Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/10 nk. 24-28
  • Yehova abendaka bato ya komikitisa na solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova abendaka bato ya komikitisa na solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakutani na mopaya
  • Makambo misato ya mawa
  • Nasepeli na solo
  • Bisengo ya mosala ya Nzambe
  • Namoni lisangá ya bandeko ya mokili mobimba
  • Mosala ya esengo elongo na mobali na ngai
  • Esengo ya komona ndenge mosala ezali kokola
  • Natiki kosambela Amperere nakómi kosambela Nzambe ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tosalaki elongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Basalisaki ngai mpo natika ezaleli na ngai ya nsɔninsɔni
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Oyanolaka wana moto moko abyangi yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/10 nk. 24-28

Lisolo ya bomoi

Yehova abendaka bato ya komikitisa na solo

YA ASANO KOSHINO

Na 1949, kaka mwa bambula moke nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mopaya moko ayaki kotala libota moko oyo nazalaki kosala epai na bango na engumba Kobe; azalaki molai mpe na boboto mingi. Azalaki Motatoli ya Yehova ya Liboso oyo ayaki na mosala ya misionɛrɛ na Japon. Koya ayaki kotala libota wana epesaki ngai libaku ya koyoka solo ya Biblia. Kasi tiká nabɛtɛla bino naino lisolo ya bomoi na ngai.

NABOTAMAKI na 1926 na mwa mboka moko na nɔrdi ya etúká ya Okayama. Nazalaki mwana ya mitano na libota ya bana mwambe. Tata na ngai azalaki mondimi ya molende ya Shinto. Yango wana, biso bana tozalaki kosangana na milulu mpe na bokutani na libota na biyenga ya losambo mbala ebele na mbula.

Ntango nazalaki kokola, nazalaki komituna ebele ya mituna na ntina na bomoi, kasi nazalaki komitungisa mingi mpenza nde mpo na liwa. Bonkɔkɔ na biso ezalaki kosɛnga ete moto akufa na ndako mpe ata bana bázala wana ntango azali kokufa. Nayokaki mawa mingi ntango nkɔkɔ na ngai ya mwasi akufaki mpe ntango leki na ngai ya mobali, oyo akokisaki naino ata mbula moko te, akufaki. Nazalaki mpenza komituna ete: ‘Nsuka ya bomoi ezali kaka liwa? Bomoi ezali na ntina mosusu te?

Na 1937, ntango nazalaki na kelasi ya motoba na eteyelo ya ebandeli, etumba ya Chine ná Japon ebandaki. Bazalaki kokanga mibali na makasi mpe kotinda bango na etumba na Chine. Bana mike bazalaki kopepa batata ná bayaya na bango ntango bazalaki kokende bitumba, mpe bazalaki koganga ete “banzai!” (bomoi molai) mpo na ampɛrɛrɛ. Bato bazalaki mpenza na kondima ete Japon, ekólo oyo etambwisami na nzambe, ekolonga, mpe ete amperɛrɛ azali nzambe.

Mosika te, bato bakómaki kozwa bansango ya liwa ya bandeko na bango oyo bakendaki etumba. Bato oyo bandeko na bango bakufaki bazalaki kolela mingi. Bakómaki mpenza koyina banguna ya ekólo, mpe ntango bayoki ete basoda na biso babomi banguna mingi, bazalaki kosepela mpenza. Kasi ngai nazalaki koloba na motema ete: ‘Banguna na biso mpe, ntango bandeko na bango bazali kokufa, bazali koyoka mpasi na mitema kaka ndenge biso tozali koyoka.’ Ntango nasilisaki kelasi na eteyelo ya ebandeli, etumba ekómaki tii na kati mpenza ya Chine.

Nakutani na mopaya

Lokola tozalaki libota ya basali bilanga, tozalaki na bozwi te, kasi tata na ngai atikaki ngai nakende mwa mosika na kelasi lokola tozalaki kofuta mbongo te. Yango wana, na 1941, nakɔtaki na eteyelo ya bana basi na engumba Okayama, soki kilomɛtrɛ 100 longwa na mboka na biso. Eteyelo yango ezalaki kopesa bana basi mateya mpo bázala basi mpe bamama malamu na bomoi na bango, mpe ezalaki kotinda bana-kelasi na bandako ya bato ya bozwi ya engumba yango mpo báyekola misala ya ndako. Na ntɔngɔ, bana-kelasi bazalaki koyekola misala na bandako yango, mpe na nsima ya midi bazalaki kokende na kelasi.

Nsima ya molulu ya kotombela bayekoli boyei malamu, molakisi na ngai, oyo alataki molato ya mboka na biso (kimono), amemaki ngai na ndako moko ya monene. Kasi, mpo na ntina oyo nayebi te, mama ya ndako yango aboyaki koyamba ngai. Molakisi na ngai atunaki ete: “Boye, tókende nde na ndako ya Madame Koda?” Amemaki ngai na ndako moko lokola bandako ya Mpoto mpe abɛtaki ngonga ya porte. Nsima ya mwa ntango, mwasi moko ya molai, oyo azalaki na nsuki ya kitoko, afungolaki ndako. Nakamwaki mpenza! Azalaki moto ya Japon te, mpe ezalaki mbala ya liboso namona mondele. Molakisi na ngai alakisaki ngai epai ya Madame Maud Koda mpe akendaki. Na kobanga nyonso, nakɔtaki na basakosi na ngai na ndako. Na nsima nayaki koyeba ete Madame Maud Koda azali moto ya Amerika mpe abalanaki na moto ya Japon oyo atángaki na États-Unis. Madame yango azalaki kotángisa Lingelesi na biteyelo ya makambo ya mombongo.

Kaka na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, misala ebandaki. Mobali ya Madame Koda azalaki na maladi ya ndɛkɛ, mpe nasengelaki kobatelaka ye. Lokola nayebaki Lingelesi te, namitungisaki mwa moke. Motema na ngai ekitaki ntango nayokaki Madame Koda alobi na ngai na monɔkɔ ya Japonais. Mokolo na mokolo, nazalaki koyoka ndenge bazalaki kosolola na Lingelesi, mpe mokemoke matoi na ngai ebandaki komesana na monɔkɔ yango. Nazalaki kosepela mingi na efandeli ya mwasi yango ná mobali na ye.

Nazalaki kokamwa mpenza ndenge Maud amipesaki na kosalisa mobali na ye oyo azalaki kobɛla. Alingaki kotánga Biblia mingi. Na nsima, nayaki koyeba ete Madame Maud ná mobali na ye bazalaki na buku Le divin Plan des Âges na monɔkɔ ya Japonais oyo basombaki na magazini moko ya babuku ya kala mpe bazalaki na abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi banda kala.

Mokolo moko bakabelaki ngai Biblia. Nasepelaki mingi mpo ezalaki mbala ya liboso nazala na Biblia na ngai moko. Nazalaki kotánga yango ntango nazali kokende kelasi mpe kozonga na ndako, kasi nazalaki mpenza kokanga ntina te ya makambo oyo nazalaki kotánga. Lokola nabɔkwamaki na Lingomba ya Shinto, nayebaki mpenza Yesu Klisto te. Nazalaki koyeba te ete ezali nde ebandeli ya likambo oyo ekomema ngai na kondima solo ya Biblia, oyo ekopesa ngai biyano na mituna oyo nazalaki komituna na ntina na bomoi mpe liwa.

Makambo misato ya mawa

Mbula mibale ya boyekoli na ngai elekaki nokinoki, mpe esengelaki natika libota yango. Ntango nasilisaki kelasi, nakɔtaki na lisangá moko ya bilenge basi oyo bamipesi mpe tozalaki kotonga bilamba ya basoda ya mai. Baaviɔ ya basoda ya Amerika ebandaki kobwaka babɔmbi, mpe na mokolo ya 6 Augusto 1945, babwakaki bɔmbi atomike moko na Hiroshima. Nsima ya mwa mikolo, nazwaki telegrame ete Mama azalaki kobɛla makasi. Nazwaki engbunduka ya liboso oyo emonanaki mpe nakendaki na mboka. Ntango kaka nakitaki na engbunduka, nakutanaki na ndeko na ngai moko mpe ayebisaki ngai ete Mama así akufaki. Akufaki mokolo ya 11 Augusto. Likambo oyo nazalaki kobanga banda kala esalemaki! Ata mokolo moko te nakosolola to kosɛka lisusu na mama na ngai.

Na mokolo ya 15 Augusto, balongaki Japon. Na yango, kaka na mikolo zomi, nakutanaki na makambo misato ya mawa: babwakaki bɔmbi atomike ya liboso na Japon, Mama akufaki, mpe balongaki Japon. Likambo ya malamu ezalaki kaka ete etumba oyo ezalaki kosilisa bato esili. Na mawa na motema, natikaki mosala ya kotonga bilamba ya basoda mpe nazongaki mboka.

Nasepeli na solo

Mokolo moko nazwaki mokanda oyo eutaki epai ya Maud Koda na Okayama. Asɛngaki ngai nakende mpo nasalisaka ye na misala ya ndako, mpo alingaki kofungola eteyelo moko ya Lingelesi. Namitunaki nini nakoki kosala, kasi nandimaki kokende. Nsima ya mwa bambula, ngai na Madame Koda na mobali na ye tokómaki kofanda na Kobe.

Na ebandeli ya eleko ya été ya 1949, mobali moko molai mpe ya boboto ayaki kotala libota ya Koda. Nkombo na ye Donald Haslett, autaki na Tokyo mpe ayaki na Kobe kolukela bamisionɛrɛ ndako. Azalaki Motatoli ya Yehova ya liboso oyo azalaki misionɛrɛ na Japon. Azwaki ndako moko, mpe na Novɛmbɛ 1949, bamisionɛrɛ ebele bayaki na Kobe. Mokolo moko, bamisionɛrɛ mitano bayaki kotala libota ya Koda. Mibale kati na bango, Llyod Barry ná Percy Iszlaub, balobaki na Lingelesi, moto na moto na boumeli ya miniti soki zomi, liboso ya bato oyo bayanganaki na ndako. Bamisionɛrɛ bazalaki kotalela Maud lokola ndeko-mwasi moklisto mpe emonani mpenza ete boninga na bango elendisaki ye. Na ntango wana nde nayokaki mposa ya koyekola Lingelesi.

Bamisionɛrɛ wana ya molende basalisaki ngai mokemoke nakanga ntina ya mateya ya ebandeli ya Biblia. Nazwaki biyano na mituna oyo nazalaki komituna banda bomwana. Biblia epesi elikya ya bomoi ya seko na paladiso awa na mabelé mpe elaki ete “baoyo nyonso bazali kati na malita ya kokanisama” bakosekwa. (Yoane 5:28, 29; Emoniseli 21:1, 4) Nazalaki kotɔnda Yehova mingi mpo na elikya oyo apesi na nzela ya mbeka ya lisiko ya mwana ye, Yesu Klisto.

Bisengo ya mosala ya Nzambe

Liyangani ya liboso ya Batatoli ya Yehova na Japon esalemaki na ndako ya bamisionɛrɛ na Kobe, banda mokolo ya 30 Desɛmbɛ 1949 tii mokolo ya 1 Yanuali 1950. Ngai ná Maud tokendaki na liyangani yango. Ndako monene yango ezalaká ya soda moko ya Banazi mpe, lokola ezalaki likoló ya ngomba, soki otali libándá ya ndako, okomona mbu ya kati ya Japon mpe Esanga Awaji. Lokola nayebaki Biblia mingi te, nakangaki mpenza ntina ya makambo mingi te oyo elobamaki na liyangani yango. Kasi, nazalaki kosepela mingi na ndenge bamisionɛrɛ bazalaki kosala boninga na bato ya Japon. Tozalaki bato 101 na lisukulu ya bato nyonso.

Kaka na nsima ya liyangani yango, nazwaki ekateli ya kobanda kosakola. Esengelaki nazala na mpiko mpo na kobima ndako na ndako, mpo nazalaki moto ya nsɔninsɔni. Mokolo moko na ntɔngɔ, Ndeko Lloyd Barry ayaki kozwa ngai na ndako na biso mpo tóbima na mosala ya kosakola. Abandaki mbala moko na ndako oyo ekangamaki na oyo ya Ndeko-mwasi Koda. Ntango azalaki kosolola na nkolo ndako, nabatamaki mpenza na mokɔngɔ na ye. Na mbala ya mibale, nabimaki elongo na bamisionɛrɛ mibale ya basi. Mobange mwasi moko ya Japon akɔtisaki biso na ndako na ye, ayokaki biso mpe na nsima apesaki mokomoko na biso kɔpɔ ya miliki. Andimaki koyekola Biblia mpe nsukansuka azwaki batisimo. Nalendisamaki mpenza na komona ndenge azalaki kokola na elimo.

Na Aprili 1951, Ndeko Nathan Knorr, oyo autaki na biro monene ya Batatoli ya Yehova na Brooklyn, ayaki mpo na mbala ya liboso na Japon. Bato soki 700 bayaki kolanda lisukulu ya bato nyonso oyo apesaki na ndako ya makita ya Kyoritsu na kartye Kanda, na Tokyo. Na likita yango, bayangani nyonso basepelaki ntango bayokaki ete Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebandi kobima na monɔkɔ ya Japonais. Sanza oyo elandaki, Ndeko Knorr akendaki na Kobe, mpe na lisukulu ya bato nyonso oyo asalaki kuna, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Yehova.

Pene na mbula moko na nsima, balendisaki ngai nakóma mobongisi-nzela. Na ntango wana, babongisi-nzela bazalaki mingi te na Japon, mpe nazalaki komituna soki nakobanda kozwa mbongo ya kobikela ndenge nini. Nakómaki mpe komituna soki mosala yango ekopekisa ngai kobala te. Kasi na nsima namonaki ete nasengeli kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ngai mpe, na 1952, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela. Likambo ya esengo, ntango nazalaki mobongisi-nzela, nazalaki mpe kosala ndambo ya mokolo epai ya Ndeko Koda.

Na ntango wana, ndeko na ngai ya mobali oyo nazalaki kokanisa ete akufá na etumba, atikaki Taïwan mpe azongaki na mboka na libota na ye. Bandeko na ngai bazalaki kosepela na boklisto te, kasi na molende na ngai ya mobongisi-nzela, nabandaki kotindela bango bazulunalo mpe mwa babuku. Na nsima, ndeko na ngai ná libota na ye bakómaki kofanda na Kobe mpo na mosala na ye. Natunaki semeki na ngai ete: “Bozalaki kotánga bazulunalo oyo nazalaki kotindela bino?” Nakamwaki mpenza ntango ayebisaki ngai ete: “Bazulunalo yango ezali malamu mpenza.” Abandaki koyekola Biblia na misionɛrɛ moko, leki na ngai ya mwasi oyo azalaki kofanda epai na bango akómaki mpe kosangana na ye na boyekoli yango. Na nsima, bango mibale bazwaki batisimo.

Namoni lisangá ya bandeko ya mokili mobimba

Mosika te, nakamwaki mpenza ete babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 22 ya Gileadi, eteyelo ya Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Ngai ná Ndeko Tsutomu Fukase tozalaki bato ya liboso ya Japon oyo babengamaki na eteyelo yango. Na 1953, liboso kelasi yango ebanda, tozwaki libaku ya kozala na liyangani oyo esangisaki bandeko ya mikili ndenge na ndenge oyo ezalaki na moto ya likambo ete la société du Monde Nouveau, oyo esalemaki na Yankee Stadium na New York. Namonaki na miso lisangá ya bandeko basaleli ya Yehova ya mokili mobimba.

Na mokolo ya mitano ya liyangani yango, bandeko oyo bautaki na Japon, oyo mingi kati na bango bazalaki bamisionɛrɛ, basengelaki kolata bakimono. Lokola kimono na ngai oyo natindaki na masuwa liboso tótika Japon ekómaki naino te, nalataki kimono ya Ndeko-mwasi Knorr. Ntango tozalaki na liyangani, mbula ebandaki kobɛta, mpe nakómaki kobanga noki kimono yango epɔla. Na ntango yango, moto moko ayaki na nsima na ngai mpe alatisaki ngai elamba ya mbula. Ndeko-mwasi moko oyo atɛlɛmaki penepene na ngai atunaki ngai ete: “Oyebi ndeko yango?” Nayebaki nsima ete ezalaki Ndeko Frederick Franz, oyo azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Namonaki mpenza bolingo makasi oyo ezali na ebongiseli ya Yehova!

Bana-kelasi ya mbala ya 22 ya Gileadi bautaki na mikili mingi, mpamba te eyambaki bandeko 120 oyo bautaki na bikólo 37. Atako kosolola ezalaki ntango mosusu mpasi mpo tokesanaki minɔkɔ, tozalaki mpenza kosepela na bandeko na biso ya mikili ndenge na ndenge. Na Febwali 1954, mokolo moko oyo mbula-mpɛmbɛ ekitaki mingi, nazwaki diplome mpe bazongisaki ngai na Japon. Batindaki ngai na engumba Nagoya ná Inger Brandt, ndeko-mwasi moko ya Suède oyo tokɔtaki na ye kelasi moko. Kuna, tokutanaki na bamisionɛrɛ oyo bakimaki etumba ya Corée. Nasepelaki mingi na mwa bambula oyo nalekisaki na mosala ya misionɛrɛ.

Mosala ya esengo elongo na mobali na ngai

Na Sɛtɛmbɛ 1957, babengaki ngai nakende kosala na Betele ya Tokyo. Biro ya filiale ya Japon ezalaki na ndako moko ya mabaya oyo ezalaki na etaze moko. Filiale yango ezalaki kaka na bandeko minei; mokambi ya filiale ezalaki Ndeko Barry. Bandeko mosusu nyonso oyo bazalaki wana bazalaki bamisionɛrɛ. Bapesaki ngai mosala ya kobongola mikanda, ya kotya bopɛto na ndako, ya kosukola bilamba, ya kolamba mpe bongo na bongo.

Mosala ya Bokonzi na Japon ezalaki se kobakisama; yango wana babengaki bandeko mosusu na Betele. Moko ya bandeko yango akómaki nkulutu na lisangá oyo batindaki ngai. Na 1966, ngai ná ndeko yango tobalanaki, nkombo na ye ezalaki Junji Koshino. Nsima ya libala na biso, Junji akómaki mokɛngɛli ya zongazonga. Ezalaki mpenza esengo koyebana na ebele ya bandeko ya masangá oyo tozalaki kotala. Lokola nazalaki mpe kosala mosala ya kobongola, nazalaki kosala yango na bandako oyo tozalaki kolala ntango tokei kotala lisangá moko. Ntango tozalaki kokende kotala masangá, longola bavalisi na biso, tozalaki mpe komema badiksionɛrɛ ya mineneminene.

Tosalaki mosala ya zongazonga mbula koleka minei mpe tomonaki ndenge ebongiseli ya Yehova ezalaki kokola. Biro ya filiale ekómaki na Numazu mpe mwa bambula na nsima, na Ebina, esika ezali tii sikoyo. Ngai ná Junji tozali na Betele banda ebele ya bambula, sikoyo tozali kosala elongo na libota monene ya bandeko pene na 600. Na sanza ya Mai 2002, baninga na ngai na Betele basalaki ebongiseli mpo tósepela mbula 50 oyo nasali na mosala ya ntango nyonso.

Esengo ya komona ndenge mosala ezali kokola

Ntango nabandaki kosalela Yehova na 1950, ata lisangá moko te ezalaki na Japon, kasi kaka mwa basakoli moke. Sikoyo tozali basakoli ya Bokonzi koleka 210 000. Ya solo mpenza, bankóto ya bampate bazali kobendama epai ya Yehova, kaka ndenge ngai nabendamaki.

Bamisionɛrɛ minei, bandeko basi mpe mibali oyo bayaki kotala biso na ndako ya Ndeko-mwasi Koda na 1949, bakisa mpe Ndeko-mwasi Maud Koda, bango nyonso batikalaki sembo epai ya Yehova tii liwa na bango. Ndenge moko mpe ndeko na ngai, oyo azalaki mosaleli na misala, mpe semeki na ngai, oyo azalaki mobongisi-nzela na boumeli ya mbula soki 15. Elikya nini ezali mpo na baboti na ngai oyo basí bakufá, oyo nazalaki kobanga liwa na bango ntango nazalaki naino mwana? Elaka ya lisekwa oyo Biblia epesi epesaka ngai elikya mpe ebɔndisaka ngai.​—Misala 24:15.

Ntango natalaka nsima, namonaka ete kokutana na ngai ná Maud na 1941 ebongolá mpenza bomoi na ngai. Soki nakutana na ye te mpe soki nandima te kozonga kosala epai na ye nsima ya etumba, nalingaki kokende kofanda na mboka na biso mpe kosala bilanga mpe nalingaki kokutana na bamisionɛrɛ te. Nazalaka mpenza na botɔndi mpo na Yehova oyo asalelaki Maud mpe bamisionɛrɛ ya liboso oyo bayaki na Japon mpo na kobenda ngai na solo!

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai ná Maud Koda ná mobali na ye. Nazali liboso na lobɔkɔ ya mwasi

[Elilingi na lokasa 27]

Na Yankee Stadium na 1953, elongo na bamisionɛrɛ oyo bautaki na Japon. Nazali na nsuka, na lobɔkɔ ya mwasi

[Elilingi na lokasa 28]

Na Betele elongo na mobali na ngai, Junji

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto