Bazwaki makasi ya koboya misala mabe
TIMOTHÉE alobi ete: “Ntango yango nazalaki naino na mbula zomi na mitano mpe nazalaki kosala na magazini ya biloko ya kolya, moninga moko ya mosala abéngisaki ngai na ndako na bango. Alobaki ete baboti na ye bakozala te, bilenge basi mosusu bakoya, mpe ekozala libaku mpo na kosangisa nzoto na bana basi yango.” Lelo oyo, bilenge mingi, soki babéngi bango na likambo ya ndenge wana bakondima mbala moko. Kasi Timothée apesaki eyano nini? “Nayebisaki ye mbala moko ete nakoya te, mpe lokola nazali moklisto, nakoki te kosangisa nzoto na moto oyo ngai nabali ye te.”
Timothée ayebaki te ete ntango azalaki komonisa ntina oyo akokende te, elenge mwasi mosusu oyo bazalaki kosala na ye azalaki mpe koyoka. Mwana mwasi yango akamwaki ndenge Timothée alukaka basi te. Mpe ndenge tokomona yango na nsima amekaki Timothée mbala mingi, kasi Timothée aboyaki.
Komekama ya polele boye ezali komonana mingi lelo oyo. Eleki mbula soki 3 000, Mokonzi Salomo akomaká boye: “Mwana na ngai, soki bato mabe bakobenda yo, kendá te. . . . Longolá lokolo na yo na nzela na bango.” (Masese 1:10, 15) Yehova alobaki na libota ya Yisalaele ete: “[Okolanda] ebele mpo na kosala mabe te.” (Exode 23:2) Ɛɛ, ntango mosusu tosengeli koboya, kotɛmɛla komekama ya kosala mabe, ata soki bato mingi basepelaka na yango.
Koboya kosala mabe ezali mpenza na ntina mingi lelo oyo
Koboya misala ya mabe ezalaka pɛtɛɛ te, mpe lelo oyo ekoki kozala mpasi koleka mpamba te tozali na eleko oyo Biblia ebéngi “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. Ndenge Biblia esakolaki yango, bato mingi bakómi kolinga bisengo mpe mobulu, balingi makambo ya elimo te mpe baboyi bizaleli ya malamu. (2 Timote 3:1-5) Sango moko oyo azali mokambi ya iniversite moko alobaki boye: “Kala tozalaki na mibeko oyo bankɔkɔ batiká oyo bato balingaki te, bamonaki yango mpamba mpe ebongi lisusu te. Sikoyo tozali komona lokola ete malako ya bizaleli malamu ezali lisusu te.” Zuzi moko na tribinale moko monene alobaki boye: “Mabe na malamu ezali koyebana lisusu polele te. Makambo nyonso ezali lisusu polele te. . . . Bato moke kaka bazali koyeba kokesenisa malamu na mabe. Na yango, kobuka mobeko ezali mabe te, kasi soki bakangi yo nde ekómi mabe.”
Mpo na bato oyo bazali na makanisi ya ndenge yango, ntoma Paulo akomaki boye: “Ekaniseli na bango ezali na molili, batangolami mosika na bomoi na Nzambe mpo na kozanga boyebi kati na bango, na ntina na makasi na mitema na bango. Bazali koyoka mawa te, bamipesi na makambo na nsɔni ete básala makambo na bosɔtɔ na bilulela.” (Baefese 4:18, 19) Kasi bakokutana na mikakatano. Yisaya alobaki ete: “Mawa epai na bango bakobyangaka mabe ete malamu mpe malamu ete mabe, baoyo bakotyaka molili mpo na pole mpe pole mpo na molili.” (Yisaya 5:20) Bato yango bakobuka oyo bazali kolona sikoyo, mpe etikali moke bakozwa “mawa” monene, elingi koloba etumbu ya Yehova.—Bagalatia 6:7.
Nzembo 92:7 elobi ete: “Ata bato mabe bakoli [lokola] matiti; ata baoyo nyonso bakosalaka mabe balongi malamu, nde ezali mpo ete bakobomama bobele kobomama.” Na maloba mosusu, ebele ya mbuma mabe [ya misala na bango] ekozala libela na libela te, mpo ezali kopesa bomoi ya bato mpasi. Kutu, Yesu alobaki ete Nzambe akoboma “libota” oyo ezali kolendisa makambo mabe wana na “bolɔzi monene.” (Matai 24:3, 21, 34) Soki tolingi kobika na bolɔzi yango, tosengeli koyeba kokesenisa malamu na mabe na kotalela mitinda ya Nzambe. Tosengeli mpe kozala makasi na elimo mpe koboya misala mabe. Ezali likambo ya pɛtɛɛ te, yango wana Yehova apesi biso mwa bandakisa oyo ekolendisa ya bato ya kala mpe ya ntango na biso.
