Lisolo ya bomoi
Basalisaki ngai mpo natika ezaleli na ngai ya nsɔninsɔni
LISOLO YA RUTH ULRICH
Nalɛmbaki nzoto mpe nalelaki liboso ya ekuke ya ndako ya sango moko. Abukelaki Charles T. Russell, oyo azalaki prezida ya liboso ya Société Watch Tower, lokuta moko monene. Tiká nalimbola ndenge oyo elenge mwasi lokola ngai na ntango wana, nazalaki kokende na bandako ya bato.
NABOTAMÁ na 1910, na ferme moko na etúká ya Nebraska, na États-Unis. Libota na biso emipesaki mingi na makambo ya Nzambe. Tozalaki kotánga Biblia mikolo nyonso na ntɔngɔ mpe na mpokwa nsima ya kolya. Tata azalaki mokambi ya eteyelo ya mokolo ya lomingo na ndakonzambe ya Lingomba ya Metodiste na mboka Winside oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ soki motoba na ferme na biso. Tozalaki na pusupusu oyo mpunda ezalaki kobenda, ezalaki na barido na maninisa; yango wana, ezala na ntango mbula ezali konɔka to moi makasi, tozalaki na mokakatano te mpo na kokende na ndakonzambe mokolo ya lomingo na ntɔngɔ.
Ntango nazalaki na mbula soki mwambe, leki na ngai ya mobali azwaki maladi ya bukabuka mpe Mama amemaki ye na lopitalo moko na etúká ya Iowa. Atako Mama asalaki nyonso mpo na kosalisa ye, leki na ngai akufaki ntango bazalaki na lopitalo. Nzokande, na ntango yango, kuna na etúká ya Iowa, Mama akutanaki na Moyekoli ya Biblia moko, ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana. Bazalaki kosolola mbala mingi mpe Mama azalaki kokende kutu na mwasi yango na makita mosusu ya Bayekoli ya Biblia.
Ntango Mama azongaki na ndako, amemaki bavolimi ya buku Étude des Écritures, oyo Société Watch Tower ebimisaki. Eumelaki te, Mama andimaki ete Bayekoli ya Biblia bazali koteya mateya ya solo mpe mateya oyo elobaka ete molimo ya moto ekufaka te mpe bato mabe banyokwamaka seko na seko na lifelo, ezali lokuta.—Genese 2:7; Mosakoli 9:5, 10; Ezekiele 18:4.
Nzokande, Tata azalaki kosepela ata moke te, mpe azalaki kopekisa Mama kokende na makita ya Bayekoli ya Biblia. Tata azalaki komema ngai na yaya na ngai ya mobali Clarence, na ndakonzambe. Kasi soki Tata azali na ndako te, Mama azalaki koyekola na biso Biblia. Yango nde esalisaki ngai na Clarence tókesenisa mateya ya Bayekoli ya Biblia na mateya ya lingomba na biso.
Ngai na Clarence tozalaki ntango nyonso kokende na eteyelo ya mokolo ya lomingo mpe Clarence azalaki kotuna molakisi mituna kasi azalaki kokoka kopesa biyano te. Soki tozongi na ndako, tozalaki koyebisa mama na biso, mpe tozalaki kosolola ntango molai. Nsukansuka, natikaki kokende ndakonzambe mpe nabandaki kokende makita ya Bayekoli ya Biblia elongo na Mama mpe mwa moke na nsima Clarence mpe alandaki ngai.
Natiki ezaleli ya nsɔninsɔni
Na Sɛtɛmbɛ 1922, ngai na Mama tokendaki na liyangani ya monene mpenza oyo Bayekoli ya Biblia basalaki na Cedar Point, na etúká ya Ohio. Nakoki lisusu komona elamba monene oyo babakaki ntango Joseph Rutherford, prezida ya Société Watch Tower ntango wana, alendisaki bato koleka 18 000 oyo bayanganaki na maloba oyo ekomamaki na elamba yango ete: “Bósakola Mokonzi mpe Bokonzi.” Yango esimbaki mpenza motema na ngai mpe namonaki ete nasengeli kosala nokinoki mpo na koyebisa bato mosusu nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.—Matai 6:9, 10; 24:14.
Na mayangani oyo esalemaki kobanda 1922 tii na 1928, Bayekoli ya Biblia bazalaki kozwa bikateli (résolution) mpe bazalaki kokoma yango na batrakte oyo bazalaki kokabola yango ebele epai ya bato na mokili mobimba. Nazalaki nzoto mike mpe molai, bazalaki kobenga ngai lévrier (mbwa moko ya mbangu); mpe nazalaki kokende nokinoki ndako na ndako mpo na kokabola batrakte oyo ezalaki na bikateli. Nazalaki kosepela na mosala yango mingi. Kasi, nazalaki na mokakatano ya kosolola na bato, nazalaki kokoka te kotɛlɛma liboso ya moto mpe koteya ye Bokonzi ya Nzambe.
Nazalaki mpenza nsɔninsɔni na boye ete nazalaki kobanga soki Mama abengisi bandeko na biso ebele na ndako, ndenge azalaki kosala mbula na mbula. Nazalaki kokende komibomba na shambre mpe soki nakɔti kuna, nakobima lisusu te. Mokolo moko, Mama alingaki kokanga libota mobimba fɔtɔ mpe alobaki na ngai nabima na shambre. Lokola naboyaki kokɔta na fɔtɔ, Mama abendaki ngai na makasi mpe nagangaki na kolela.
Nzokande mokolo moko, nazwaki ekateli mpe natyaki mikanda oyo elimbolaka Biblia na sakosi. Mbala na mbala nazalaki koloba ete, “Nakokoka te,” kasi na nsima nalobaki ete, “Nakokende kaka.” Nsukansuka, nasimbaki nzela mpe nakendaki kosakola. Nsima na yango, nasepelaki mingi ndenge nazwaki makasi ya kokende. Eloko epesaki ngai esengo mingi ezali mpo nakendaki kasi te mpo nasalaki. Ezalaki na ntango yango nde nakutanaki na sango oyo nalobelaki na ebandeli mpe nazongaki na kolela. Mokemoke, na lisalisi Yehova, nakómaki kosolola na bato na bandako na bango, mpe nakómaki kosepela mingi na mosala yango. Na nsima, na 1925, nazwaki batisimo na mai mpo na komonisa ete namipesi na Yehova.
Nabandi mosala ya ntango nyonso
Ntango nazalaki na mbula 18, nasombaki motuka na mbongo oyo mama-nkuluku atikelaki ngai ntango akufaki, mpe nabandaki mosala ya mobongisi-nzela, ndenge babengaka mosala ya kosakola ntango nyonso. Nsima ya mbula mibale, na 1930, bapesaki ngai na ndeko mosusu teritware moko mpo na kosakola kuna. Na ntango yango Clarence mpe abandaki mosala ya mobongisi-nzela. Eumelaki te, babengisaki ye akende kosala na Betele, biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York.
Ezali na ntango yango nde baboti na biso bakabwanaki, yango wana, ngai na Mama totongisaki wagɔ oyo babendaka na motuka mpe tobandaki kosala mosala ya mobongisi-nzela esika moko. Ezalaki na bambula wana nde nkita ekweyaki mpe na États-Unis. Ekómaki mwa mokakatano mpo na kolanda kosala mosala ya mobongisi-nzela, kasi tozwaki ekateli ete tokotika te. Tokómaki kosala boye: soki topesi moto mikanda oyo elimbolaka Biblia ye apesi biso nsoso, to maki, to ndunda, ata biloko mosusu lokola babateri ya kala to bibende ya aluminium oyo asalelá. Tozalaki kotɛkisa babateri na bibende yango mpo na kozwa mbongo ya kosomba mazuti mpo na motuka mpe kosomba biloko mosusu. Mpo na kobebisa mbongo mpambampamba te, ngai moko nayekolaki ndenge ya kotya mafuta na motuka mpe kolongola mafuta ya kala na motɛrɛ mpe kotya ya sika. Tomonaki ete Yehova azalaki kofungola nzela mpo na kosalisa biso ntango tokutani na mikakatano, ndenge oyo alakaki yango.—Matai 6:33.
Na mosala ya misionɛrɛ
Na 1946, babengisaki ngai nakɔta na kelasi ya mbala ya nsambo na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, oyo ezalaki kosalema mosika te na South Lansing, na etúká ya New York. Na ntango yango ngai na Mama tosilaki kolekisa mbula 15 na mosala ya mobongisi-nzela, kasi mama alingaki te kopekisa ngai kokɔta kelasi yango mpo na mosala ya misionɛrɛ. Alendisaki ngai nandima kokende na Eteyelo ya Gileadi. Ntango tozwaki badiplome, tokómaki kosala elongo na Martha Hess oyo autaki na engumba Peoria, na etúká ya Illinois. Batindaki biso na bandeko basi mosusu mibale, na engumba Cleveland, na etúká ya Ohio, mpo tósala mbula moko wana kozeláká ete bátinda biso na mboka mopaya.
Batindaki biso na teritware na 1947. Ngai na Martha tokendaki na Hawaï. Lokola motungisi ezalaki te mpo na kokende kofanda na bisanga yango, Mama ayaki kofanda na engumba ya Honolulu mpo azala pene na biso. Nzoto ekómaki kotungisa ye mingi, nazalaki kokoba na mosala na ngai ya misionɛrɛ mpe nazalaki kosalisa Mama. Nasungaki ye tii na ntango akufaki na Hawaï na 1956, azalaki na mbula 77. Ntango tokómaki na Hawaï, Batatoli bazalaki soki 130, kasi ntango Mama akufaki, bazalaki koleka nkóto moko mpe ntina ya kotinda bamisionɛrɛ ezalaki lisusu te.
Na nsima, ngai na Martha tozwaki mokanda eutaki na la Société ete batindi biso na Japon. Tomitunaki libosoliboso soki na bambula oyo tokómaki na yango tokokoka mpenza koyekola monɔkɔ ya Japonais. Na ntango wana ngai nazalaki na mbula 48, mpe Martha azalaki na mbula minei 44. Kasi totikaki nyonso na mabɔkɔ ya Yehova mpe tondimaki kokende.
Ntango kaka tosilisaki liyangani oyo esangisaki bandeko oyo bautaki mikili ndenge na ndenge, oyo esalemaki na 1958 na Yankee Stadium mpe na Polo Grounds, na New York City, tozwaki masuwa mpo na kokende na engumba Tokyo. Tokutanaki na mopɛpɛ makasi ntango tokómaki penepene na libongo ya Yokohama, esika Don Haslett na mwasi na ye Mabel, Lloyd Barry na mwasi na ye Melba, na bamisionɛrɛ mosusu bayambaki biso. Na ntango wana, Batatoli bazalaki kaka 1 124 na Japon mobimba.
Mbala moko tobandaki koyekola monɔkɔ ya Japonais mpe kobima na mosala ya kosakola ndako na ndako. Tozalaki kokoma makambo oyo tokoloba na monɔkɔ ya Japonais kasi na alfabɛ ya Lingelesi, soki tokómi epai ya bato tozalaki kotánga yango. Bato yango bazalaki kozongisa ete, “Yoroshii desu” to, “Kekko desu,” oyo toyebaki na nsima ete elimboli, “Ezali kitoko” to, “Ezali malamu.” Tozalaki mpenza koyeba te soki moto asepeli to te, mpamba te ezala moto oyo aboyi azalaki koloba kaka maloba yango. Kasi tozalaki koyeba soki moto andimi to aboyi na mongongo na ye to na elongi. Ntango molai elekaki mpo tóbanda koyeba moto oyo andimi na oyo aboyi.
Makambo oyo epesaki ngai esengo
Ntango nazalaki naino kobundana mpo na koyeba monɔkɔ ya Japonais, mokolo moko nakendaki koteya na ndako ya bato oyo basalaka na kompanyi ya Mitsubishi mpe nakutanaki na elenge mwasi moko ya mbula 20. Akolaki malamu na boyebi ya Biblia mpe azwaki batisimo na 1966. Nsima ya mbula moko abandaki mosala ya mobongisi-nzela mpe eumelaki te akómaki mobongisi-nzela monene. Banda wana tii lelo azali kaka mobongisi-nzela monene. Yango epesaka ngai makasi soki namoni ndenge asalelaki ntango mpe makasi na ye banda bolenge na ye na mosala ya ntango nyonso.
Kolanda mateya ya Biblia ezali mpenza likambo ya lisɛki te, mingimingi mpo na bato oyo bafandi na mikili oyo ezali ya boklisto te. Kasi, bato mingi balongaki mokakatano yango, bakisa mpe bato mingi oyo nayekolaki na bango Biblia. Babwakaki biloko ya ntalo mingi oyo basalelaka na losambo ya Bouddha mpe ya Shinto oyo bato mingi na Japon bazalaka na yango na bandako na bango. Lokola bandeko na bango balobaka ntango mosusu ete kosala bongo ezali kozanga limemya epai ya bankɔkɔ na bango oyo bakufá, bato yango oyo bazali kondima mateya ya Biblia sika basengeli kozala na mpiko. Molende oyo bamonisaka mpo na kosala makambo wana etindaka na kokanisa makambo oyo baklisto ya liboso basalaki, babwakaki biloko ya losambo ya lokuta.—Misala 19:18-20.
Nazali kokanisa lisusu mwasi moko oyo azalaki koyekola Biblia, alingaki kolongwa na Tokyo mpe kokende kofanda epai mosusu na libota na ye. Alingaki kokende kofanda na ndako na ye ya sika oyo ezalaki na biloko ya losambo ya bapakano te. Ayebisaki mobali na ye mposa na ye mpe mobali na ye andimaki. Azalaki na esengo ntango ayebisaki ngai likambo yango, kasi na nsima akanisaki ete na kati ya biloko oyo abongisaki mpo na komema, ezalaki na mbeki moko monene ya marbre, asombaki yango na mbongo mingi mpamba te bazalaki koloba ete ememaka bolamu na kati ya ndako. Lokola amonaki ete ezali eloko ya losambo ya lokuta, apasolaki mbeki yango na marto mpe abwakaki yango.
Komona ndenge mwasi yango na bato mosusu na bolingo na bango moko babwakaki biloko ya ntalo oyo ezalaki mpo na losambo ya lokuta mpe babandaki bomoi ya sika na mosala ya Yehova epesaki ngai esengo mingi. Natɔndaka Yehova ntango nyonso ndenge nasali mbula koleka 40 na mosala ya misionɛrɛ na Japon.
“Makamwisi” ya lelo oyo
Soki nakanisi mbula koleka 70 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso, nasepelaka na makambo oyo namonaka lokola makamwisi ya lelo oyo. Lokola nazalaki nsɔninsɔni ntango nazalaki elenge, nakokaki kokanisa ata mokolo moko te ete nakolekisa bomoi na ngai mobimba na mosala ya kosolola na bato mpo na Bokonzi oyo bato mingi balingaka koyoka ata moke te. Kasi, nalongaki kosala yango mpe namoni bato mosusu, bankama, to bankóto, oyo basali lokola ngai. Basali yango na molende mpenza na boye ete motuya ya Batatoli oyo ezalaki mwa moke koleka nkóto moko na Japon ntango tokómaki na 1958 ekómi koleka 222 000 lelo oyo!
Ntango ngai na Martha tokómaki na Japon, tofandaki na Betele ya Tokyo. Na 1963 batongaki ndako ya sika ya bitazi mitano na Betele yango, mpe tokómaki kofanda wana. Na Novɛmbɛ 1963, tozalaki na kati ya bato 163 oyo balandaki lisukulu ya Lloyd Barry, mokɛngɛli ya filiale na biso, mokolo bafungolaki Betele yango. Na ntango wana tokómaki Batatoli 3 000 na Japon.
Ezali esengo ya komona ndenge mosala ya kosakola Bokonzi ekolaki; basakoli bakómaki koleka 14 000 na 1972 ntango basilisaki kotonga Betele mosusu ya sika na engumba Numazu. Kasi na 1982 basakoli ya Bokonzi na Japon bakómaki koleka 68 000, mpe batongaki Betele mosusu ya monene na engumba Ebina, oyo ezali na kilomɛtrɛ soki 80 banda na engumba Tokyo.
Kaka na ntango yango, babongisaki lisusu Betele ya kala oyo ezali na kati ya Tokyo. Na nsima, Betele yango ekómaki ndako ya bamisionɛrɛ koleka 20 oyo basalaki na Japon banda mbula 40 to 50 to mpe koleka, na ngai na Martha Hess, moninga na ngai ya mosala banda kala. Tozali na monganga moko na mwasi na ye, oyo azali lifulume. Babatelaka biso na bolingo nyonso mpo na kolandela bokolɔngɔnɔ ya nzoto na biso. Bauti kobakisa lifulume mosusu mpe bandeko basi oyo bazali balifulume bayaka kosalisa biso. Betele ya Ebina etindaka bandeko mibale mpo na kolambela biso mpe kobongisela biso ndako na boumeli ya mwa mikolo mpe soki bakei, bamosusu bayei. Ya solo, Yehova azali mpenza Nzambe malamu mpo na biso.—Nzembo 34:8, 10.
Likambo moko monene na bomoi na ngai ya misionɛrɛ esalemaki na Novɛmbɛ ya mbula eleki, mbula 36 nsima ya bofungoli ndako oyo mingi na kati na bamisionɛrɛ ya kala tofandaka lelo oyo. Mokolo ya 13 Novɛmbɛ 1999, nazalaki na kati ya bato 4 486, bakisa mpe bankama ya Batatoli ya kalakala oyo bautaki na mikili 37, oyo bazalaki ntango balandaki molulu ya bofungoli bandako ya sika na Betele ya Japon na Ebina. Lelo oyo, bandeko soki 650 bazali kosala na Betele yango.
Na boumeli ya mbula pene na 80 uta nabandaki, na ezaleli na ngai ya nsɔninsɔni, kokende ndako na ndako mpo na koteya nsango ya Biblia, Yehova azalaki kolendisa ngai. Asalisaki ngai natikaki ezaleli na ngai ya nsɔninsɔni. Nandimi mpenza ete Yehova akoki kosalela moto nyonso oyo atyeli ye motema, ata soki moto yango azali mpenza nsɔninsɔni lokola ngai. Mpe nalekisi bomoi ya esengo mpenza na mosala ya koyebisa bato mosusu makambo ya Nzambe na biso, Yehova!
[Elilingi na lokasa 21]
Ngai na Mama, mpe Clarence, autaki na Betele, ayaki kotala biso
[Elilingi na lokasa 23]
Banakelasi bafandi na nse, bazali koyekola na Gileadi, pene ya South Lansing, etúká ya New York
[Elilingi na lokasa 23]
Na lobɔkɔ ya mwasi: Ngai, Martha Hess, Mama, na Hawaï
[Elilingi na lokasa 24]
Na lobɔkɔ ya mobali: Bamisionɛrɛ oyo tofandaka na bango na ndako ya bamisionɛrɛ na Tokyo
[Elilingi na lokasa 24]
Na nse: Ngai na Martha Hess moninga na ngai ya mosala banda kala
[Elilingi na lokasa 25]
Na Novɛmbɛ ya mbula eleki ntango basalaki molulu ya bofungoli bandako ya sika na Betele na biso ya Ebina.