Yehova azalaki libanga na ngai
LISOLO YA EMMANUEL LIONOUDAKIS
Mama akangaki elongi mpe alobaki na ngai ete: “Soki oboyi kotika likambo wana, okobima na ndako oyo.” Nazwaki mokano ya kosakola Bokonzi ya Nzambe ntango nyonso. Kasi, bandeko na ngai bazalaki koyoka nsɔni ndenge bazalaki kokanga ngai mbala na mbala.
BABOTI na ngai bazalaki na komikitisa mpe bazalaki bandimi. Bazalaki kofanda na mboka moke ya Douliána, na wɛsti ya esanga ya Crète, na ekólo Grèce, epai nabotamaki na 1908. Banda bomwana na ngai, bateyaki ngai kobanga Nzambe mpe kotosa ye. Nalingaki Liloba ya Nzambe, atako namonaki naino Biblia te na mabɔkɔ ya balakisi na kelasi to na mabɔkɔ ya basango ya Lingomba ya Ortodokse.
Ntango moninga moko ya kartye atángaki buku Études des Écritures buku ya volimi motoba, na buku La harpe de Dieu, oyo Charles Russell akomaki, na esengo nyonso ayebisaki ngai makambo atángaki na Biblia mpe yango efungolaki ngai miso. Bayekoli ya Biblia (ndenge bazalaki kobénga Batatoli ya Yehova na ntango wana) nde bakomaki babuku yango. Na esengo nyonso nazwaki Biblia na babuku yango na biro ya la Société Watch Tower na Athènes. Nabosanaka te ndenge ngai na moninga na ngai tozalaki kofanda tii na kati ya butu, tozalaki kobondela Yehova mpe mwa mwinda moko ezalaki kopela mpe tozalaki kotánga Biblia na mozindo na lisalisi ya babuku yango.
Ntango nakómaki koteya bato mosusu mateya ya Biblia oyo nautaki koyekola nazalaki na mbula 20 mpe nazalaki molakisi na mboka moko ya penepene. Mwa moke na nsima, tokómaki koyangana bato minei mbala na mbala mpo na koyekola Biblia na Douliána. Tozalaki mpe kokabola batrakte, mwa babuku, babuku, na Babiblia mpo na kosalisa bato báyeba Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali elikya kaka moko mpo na bato.
Na 1931, tozalaki na kati ya bankóto ya bato na mokili mobimba oyo tondimaki kozwa nkombo oyo euti na Biblia: Batatoli ya Yehova. (Yisaya 43:10) Na boumeli ya mbula oyo elandaki, tosalaki kampanye moko, tozalaki koyebisa bakonzi nkombo na biso ya sika mpe ndimbola na yango. Yango esɛngaki kokabola epai ya basango, bazuzi, bakonzi ya polisi, mpe bato ya mombongo na engumba na biso mwa buku moko oyo ezalaki kolimbola makambo malamumalamu.
Se ndenge tokanisaki, bakonzi ya mangomba babandaki kotɛmɛla biso. Mbala ya liboso bakangaki ngai, bakatelaki ngai bolɔkɔ ya mbula 20. Mwa moke ntango nabimaki, bakangaki ngai lisusu mpe bakatelaki ngai sanza moko ya bolɔkɔ. Ntango zuzi moko alobaki ete tótika kosakola, topesaki ye eyano oyo ezali na Misala 5:29 ete: “Ekoki ete tótosa Nzambe liboso na kotosa bato.” Na nsima, na 1932, ndeko moko autaki na biro ya la Société ayaki kotala mwa etuluku na biso na Douliána mpe biso nyonso minei tozwaki batisimo.
Nazwi libota ya elimo
Lokola nalingaki kosala mingi na mosala ya kosakola, natikaki mosala na ngai ya molakisi. Mama akokaki lisusu kokanga motema te. Abenganaki ngai na ndako. Biro ya filiale ya la Société Watch Tower na Athènes endimaki ete ndeko mobali moko moklisto ya boboto na engumba Héraklion na Grèce, ayamba ngai na ndako na ye. Na yango, na Augusto 1933, bandeko oyo tozalaki na bango na mboka ya baboti na ngai, na bato mosusu oyo bazalaki kosepela na solo, bayaki na esika bisi etɛlɛmaka mpo na kopesa ngai mbote liboso tókabwana. Toyokaki mawa mingi na motema, mpe biso nyonso tolelaki, mpamba te toyebaki te mokolo nini tokomonana lisusu.
Na Héraklion, nakómaki na kati ya libota ya bandeko ya elimo oyo bazali na bolingo. Ezalaki na bandeko misato ya mibali na moko ya mwasi oyo tozalaki koyangana na bango pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyekola. Namonaki mpenza kokokisama ya likambo oyo Yesu alakaki ete: “Moto nani atiki ndako soko bandeko mibali soko bandeko basi soko mama soko tata soko bana soko bilanga mpo na ngai mpe mpo na Nsango Malamu, moto yango akozwa na ntango oyo ndako mpe bandeko mibali mpe bandeko basi mpe bamama.” (Malako 10:29, 30) Mokumba na ngai ezalaki ya koteya bato ya mboka yango mpe bamboka mikemike oyo ezalaki pembenipembeni. Nsima ya kosakola na mboka yango mobimba, nakendaki koteya na bitúká ya Héraklion mpe ya Lasithion
Mobongisi-nzela se ngai moko
Nazalaki kolekisa bangonga mingi na kotambola mboka na mboka. Lisusu, nazalaki kokumba mikanda mingi, mpamba te kotinda mikanda na nzela ya posita ezalaki kosalema ntango nyonso te. Lokola nazalaki na esika ya kolala te, nazalaki kokɔta na nganda ya masanga moko na mboka, nazalaki kozela tii moto ya nsuka akobima, mbala mingi nsima ya midi ya butu, nazalaki kolala na kiti, mpe kolamuka na ntɔngɔntɔngɔ liboso ete nkolo nganda abanda kotɛkisa masanga. Bakiti yango etondaki na banyama mikemike oyo eswaka.
Atako mbala mingi bato bazalaki kosepela te, nazalaki na esengo ya kosalela makasi ya bolenge na ngai na mosala ya Yehova. Soki nakutani na moto oyo asepeli na mateya ya solo ya Biblia, yango ezalaki kobakisa molende na ngai na mosala yango ya kobikisa bato. Nazalaki mpe kobɔndisama soki nakutani lisusu na bandeko na ngai ya elimo. Nazalaki kokutana na bango lisusu wana tokabwani nsima ya mikolo kobanda 20 kino 50; ezalaki kotalela kaka mboka oyo nakei koteya soki ezali mosika mingi na mboka Héraklion to te.
Nabosanaka te ndenge, mokolo moko na nsima ya midi namiyokaki mpenza ete nazali ngai moko, mingimingi ntango nakanisaki ete bandeko na ngai baklisto na Héraklion bakosala makita na bango na mpokwa wana. Mposa na ngai ya komona bango ekómaki makasi na boye ete natambolaki koleka kilomɛtɛlɛ 25 oyo ekabolaki ngai na bango. Naino natamboláká mbangu ya ndenge wana te. Nabɔndisamaki mpenza ntango nasanganaki na bandeko na ngai na mpokwa yango mpe ezalaki lokola nde natondisaki lisusu ebombelo ya mai ya elimo na ngai!
Mosika te, milende na ngai na mosala ya kosakola ebandaki kobota mbuma. Lokola na mikolo ya bantoma, ‘Yehova abakiselaki biso baoyo bazalaki kobikisama.’ (Misala 2:47) Basaleli ya Yehova babandaki kokóma mingi na Crète. Lokola bato mosusu bakómaki kolanda ngai na mosala ya kosakola namiyokaki lisusu ngai moko te. Tokutanaki na minyoko mpe na botɛmɛli makasi. Mokolo na mokolo tozalaki kolya limpa na mwa maki, mbuma ya olive, to ndunda oyo tozalaki kozwa na bato oyo tozalaki koteya mpe kopesa bango mikanda.
Na engumba Ierápetra, na sudi-ɛsti ya Crète, nateyaki Minos Kokkinakis, azalaki motɛki ya bilamba. Atako nasalaki milende mingi mpo na kobanda koyekola na ye Biblia, azalaki na ntango mingi te mpo azalaki kolekisa ntango mingi na mosala na ye. Kasi, ntango azwaki mokano ya koyekola na motema moko, bomoi na ye ebongwanaki mpenza. Ye mpe akómaki mosakoli ya mpiko mpe ya molende ya nsango malamu. Emmanuel Paterakis, elenge mobali ya mbula 18 oyo azalaki kosala epai ya Kokkinakis, akamwaki na mbongwana yango mpe asɛngaki mikanda oyo elimbolaka Biblia. Nazalaki na esengo monene ya komona ndenge oyo azalaki kokola nokinoki na elimo mpe nsukansuka akómaki misionere!a
Na ntango yango, lisangá na mboka ya baboti na ngai ezalaki kokola mpe ekómaki na basakoli 14. Nakoki kobosana ata moke te mokolo oyo nazwaki mokanda ya yaya na ngai ya mwasi Despina, oyo akomelaki ngai ete ye na baboti na ngai bayambaki solo mpe bakómaki basaleli ya Yehova oyo bazwi batisimo!
Monyoko mpe bolɔkɔ na bisanga
Lingomba ya Ortodokse ebandaki komona ete mosala na biso ya kosakola lokola mayoyo ekɔti na mboka, mpe bazwaki mokano ya kopekisa biso. Na sanza ya Marsi 1938, procureur asambisaki ngai mpe alobaki na ngai nalongwa nokinoki na etúká yango. Nalobaki na ye ete mosala na biso ezali mpenza mpo na bolamu ya bato mpe moto oyo atindaki yango azali mokonzi monene koleka, elingi koloba Yesu Klisto.—Matai 28:19, 20; Misala 1:8.
Mokolo oyo elandaki, babéngisaki ngai na biro ya bapolisi. Kuna bayebisaki ngai ete bamoni nazali lokola likama mpo na bato, mpe bakatelaki ngai etumbu ya kokende kolekisa mbula mobimba na bolɔkɔ na esanga Amorgos na Mai Monene ya Égée. Nsima ya mwa mikolo, bakangaki ngai minɔti na mabɔkɔ mpe batyaki ngai na masuwa oyo ememaki ngai tii na esanga yango. Na Amorgos, Motatoli ya Yehova mosusu azalaki te. Bókanisa ndenge nakamwaki, nsima ya sanza motoba, ntango nayokaki ete batindi Motatoli ya Yehova moko na bolɔkɔ na esanga yango! Ezalaki nani? Minos Kokkinakis, moto oyo nayekolaki na ye Biblia na Crète. Nasepelaki kozwa moninga oyo azali ndeko na ngai ya elimo! Mwa ntango na nsima, nazwaki libaku ya kobatisa ye na mai ya Amorgos.b
Mwa moke nsima ya kozonga na Crète, bakangaki ngai lisusu, mpe mbala oyo batindaki ngai na bolɔkɔ sanza motoba na mboka moke ya Neapolis na esanga Crète. Ntango nasilisaki sanza motoba ya bolɔkɔ, bakangaki ngai lisusu, nakɔtaki bolɔkɔ mikolo zomi, mpe na nsima batindaki ngai na bolɔkɔ sanza minei na esanga moko oyo bazalaki kotinda kaka bakoministe. Namonaki bosolo ya maloba ya ntoma Paulo ete: “Bango nyonso bazali na mposa na ezaleli na kosambela kati na Klisto Yesu bakonyokolama.”—2 Timote 3:12.
Basakoli bazali kobakisama atako botɛmɛli ezali
Ntango basoda ya ekólo Allemagne bakɔtaki na Grèce banda na 1940 tii na 1944, nakoki koloba ete mosala na biso ya kosakola etɛlɛmaki. Kasi, biso nyonso basaleli ya Yehova na Grèce tomibongisaki lisusu nokinoki, mpe tozongelaki mosala na biso ya kosakola. Mpo na kozongela mosala oyo etɛlɛmaki, tomipesaki na mosala ya Bokonzi mpe tosalaki yango na molende.
Ndenge tokanisaki yango, bato ya mangomba babandaki lisusu kotɛmɛla biso. Mbala mingi, basango ya Lingomba ya Ortodokse bazalaki kobuka mibeko mpo na kokokisa bamposa na bango. Na mboka moko, sango moko atindaki ebele ya bato básala mobulu mpo na kotɛmɛla biso. Sango ye moko abandaki kobɛta ngai mpe mwana na ye azalaki kobɛta na ngai na mokɔngɔ. Nakendaki komibomba na ndako moko ya penepene mpo na komibatela, nzokande ndeko oyo tozalaki kosakola na ye bamemaki ye na esika monene ya mboka. Kuna, bato yango bapasolaki mikanda na ye, mpe mwasi moko azalaki kaganga na likoló ya ndako na ye ete, “Bóboma ye!” Na nsuka, monganga moko mpe polisi moko oyo bazalaki koleka bayaki kobikisa biso.
Na 1952, bakangaki ngai lisusu mpe batindaki ngai na bolɔkɔ na Kastelli Kissamos, na Crète. Ntango kaka nabimaki, balakisaki ngai mosala ya kotala masangá mpe kolendisa bandeko na elimo. Nsima ya mbula mibale na mosala yango, nabalaki Despina ndeko mwasi moko ya sembo, ndoyi ya yaya na ngai, oyo kobanda ntango wana tii lelo oyo asalelaka Yehova na bosembo. Nsima ya libala na biso, nakómaki mobongisi-nzela monene na engumba La Canée, na Crète, esika nazali kosala tii lelo oyo.
Na boumeli ya mbula 70 ya mosala ya ntango nyonso, natamboli pene na Crète mobimba, esanga oyo ezali na bonene ya kilomɛtɛlɛ kare 8 300, na bolai ya kilomɛtɛlɛ soki 250. Nazali na esengo monene na ndenge namoni mwa Batatoli ya Yehova oyo tozalaki na esanga yango na bambula ya 1930 kokóma kino basakoli ya Bokonzi koleka 1 100 lelo oyo. Nazali kotɔnda Yehova na ndenge apesi ngai libaku ya kopesa mabɔkɔ na kosalisa bato mingi bázwa boyebi mpenza ya Biblia mpe elikya kitoko mpo na mikolo ekoya.
Yehova azali “mobikisi”
Makambo nakutani na yango eteyi ngai ete esɛngaka kolendendela mpe kozala motema molai mpo na kosalisa bato báyeba Nzambe ya solo. Na boboto na ye, Yehova apesaka bizaleli yango ya ntina mingi. Na boumeli ya mbula 67 oyo nasali mosala ya ntango nyonso, mbala na mbala nazalaki kokanisa maloba oyo ya ntoma Paulo ete: “Lokola basali na Nzambe, tokomilobela biso mpenza kati na makambo nyonso na mpiko monene, na bolɔzi, na mpasi, na makamba, na kobɛtama, na kokangama, na yikiyiki, na misala mingi, na kolambela, na nzala.” (2 Bakolinti 6:4, 5) Mingimingi na bambula ya ebandeli na mosala na ngai, nazalaki kokelela mpenza. Kasi, Yehova asundolaki ngai na libota na ngai te. Azalaki Mosungi ya ntango nyonso mpe ya makasi. (Baebele 13:5, 6) Ntango nyonso tomonaki lobɔkɔ na ye na makambo lokola koyanganisa bampate na ye mpe kokokisa bamposa na biso.
Soki nakanisi makambo nyonso wana, nakoki koloba ete mokili mokauki eboti fololo na elimo. Nazali na elikya ete nasalaki mosala ya mpunda te. Nalekisi bolenge na ngai na ndenge oyo eleki malamu. Mosala na ngai ya ntango nyonso ezalaki na ntina koleka misala nyonso mosusu. Sikoyo nakómi mobange, na motema mobimba, nakoki kolendisa bilenge ete ‘bákanisa [Mozalisi na bango Monene, NW] na mikolo na bolenge na bango.’—Mosakoli 12:1.
Atako nazali na mbula 91, nazali naino kosala ngonga koleka 120 na mosala ya kosakola sanza na sanza. Mokolo na mokolo, nalamukaka na 7:30 ya ntɔngɔ, nateyaka bato na balabala, na bamagazini, to na baparke. Nakabolaka bazulunalo 150 sanza na sanza. Nayokaka lisusu malamu te mpe nakómá kobosana mingi, kasi libota monene ya bandeko na ngai ya elimo, na mabota ya bana na ngai ya basi mibale, bazali mpenza kosunga ngai.
Koleka nyonso wana, nayebi kotyela Yehova motema. Na ntango nyonso, azalaki “libanga na ngai mpe esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai.”—Nzembo 18:2.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisolo ya Emmanuel Paterakis ebimaka na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1996, nkasa 22 kino 27.
b Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1993, nkasa 27 kino 31 elobelaki ndenge Minos Kokkinakis asambaki mpe alongaki na batribinale. Minos Kokkinakis autaki kokufa na sanza ya Yanuali 1999.
[Bililingi na lokasa 26,27]
Na nse: Elongo na mwasi na ngai; na lobɔkɔ ya mwasi: na 1927; na lokasa mosusu: elongo na Minos Kokkinakis (na lobɔkɔ ya mwasi) na Motatoli mosusu na Acropole, na 1936, mwa moke ntango nautaki na bolɔkɔ na esanga.