Lisolo ya bomoi
Tosalaki elongo
YA MELBA BARRY
Na boumeli ya mbula 57 ya libala na biso, ngai na mobali na ngai toyanganaki mbala ebele mpenza na mayangani minene ya Batatoli ya Yehova; ezali yango mpe tosalaki na mokolo ya 2 Yuli 1999. Na mokolo ya mitano, Lloyd azalaki kosala lisukulu ya nsuka na liyangani ya etúká na Hawaii. Mbala moko, akweaki. Milende nyonso basalaki mpo na kozongisa lisusu makanisi na ye esimbaki te, akufaki.a
BANDEKO baklisto ya Hawaii oyo basalaki nyonso mpo na kosunga ngai mpe kosalisa ngai ete nayika mpiko ntango likambo oyo ya nsɔmɔ ekómelaki ngai, bazali mpenza na motuya! Ndakisa malamu oyo Lloyd atikaki esimbaki mitema ya bato mingi kati na bango, ezala mpe ebele ya bato mosusu na mokili mobimba.
Awa elingi kokoka mbula mibale banda akufá, nakolobela bambula ya kitoko oyo tolekisaki elongo—mingi na yango na mosala ya misionɛrɛ na mboka mopaya mpe na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, New York. Namikundolaki mpe bomwana na ngai na engumba Sydney na Australie, mpe mikakatano oyo ngai na Llyod tokutanaki na yango mpo na kobalana na ntango oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki naino na ebandeli. Kasi, tiká nayebisa naino bino ndenge nakómaki Motatoli mpe ndenge nakutanaki na Llyod na 1939.
Ndenge nakómaki Motatoli
Nkombo ya baboti na ngai ya bolingo mpe ya boboto ezali James na Henrietta Jones. Nazalaki na mbula 14 mpamba ntango nasilisaki kelasi na 1932. Ezalaki na ntango oyo nkita ya mokili mobimba ekweaki makasi. Nabandaki kosala mpo na kosalisa baboti mpe baleki na ngai mibale ya basi. Nsima ya mwa bambula, nazwaki mosala moko oyo ezalaki kofuta malamu; nazalaki kotambwisa mosala oyo nazalaki kosala na bilenge mingi ya basi.
Na ntango yango, na 1935, Mama azwaki mikanda elimbolaka Biblia oyo Motatoli ya Yehova moko apesaki ye mpe eumelaki te, andimaki ete azwaki solo. Na libota na biso, tokanisaki biso nyonso ete akómaki na ligboma. Nzokande, mokolo moko, namonaki mwa buku moko oyo ebendaki mpenza likebi na ngai, mpamba te motó ya likambo na yango ezalaki ete Bakufi bazali wapi? Yango wana natángaki mwa buku yango na kobombana. Nsima na yango, nazalaki lisusu ngai te! Mbala moko, nabandaki kokende elongo na mama na likita oyo ezalaki kosalema na katikati ya pɔsɔ, mpe ezalaki kobengama Ndakisa ya kosala boyekoli. Na likita yango bazalaki kosalela mwa buku oyo ezalaki na motó ya likambo ete Ndakisa ya kosala boyekoli; mwa buku yango, oyo nsukansuka ebimisamaki na biteni misato, ezalaki na mituna mpe biyano, na mikapo oyo esimbaki biyano yango.
Ekoki kozala na ntango wana kaka, na sanza ya Aprili 1938, nde Joseph Rutherford, momonisi oyo autaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova, ayaki na Sydney. Lisukulu ya bato nyonso ya liboso oyo nalandaki ezalaki ya ye. Esengelaki kosalema na ndako oyo bazalaki kobenga Sydney Town Hall, kasi mpo na songisongi ya banguna, bakonzi baboyaki ete tosalela esika yango. Atako bongo, lisukulu esalemaki na libándá ya masano ya Sydney (Sydney Sports Ground). Bato soki 10 000 balandaki lisukulu yango, mpamba te mindɔndɔ nyonso oyo banguna babimisaki mpo ete lisukulu wana esalema te, esalaki ete bato ebele báyoka nsango ya lisukulu yango; bato oyo bayaki bazalaki mingi mpenza, mpamba te, na ntango wana ezalaki kaka na Batatoli 1 300 na Australie mobimba.
Mwa moke na nsima, nasanganaki na mosala ya kosakola mpo na mbala ya liboso, kozanga ete bálakisa ngai ndenge ya kosala yango. Ntango tokómaki na teritware oyo bapesaki biso, ndeko oyo azalaki kokamba biso alobaki na ngai, “Okoloba na ndako wana.” Lokola nazalaki mpenza kobanga, yango esalaki ete ntango mwasi moko ya ndako yango afungolaki ndako, natunaki ye kaka boye: “Okoki koyebisa ngai soki tokómi ngonga nini?” Azongaki na kati, atalaki ngonga, mpe ayaki koyebisa ngai. Nabakisaki lisusu eloko te. Nazongaki na ngai na esika oyo totikaki motuka.
Kasi, natikaki te; mpe mosika te, nakómaki mbala na mbala koteya bato mosusu nsango ya Bokonzi. (Matai 24:14) Na sanza ya Marsi 1939, namonisaki komipesa na ngai epai ya Yehova na kozwáká batisimo na esika moko ya kosukola nzoto, na ndako ya Dorothy Hutchings, oyo ezalaki pembeni na biso. Lokola bandeko mibali bazalaki mpenza te, mwa moke nsima wana nazwaki batisimo, bapesaki ngai mikumba ya lisangá oyo epesamaka na baklisto ya mibali.
Tozalaki kosala makita na biso na bandako ya bandeko, kasi na bantango mosusu tozalaki kofutela ndako ya monene mpo na masukulu ya bato nyonso. Ndeko moko oyo azalaki naino elenge, oyo azalaki mpe kitoko, autaki na Betele, na filiale na biso, mpo na kosala lisukulu na mwa lisangá na biso. Nayebaki te ete ntina mosusu ya koya na ye ezalaki nde mpo na koluka koyeba ngai malamumalamu. Ɛɛ, ezalaki lolenge wana nde nakutanaki na Lloyd.
Nakutani na libota ya Lloyd
Mosika te, nayokaki mposa ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso. Kasi, ntango nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela (mosala ya kosakola ntango nyonso), batunaki ngai soki nakolinga kosala na Betele. Na bongo na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1939, sanza oyo Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ebandaki, nakɔtaki na Betele, oyo ezali na Strathfield, kartye moko ya sika ya Sydney.
Na Desɛmbɛ 1939, nakendaki na liyangani moko oyo esalemaki na Nouvelle-Zélande. Lokola Lloyd azalaki moto ya Nouvelle-Zélande, ye mpe akendaki kuna. Tosalaki mobembo na masuwa moko, yango esalisaki biso toyebana malamumalamu. Lloyd abongisaki ete nakutana na mama na ye, tata na ye mpe bandeko na ye mibale ya basi; liboso, na liyangani yango, oyo esalemaki na engumba Wellington, mpe na nsima na ndako na bango na engumba Christchurch.
Mosala na biso epekisami
Na mokolo ya pɔsɔ, 18 Yanuali 1941, bakonzi ya Leta bayaki na mituka soki motoba mpo na kobɔtɔla biso esika. Lokola nazalaki kosala na esika ya koyamba bapaya, mwa ndako oyo ezalaki pene na monɔkɔ ya lopango ya Betele, nazalaki moto ya liboso ya komona bango. Soki ngonga 18 liboso na koya na bango, bayebisaki biso ete mosala na biso epekisami; na bongo tolongolaki mikanda mpe badosye nyonso na Betele. Pɔsɔ oyo elandaki, batyaki basangani mitano ya libota ya Betele na bolɔkɔ, bakisa mpe Lloyd.
Nayebaki ete bandeko oyo bazalaki na bolɔkɔ basengelaki mingi nde na bilei ya elimo. Mpo na kolendisa Lloyd, nazwaki ekateli ya kokomela ye “mikanda ya lolango.” Na ebandeli ya mikanda yango, nazalaki kokoma maloba oyo bakomaka na mikanda ya lolango, kasi nsima ya maloba yango nazalaki kokoma masolo mibimba ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe na nsuka ya mokanda nazalaki kotya sinyatire lokola wa ye wa motema. Nsima ya sanza minei na ndambo, Lloyd abimaki na bolɔkɔ.
Tobalani mpe tokobi na mosala ya ntango nyonso
Na 1940, mama ya Lloyd ayaki na Australie mpe Lloyd ayebisaki ye ete tozali na likanisi ya kobalana. Mama na ye amonisaki ye ete likanisi wana ezalaki malamu te mpo ete nsuka ya mokili ezali lisusu mosika te. (Matai 24:3-14) Ayebisaki mpe mposa yango epai ya baninga na ye, kasi ntango nyonso bazalaki kolinga te ete ábala. Nsukansuka, mokolo moko ya sanza ya Febwali 1942, kozanga ete bato ebele báyeba, Lloyd azwaki ngai elongo na Batatoli ya Yehova mibale, na basi na bango, oyo bakokaki kobomba likambo yango; tokendaki na biro oyo bakomisaka mabala, mpe tobalanaki. Na ntango wana, na Australie, Leta epesaki naino lotomo te na Batatoli ya Yehova mpo batambwisa milulu ya kobalisa.
Atako totikalaki lisusu na Betele te mpo tobalanaki, kasi batunaki biso soki tokolinga kosala lokola babongisi-nzela minene. Na esengo nyonso, tondimaki kokende esika oyo batindaki biso, na mboka moko babengi Wagga Wagga. Mosala na biso ezalaki kaka kopekisama, mpe tozalaki kozwa lisungi ya mbongo te; na bongo esengelaki mpenza ete tokitisa mokumba na biso epai ya Yehova.—Nzembo 55:22.
Tozalaki kotambola na velo oyo ezalaka na bisika ya bato mibale mpo na kokende na bamboka ya mikemike; kuna, tozalaki kokutana na bato mosusu ya malamu, mpe tozalaki kosolola na bango ntango molai. Baoyo bandimaki koyekola Biblia bazalaki mingi te. Nzokande, mokóló magazini moko asepelaki mingi na mosala oyo tozalaki kosala, na yango azalaki kokabela biso pɔsɔ na pɔsɔ bambuma mpe ndunda. Nsima ya kolekisa sanza motoba na Wagga Wagga, basɛngaki biso tózonga na Betele.
Na sanza ya Mai 1942, libota ya Betele etikaki kosalela bandako na yango oyo ezalaki na engumba Strathfield mpe bakómaki kosalela bandako ya bandeko. Mpo na kobanga noki báyeba esika bazali, bazalaki kolongwa na ndako moko mpo na kokende na ndako mosusu nsima ya mwa bapɔsɔ. Ntango ngai na Lloyd tozongaki na Betele na sanza ya Augusto, tolandaki bango na moko ya bisika yango. Na moi, tozalaki kosala na binyateli ya mikanda oyo etyamaki na ndako ya nse ya mabele. Nsukansuka, na sanza ya Yuni 1943, batikaki kopekisa mosala na biso.
Kobongisama mpo na mosala ya misionɛrɛ
Na sanza ya Aprili 1947, totondisaki lokasa ya liboso ya kosɛnga kokɔta na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia, oyo ezalaki na South Lansing, na etúká ya New York. Kaka na ntango wana, bapesaki biso mosala ya kotala mpe kolendisa na elimo, masangá na Australie. Nsima ya mwa basanza, babengisaki biso mpo tókɔta na kelasi ya mbala ya 11 ya Gileadi. Tozalaki na pɔsɔ misato mpo na komibongisa mpe kokanga biloko na biso. Totikaki mabota na biso mpe baninga na biso na sanza ya Desɛmbɛ 1947, mpe tokendaki na New York elongo na bandeko mosusu 15 ya Australie oyo babengaki mpe bango na kelasi yango.
Mwa basanza oyo tolekisaki na Gileadi eumelaki te, mpe batindaki biso lokola bamisionɛrɛ na Japon. Lokola kozwa mikanda ya Leta eumelaki mingi, bapesaki lisusu Lloyd mosala ya mokɛngɛli-motamboli mpo na masangá ya États-Unis. Masangá oyo tosengelaki kotala ebandaki na engumba Los Angeles mpo na kosuka na ndelo oyo ekaboli États-Unis na Mexique. Tozalaki na motuka te, na bongo pɔsɔ nyonso Batatoli bazalaki komema biso na bolingo nyonso, kolongwa na lisangá moko tii na lisangá oyo elandi. Na esika oyo zongazonga wana monene ezalaki, tozali lelo oyo na bitúká misato ya masangá oyo esalelaka Lingelesi mpe bitúká misato ya masangá oyo esalelaka Espagnol; etúká mokomoko esangisi soki zongazonga zomi!
Eumelaki te, tokómaki na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1949, sanza oyo tomataki masuwa moko oyo bazalaki kosalela yango liboso mpo na komema basoda, mpe tokendaki na Japon. Nsuka moko ya masuwa ezalaki mpo na mibali mpe nsuka mosusu mpo na basi na bana. Mokolo moko liboso ete tókóma na Yokohama, tokutanaki na mopɛpɛ makasi. Emonanaki ete ekimisaki mapata, mpamba te ntango moi ebimaki na mokolo oyo elandaki, mokolo ya 31 Ɔkɔtɔbɛ, tomonaki Ngomba Fuji na bonzenga na yango nyonso. Ngomba yango etombelaki biso mpenza boyei malamu na mboka oyo batindaki biso!
Ndenge tosalaki na bato ya Japon
Ntango tokómaki pene na libongo, tomonaki bato ebele ya nsuki mwindo. Ntango toyokaki makɛlɛlɛ makasi, tokanisaki ete bato yango nde bazalaki kosala makɛlɛlɛ yango. Nzokande, ezalaki nde makɛlɛlɛ ya basapato oyo mokomoko na bango alataki; lokola ezalaki na libaya na nse, ntango bazalaki kotambola pembeni ya libongo, libaya wana nde ezalaki kobimisa makɛlɛlɛ ntango ezalaki kotuta mabele. Nsima ya kolala mokolo moko na Yokohama, tokɔtaki na engbunduka mpo na kokende na Kobe, esika oyo batindaki biso lokola bamisionɛrɛ. Kuna, tokutaki Don Haslett, mwana-kelasi oyo totángaki na ye na Gileadi, kasi asilaki kokóma na Japon mwa basanza liboso; azalaki kofanda na ndako ya bamisionɛrɛ oyo azalaki kofutela. Ezalaki ndako moko kitoko, monene, lokola bandako ya Amerika ya nɔrdi, mpe ezalaki na etazi mibale oyo ezalaki ata na eloko moko na kati te.
Mpo na kozwa esika ya kolala, tokataki matiti milai oyo ezalaki na lopango mpe totandaki yango na nse. Ezalaki bongo nde bomoi na biso ya misionɛrɛ ebandaki; tozalaki na eloko te, kaka bavalisi na biso. Tozwaki mbambola moko, oyo bazalaki kobenga “hibachi,” mpo etyaka molunge na ndako mpe esalisaka biso mpo na kolamba. Mokolo moko na butu, Lloyd akutaki bamisionɛrɛ mibale, Percy Iszlaub na mwasi na ye IIma, bazali komiyeba lisusu te mpo na milinga. Ntango kaka afungolaki maninisa mpo na kokɔtisa mwa mopɛpɛ ya malili, makanisi na bango ezongaki lisusu. Mokolo moko, likambo wana ekómelaki mpe ngai ntango nazalaki kolamba na mbambola. Esengelaki mwa ntango mpo tómesana na mwa makambo mosusu.
Koyekola monɔkɔ ezalaki likambo ya liboso, mpe tozalaki koyekola lokota ya Japonais ngonga 11 na mokolo, na boumeli ya sanza moko. Nsima na yango, tobandaki kobima na mosala ya kosakola, tozalaki kaka na likambo moko to mibale oyo tokomaki mpo esalisa biso na kobanda lisolo. Mokolo ya liboso oyo nabimaki, nakutanaki na mama moko ya motema malamu mpenza, nkombo na ye Miyo Takagi, oyo ayambaki ngai na boboto nyonso. Na ebandeli, mbala nyonso oyo nazalaki kozongela ye, esengelaki ete tosalelaka diksionɛrɛ ya Japonais-Lingelesi mpo toyokana; na nsima tokómaki koyekola na ye Biblia malamu mpe azalaki kokóla mokemoke. Na 1999, ntango nayanganaki na molulu ya bofungoli bandako ya sika oyo ebakisamaki na filiale ya Japon, namonaki lisusu Miyo mpe bandeko mosusu oyo nayekolaki na bango Biblia. Mbula 50 esili koleka, kasi bazali kaka basakoli ya Bokonzi oyo bazali na molende mpe bazali kosala nyonso oyo ekoki mpo na kosalela Yehova.
Na Kobe, na mokolo ya 1 Aprili 1950, bato soki 180 bayanganaki na biso na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, tokamwaki na komona ete bato 35 bayaki mpo na kobima na biso na mosala ya kosakola. Misionɛrɛ mokomoko abimaki na mosala elongo na bato yango ya sika misato to minei. Na bandako oyo tokendaki, bakóló-ndako bazalaki kosolola na ngai te mpamba te nazalaki mopaya oyo ayebaki Japonais malamu te; kasi bazalaki nde kosolola na bato ya ekólo na bango oyo nabimaki na bango, bato oyo bayanganaki mpo na mbala ya liboso na Ekaniseli oyo toutaki kosala. Ntango bazalaki kokóma mosika na masolo na bango, nazalaki lisusu koyoka makambo oyo bazalaki koloba te. Nazali na esengo ya koloba ete mingi kati na bato yango ya sika bakólaki na boyebi mpe bazali kokóba kosakola tii lelo.
Tozwi mikumba mingi oyo epesi biso esengo
Tokóbaki na mosala na biso ya misionɛrɛ na Kobe tii na 1952, ntango oyo batindaki biso na Tokyo, epai bapesaki Lloyd mokumba ya kokamba filiale. Nsima na yango, mikumba na ye esɛngaki ete asalaka mibembo na Japon mobimba mpe na bikólo mosusu. Na nsima, na moko ya mibembo oyo Nathan Knorr, prezida ya la Société na ntango wana, asalaki na Tokyo, alobaki na ngai boye: “Oyebi bikólo oyo mobali na yo akokende kotala lokola mokɛngɛli ya zone na mbala oyo? Australie na Nouvelle-Zélande.” Abakisaki ete: “Okoki mpe kokende soki yo moko omifuteli tike.” Oyo nde esengo monene! Kutu, elekaki mbula 9 banda totikaki mboka.
Tokomelaki nokinoki mabota na biso mpo na koyebisa bango nsango wana. Mama atindelaki ngai mbongo ya tike. Ngai na Lloyd tomipesaki mpenza na mosala na biso, mpe tozalaki kozwa makoki te mpo na kokende kotala mabota na biso. Yango wana, namonaki libaku yango lokola eyano na mabondeli na ngai. Ndenge bokoki kokanisa yango, mama azalaki na esengo mingi na komona ngai. Alobaki: “Nakobanda kobomba mbongo mpo na bino, mpo ete boya lisusu nsima ya mbula misato.” Tozongaki na likanisi yango na motema, kasi, likambo ya mawa, na sanza ya Yuli oyo elandaki, mama akufaki. Nazali mpenza na elikya ete tokokutana lisusu na mokili ya sika!
Tii na 1960, mosala na ngai ezalaki kaka misionɛrɛ, kasi na nsima nazwaki mokanda moko oyo elobaki boye: “Banda lelo, mosala na yo ekozala kosukola mpe kongoma bilamba ya libota nyonso ya Betele.” Lokola libota na biso ya Betele ezalaki kaka na bato soki 12, nazalaki kosala mosala yango nzela moko na mosala na ngai ya misionɛrɛ.
Na 1962, babukaki ndako na biso oyo etongamaki lokola bandako ya Japon, mpe na mbula oyo elandaki batongaki kaka na esika yango Betele ya sika oyo ezalaki na baetazi motoba. Nazwaki mokumba ya kolakisa bilenge oyo bakɔtaki sika na Betele ndenge basengeli bango moko kotya bopɛto na biteni na bango ya ndako, mpe ndenge ya kosukola basani oyo basaleli mpe bongo na bongo. Na mimeseno ya bato ya Japon, balakisaka bana mibali misala ya ndako te. Bazalaki kaka kolendisa bango ete bámipesa na kotánga kelasi; makambo mosusu nyonso oyo etikali ezalaki nde mokumba ya bamama na bango. Mosika te, bayebaki ete ngai nakokaki te kosalela bango makambo nyonso ndenge bamama na bango bazalaki kosalela bango. Nsukansuka, mingi bakólaki na elimo mpe bazwaki mikumba minene na kati ya ebongiseli.
Mokolo moko ya moi makasi na eleko ya molunge, moyekoli moko ya Biblia ayaki kotala Betele; ntango bazalaki kotambwisa ye, amonaki ngai nazali kosukola twaleti. Alobaki na ngai boye: “Yebisá mokonzi na bino ete ngai nandimi kofuta mwana ya mosala mpo ete aya kosala mosala oyo mpo na yo.” Nalimbwelaki ye ete nasepelaki na likanisi na ye, kasi mposa na ngai ezalaki nde ya kokokisa mosala nyonso oyo bapesi ngai na kati ya ebongiseli ya Yehova.
Ekoki kozala kaka na ntango wana nde babengaki ngai na Lloyd mpo tókɔta na kelasi ya mbala ya 39 ya Gileadi! Oyo nde libaku malamu tozwaki na 1964, ya kokende lisusu na kelasi, na mbula 46! Mateya ebongisamaki mingimingi mpo na kosalisa baoyo bazalaki kosala na babiro ya filiale mpo ete bákokisa malamu mikumba na bango. Nsima ya mateya oyo eumelaki sanza zomi, batindaki biso lisusu na Japon. Na ntango wana, Japon ezalaki na basakoli ya Bokonzi koleka 3 000.
Lokola bokoli ezalaki kosalema nokinoki, na 1972 Batatoli bakómaki koleka 14 000 mpe Betele ya sika ya baetazi mitano etongamaki na Numazu, engumba moko oyo ezali na sudi ya Tokyo. Tokokaki komona Ngomba Fuji na bonzenga na yango nyonso, banda na Betele. Tokómaki konyata bazulunalo koleka milio moko na sanza moko na lokota ya Japonais, mpo tozwaki masini ya sika ya konyata mikanda. Kasi mbongwana moko ezalaki kozela biso.
Pene na nsuka ya 1974, Lloyd azwaki mokanda oyo eutaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova oyo ezali na Brooklyn; babengaki ye akende kosala na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Na ebandeli, nakanisaki ete: ‘Libala na biso esuki wana. Lokola Lloyd azali na elikya ya kokende likoló, mpe ngai nazali na elikya ya kotikala libela awa na mabele, nsukansuka tokokabwana kaka. Ntango mosusu ekosɛnga ete Lloyd akende ye moko na Brooklyn.’ Kasi mosika te nabongisaki lolenge na ngai ya kokanisa mpe nandimaki kokende elongo na Lloyd na sanza ya Marsi 1975.
Mapamboli oyo tozwi na biro monene
Atako tozalaki na Brooklyn, kasi makanisi ya Lloyd ezalaki kaka na Japon, mpe azalaki ntango nyonso kobɛta masolo oyo etali makambo oyo tokutanaki na yango kuna. Kasi, kuna tozwaki mabaku mingi ya koyebana na bandeko mosusu. Na boumeli ya mbula 24 oyo alekisaki liboso ete akufa, Lloyd azalaki mingimingi mokɛngɛli ya zone, mosala oyo esɛngaka kosala mibembo mingi na mokili mobimba. Mbala ebele tosalaki mibembo wana elongo.
Kokende kotala bandeko na biso baklisto na bikólo mosusu esalisaki ngai nayeba malamu ndenge bomoi ezalaka na bisika oyo bafandaka mpe basalaka. Nakobosana soki moke te elongi ya Entellia, mwana-mwasi ya mbula zomi oyo nakutanaki na ye na Afrika ya nɔrdi. Azalaki kolinga nkombo ya Nzambe mpe azalaki kosala ngonga moko na ndambo na nzela mpo na kokende na makita ya boklisto. Atako libota na ye ezalaki konyokola ye mingi, Entellia amipesaki epai ya Yehova. Ntango tokendeki kotala lisangá na bango, ezalaki kaka na mwinda moko oyo batyaki likoló esika molobi azalaki koloba, mwinda yango ezalaki mpe kopela makasi te; na maloba mosusu, tokoki koloba ete esika na bango ya makita ezalaki mpenza na kati ya molili makasi. Na molili wana, ezalaki likambo ya kokamwa na koyoka ndenge bandeko bazalaki koyemba kitoko.
Likambo moko ya ntina na bomoi na biso esalemaki na sanza ya Desɛmbɛ 1998, ntango ngai na Lloyd tozalaki kati na bandeko oyo bautaki na mikili ndenge na ndenge mpo na koyangana na mayangani ya etúká “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi” oyo esalemaki na ekólo Cuba. Tokamwaki mpenza mpo na botɔndi mpe esengo oyo bandeko ya Cuba balakisaki na komona ete bandeko mosusu bautaki na biro monene na Brooklyn mpo na koya kotala bango! Nabombi na makanisi na ngai makambo mingi ya bandeko oyo nakutanaki na bango oyo bazali kokumisa Yehova na molende tii lelo.
Namiyokaka ete nazali epai na ngai ntango nazali elongo na libota ya Nzambe
Atako nazali moto ya Australie, nakómaki kolinga bato ya bisika nyonso oyo ebongiseli ya Yehova etindaki ngai. Na ndakisa, ntango tozalaki na Japon, nalingaki bandeko ya ekólo wana; mpe lokola nafandi sikoyo na États-Unis mbula koleka 25, namoni ete eloko moko ebongwani te. Ntango nabungisaki mobali na ngai, likanisi na ngai ezalaki ya kozonga na Australie te, kasi ya kotikala na Betele ya Brooklyn, esika oyo Yehova apesaki ngai mosala.
Sikoyo nazali na mbula koleka 80. Nsima ya kolekisa mbula 61 na mosala ya ntango nyonso, nazali kaka na bolingo ya kosalela Yehova esika nyonso oyo ye amoni malamu nasalela ye. Ya solo, azali kobatela ngai. Nazali kosepela mingi na mbula koleka 57, oyo nalekisaki elongo na molongani na ngai ya motema oyo alingaki Yehova. Nazali kolikya ete Yehova akolanda kopambola biso, mpe nayebi ete akobosana te mosala mpe bolingo oyo tomonisaki mpo na nkombo na ye.—Baebele 6:10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1999, nkasa 16 mpe 17.
[Elilingi na lokasa 25]
Ngai na mama na 1956
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai na Lloyd mpe etuluku moko ya basakoli ya Japon na ebandeli ya bambula ya 1950
[Elilingi na lokasa 26]
Ngai na Miyo Takagi, moyekoli na ngai ya Biblia ya liboso na Japon, na ebandeli ya bambula ya 1950 mpe na 1999
[Elilingi na lokasa 28]
Ngai na Lloyd ntango tozalaki kokabola bazulunalo na Japon