Lisolo ya bomoi
Yehova azangaka te kopesa basaleli na ye ya sembo mbano
YA VERNON DUNCOMBE
Ezalaki na mpokwa moko, nasilisaki kolya mpe lokola momeseno, napelisaki likaya. Na nsima natunaki mwasi na ngai Aileen ete: “Makita eleki ndenge nini lelo?”
AILEEN afandaki naino nyɛɛ mpe na nsima alobaki ete: “Batángi mokanda moko oyo eyebisi nkombo ya bandeko oyo bazwi mikumba na lisangá, batángi mpe nkombo na yo. Okobanda kotalela bikoliseli lolaka. Na nsuka ya mokanda yango balobaki ete: ‘Soki moko na bandeko oyo baponami amelaka likaya, asengeli kokomela la Société mpo na koyebisa ete likoki ya kondima mokumba yango ezali te.’”a Ntango nayokaki yango nalobaki ete: “Ah! Ezali nde boye!”
Nalyaki mino mpe nabomaki likaya yango na esika batyaka mputulu ya likaya, oyo ezalaki pembeni na ngai. “Nayebi te mpo na nini baponaki ngai na mokumba yango. Kasi naboyá naino mokumba moko te mpe nazali na likanisi ya koboya oyo wana te.” Nakamataki mokano ete nakomela lisusu likaya te. Mokano yango ebongolaki mpenza bomoi na ngai lokola moklisto mpe alanga-nzembo. Tiká nayebisa bino mwa makambo oyo esalaki ete nazwa mokano wana.
Libota na biso na bomwana na ngai
Nabotamaki na engumba Toronto, na Canada, na mokolo ya 21 Sɛtɛmbɛ 1914; nazali mwana ya liboso ya Vernon na Lila, baboti na biso ya bolingo mpe bato ya molende na mosala; tozalaki bana mibali minei mpe bana basi mibale. Leki oyo alandaki ngai nkombo na ye Yorke, na nsima Orlando, Douglas, Aileen, mpe na nsuka Coral. Ntango nazalaki na mbula libwa, mama apesaki ngai violon mpe akomisaki ngai na eteyelo moko ya koyekola miziki (Harris School of Music). Tozalaki na mbongo te, kasi Tata na Mama bazalaki kosala nyonso mpo na kofutela ngai kelasi mpe bazalaki kopesa ngai mbongo ya tike. Na nsima, nakɔtaki na eteyelo moko ya monene mpo na koyekola miziki (Conservatoire royal de musique), na Toronto mpe ntango nakokisaki mbula 12, napesaki nkombo mpo na kosala momekano ya miziki mpo na bana ya engumba mobimba na Massey Hall, ndako moko monene mpe ya lokumu na engumba na biso epai bazalaki kobɛta miziki. Nalongaki momekano yango mpe bapesaki ngai violon moko ya kitoko oyo basalaki ndako na yango na loposo ya ngando.
Na nsima, nayekolaki mpe kobɛta piano mpe ebeteli ya miziki oyo babengi contrebasse. Tozalaki na mwa lisangá na baninga mosusu baalanga-nzembo mpe mbala mingi, tozalaki kobɛta miziki na mwa bafɛti ya mike na bampokwa ya mokolo ya mitano mpe ya mokolo ya pɔsɔ mpe na bafɛti ya moziki. Nakutanaki na Aileen mpo na mbala ya liboso na moko ya bafɛti yango ya moziki. Ntango nakómaki na kelasi ya nsuka ya eteyelo ya ntei, nabɛtaki elongo na masangá mingi ya baalanga-nzembo ya engumba na biso. Nsima ya kozwa diplome, basɛngaki ngai nakɔta na lisangá moko ya baalanga-nzembo (Ferde Mowry Orchestra); ezalaki mosala malamu mpe bazalaki kofuta ngai malamu, nasalaki kuna tii na 1943.
Ndenge oyo nayebaki Yehova
Baboti na ngai bayokaki mateya ya solo ya Biblia mpo na mbala ya liboso mwa moke liboso Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebanda, ntango Tata azalaki kosala na magazini moko. Na ndako ya kolya, azalaki kolanda masolo ya baninga mibale ya mosala oyo bazalaki Bayekoli ya Biblia (nkombo ya kala ya Batatoli ya Yehova) mpe na nsima, soki azongi na ndako na mpokwa, azalaki koya koyebisa Mama makambo oyo azalaki koyoka. Mwa bambula na nsima, na 1927, Bayekoli ya Biblia basalaki liyangani moko monene na libándá ya masano na lopango ya fware. Lokola ndako na biso ezalaki mosika te na esika ya liyangani, toyambaki bato 25 epai na biso, bautaki na etúká ya Ohio, na États-Unis mpe bayaki mpo na liyangani.
Na nsima, Ada Bletsoe, Moyekoli moko ya Biblia, abandaki koya kotala Mama mbala na mbala mpe azalaki kotikela ye bazulunalo oyo ebimaki sika. Mokolo moko alobaki ete: “Madame Duncombe, esali mwa mikolo banda natikelaka yo mikanda. Nalingi nayeba soki otángaka yango.” Atako azalaki na bana motoba, Mama azwaki mokano abanda kotánga bazulunalo banda ntango yango, alekisaki ata zulunalo moko te. Kasi, ngai nazalaki mpenza kotyela bazulunalo yango likebi te. Nazalaki kosala makasi mpo nazwa diplome na ngai na kelasi mpe namipesaki mpenza na miziki.
Na sanza ya Yuni 1935, nabalaki Aileen na ndakonzambe moko ya Lingomba ya Angleterre. Lokola nalongwaki na Église unie ntango nazalaki na mbula 13, nazalaki na lingomba moko te; yango wana, nakomaki na mokanda ya libala ete nazali Motatoli ya Yehova, atako nazalaki naino Motatoli te.
Tozalaki na mposa ete na mikolo ekoya tóbota bana mpe tóbɔkɔla bango malamu. Yango wana, tobandaki kotánga Kondimana ya Sika biso mibale. Kasi, atako tozalaki na mposa ya kotánga Biblia biso mibale, makambo mosusu eyaki kobebisa ebongiseli wana. Tomekaki lisusu kobandela kotánga kasi tolongaki kaka te. Na nsima, na Noele ya mobu 1935, Mama atindelaki biso likabo moko oyo azingaki yango na papye moko kitoko, ezalaki mokanda La Harpe de Dieu. Mwasi na ngai alobaki ete: “Oh! mama na yo atindeli biso likabo ya ndenge mosusu mpenza mpo na Noele.” Nzokande, ntango nakendaki mosala, na nsima, ye atángaki mokanda yango mpe asepelaki na makambo oyo azalaki kotánga. Elekaki mwa ntango, ngai nazalaki koyeba te ete azalaki kosepela kotánga mokanda yango. Mposa na biso ya kobɔkɔla bana ekokisamaki te mpamba te mwana na biso ya mwasi, oyo abotamaki na mokolo ya 1 Febwali 1937, akufaki. Esalaki biso mpasi mingi mpenza!
Na ntango yango, baboti na ngai na bandeko na ngai bazalaki kosakola mpe nayokaki ete na basakoli nyonso ya Bokonzi na libota na biso, kaka Tata azwaki naino moto te ya kosalela abonema ya zulunalo Consolation (lelo oyo Lamuká!). Na sanza yango, basakoli nyonso bazalaki na mokano ya kosɛnga bato básala abonema. Atako natángaki naino mokanda moko ya la Société te, nayokelaki Tata mawa mpe nalobaki na ye ete: “Likambo te, Tata, salelá ngai abonema mpo okokana na basakoli mosusu nyonso.” Ntango tokómaki na eleko ya molunge, tokendaki na engumba mosusu mpo na kobɛta miziki na esika moko ya masano. Kuna nazwaki zulunalo Consolation na nzela ya posita. Ntango tokómaki na otɔmne, tozongaki na Toronto. Bazulunalo ezalaki kaka koya na adresi na biso ya sika ya posita, kasi nafungolaki ata moko te.
Mbula moko ntango topemaki na Noele, natalaki liboke ya bazulunalo yango mpe nalobaki ete lokola nabimiselaki yango mbongo, nasengeli kotánga ata mwa ndambo na yango mpo na koyeba makambo nini ezali na kati. Zulunalo ya liboso oyo natángaki ekamwisaki ngai. Ezalaki kolobela mayele mabe ya bato ya politiki mpe ndenge makambo ebebaki na ntango wana. Nabandaki koyebisa baninga na ngai baalanga-nzembo makambo oyo nazalaki kotánga. Kasi bandimaki te ete makambo oyo nazali koloba ezali solo, yango wana, nakobaki kotánga mpo nazwa makanisi oyo ekosalisa ngai nalonga bango. Kozanga ete nayeba yango, nabandaki kotatola mpo na Yehova. Banda wana tii lelo oyo, natikaka te kotánga mikanda kitoko oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” abimisaka mpo na kolimbola Biblia.—Matai 24:45.
Mwa moke na nsima, atako nazalaki na mosala mingi na kati ya pɔsɔ, nabandaki kokende na makita elongo na Aileen na mokolo ya lomingo. Mokolo moko ya lomingo na 1938, ntango tokómaki na makita, bandeko basi mibale oyo bazalaki mibange bapesaki biso mbote mpe moko alobaki ete: “Elenge ndeko mobali, osi oponi kozala na ngámbo ya Yehova? Oyebi, Armagedon ezali lisusu mosika te!” Nayebaki ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo mpe nandimaki ete wana ezali ebongiseli na ye. Nazalaki na mposa ya kozala na kati ya ebongiseli yango, yango wana, na mokolo ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1938, nazwaki batisimo. Nsima ya sanza soki motoba, Aileen mpe azwaki batisimo. Nazali na esengo ya koloba ete libota na ngai mobimba tomipesaki mpo na kosalela Yehova.
Nazalaki na esengo mingi ya kosangana na basaleli ya Nzambe! Naumelaki te mpo na komesana na bango. Soki nazangi na makita, nazalaki ntango nyonso na mposa ya koyeba makambo nini balobaki kuna. Na mpokwa oyo nalobeli na ebandeli ya lisolo, makambo oyo etali mosala na ngai mpo na Yehova ebongwanaki mpenza.
Tosali mbongwana monene
Mokolo ya 1 Mai 1943, tosalaki mbongwana mosusu ya monene. Mbala ya liboso oyo tokendaki na liyangani moko ya monene ezalaki na Sɛtɛmbɛ 1942, Liyangani ya Teokrasi ya Mokili ya Sika, esalemaki na Cleveland, na etúká ya Ohio. Liyangani yango esalemaki na ntango oyo etumba ya mokili mobimba ezalaki kongala, etumba oyo ezalaki koyebana te soki ekosila ndenge nini, likambo ya kokamwa, Ndeko Knorr, prezida ya Société Watch Tower, asalaki na mpiko nyonso lisukulu ya bato nyonso oyo ebendaki likebi na biso, motó ya likambo yango ezalaki ete: “Kimya—Ekoki koumela?” Tobosanaka te ndenge oyo amonisaki, na kolanda Emoniseli mokapo 17, ete etumba ekosila, kimya ekozonga nsima ya etumba mpe na boumeli ya ntango yango, mosala monene ya kosakola ekosalema.
Likambo oyo esimbaki mpenza mitema na biso koleka ezali lisukulu oyo Ndeko Knorr asalaki liboso, lisukulu yango ezalaki na motó ya likambo ete: “Yefeta mpe ndai na ye.” Alendisaki bandeko mingi bákóma babongisi-nzela! Ngai na Aileen totalanaki mpe tolobaki nzela moko (na bato mingi mosusu) ete: “Ezali nde biso!” Mbala moko tobandaki komibongisa mpo na kosala mosala mosusu oyo eleki ntina.
Banda mokolo ya 4 Yuli 1940, bapekisaki mosala ya Batatoli ya Yehova na Canada. Ata ntango tobandaki mosala ya babongisi-nzela na mokolo ya 1 Mai 1943, mibeko ezalaki mpe kopekisa mosala ya kosakola mpo na Yehova to kopesa bato mikanda ya la Société. Na mosala ya kosakola, tozalaki komema kaka Babiblia ya libongoli ya King James. Tosalaki kaka mwa mikolo na teritware ya liboso oyo batindaki biso na engumba Parry Sound, na etúká ya Ontario, la Société atindaki Stewart Mann, mobongisi-nzela moko ya kala mpo asala na biso. Ezalaki mpenza ebongiseli moko ya bolingo! Ndeko Mann azalaki mpenza na bizaleli malamu mpe azalaki kosɛka mingi. Alakisaki biso makambo mingi mpe tolekisaki ntango malamu elongo na ye. Tokómaki koyekola Biblia na bato mingi, kasi la Société atindaki biso na engumba Hamilton. Nsima ya mwa ntango, babengisaki ngai na mosala ya soda atako nasilaki kolekisa mbula oyo esɛngisami mpo na yango. Lokola naboyaki kokɔta na mosala yango, bakangaki ngai na mokolo ya 1 Desɛmbɛ 1943. Nsima ya kosamba, batindaki ngai nakende kosala na kaa ya bato oyo baboyi kokɔta mosala ya soda mpe natikalaki kuna tii na sanza ya Augusto 1945.
Ntango kaka nabimaki na bolɔkɔ, la Société atindaki ngai na Aileen lokola babongisi-nzela na engumba Cornwall, na etúká ya Ontario. Mwa moke na nsima, biro ya la Société oyo etalelaka makambo ya mibeko etindelaki biso mokanda moko ya tribinale mpe tokendaki na etúká ya Québec. Ezalaki ntango Duplessis azalaki ministre-mokonzi ya Québec, ntango bazalaki konyokola mpenza Batatoli ya Yehova. Pɔsɔ na pɔsɔ, nazalaki kolekisa mikolo mingi na batribinale minei mpo na kosamba mpo na bandeko. Na eleko yango, tokutanaki na makambo mingi oyo elendisaki kondima na biso.
Nsima ya liyangani oyo esalemaki na Cleveland na 1946, batindaki biso na mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga mpe ya etúká; ngai na mwasi na ngai totambolaki Canada mobimba. Makambo ezalaki koleka noki mpenza. Na 1948, babengisaki biso na kelasi ya mbala ya 11 na Gileadi, Eteyelo ya la Société Watchtower mpo na mateya ya Biblia. Ndeko Albert Schroeder na Ndeko Maxwell Friend bazalaki balakisi na biso; tozalaki banakelasi 108 mpe kati na biso, 40 bazalaki bapakolami. Kozala esika moko na bato ebele bongo, oyo balekisaki bambula ebele na mosala ya Yehova, elendisaki biso mpe eteyaki biso makambo mingi!
Mokolo moko, Ndeko Knorr autaki Brooklyn mpe ayaki kotala biso. Na lisukulu na ye, asɛngaki bandeko 25 bápesa nkombo mpo na koyekola monɔkɔ ya Japonais. Biso nyonso 108 topesaki nkombo! Sikoyo, ye moko asengelaki kopona. Nabanzi ete Yehova ye moko atambwisaki makambo mpo na kopona bandeko mpamba te makambo nyonso elekaki malamu. Bandeko mingi kati na bandeko yango 25 oyo baponamaki mpe batindamaki na Japon mpo na kobanda mosala, bazali naino kuna tii lelo atako basili kokóma mibange mpenza. Bandeko mosusu, lokola Lloyd na Melba Barry, batindamaki na bateritware mosusu. Llyod azalaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi tii ntango akufaki na mbula eleki. Biso nyonso tozali kosepela mpo na matomba oyo Yehova apesi biso.
Mokolo tozwaki badiplome na biso, batindaki biso na ekólo Jamaïque. Kasi lokola ezalaki na makambo mingi ya kosamba oyo esilaki te na Québec, basɛngaki biso tózonga naino na Canada.
Makambo ya miziki ezongi lisusu na bomoi na ngai!
Atako natikaki miziki mpo na mosala ya mobongisi-nzela, emonanaki ete miziki etikaki ngai te. Na mbula oyo elandaki, Nathan Knorr, prezida ya la Société na Milton Henschel, sekretɛrɛ na ye, bayaki na Maple Leaf Gardens, esika moko ya masano na Toronto. Ndeko Knorr asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó ya likambo ete: “Ntango eleki mpenza na ndenge oyo ozali kokanisa te!” mpe lisukulu yango esimbaki mpenza motema ya moto nyonso. Mpo na mbala ya liboso, basɛngaki ngai nabongisa babɛti miziki na liyangani. Nabongisaki miziki kitoko mpo na nzembo mosusu oyo eyebani malamu na mokanda Buku ya nzembo mpo na mosala ya Bokonzi (1944). Bandeko basepelaki na yango mpenza. Na mpokwa, ntango likita ya mokolo ya pɔsɔ esilaki, tobongisaki nzembo mpo na mokolo ya lomingo. Ntango namonaki Ndeko Henschel azali koya esika tozalaki, nakataki miziki mpo na kokutana na ye. Atunaki ete: “Bozali na babɛti miziki boni awa?” Nalobaki ete: “Soki biso nyonso tozali, tozalaka 35.” Ndeko Henschel alobaki ete: “Na mbula ekoya bokozala 70 na New York.”
Kasi liboso kutu ete tókóma na eleko ya molunge ya mbula yango, babengisaki ngai na Brooklyn. Makambo mosusu esalaki ete Aileen atikala naino. Ndako oyo ezali na balabala Columbia Heights, nimero 124 esilaki naino te; yango wana batyelaki ngai mbeto na shambre moko ya moke, na Betele ya kala, esika moko na bandeko mibale bapakolami: Ndeko Payne ye azalaki mobange na Ndeko Karl Klein, oyo nakutanaki na ye mpo na mbala ya liboso. Ya solo, ezalaki mpenza nkaka; kasi, tozalaki koyokana malamu biso nyonso. Bandeko oyo bazalaki mibange bazalaki mpenza na motema molai. Nazalaki kosala makasi ete nabɛtisa bango libaku te! Yango eteyaki ngai mpenza makambo oyo elimo ya Nzambe ekoki kosala. Nazwaki mapamboli mingi na ndenge nakutanaki mpe nasalaki elongo na Ndeko Klein! Azalaki ntango nyonso na boboto mpe azalaki ntango nyonso kosalisa ngai. Tosalaki elongo na boumeli ya mbula koleka 50 mpe totikalá baninga ya motema.
Nazalaki na esengo mingi ya kobongisa miziki na mayangani oyo esalemaki na Yankee Stadium na 1950, 1953, 1955 mpe 1958; lisusu, na 1963 nasalaki elongo na Al Kavelin mpo na kokamba babɛti miziki na liyangani oyo esalemaki na libándá ya masano Rose Bowl, na Pasadena, na etúká ya Californie. Na mokolo ya lomingo ya liyangani oyo esalemaki na 1963 na Yankee Stadium, tobɛtaki miziki liboso lisukulu ya bato nyonso ebanda. Erich Frost asalaki loyembo “Batatoli, tókende liboso” mpe abengaki Edith Shemionik (na nsima akómaki Edith Weigand), ye azalaki koyemba na mongongo ya soprano, mpe biso tozalaki kobɛta miziki. Na nsima, tosepelaki mingi ntango toyokaki mpo na mbala ya liboso mingongo kitoko mpenza ya bandeko na biso basi na mibali ya Afrika. Harry Arnott, ye azalaki misionɛrɛ, autaki na Rhodésie du Nord (lelo oyo Zambie) mpe amemelaki biso kasɛti moko ya nzembo. Nzembo yango eyokanaki malamu na stade mobimba.
Badiskɛ ya nzembo oyo ebimaki na 1966
Oyebi mokanda ya nzembo oyo ezalaki na ezipeli ya langi ya rozɛ oyo bakomaki likoló na yango na Lifalanse ete “Chantant et vous accompagnant de musique dans votre cœur”? Ntango etikalaki moke básilisa kobongisa mokanda yango, Ndeko Knorr alobaki boye: “Tokokɔtisa nzembo mosusu na diskɛ. Bongisá mwa etuluku moke ya babɛti miziki; ezala kaka na mwa ba violon mpe piololo mibale. Kelelo ezala te!” Tosengelaki kosala yango na Ndako ya Bokonzi ya Betele, kasi tozalaki na mwa mokakatano. Tozalaki komituna soki miziki ekokɔta malamu na ndako oyo bifelo ezali na barido te, na nse ezali na sima mpe bakiti ya bibende ezali ebele. Nani akokaki kosalisa biso mpo na mokakatano wana? Ndeko moko alobaki: “Tommy Mitchell! Asalaka na radio ABC.” Tokutanaki na Ndeko Mitchell mpe asepelaki kosalisa biso.
Ntango tokómaki na ntɔngɔ ya mokolo ya pɔsɔ ya liboso oyo tosengelaki kokɔtisa nzembo na diskɛ, mpe ntango bazalaki koyebisa nkombo ya babɛti miziki, ndeko moko azalaki na kelelo ya monene. Mbala moko nakanisaki ndenge Ndeko Knorr alobaki ete: “Kelelo ezala te!” Nakosala nini? Nazalaki kotala ndeko yango ndenge azalaki kobimisa kelelo na ye na saki na yango, akangisaki biteni na yango mpe abandaki komeka kobɛta yango. Nzokande ndeko yango ezalaki nde Tom Mitchell; mpe ntango azalaki komeka, nayokaki lokito ya kelelo na ye kitoko mpenza. Kelelo na ye ezalaki kobimisa lokito lokola violon! Nalobaki na nse ya motema ete: “Ndeko oyo asengeli kotikala.” Ndeko Knorr aboyaki mpe te.
Bandeko mibali mpe basi oyo bazalaki kobɛta miziki yango bayebaki mpenza mosala ya miziki mpe bazalaki na bolingo mingi. Bato ya mindɔndɔ bazalaki te! Kokɔtisa nzembo na diskɛ ezalaki mosala monene, kasi ata moto moko te azalaki komilelalela. Ntango tosilisaki, tolelaki mpo tolingaki kokabwana; bandeko nyonso oyo basalaki mosala yango batikalá baninga ya motema. Mokomoko kati na biso asepelaki na libaku yango mpe akumisaki Yehova na ndenge tosilisaki mosala yango.
Nazwaki mapamboli ya kokokisa mikumba mosusu
Atako bambula mingi esili koleka, nazali kaka na mosala ya ntango nyonso. Nalekisaki mbula 28 ya esengo na mosala ya mokɛngɛli ya zongazonga mpe ya etúká. Na nsima, nalekisaki mbula mitano lokola mokɛngɛli ya Ndako ya Mayangani ya Norval, na Ontario. Ngai na Aileen tozalaki na mosala mingi lokola mayangani ya zongazonga ezalaki kosalema na wikende nyonso, bakisa mpe mayangani ya etúká na minɔkɔ ya bapaya. Na mobu 1979 mpe 1980, bato oyo basalaka ba plan ya bandako na ba ingénieurs batyaki biro na bango na Ndako ya Mayangani mpo na kobongisa ndenge oyo bakotonga biro ya la Société na Halton Hills. Nsima ya kosala na Ndako ya Mayangani, babengisaki biso lisusu na Brooklyn mpo na miziki na 1982 tii na 1984.
Mwasi na ngai ya bolingo akufaki na mokolo ya 17 Yuni 1994, mikolo sambo liboso tókokisa mbula 59 ya libala na biso. Nalekisaki na ye mbula 51 na mosala ya mobongisi-nzela.
Ntango nakanisaka makambo mingi oyo nakutaná na yango na bomoi na ngai, namonaka ete Biblia ezalaki mpenza kotambwisa ngai malamu. Ntango mosusu nasalelaka Biblia ya Aileen mpe nasepelaka mingi ntango namonaka makambo oyo esimbaki mpenza motema na ye, bavɛrsɛ, milɔngɔ mpe maloba oyo atyaki bilembo. Lokola Aileen, ngai mpe nazali na mikapo oyo elobaka mingi mpo na ngai. Na ndakisa Nzembo 137, oyo ezali libondeli moko kitoko epai ya Yehova: “Tiká ete nakoka lisusu kobɛta nzenze te soki nabosani yo, Yelusaleme! Tiká ete nakoka lisusu koyemba te soki nakanisi yo lisusu te, soki nakanisi yo koleka esengo na ngai oyo eleki monene te!” (Nzembo 137:5, 6, Today’s English Version) Atako nalingaka miziki, nasepelaka mingi koleka na kosalela Yehova na bosembo nyonso, Ye apamboli ngai mpe apesi ngai bomoi ya esengo mpe ya ntina.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1973 (ebimeli ya Lifalanse) elimbolaki ntina oyo, kobanda ntango yango, moto asengeli kotika komela likaya liboso azwa batisimo mpe akóma Motatoli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 28]
Ngai na Aileen na 1947
[Elilingi na lokasa 30]
Liboso ya kokɔtisa nzembo na diskɛ