Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/1 nk. 8-9
  • “Mosala moko monene”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mosala moko monene”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mayele ya sika mpo na kosakola nsango malamu
  • Makambo oyo bato bazalaki komona te
  • Esaleli malamu mpo na kopesa litatoli
  • Mayele oyo tosaleli​​—Ebele ya bato bayoki nsango malamu
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Kondima ya Baklisto ekomekama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tóyebisa bato mingi nsango malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Bokonzi esili koyangela mbula 100
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/1 nk. 8-9

Bózala bato bakoki mpenza mpe bazali na kondima makasi

“Mosala moko monene”

BANDA na ebandeli ya lisolo na bango ya ntango na biso, Batatoli ya Yehova batyaka likebi mingi na esakweli moko ya Yesu Klisto oyo elobi ete: “Nsango Malamu oyo ya Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Ntango mobu 1914, ebandeli ya “mikolo ya nsuka” ekómaki pene, Bayekoli ya sembo ya Biblia babandaki, na molende mpenza, mosala monene ya koteya bato na mokili mobimba na lisalisi ya Makomami Mosantu na ndenge oyo basalaki yango naino liboso te.​—2 Timote 3:1.

Mpo na kokokisa mokano na bango ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba, basaleli yango ya Yehova basalelaki mayele ya sika, oyo esɛngaki mpiko mpe ezalaki kobenda bato mingi. Mpo na koyeba yango, tózonga na bambula oyo eleki.

Mayele ya sika mpo na kosakola nsango malamu

Tozali na Yanuali 1914. Salá lokola ofandi na bato mosusu 5 000 na ndako moko ya molili na engumba New York. Etanda moko ya monene ya filme ezali liboso na bino. Mobali moko ya nsuki-mpɛmbɛ alati kazaka abimi na filme. Osi otalá bafilme oyo bililingi na yango ezali koningana mpamba kasi, na mbala oyo, mobali yango azali koloba mpe okoki koyoka maloba na ye. Ezali mbala ya liboso omona likambo ya sika boye, mpe nsango oyo ozali koyoka ekokani na nsango mosusu te. Mobali yango oyo azali koloba nkombo na ye Charles Taze Russell, prezida ya liboso ya la Société Watch Tower mpe filme yango ezali “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.”

Charles Russell asosolaki ete filme ezali esaleli ya malamu mpo na koteya bato ebele na mbala moko. Yango wana, na 1912, abandaki kobongisa “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi.” Na nsuka, “Fɔtɔ-Drame” ezalaki filme oyo ezalaki koumela ngonga mwambe, ezalaki na bafɔtɔ mpe na bililingi oyo eninganaka, ezalaki langilangi mpe ezalaki na maloba.

“Fɔtɔ-Drame” ebongisamaki mpo elakisama na biteni minei, ezalaki kolakisa bozalisi na makambo oyo esalemaki na lisolo ya bato mpe ezalaki kosuka na kolakisa bato mokano ya Yehova Nzambe mpo na mabele mpe ndenge oyo bato bakozala na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. Elekaki bambula mingi liboso ete bakompanyi ya mokili esalela mayele yango mpo na kobimisa bafilme na mokano ya kozwa mbongo. Kasi, bamilio ya bato batalaki “Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi” ofele!

Babongisaki miziki ya malamu mpenza mpe masukulu 96 ezalaki kobɛta na fono mpo na “Fɔtɔ-Drame.” La Société asalelaki bililingi kitoko ya bozalisi oyo bato basalaki, bililingi oyo ezalaki komonisa lisolo ya mokili. Esengelaki mpe kosala ebele ya bililingi mosusu ya sika. Bafɔtɔ mosusu ya diapozitive ya langi mpe ya bafilme basalaki yango na mabɔkɔ. Basalaki yango mbala na mbala, mpamba te, ntango esilaki, babongisaki biteni minei ya fɔtɔ 20. Yango epesaki likoki ya kolakisa eteni moko ya “Fɔtɔ-Drame” na bingumba 80 na mokolo moko!

Makambo oyo bato bazalaki komona te

Makambo nini ezalaki koleka na nsima oyo bato bazalaki komona te ntango bazali kolakisa “Fɔtɔ-Drame”? Alice Hoffman azalaki Moyekoli ya Biblia, ye alobaki ete: “Fɔtɔ-Drame ezalaki kobanda na bililingi ya Ndeko Russell. Ntango amonani na etanda mpe monɔkɔ na ye ebandi koningana, fono mpe ebandaki kobɛta . . . mpe tozalaki kosepela koyoka mongongo na ye.”

Mpo na bafɔtɔ oyo elekaka nokinoki, Zola Hoffman alobaki boye: “Nafandaki wana, nafungoli miso na kokamwa ntango tozalaki kotala ndenge bazalaki kolakisa mikolo ya bozalisi. Tomonaki na miso bafololo ezali kofungwama mokemoke.”

Karl F. Klein, ye alingaka miziki mingi mpe azali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova abakisi boye: “Ntango bililingi ezalaki koleka, miziki ya kitoko lokola Narcisse na Humoresque ezalaki kobɛta.”

Ezalaki na makambo mosusu oyo babosanaka yango te. Clayton Woodworth Moke, alobaki boye: “Makambo ya kosɛkisa ezalaki mpe kosalema ntango mosusu. Mokolo moko miziki ezalaki kobɛta ete ‘Kimá na ngomba na yo lokola ndɛkɛ,’ mpe na esika tómona ndɛkɛ na bililingi, ebakata ya nyama moko ezalaki liboso ya Mpela nde ebimaki”!

Longola “Fɔtɔ-Drame,” eumelaki te babimisaki lisusu “Drame Eureka” yango ezalaki na biteni mingi. (Talá etanda.) Eteni moko na yango ezalaki na masukulu mpe miziki ya kasɛti. Biteni mosusu ezalaki na masukulu na miziki mpe badiapozitive. Atako bililingi ya “Drame Eureka” ezalaki koningana te, kasi ntango balakisaki yango na bamboka oyo ezalaki na bato mingi mpenza te bato basepelaki na yango mingi.

Esaleli malamu mpo na kopesa litatoli

Na nsuka ya 1914, bato koleka milio 9 batalaki “Fɔtɔ-Drame” na Amerika ya Nɔrdi, na Mpoto mpe na Australie. Atako Bayekoli ya Biblia bazalaki mingi te, bazalaki na molende mpo na kosakola nsango malamu na esaleli yango ya sika. Basepelaki kobimisa mbongo na bango mpo na kofutela bisika ya malamu mpo na kolakisa bafilme wana. “Fɔtɔ-Drame” esalaki mpenza mosala monene mpo ete bato oyo batalaki yango báyeba Liloba ya Nzambe mpe mikano na ye.

Na mokanda oyo atindelaki Charles Russell, moto moko akomaki boye: “Bomoi na ngai ebongwanaki ntango natalaki filme na yo mpo na mbala ya liboso; to, nasengeli koloba ete, mbongwana mpo na boyebi na ngai ya Biblia.” Moto mosusu alobaki boye: “Etikalaki moke nasala ekobo mpe namoni ete ‘Fɔtɔ-Drame ya Bozalisi’ oyo balakisaki awa na eleko ya molunge oyo eleki nde ebikisaki ngai. . . . Sikoyo nazali na kimya oyo mokili ekoki kopesa te mpe nakokaba kimya yango te ata soki bapesi ngai bozwi nyonso ya mokili.”

Demetrius Papageorge, ye asalaki bambula mingi na biro monene ya Batatoli ya Yehova, alobaki boye: “ ‘Fɔtɔ-Drame’ ezalaki mosala monene, soki totali ete Bayekoli ya Biblia bazalaki moke mpe mbongo moke oyo tozalaki na yango. Elimo ya Yehova nde esalaki mpenza mosala!”

[Etanda/​Bililingi na lokasa 8]

“Drame Eureka”

Ntango “Fɔtɔ-Drame” ya liboso ebimaki, sanza mwambe na nsima la Société amonaki malamu abimisa filme mosusu mpe babengaki yango “Drame Eureka.” Ntango oyo bazalaki kolakisa “Fɔtɔ-Drame” mobimba na bingumba minene, na bamboka ya mike bazalaki kolakisa “Eureka,” yango ezalaki na bitenibiteni mpe nsango na yango ekokanaki na “Fɔtɔ-Drame.” Bazalaki koloba ete “Drame Eureka” epesaki “bandeko basi libaku ya kosakola.” Mpo na nini? Mpamba te kɛsi na yango ya bakasɛti ya fono ezalaki na kilo 14 mpamba. Esengelaki komema fono mpo na kolakisa filme.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto