). Zulunalo San Francisco Examiner eyebisaki boye mpo na mosala monene ya kosalisa bato oyo Batatoli ya Yehova bazali kokokisa: “Bokoki kotalela bango lokola banamboka oyo bazali kopesa ndakisa ya malamu. Bafutaka mpako na bango na ndenge esengeli, basungaka bato ya maladi, balakisaka bato kotánga mpe kokoma.”
Lisusu, na nzela ya kelasi oyo ezali koteya ndenge ya koloba liboso ya bato, Batatoli ya Yehova basalisi bato ebele bákóma balobi malamu, balobi oyo bakoki koloba kozanga kobanga liboso ya bato. Na kati ya bato yango, ezali na baoyo, koloba liboso ya bato ezalaki mikakatano monene. Tókamata ndakisa ya moto moko ya Afrika ya Sudi. Ye akomi boye: “Nazalaki na likukuma makasi. Kutu, nakómaki kokima bato. Nazalaki kolinga ete bato mosusu bálobaka na esika na ngai. . . . Ntango napesaki nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe ntango basɛngaki ngai natánga Biblia liboso ya mwa bato moke . . . , Nazalaki kokangama mingi na boye ete nakokaki kosilisa kotánga te na miniti oyo bapesaki ngai. Nsima ya makita, [motambwisi] apesaki ngai toli ya malamu mpenza. Apesaki ngai likanisi ete nátángaka mbala na mbala na mongongo makasi ntango nazali ngai moko. Nasalaki mpe bongo. Mokolo na mokolo nazalaki kolekisa bangonga mpo na kotánga Biblia mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mongongo makasi.” Moto yango akómaki mpenza kotánga malamu mpe koloba malamu na boye ete lelo oyo asalaka masukulu liboso ya bato ezala bazali bankama, to mpe bankóto.
Kozala ndenge moko na kati ya bandeko
Batatoli ya Yehova nyonso batángá kelasi ndenge moko te, bazali na kolɔngɔnɔ ya nzoto ndenge moko te, bazali na bozwi ndenge moko te mpe basalaka mosala moko te. Bokeseni yango ezali mpenza komonisa polele ete makambo ya mokili oyo tofandi ezali mpenza mabe. Kasi, Batatoli bakeseni na bato ya mangomba mosusu mpamba te tobwaki mpenza ezaleli ya komona bato mosusu mpamba mpo bazali na loposo mosusu, to bazali na lokumu to mosala ndenge moko te.
Batatoli ya Yehova bazali kokokisa likambo yango mpo bazali kosala makasi básalela makambo oyo Biblia ezali koteya bango. Bazali kondima mpenza makanisi ya Biblia lokola oyo: “[Yehova] akotalaka lokola ekotalaka moto te. Moto akomonaka lolenge na libándá nde [Yehova] akotalaka kati na motema.” (1 Samwele 16:7) “Nzambe akokabolaka bato te; Kasi na mabota nyonso, oyo akobangaka ye mpe akosalaka boyengebene ayambami na ye.” (Misala 10:34, 35) “Bózongisaka mabe mpo na mabe te; bolikyaka mpo na yango emonani sembo na miso na bato nyonso. Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bózala na bato nyonso kimya.”—Baloma 12:17, 18; talá lisusu 1 Timote 6:17-19; Yakobo 2:5, 9.
Lokola balandaka mpenza mibeko ya Biblia oyo ezali kolendisa bomoko, Batatoli ya Yehova bandimaka te ete kati na bango bato bákabwana mpo na mposo, lokumu, to mpo na bozwi. Na ndakisa, batalelaka makambo wana te mpo na kopona baoyo bakoki kozwa mikumba na kati ya lisangá ya boklisto. Mikumba lokola koteya mpe kozala mokɛngɛli epesamaka na baoyo bakokisi masɛngami ya elimo.—1 Timote 3:1-13; Tito 1:5-9.
Bato oyo bazali konyokwama mpo na bokeseni oyo ezali na mokili mabe oyo balendisami mpenza na ndenge bazali elongo na bato oyo bazali kotalela bango lokola bandeko na bango oyo, na miso ya Mozalisi, bazali ndenge moko! Martina amonaki mpenza likambo yango. Lokola tata na ye asundolaki libota, mama na ye, atako azalaki mobola, abɔkɔlaki bango ye moko. Mbala mingi, bato mosusu bazalaki komona ye lokola eloko mpamba, ye moko azalaki na kobangabanga, mpe azalaki kokoka kozala esika moko na bato te. Akómaki mwana ya mawa. Kasi, makambo ebongwanaki ntango akómaki koyekola Biblia mpe akómaki Motatoli ya Yehova. Alobi boye: “Tii sikoyo nasalaka makasi nabengana makanisi ya kolɛmba nzoto, kasi sikoyo nayebi mpenza ndenge ya kosala soki nazali na mikakatano. Nakómá komiyoka ete nazali na ntina, mpe nakómá koloba na mpiko. Solo ya Biblia esalisi ngai nayeba kozwa mikumba na ngai na mabɔkɔ mibale. Nayebi sikoyo ete Yehova alingaka ngai mpe bomoi na ngai ezali na ntina.”
Batatoli ya Yehova bazali baklisto oyo bazali na mikili koleka 230; bazali ndenge moko na makambo mingi, yango wana bakeseni mpenza na bato mosusu na mokili oyo. Lingomba mosusu nini ekoki koloba ete bandimi na yango bazali ndenge moko mpe kondimisa yango na misala?
Kasi, Batatoli ya Yehova bamindimisaka na ndenge oyo eleki ndelo te. Bayebi malamu ete lokola bazali na mokili ya masumu, bakoki kolonga te na kosala ete bato nyonso bázala ndenge moko. Likambo oyo bato mosusu, na boumeli ya bambula mingi, bamekaki kosala kasi balongaki te. Atako bongo, bazali na esengo ete bazali kosala makasi mpo bákitisa elimo yango ya mabe. Mpe lokola bandimi mpenza elaka ya Nzambe, bazali kozela mokili ya sika ya bosembo epai bato bakozala ndenge moko libela na libela.
Ɛɛ, etikali moke bato nyonso oyo batosaka Nzambe bakozala na “lokumu mpe ntomo” ndenge moko oyo, na ebandeli, Mozalisi akanaki bázala na yango. Talá likanisi malamu boye! Mpe ntango yango ekoya solo!
[Elilingi na lokasa 7]
Batatoli ya Yehova bazali kolakisa bankóto ya bato kotánga mpe kokoma
[Elilingi na lokasa 8]
Mateya ya Biblia ezali kolongola makanisi ya kokabola bato na kotalela mposo, lokumu, mpe bozwi.