Tózwa liteya na ndakisa ya elenge oyo aboyaki misala mabe
Tozali mpenza komona ete ata epai ya bato mosusu na kati ya lisangá ya boklisto, koboya kokwea na pite mpe ekobo ezalaka mpasi. Timothée oyo tolobeli na ebandeli, alandaki ndakisa ya elenge Yosefe, oyo Biblia elobeli na Genese 39:1-12. Yosefe amonisaki ete azali makasi na elimo ntango mwasi ya Potifala, mokonzi moko na Ezipito, azalaki mbala na mbala kosɛnga ye ete básangisa nzoto. Lisolo yango elobi ete Yosefe “aboyaki mpe alobaki [ete] . . . bongo nakoka kosala mabe monene oyo mpe kosala lisumu epai na Nzambe boni?”
Ndenge nini Yosefe azwaki makasi ya koboya masɛnginya ya mwasi ya Potifala mokolo na mokolo? Ya liboso, mpo azalaki komona ete boninga na ye na Yehova eleki bisengo ya mwa ntango moke. Lisusu, atako na ntango wana ezalaki na mobeko moko ya Nzambe te oyo ekomami na mokanda (Mobeko ya Mose eyaki na nsima), Yosefe ayebaki kososola bizaleli malamu; ayebaki ete kosala pite na mwasi ya Potifala ezali lisumu na miso ya mobali na ye mpe na miso ya Nzambe.—Genese 39:8, 9.
Emonani ete Yosefe asosolaki ete ezali malamu ameka te kolamusa mposa ya nzoto oyo akoki kosilisa yango bobele soki asali pite. Ebongi ete moklisto nyonso alanda ndakisa ya Yosefe. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1957 (na Lingelesi), elobaki boye: “[Moklisto] asengeli koyeba bolɛmbu ya nzoto na ye mpe akanisa te ete akoki kolanda bamposa ya nzoto tii na likambo oyo Biblia epekisi mpenza mpe kosuka wana. Ata soki akoki kosala yango mpo na mwa ntango, nsukansuka akobendama na koleka ndelo yango mpe akosala lisumu. Ezali likambo ya kotyela ntembe te, mpamba te bamposa oyo moto azali kokolisa ekómaka makasi mpe ekokangama na motema ya moto. Na nsima ekómaka mokakatano mpo abengana yango na makanisi na ye. Mpo na komibatela malamu koleka asengeli koboya mposa mabe ntango kaka ebandi.”
Soki tozali kolinga makambo malamu mpe koyina makambo mabe, ekozala pɛtɛɛ mpo na koboya mposa mabe ntango ebandi. (Nzembo 37:27) Kasi tosengeli kolanda kosala milende mpe kolendendela. Soki tosali bongo, na lisungi ya Yehova, tokokóma kolinga mingi makambo malamu mpe koyina mpenza makambo mabe. Kasi, tosengeli kolala mpɔngi te, ndenge Yesu alobaki, tósengeli kobondelaka mingi mpo tómekama te mpe tókima mitambo ya oyo mabe.—Matai 6:13; 1 Batesaloniki 5:17.
Bóya matindiki ya baninga
Likambo mosusu oyo ememaka bato na misala mabe ezali matindiki ya baninga. Elenge moko alobaki boye: “Na kelasi, nazalaka na bizaleli mosusu, soki nakómi na ndako, nakómi na bizaleli ndenge mosusu. Na kelasi, natambolaka na bilenge oyo babimisaka se maloba ya salite na minɔkɔ na bango. Ngai mpe nabandi kolanda bizaleli na bango. Nasengeli kosala nini?” Esengeli kozala na mpiko mpo na koboya kolanda baninga mabe. Okoki kozwa mpiko yango soki ozali kotánga mpe kokanisa makambo oyo Biblia elobi mpo na bato oyo basalelaki Nzambe na bosembo lokola Yosefe. Bato mosusu oyo bapesaki ndakisa mosusu ya malamu ezali Danyele, Sadalaka, Mesaka, na Abedenego, bilenge yango minei bazalaki na mpiko ya koboya kolanda baninga na bango.
Ntango bilenge yango minei ya Yisalaele bazalaki kolanda mateya na bilenge mosusu na ndako ya mokonzi ya Babilone, basɛngisaki bango bályaka “ndambo na bilei kitoko na mokonzi.” Lokola baboyaki kobuka Mibeko ya Mose mpo na bilei, balingaki kolya bilei ya mokonzi te. Esengelaki mpenza bázala na mpiko, mpamba te ezalaki “bilei kitoko ya mokonzi,” na ntembe te ezalaki kitoko mpenza. Bilenge yango bapesaki ndakisa malamu mpo na baklisto oyo bakoki lelo oyo komekama, ata kopusama na makasi, na kolangwa masanga to komela bangi to makaya!—Danyele 1:3-17.
Mpe lisusu, ndenge Sadalaka, Mesaka, na Abedenego basalaki emonisi ete Yesu Klisto azalaki na elonga ntango alobaki na nsima ete: “Oyo azali sembo na likambo lileki moke azali sembo mpe na likambo monene.” (Luka 16:10) Na ntembe te, mpiko oyo bamonisaki na likambo ya bilei oyo ezalaki lokola likambo moke mpe ndenge Yehova asungaki bango elendisaki bango mpo na komekama monene oyo eyaki na nsima. (Danyele 1:18-20) Bamekamaki lisusu ntango balobaki na bango básambela ekeko, soki te bakobwaka bango na mɔ́tɔ. Na mpiko nyonso, bilenge misato yango bamonisaki ete bakosambela kaka Yehova, batyaki elikya epai na ye ata soki elingaki kosukela bango ndenge nini. Na mbala oyo lisusu Yehova apambolaki bango mpo na kondima mpe mpiko oyo bamonisaki. Yehova asalaki likamwisi mpe bazikaki te na mɔ́tɔ oyo bapelisaki makasi.—Danyele 3:1-30.
Liloba ya Nzambe ezali na bandakisa ya bato mingi oyo baboyaki misala mabe. Mose aboyaki “kotángama mwana na mwana na Falo,” atako yango elingaki kopesa ye nzela ya “kosepela na bisengo na masumu bikoumela bobele mwa ntango moke” na Ezipito. (Baebele 11:24-26) Mosakoli Samwele aboyaki kosalela bokonzi na ye na ndenge ya mabe ntango aboyaki kanyaka. (1 Samwele 12:3, 4) Bantoma ya Yesu Klisto baboyaki na mpiko nyonso ntango balobaki na bango bátika koteya. (Misala 5:27-29) Yesu ye moko aboyaki misala mabe, tii na nsuka ya bomoi na ye ntango basoda bapesaki ye “mai ya vinyo masangani na mola.” Soki andimaki yango elingaki kolɛmbisa molende na ye na ntango yango ya mpasi.—Malako 15:23; Matai 4:1-10.
Koboya mabe ekomema yo na bomoi
Yesu alobaki ete: “Bokota na porte ya moke. Mpamba te porte na nzela oyo ememaka bato na liwa ezali monene. Mpe bato mingi balandaka nzela wana; kasi porte na nzela oyo ememaka bato na bomoi ezali moke, mpe bato mingi balandaka yango te.”—Matayo 7:13, 14, Boyokani ya Sika.
Bato mingi balingi nzela monene mpo kotambola kuna ezali mpasi te. Bato oyo batambolaka kuna balingi bisengo, balandaka makanisi na bamposa ya nzoto, mpe balingi kokesana te, kasi balingi nde kolanda mokili ya Satana. Bamonaka ete mibeko ya Nzambe etyaka bango nkaka. (Baefese 4:17-19) Kasi, Yesu alobaki polele ete nzela monene ekomema “na liwa.”
Kasi mpo na nini Yesu alobaki ete kaka bato moke nde bazali kopona nzela moke? Liboso, ezali mpo ete kaka bato moke nde balingaka kolanda mibeko ya Nzambe na bomoi na bango mpe bandimaka mibeko yango esalisa bango na koboya makambo mingi oyo ezali komema na misala mabe oyo bazali komona. Lisusu, kaka bato moke nde babundisaka bamposa mabe, matindiki ya baninga, mpe babangaka te bato oyo bakoki kosɛka bango mpo na nzela oyo baponi.—1 Petelo 3:16; 4:4.
Bato yango bazali mpenza kokanga ntina ya mayoki oyo ntoma Paulo azalaki na yango ntango alobelaki etumba oyo azalaki kobunda mpo na koboya kosala masumu. Se ndenge ezali kosalema lelo oyo, mokili ya Baloma na ya Bagreke na ntango ya Paulo ezalaki na makambo mingi oyo ezalaki kotinda bato na misala mabe. Paulo alobaki ete makanisi na ye, oyo eyebaki makambo malamu, ezalaki ntango nyonso kobunda ‘etumba’ na nzoto na ye, oyo ezalaki kobendama na misala mabe. (Baloma 7:21-24) Ɛɛ, Paulo ayebaki ete nzoto na ye ezalaki moombo malamu kasi nkolo mabe; yango wana ayekolaki koboya kolanda mposa na yango. Akomaki ete: “Nazali kobɛta nzoto na ngai mpe nakokómisa yango lokola moombo.” (1 Bakolinti 9:27) Ndenge nini alongaki kosala bongo? Na makasi na ye moko te, kasi na lisalisi ya elimo ya Nzambe.—Baloma 8:9-11.
Yango wana, Paulo, atako azalaki moto ya masumu, atikalaki sembo epai na Yehova tii na nsuka. Mwa moke liboso akufa, akomaki boye: “Nasili kobunda etumba malamu, nasilisi nzela na kotambola, nasili kobatela, [kondima. Banda sikoyo, NW] motole na boyengebene ebombami mpo na ngai.”—2 Timote 4:7, 8.
Na etumba na biso mpo na kobundisa bamposa mabe, tozali na bandakisa malamu oyo ezali kolendisa biso; tozali na ndakisa ya Paulo, mpe lisusu na ndakisa ya baoyo ye alandaki lokola ndakisa, elingi koloba Yosefe, Mose, Danyele, Sadalaka, Mesaka, Abedenego, na bato mingi mosusu. Atako bazalaki bato ya masumu, mokomoko na mibali yango azalaki na kondima. Baboyaki misala mabe mpo na motó makasi to matoi mangbongi te, kasi mpo bazalaki na nguya oyo eutaki na elimo ya Yehova. (Bagalatia 5:22, 23) Bato yango balingaki makambo ya elimo. Bazalaki na mposa ya liloba oyo euti na monɔkɔ ya Yehova. (Deteronome 8:3) Liloba ya Yehova ezalaki bomoi mpo na bango. (Deteronome 32:47) Na koleka, balingaki Yehova mpe bazalaki kobanga ye; mpe na lisalisi na ye, bazalaki na motema molai mpe bakolisaki ezaleli ya koyina misala mabe.—Nzembo 97:10; Masese 1:7.
Tiká ete tózala lokola bango. Ɛɛ, mpo na koboya ntango nyonso misala mabe ya lolenge nyonso, tosengeli kozala na elimo ya Yehova ndenge bango bazalaki na yango. Na boboto na ye, Yehova apesaka biso elimo na ye soki tosɛngi yango, soki tozali koyekola Liloba na ye, mpe soki tozali koyangana na makita ya lisangá ya boklisto pɔsɔ na pɔsɔ.—Nzembo 119:105; Luka 11:13; Baebele 10:24, 25.
Timothée oyo tolobelaki na ebandeli, azalaki na esengo mpo azalaki kokokisa bamposa na ye ya elimo. Elenge mwasi oyo alandaki lisolo ya Timothée na moninga na ye ya mosala mpe oyo asepelaki na Timothée, abéngisaki ye na ndako na ye na ngonga oyo mobali na ye azalaka na ndako te. Timothée azalaki koboya. Alɛmbaki te, alandaki kobénga ye mbala na mbala, lokola kaka mwasi ya Potifala. Kasi na mpiko nyonso mpe na boboto, mbala nyonso Timothée aboyaki. Kutu, ateyaki mwasi yango Liloba ya Nzambe. Timothée apesaki Yehova matɔndi na ndenge apesaki ye makasi ya koboya masɛnginya wana. Lelo oyo, Timothée azali na esengo mpo abali mwasi oyo azali moklisto lokola ye. Ɛɛ, Yehova akopambola mpe akopesa makasi na bato nyonso oyo balingi kobatela bosembo na bango lokola baklisto mpo na koboya misala mabe.—Nzembo 1:1-3.