Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/8 nk. 10-11
  • Mateya ya filozofi ya Bagreke-Ebongisaki mateya ya boklisto?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mateya ya filozofi ya Bagreke-Ebongisaki mateya ya boklisto?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Lingomba ya Bayuda oyo esangisami na mimeseno ya Bagreke”
  • “Mimeseno ya Bagreke oyo esangisami na mateya ya boklisto”
  • “Boklisto oyo esangisami na mimeseno ya Bagreke” mpe “filozofi ya boklisto”
  • Mateya oyo ezali kobebisa
  • Mateya ya solo
  • Lolenge liteya yango ekɔtaki na Lingomba ya Bayuda, na mangomba ya boklisto mpe na Lingomba ya Bamizilma
    Nini ekómelaka biso soki tokufi?
  • Batata ya lingomba balongisaki solo ya Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Platon
    Lamuká!—2013
  • Bomoi nsima ya liwa​—⁠bato bazali na bindimeli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/8 nk. 10-11

Mateya ya filozofi ya Bagreke-Ebongisaki mateya ya boklisto?

“Atako bindimeli ya boklisto ezalaki koyokana te na mimeseno ya Bagreke na Baloma, baklisto bandimaki makambo mingi ya filozofi na bango.”—Euti na buku The Encyclopedia Americana.

NA KATI ya bato oyo babongolaki mpenza mateya ya “boklisto,” “Saint” Augustin azali na molɔngɔ ya liboso. Buku moko (The New Encyclopædia Britannica) elobi ete “Augustin asangisaki mateya ya Nouveau Testament na mateya ya filozofi ya Platon; mpe ezali mateya wana oyo esangisamaki nde eteyamaki na Lingomba ya Katolike mpe Lingomba ya Protesta na Moyen Âge.”

Mateya ya Augustin ezali tii lelo oyo. Douglas Holden, alobaki boye mpo na komonisa kino wapi filozofi ya Bagreke ekɔtaki mpe ebongolaki mpenza mateya ya boklisto: “Mateya ya boklisto esangisamaki na mateya ya filozofi ya Bagreke na boye ete bato bakómaki na makanisi mingi (90 %) ya Bagreke mpe bobele mwa makanisi moke (10 %) ya boklisto.”

Balimboli mosusu ya Biblia balobaka ete mateya ya filozofi esalisaki baklisto na ebandeli na bango, ebongisaki lisusu malamu mateya na bango, mpe epesaki nzela na bato bándima mateya ya boklisto. Ezalaki mpenza bongo? Ndenge nini mpe ntango nini mateya ya filozofi ya Bagreke ekɔtaki na mateya ya boklisto? Ebongisaki mpenza mateya ya boklisto to ebebisaki yango?

Mpo na koyeba yango malamu tólobela makambo oyo elandanaki kobanda ekeke ya misato L.T.B. tii ekeke ya mitano T.B. na kotalela makambo minei oyo ezali ya kokamwisa mpenza: (1) “Lingomba ya Bayuda oyo esangisami na mimeseno ya Bagreke,” (2) “Mimeseno ya Bagreke oyo esangisami na mateya ya boklisto,” (3) “Boklisto oyo esangisami na mimeseno ya Bagreke,” mpe (4) “filozofi ya boklisto.”

“Lingomba ya Bayuda oyo esangisami na mimeseno ya Bagreke”

Ya liboso, koloba “Lingomba ya Bayuda oyo esangisami na mimeseno ya Bagreke,” ezali mpenza likambo oyo ebongi te. Yehova, Nzambe ya solo nde abandisaki Lingomba ya Bayuda. Lingomba yango esengelaki kobebisama te na mateya ya mangomba ya lokuta. (Deteronome 12:32; Masese 30:5, 6) Nzokande, kaka na ebandeli, misala mpe makanisi ya mabe ya mangomba ya lokuta ya bikólo oyo ezalaki zingazinga na Bayisalaele, lokola Baezipito, Bakanana, mpe bato ya Babilone ebebisaki losambo ya Bayuda. Likambo ya mawa, Bayisalaele babebisaki mpenza losambo na bango ya pɛto.​—Basambisi 2:11-13.

Bikeke mingi na nsima, mpenzampenza na ekeke ya minei L.T.B., ntango Alesandala Monene azalaki mokonzi, Grèce ekómaki koyangela Palestine ya kala. Na ntango yango losambo ya Bayisalaele ebebaki mingi koleka mpe likambo yango eumelaki ntango molai. Bayuda mosusu bakómaki basoda ya Alesandala. Boyokani ya Bayuda na Bagreke oyo bakómaki koyangela bango ebebisaki mateya ya Lingomba ya Bayuda. Na bakelasi ya Bayuda bakómaki koteya makambo ya Bagreke. Balobaka ete Nganga-monene Yasona asalaki eteyelo moko oyo ezalaki koteya mateya ya Greke na Yelusaleme na mobu 175 L.T.B. mpo na koteya makanisi ya Homère.

Kutu, Mosamalia moko, akomaki mokanda moko pene na nsuka ya ekeke ya mibale L.T.B.; mpe alukaki komonisa ete masolo ya Biblia ezali makambo ya ntango ya kala oyo ekomamaki na ndenge ya Bagreke. Mokanda ya Yudite na mokanda ya Tobia, mikanda ya Bayuda oyo ezali na kati ya mikanda ya Biblia te, ezali na mwa masapo ya Bagreke oyo elobelaka makambo ya kosangisa nzoto. Bayuda mingi bakómaki bato ya filozofi mpe bamekaki koyokanisa makanisi ya Bagreke na Lingomba ya Bayuda.

Philon, Moyuda moko na ekeke ya liboso T.B. amipesaki mingi na likambo yango. Amipesaki mingi na mateya ya Platon (ekeke ya minei L.T.B.), na mateya ya balandi ya Pythagore, mpe mateya ya Basetoa. Bayuda balandaki mingi makanisi ya Philon. Max Dimont, mokomi moko Moyuda, alobaki na mokuse ndenge oyo makanisi ya Bagreke ekɔtaki na mimeseno ya Bayuda: “Bayuda oyo bazalaki bato ya mayele bayekolaki mateya ya Platon, mateya ya Aristote, mpe mateya ya Euclide, yango wana bakómaki koyekola Torah na ndenge ya sika. . . . Bakómaki kobakisa makanisi ya Bagreke na mikanda ya Bayuda.”

Na nsima, ntango Baloma bakómaki koyangela Bagreke, bakómaki mpe koyangela Yelusaleme. Yango ebongolaki lisusu makambo mingi. Na ekeke ya misato T.B., bato ya mayele oyo basangisaki mateya ya filozofi na mateya ya lingomba, balukaki kobongisa mateya ya Plato mpe kopalanganisa yango. Lelo oyo makanisi yango ebéngamaka Néoplatonisme. Bato ya filozofi yango bakɔtisaki makanisi na bango mingi na boklisto oyo epɛngwaki na mateya ya ebandeli.

“Mimeseno ya Bagreke oyo esangisami na mateya ya boklisto”

Banda na ekeke ya liboso tii na ekeke ya mitano ya ntango na biso, bato mosusu ya mayele balukaki komonisa ete mateya ya filozofi ya Bagreke ezali na boyokani na mateya ya solo ya Biblia. Buku moko (A History of Christianity) elobi ete: “Baklisto oyo bazalaki koyekola mateya ya filozofi oyo ebéngami métaphysique balobaki ete mwa bambula liboso Klisto aya Bagreke bazalaki kosala makasi mpo báyeba Nzambe kasi bazangaki moto oyo asengelaki koteya bango; ezali lokola nde bazalaki komeka komisalela Yesu ya makanisi mpamba, mpe kobimisa lingomba ya boklisto na makanisi na bango ya bapakano.”

Plotin (205-270 T.B.), oyo azalaki moko na bato ya liboso oyo bazalaki kopalanganisa mateya ya filozofi, abimisaki liteya moko oyo eutaki mpenza na makanisi mpe mateya ya Platon. Plotin akómaki koteya ete molimo na nzoto ezali eloko moko te. Profesere Washburn Hopkins alobaki boye mpo na Plotin: “Makambo oyo ateyaki . . . ekɔtelaki mpenza balakisi ya liboso ya Lingomba ya boklisto.”

“Boklisto oyo esangisami na mimeseno ya Bagreke” mpe “filozofi ya boklisto”

Banda na ekeke ya mibale T.B., “bato ya mayele oyo bazalaki baklisto” basalaki molende mpo na kobenda bato ya mayele oyo bazalaki bapakano. Atako ntoma Paulo akebisaki polele na “bilobaloba ya mpamba oyo ebebisaka lokumu ya makambo oyo ezali bulɛɛ” mpe “bongolabongola oyo ebéngami na libunga nyonso ete boyebi,” bateyi yango bakɔtisaki na mateya na bango mateya ya filozofi oyo bazwaki na mimeseno ya Bagreke. (1 Timote 6:20, NW) Ndakisa ya Philon epesaki likanisi ete Biblia ekoki koyokana na makanisi ya Platon.​—Talá 2 Petelo 1:16.

Eloko oyo ebebaki mpenza ezalaki solo ya Biblia. Bateyi “baklisto” bamekaki komonisa ete mateya ya boklisto eyokani na mateya ya filozofi ya Bagreke mpe ya Baloma. Clément d’Alexandrie na Origène (ekeke ya mibale mpe ya misato T.B.) babimisaki “filozofi ya boklisto” oyo eutaki na mateya ya Néoplatonisme. Ambroise (339-397 T.B.), episkɔpɔ ya Milan, “ayekolaki mateya mingi ya Bagreke oyo ezalaki na ntango wana, ezala ya baklisto to ya bapakano, mingimingi mikanda . . . ya Plotin, oyo azalaki molandi ya Platon.” Alukaki ete Baloma oyo batángaki kelasi mingi bákɔta na lingomba ya boklisto oyo esangisami na mateya ya filozofi ya Bagreke mpe ya Baloma. Augustin mpe alandaki ndakisa na ye.

Mbula nkama na nsima, Denys l’Areopagite (oyo abéngami lisusu pseudo-Denys), ekoki kozala ete azalaki sango moto ya Sulia, amekaki kosangisa mateya ya filozofi ya Néoplatonisme na mateya ya “boklisto.” Buku moko elobi ete “mikanda [na ye] ekómisaki mpenza mateya ya filozofi ya Platon mateya ya ntina mingi na makambo ya losambo na lingomba ya boklisto na Moyen Âge . . . mpe mateya yango mingi ezali tii lelo.” Likambo yango ezali kolakisa ete baboyaki mpenza kolanda toli ya ntoma Paulo ya kokeba na “filozofi mpe bokosi mpamba na kolanda mimeseno ya bato”!—Bakolose 2:8, NW.

Mateya oyo ezali kobebisa

Emonani ete “baklisto oyo bazalaki kolanda mateya ya Platon batyaki likebi mingi na Liloba ya Nzambe mpe bazalaki kotalela mateya ya filozofi ya Platon lokola nzela eleki malamu mpo na kokanga ntina mpe kolongisa mateya ya Biblia mpe mimeseno ya lingomba.”

Platon azalaki kondima ete molimo ekufaka te. Tozali mpe komona ete moko na mateya ya lokuta oyo ekɔtaki mokemoke na mateya ya “boklisto” ezali oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Tokoki kondima te ete liteya yango esalisaki mpo bato básepela mingi na boklisto. Ntango ntoma Paulo azalaki koteya na Atene, mboka oyo mimeseno ya Bagreke efandaki mpenza, alandaki Platon te na koteya ete molimo ekufaka te. Nzokande, ateyaki lisekwa oyo ezali liteya ya boklisto, atako Bagreke mingi oyo bazalaki koyoka ye bakakatanaki mpo na kondima ye.​—Misala 17:22-32.

Na bokeseni na mateya ya filozofi ya Bagreke, Biblia ezali komonisa polele ete molimo ezali te eloko oyo moto azali na yango kasi moto azali nde molimo. (Genese 2:7) Soki moto akufi, molimo ekufi. (Ezekiele 18:4) Mosakoli 9:5 elobi na biso ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te, bazali na libonza mpe te; kokanisa na bango esili kobungana.” Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te euti na Biblia te.

Liteya mosusu ya lokuta etali esika ya Yesu liboso abotama lokola moto awa na mabelé; liteya oyo elobaka ete azalaki ndenge moko na Tata na ye. Buku moko (The Church of the First Three Centuries) elobi ete: “Liteya ya Bosato . . . eutaki na mikanda ya Bayuda to ya baklisto te.” Kasi eutaki wapi? “Bakonzi ya liboso ya lingomba oyo bazalaki kolanda mateya ya filozofi ya Platon nde babimisaki mpe bakɔtisaki [liteya yango] na mateya ya boklisto.”

Nsima ya bambula mingi, mpe wana mateya ya filozofi ya Néoplatonisme ekómaki kokɔtela bakonzi ya liboso ya lingomba, bato mingi bakómaki kondima liteya ya Bosato. Emonani ete mateya ya filozofi ya Néoplatonisme oyo epalanganaki na ekeke ya misato nde epesaki bango nzela ya koyokanisa makambo oyo ekoki koyokana te: koteya ete Nzambe moko na bapersona misato. Balimbolaki makambo na ndenge ya filozofi mpe balobaki ete bapersona misato bakoki kozala Nzambe moko atako moko na moko azali na bomoto na ye!

Nzokande, Biblia ezali komonisa polele ete Yehova ye moko azali Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, Yesu Klisto azali Mwana, azali na nse mpe bakelaki ye kokela, mpe elimo santu ezali nguya na ye oyo esalaka mosala. (Deteronome 6:4; Yisaya 45:5; Misala 2:4; Bakolose 1:15; Emoniseli 3:14) Liteya ya Bosato ezali kotyola Nzambe ya solo kaka moko mpe etyaka bato na mobulungano, mpe epusaka bango bápesa Nzambe mokɔngɔ mpo bazali koyeba ye te.

Lisusu, ntango mateya ya filozofi ya Néoplatonisme ekɔtaki na mateya ya boklisto, ebebisaki elikya ya boyangeli ya mbula nkóto oyo Biblia ezali koteya. (Emoniseli 20:4-6) Origène ayebanaki mingi lokola moto oyo azalaki koloba ete bato oyo bandimaka elikya ya boyangeli ya mbula nkóto bazali na libunga. Mpo na nini azalaki koboya kondima liteya oyo ezali polele na kati ya Biblia ete Klisto akoyangela na boumeli ya mbula nkóto? Buku moko (The Catholic Encyclopedia) epesi eyano oyo: “Soki totali mateya ya filozofi ya Néoplatonisme oyo esimbaki mateya na ye . . . , [Origène] akokaki te komitya na ngámbo ya bato oyo bazalaki kondima boyangeli ya mbula nkóto.”

Mateya ya solo

Liteya moko te kati na mateya oyo bato babimisaki, mateya oyo tolobeli awa ezalaki solo. Mateya ya solo ezali mateya nyonso ya boklisto ndenge Biblia ezali komonisa yango. (2 Bakolinti 4:2; Tito 1:1, 14; 2 Yoane 1-4) Mateya nyonso ya solo eutaka se na Biblia.​—Yoane 17:17; 2 Timote 3:16.

Kasi Satana Zabolo, monguna ya Yehova, monguna ya solo, monguna ya bato, mpe monguna ya bomoi ya seko, “mobomi na bato” mpe “tata na lokuta,” asaleli banzela mingi ya nyamunyamu mpo na kobebisa mateya yango ya solo. (Yoane 8:44; talá 2 Bakolinti 11:3.) Satana asalelaki mateya ya bato ya filozofi ya Bagreke mpo na kobebisa mateya ya solo. Mateya yango ezali mpenza komonisa makanisi na ye mpo na koluka kobebisa mateya ya boklisto.

Kosangisa mateya ya boklisto na mateya ya filozofi ya Bagreke ezali mayele mabe mpo na koluka kolɛmbisa solo ya Biblia, kosilisa yango nguya na makasi mpo basokɛmi, bato ya sembo, mpe bato oyo balukaka koteyama makambo ya solo básepela na yango te. (1 Bakolinti 3:1, 2, 19, 20) Ezali lisusu mayele mabe mpo na kobebisa bopɛto ya mateya ya Biblia, oyo ezali polele lokola talatala, mpo bokeseni ezala polele te kati na solo na lokuta.

Lelo oyo, na litambwisi ya Yesu Klisto, Mokonzi ya lisangá, mateya ya solo ya boklisto ezongisami. Bato ya sembo oyo balukaka solo bakoki mpe koyeba mbala moko lisangá ya boklisto ya solo na mbuma na yango. (Matai 7:16, 20) Batatoli ya Yehova bazali na esengo mpe na mposa makasi ya kosalisa bato ya ndenge yango mpo na kozwa mai ya solo oyo ebebisami te mpe kosunga bango bákanga makasi libula ya bomoi ya seko oyo Yehova, Tata na biso, azali kopesa.​—Yoane 4:14; 1 Timote 6:19.

[Elilingi na lokasa 11]

Augustin

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 10]

Makambo ya Bagreke: Euti na buku (Ancient Greek Writers): Phédon de Platon, 1957, Ioánnis N. Zacharópoulos, Athènes; Platon: Musei Capitolini, Roma

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto